Nani akoyoka nsango na biso?
1 Koleka ndenge ezalaki liboso, bato bazali koyoka nsango ndenge na ndenge, oyo mingi kati na yango ezali ya likolólikoló, to mpe ya lokuta. Na yango, mingi babulungani, mpe ezalaka mokakatano mpo na biso komema bango ete báyoka nsango ya Bokonzi ya Nzambe. Bayebi te bolamu oyo bakoki kozwa na koyokáká Liloba ya Nzambe.—Luka 11:28.
2 Tozali kosepela na komona ete kati na bisika mingi na mokili ebele ya bato bazali koyoka nsango yango mpe bazali kondima koyekola Biblia. Nzokande, na bateritware mosusu bato bandimaka mpenza te. Masoló mingi oyo tosalaka kati na mosala ya kosakola ebotaka mbuma te, mpe ekoki kozala ete tómitunaka soki nani akoyoka nsango na biso.
3 Tosengeli kosɛnzɛla ete tólɛmba nzoto te. Paulo abimisaki maloba oyo malandi: “Moto na moto oyo akobelela nkombo ya [Yehova] akobika. Na nzela nini bakobelela ye oyo . . . bayoki mpo na ye te? Bakoyoka na nzela nini soko bazangi mosakoli? . . . Pelamoko ekomami ete, Kitoko boni makolo na bango bakosakolaka nsango na makambo malamu!” (Lom. 10:13-15) Soki tozali, na molende nyonso, kolóna mombóto ya Bokonzi, Nzambe akokólisa yango epai na bato ya motema sembo.—1 Kol. 3:6.
4 Mpo na kolónga, tosengeli kozongelaka bato mbala na mbala: Na bateritware epai kuna emonanaka ete bobele bato moke nde bayokaka nsango na biso, tosengeli kosɛnzɛla ete tókólisa bosepeli nyonso oyo bato bamonisi, ezala ete totiki mokanda moko to totiki yango te. Mpo na nini kosukisa nokinoki koloba ete yango ekobota mbuma te? Ntango tozali kolóna mbuma, toyebaka te epai wapi yango ekobota. (Mos. 11:6) Soki tozongi nsima ya komibongisa na mokano ya koyebisa likanisi moko liuti na Makomami, ata soki tolobi na mokuse, mbala mosusu tokolónga kosimba motema ya moto yango. Tokoki kotika trakte moko to kolakisa bazulunalo ya sika. Na nsima, tokozala mbala mosusu na likoki ya komonisa lolenge boyekoli ya Biblia esalemaka. Tokokamwa na esengo nyonso komona lolenge Yehova akopambola milende na biso.—Nz. 126:5, 6.
5 Mwasi moko oyo amonisaki bosepeli, batikelaki ye trakte moko. Nsima ya sanza mibale bakutaki ye lisusu na ndako na ye, kasi azwaki ntango ya kosolola te mpo ete azalaki na mosala mingi. Batikelaki ye lisusu trakte yango mpo na mbala ya mibale. Atako mosakoli mwasi azalaki kolendendela mpo na kokutana na ye, ayaki komona ye bobele sanza misato na nsima; akutaki ye azali kobɛla. Ndeko mwasi azongelaki ye na pɔ́sɔ elandaki, mpe basololaki lisoló mokuse na trakte yango. Ntango azongelaki ye pɔ́sɔ ya nsima, mwasi yango amonisaki bosepeli ya solosolo mpo na nsango ya Bokonzi. Mbongwana oyo esalemaki kati na bomoi na ye etindaki ye ete ayeba bamposa na ye ya elimo. Babandaki boyekoli ya Biblia, mpe mwasi wana ayekolaki na molende nyonso na boumeli ya bapɔ́sɔ oyo elandaki.
6 Ezala bafololo, ndunda to bosepeli mpo na nsango ya Bokonzi, oyo nyonso tolingi komona ete ekóli, tosengeli kolóna yango. Yango esɛngaka ntango, milende, likebi mpe ekateli mpo na kotika te. Mbula eleki pene na bato 400 000, baoyo kati na bango mombóto ya Bokonzi ezwaki misisa, bazwaki batisimo! Soki tokóbi kosakola, tokoki kondimisama ete tokokutana na ebele ya bato oyo bakoyoka nsango na biso.—Talá Bagalatia 6:9.