Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 9/97 lok. 2
  • Makita ya mosala mpo na Sɛtɛmbɛ

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makita ya mosala mpo na Sɛtɛmbɛ
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔ́sɔ ebandi na 1 Sɛtɛmbɛ
  • Pɔ́sɔ ebandi na 8 Sɛtɛmbɛ
  • Pɔ́sɔ ebandi na 15 Sɛtɛmbɛ
  • Pɔ́sɔ ebandi na 22 Sɛtɛmbɛ
  • Pɔ́sɔ ebandi na 29 Sɛtɛmbɛ
Mosala na biso ya Bokonzi—1997
km 9/97 lok. 2

Makita ya mosala mpo na Sɛtɛmbɛ

Pɔ́sɔ ebandi na 1 Sɛtɛmbɛ

Loyembo 16

7 mn: Mayebisi. Mayebisi matali Mosala na biso ya Bokonzi. Lobelá lapólo ya mosala ya lisangá, soki esili kobongisama.

13 mn: “Makita epusaka na misala malamu.” Ekosalama na mituna mpe biyano. Monisá matomba oyo mazwamaka na masoló ya kolendisa oyo masalamaka liboso mpe nsima ya makita.​​​—Talá Mokanda mpo na Eteyelo, lok. 82, par. 17, 18.

25 mn: “Tótya motema epai na Yehova mpo na ‘kokólisa.’ ” Lisukúlu mpe bilakiseli. Lobelá mingi ntina ya kosala bozongeli ya sika epai na bato oyo bandimaki mwa babúku. Bongisá malamu bilakiseli mibale oyo ezali komonisa ndenge ya kobanda boyekoli. Pesá mpe makanisi mazwami kati na siplemá ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Apríli 1997, par. 7-11.

Loyembo 78 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 8 Sɛtɛmbɛ

Loyembo 20

5 mn: Mayebisi. Lapólo ya kɔ́nti.

15 mn: “Baklisto oyo bakómi mibangé bazali kosakola kozanga kotika.” Ekosalama na mituna mpe biyano. Lobelá likambo ya ndeko mwasi moko mobangé oyo azalaki mobongisi-nzela mosungi oyo elobelami na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yulí 1988 lok. 13 (ebimeli ya Lifalansé).

25 mn: “Botongi Bandako ya Bokonzi na États-Unis” mpe “Botongi Bandako ya Bokonzi na mokili mobimba.” Ekosalama na mituna mpe biyano.

Loyembo 71 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 15 Sɛtɛmbɛ

Loyembo 14

10 mn: Mayebisi. Lisoló mokuse ya “Manáka ya liyangani ya mokolo moko ya mbala ekoya.”

10 mn: Mposa ya lisangá.

25 mn: Tósala bozongeli ya sika na kosaleláká mwa búku Ntango moto oyo olingaka akufi. . . Monisá lolenge nini okoki kobimisa motuna mpe kosalela mwa búku yango mpo na koyanola. Na ndakisa, mwa búku yango ezali kopesa biyano na mituna oyo elandi: Elikya ezali mpo na bakufi? (nk. 5, 6) Ezali mabe koyoka mawa? (nk. 8, 9) Lolenge nini okoki kolónga mawa na yo? (lok. 18) Lisungi nini ekoki kopesama? (nk. 20-23) Lolenge nini okoki kosalisa bana ete bákanga ntina ya liwa? (lok. 25) Libɔndisi nini Biblia ezali kopesa? (lok. 27) Lisusu, sololá na basakoli mibale ya makoki mpo na lolenge oyo bazali kosalela mwa búku yango na bozongeli ya sika mpo na koyanola na mituna oyo mitunamaka mbala mingi mpo na liwa. Salá elakiseli moko oyo etali lolenge ya kosalela mwa búku yango na bozongeli ya sika.

Loyembo 94 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 22 Sɛtɛmbɛ

Loyembo 23

10 mn: Mayebisi. Kundwelá ndeko mokomoko ete apesa lapólo na ye ya mosala ya kosakola. Lobelá bibongiseli oyo bikamatami mpo na mosala ya kosakola na nsuka ya pɔ́sɔ.

15 mn: “Bótánga kelasi malamumalamu.” Tata moko azali kotalela lisoló yango elongo na bana na ye, bakisa mpe batoli ebongi oyo epesami na Lamuká! ya 22 Desɛ́mbɛ 1995, nk. 7-11 (ebimeli ya Lifalansé).

20 mn: Tózala na mokano wana tozali kosakola. Nkulutu moko mpe mosaleli na misala moko to mibale bazali kolobela na mokuse nkasa 8-12 ya búku Lisangá. Lobelá mingimingi bantina oyo tosengeli kozala na makanisi mabongi, kokóla ntango nyonso na mosala na biso mpe kosalana ntango nyonso elongo na lisangá ya Yehova.

Loyembo 100 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 29 Sɛtɛmbɛ

Ebongiseli ya lisangá, na kotaláká mposa ya lisangá.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto