Baklisto oyo bakómi mibangé bazali kosakola kozanga kotika
1 Wana bato bazali kokóma mikóló, bazali kokanisa mingi mikolo oyo bakosila sanza (retraite) mpe bakosepela na bomoi ezangi mitungisi na bambula ya nsuka ya bomoi na bango. Na ntembe te bazali kokanisa ete basali mingi mpenza mpe babongi sikawa kozwa mwa bopemi; longolá bobele soki balingi ete básepela na mikolo ya bomoi na bango oyo etikali.—Luka 12:19.
2 Biso baoyo tomipesi na Yehova mpo na kosalela ye tozali komona makambo na lolenge mosusu. Toyebi ete na mosala ya Nzambe basilaka sanza te. Kasi tozali kotalela bomoi na makanisi mabongi, mpo ete tozali kobatela “bomoi ya seko” lokola eloko oyo totyeli motema. (Yuda 21) Bambula oyo elekisami mpo na kozwa boyebi mpe makoki ezali kokólisa bososoli mpe mayele ya moto, mpe yango ekoki kosala ete moto azala mpenza na bwanya mpe na bokatikati, akóma na makoki ya kopesa motuya mingi na bomoi. Bizaleli nyonso wana ezali na ntina mingi mpo na ministre ya nsango malamu.
3 Kokóma mokóló ezali bobele likambo ya nzoto te. Makanisi matalelami mpe. Moto oyo alingi kozala na bomoi molai mpe oyo azali kosala makasi mpo na kobatela elimo ya bolenge na lolenge na ye ya kotalela makambo azali kokólisa libaku azali na yango ya kokokisa mokano yango. Baklisto oyo bakómi mibangé bakoki koyeisa bomoi na bango malamu na kokolisáká boyebi na bango ya elimo mpe na koyebisáká yango na bato mosusu.—1 Kol. 9:23.
4 Makambo oyo masalamaki: Ndeko mwasi moko ya mibu 86 alobaki ete: “Ntango nazali kokanisa mbula 60 oyo eleki uta nayebaki solo, elaká ya kolendisa oyo Nzambe apesi biso ezali kosepelisa motema na ngai. Ɛɛ, Yehova azali komonisa bosembo epai na baoyo bazali sembo mpe azali kopesa biso nzela ya kobuka esengo mingi.” (Nz. 18:25) Ndeko mobali moko mobangé atungisamaki mingi na liwa ya mwasi na ye na boye ete kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto na ye ebebaki mpenza. Alobaki ete: “Nzokande, na lisalisi ya ngɔlu ya Yehova, kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto na ngai ekómaki lisusu malamu mpenza mpo na kobanda mosala ya mobongisi-nzela mbula mibale na nsima. Nazali mpenza na botɔ́ndi epai na Yehova, mpo ete kosangana mbala na mbala wana na mosala ya kosakola ezalaki na litomba mingi mpo na nzoto na ngai.”
5 Ezali mpenza malamu komona ebele ya bandeko mibali mpe bandeko basi mibangé kozwa ekateli ya kokoba kosakola, kozanga kotika, engebene kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto na bango mpe makasi na bango! Bokoki na elónga nyonso kozongela maloba oyo: “Ɛ Nzambe, olakisi ngai longwa na bolenge na ngai; kino sasaipi nazali kosakola misala na yo na kokamwa.”—Nz. 71:17.