Mokanda ya Biblia nimero 62—1 Yoane
Mokomi: Ntoma Yoane
Esika ya bokomi: Efese, to pene na yango
Nsuka ya bokomi: soko 98 T.B.
1. (a) Ezaleli nini elobelami mingi kati na makomi ya Yoane, kasi nini emonisi ete azalaki moto ya kopusama na mayoki mpamba te? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete mikanda na ye misato mikomamaki na ntango ebongi?
YOANE, ntoma molingami ya Yesu Klisto, azalaki kolinga boyengebene mingi. Yango esalisaki ye na kososola na mozindo mpenza makanisi ya Yesu. Na yango, tozali kokamwa te na komona ete motó na likambo kati na makomi na ye ezali bongo bolingo. Nzokande, azalaki te moto oyo atambwisamaki na mayoki mpamba mpo ete Yesu alobi na ntina na ye ete azalaki moko na “Bana na Nkake [Bonelegese].” (Mko. 3:17) Ya solo, ezalaki mpo na kolóngisa solo mpe boyengebene nde Yoane akomaki mikanda na ye misato, mpamba te lipengwi, oyo ntoma Paulo asakolaki ete likobima, likómaki komonana polele. Mikanda nyonso misato ya Yoane miyaki mpenza na ntango ebongi, mpamba te yango epesaki lisungi mpo na kolendisa baklisto ya liboso kati na etumba na bango liboso na masɛnginya na “oyo mabe.”—2 Tes. 2:3, 4; 1 Yoa. 2:13, 14; 5:18, 19.
2. (a) Nini emonisi ete mikanda ya Yoane mikomamaki ntango molai nsima na Matai, Malako, mpe mikanda ya bamisionere? (b) Soki totali malamu, ntango nini mpe epai wapi mikanda yango mikomamaki?
2 Soki totaleli makambo mazali kati na mikanda wana, tokomona ete yango ekomamaki ntango molai mpenza nsima na Baevanzile ya Matai mpe ya Malako—na nsima mpe ya mikanda oyo bamisionere Petelo mpe Paulo bakomaki. Makambo masilaki kobongwana. Lingomba ya Bayuda, oyo lizalaki likámá monene liboso na masangá ya ebandeli, lizali kolobelama lisusu te; mpe ata mokapo moko te ya Makomami ya Liebele motángami. Epai mosusu, Yoane azali kolobela “ngonga ya nsuka” mpe kobima ya “batɛmɛli mingi ya Klisto.” (1 Yoa. 2:18, NW) Azali kosalela liloba “bana na ngai” wana azali kolobela batángi ya mikanda na ye mpe liloba “mobangé” wana azali koloba mpo na ye moko. (1 Yoa. 2:1, 12, 13, 18, 28; 3:7, 18; 4:4; 5:21; 2 Yoa. 1; 3 Yoa. 1) Makambo nyonso wana mazali komonisa ete mikanda na ye misato mikomamaki na dati moko ya mosika mpenza. Lisusu, 1 Yoane 1:3, 4 emonisi lokola ete Evanzile ya Yoane ekomamaki mpe pene na ntango wana. Endimami na bato mingi ete kokomama ya mikanda misato ya Yoane esukaki soko na mobu 98 T.B., mwa moke liboso ya liwa ya ntoma, mpe ete yango misato ekomamaki na zingazinga ya Efese.
3. (a) Nini ezali kondimisa bosolo ya mokanda ya liboso ya Yoane mpe nini emonisi ete azalaki mokomi na yango? (b) Maloba nini mabakisamaki na nsima, kasi nini emonisi ete yango ezalaki maloba ya lokuta?
3 Likambo oyo ete mokomi ya mokanda ya liboso ya Yoane ezalaki mpenza ntoma Yoane limonisami na bokokani makasi oyo ezali kati na mokanda yango mpe Evanzile ya minei, oyo na ntembe te ekomamaki na ye. Na ndakisa, abandi mokanda na ye na komilobeláká ete azali moto oyo amonaki na miso na ye mpenza “Liloba na bomoi . . . , bomoi na seko, oyo ezalaki epai na Tata mpe emonani na biso”; maloba wana makokani mpenza na maloba ya ebandeli ya Evanzile ya Yoane. Bosolo na yango endimisami na Eteni ya Mokanda ya Muratori (Fragment muratorien) mpe na bakomi ya kala lokola Irénéé, Polycarpe, mpe Papias, oyo bazalaki bango nyonso na bomoi na ekeke ya mibale T.B.a Engebene Eusèbe (s. 260-342 T.B.), bosolo ya Mokanda ya Liboso ya Yoane etyamaki ntembe ata moke te.b Nzokande, esengeli koyeba ete mabongoli mosusu ya kala ya Biblia mabakisaki, na mokapo 5, maloba oyo malandi, oyo mazali na nsuka ya vɛrsɛ́ 7 mpe na ebandeli ya vɛrsɛ́ 8, ete: “Kati na likoló, Tata, Liloba, mpe Molimo Mosantu: bango misato bazali moko. Mpe bazali misato oyo bazali kopesa litatoli awa na mabelé.” (King James Version) Kasi maloba wana mazwami ata na maniskri moko te ya kala ya Makomami ya Greke mpe ntembe ezali te ete yango ebakisamaki bobele mpo na kolóngisa liteya ya Bosato. Mabongoli mingi ya mikolo na biso, ezala ya Bakatolike to ya Baprotestá, esili kolongola maloba wana na bavɛrsɛ́ yango.—1 Yoa. 1:1, 2.c
4. Yoane azali koluka kobatela baninga na ye baklisto liboso ya banani, mpe akweisi mateya nini ya lokuta?
4 Yoane azali kokoma mpo na kobatela “Balingami” na ye, “bana” na ye, liboso ya mateya ya lokuta ya “batɛmɛli na Klisto mingi” oyo babimaki kati na bango mpe oyo bazali komeka kopɛngwisa bango longwa na solo. (2:7, 18) Ekoki kozala ete bapengwi yango oyo bazalaki batɛmɛli ya Klisto bapusamaki na filozofi ya Bagreke, sangisá mpe mateya ya ebandeli ya filozofi babéngi gnosticisme, oyo bandimi na yango bazalaki komikumisa ete bazali na boyebi ya sipesiale oyo euti epai na Nzambe mpo na kososola makambo mabombami.d Kokamatáká etɛlɛmɛlo makasi liboso na lipengwi, Yoane alobeli na bolai mpenza makambo misato: lisumu, bolingo, mpe motɛmɛli na Klisto. Maloba na ye ya nguya na ntina na lisumu, mpe na ntina na kosimba makasi mbeka ya Yesu mpo na masumu, emonisi ete batɛmɛli wana ya Klisto bazalaki komikumisa ete bazali bayengebene, kolobáká ete bazalaki na lisumu te mpe na mposa ya mbeka ya lisiko ya Yesu te. “Boyebi” na bango, oyo balingaki te ete moto mosusu akoka kozwa yango, ekómisaki bango mpenza bato na moimi mpe bato bazangi bolingo, ezalela oyo Yoane atɔndɔli wana azali kolendisa bolingo ya solo ya boklisto. Lisusu, emonani ete Yoane azalaki kobundisa mateya na bango ya lokuta na kolimboláká ete Yesu azali Klisto, ete azalaki na bomoi liboso ya kobotama lokola moto, mpe abotamaki na mosuni lokola Mwana ya Nzambe mpo na kopesa lobiko epai na bato oyo bazali na kondima. (1:7-10; 2:1, 2; 4:16-21; 2:22; 1:1, 2; 4:2, 3, 14, 15) Yoane amonisi balakisi yango ya lokuta ete bazali “batɛmɛli na Klisto,” mpe amonisi mitindo ndenge na ndenge tokoki koyeba bana ya Nzambe mpe bana ya Zábolo.—2:18, 22; 4:3.
5. Nini emonisi ete mokanda ya liboso ya Yoane mokomamaki mpo na lisangá mobimba ya boklisto?
5 Lokola mokanda yango motindamaki te na lisangá moko ya sikisiki, boye yango ekomamaki mpenza mpo na libota mobimba ya baklisto. Kozanga ya mbote na ebandeli mpe na nsuka ya mokanda ezali kondimisa likambo yango. Bamoko kútu basili kolobela makomi yango ete mazali mokanda te kasi lisoló moke oyo likomamaki. Kosalelama ya liloba “bino” kati na mokanda mobimba (lolenge yango emonisami na balɛtɛlɛ ya minene kati na Libongoli ya Mokili ya Sika, ebimeli ya Lingelesi) ezali komonisa ete mokomi atindaki maloba na ye epai na etuluku moko ya bato kasi epai na moto moko te.
MAKAMBO MAZALI KATI NA YOANE YA LIBOSO
6. Bokeseni nini Yoane asali kati na baoyo bazali kotambola kati na pole mpe baoyo bazali kati na molili?
6 Bótambolaka kati na pole, kasi na molili te (1:1–2:29). Yoane alobi ete, “Tozali kokoma makambo oyo ete esengo na bino etonda.” Mpo ete “Nzambe azali moi [“pole,” NW],” bobele baoyo ‘bakotambolaka na pole’ nde bazali ‘kosangana elongo na ye’ mpe kati na bango moko. Bato yango bapɛtolami na lisumu na “makila na Yesu, Mwana na ye.” Epai mosusu, baoyo ‘bazali naino kotambola na molili’ mpe bazali komikumisa ete, “tozali na lisumu te,” bazali komikosa bango moko, mpe solo ezali kati na bango te. Soki bayamboli masumu na bango, Nzambe akomimonisa sembo mpe akolimbisa bango.—1:4-8.
7. (a) Lolenge nini moto akoki komonisa ete ayebi Nzambe mpe azali kolinga ye? (b) Lolenge nini tokoki koyeba motɛmɛli na Klisto?
7 Yesu Klisto amonisami ete azali “mbɔndi” mpo na masumu, mpe “Molobeli epai na Tata.” Ye oyo amikumisi ete ayebi Nzambe kasi azali kotosa mibeko na Ye te, azali mobuki na lokuta. Ye oyo alingi ndeko na ye akoumela kati na pole, kasi ye oyo azali koyina ndeko na ye azali kotambola kati na molili. Yoane apesi toli makasi ete tólinga mokili te to biloko bizali kati na mokili te, mpo ete “soko moto nani akolingaka mokili, bolingo na Tata ezali kati na ye te.” Yoane alimboli ete batɛmɛli ya Klisto mingi basili kobima, mpe “babimaki na kati na biso,” mpo ete “bazali bato na biso te.” Motɛmɛli na Klisto ezali ye oyo azali kowangana Yesu ete azali Klisto te. Azali kowangana Tata mpe Mwana. Tiká ete “bana” bábatela oyo bayekolaki longwa na ebandeli na ntina ete ‘báumela kati na Mwana mpe kati na Tata,’ engebene kopakolama bazwaki longwa na ye, oyo ezali solo.—2:1, 2, 15, 18, 19, 24.
8. (a) Nini ezali kokesenisa bana ya Nzambe mpe bana ya Zábolo? (b) Ndenge nini “bana” basili koyeba bolingo, mpe botaleli nini basengeli kosala ntango nyonso mpo na mitema na bango?
8 Bana ya Nzambe bakosalaka masumu te (3:1-24). Na ntina na bolingo ya Tata, babéngami “bana na Nzambe,” mpe na komonana ya Nzambe basengeli kokóma lokola ye mpe ‘komona ye lolenge azali.’ Lisumu ezali bobuki mibeko, mpe baoyo bazali koumela kati na Klisto bakosalaka masumu te. Ye oyo azali kokóba kosala masumu auti na Zábolo, oyo Mwana ya Nzambe akobebisa misala na ye. Bana ya Nzambe mpe bana ya Zábolo bamonisami polele na likambo oyo: Baoyo bauti na Nzambe bazali na bolingo bamoko epai na basusu, kasi baoyo bauti na oyo mabe bazali lokola Kaina, oyo ayinaki mpe abomaki ndeko na ye. Yoane ayebisi “bana” ete basili koyeba bolingo mpo na “ye wana asopaki bomoi na ye” mpo na bango, mpe apesi bango toli ete ‘bákanga te ekuke ya bolingo mozindo’ epai na bandeko na bango. Tiká ete ‘bálingana na bolingo na maloba te soko na monɔkɔ te kasi na bolingo na misala mpe na solo.’ Mpo na koyeba soki bazali “bato na solo,” basengeli kotalatala oyo ezali kati na mitema na bango mpe komona soki bazali kosala “makambo [oyo] mazali malamu na miso na [Nzambe].” Basengeli kotosa mibeko na ye mpo na ‘kozala na kondima kati na nkombo ya Mwana na ye Yesu Klisto mpe kolingana bamoko na bamosusu.’ Boye, bakoyeba ete bazali koumela na bomoko kati na ye, mpe ye kati na bango na elimo.—3:1, 2, 16-19, 22, 23.
9. (a) Botaleli nini esengeli kosalema na ntina na maloba mapemami? (b) Nini ezali komonisa makasi lisɛngami ya kolingana bamoko na bamosusu?
9 Bólingana bamoko na bamosusu kati na bomoko elongo na Nzambe (4:1–5:21). Maloba mapemami masengeli kotalelama malamumalamu. Maloba oyo mazali kowangana likambo oyo ete Yesu ayaki na mosuni ‘mauti na Nzambe te’ kasi mauti na motɛmɛli na Klisto. Yango euti na mokili mpe eyokani na mokili, kasi liloba ya solo, oyo lipemami, liuti na Nzambe. Yoane alobi ete: “Nzambe azali bolingo,” mpe “bolingo ezali boye te ete biso tolingaki Nzambe, kasi ezali boye ete ye alingaki biso mpe atindaki Mwana na ye lokola mbɔndi mpo na masumu na biso.” Na yango, lisɛngami ya kolingana bamoko na bamosusu ezali monene mpenza! Nzambe akoumela kati na baoyo bazali na bolingo mpo na basusu, mpe bolingo eyeisami ya kokoka ete ‘bázala na bonsomi ya maloba,’ kobwakáká bobángi nyonso libándá. Yoane alobi ete, “biso tokolingaka mpo ete ye alingaki biso liboso.” “Ye oyo akolingaka Nzambe alinga mpe ndeko na ye lokola.”—4:3, 8, 10, 17, 19, 21.
10. (a) Lolenge nini bana ya Nzambe bakoki kolónga mokili, mpe bazali na endimiseli nini? (b) Ezaleli nini basengeli kozala na yango liboso na lisumu mpe losambo ya bikeko?
10 Komonisa bolingo lokola bana ya Nzambe elimboli kotosa mibeko na ye, mpe yango ekosala ete tólónga mokili, na nzela ya kondima. Mpo na baoyo bazali komonisa kondima kati na Mwana ya Nzambe, Nzambe apesi litatoli ete Ye apesi bango “bomoi na seko mpe bomoi oyo ezali kati na Mwana na ye.” Boye, bakoki kondimisama ete akoyoka malɔmbɔ nyonso bakosala na boyokani na mokano na ye. Ezaleli nyonso ya kozanga boyengebene ezali lisumu, nzokande ezali na lisumu oyo likomemaka na kufa te. Moto nyonso oyo abotami na Nzambe akokómisaka masumu momeseno te. Atako “mokili mobimba ezali kolala na kati na oyo mabe . . . , Mwana na Nzambe asili koya,” mpe asili kopesa na bayekoli na ye “mayele” mpo na kozwa boyebi ya Nzambe ya solo, ye Nzambe oyo bazali na bomoko elongo na ye sikawa “kati na Mwana na ye Yesu Klisto.” Basengeli mpe komibatela na ntina na bikeko!—5:11, 19, 20.
LITOMBA NA YANGO
11. Lolenge nini baklisto bakoki lelo kobundisa batɛmɛli ya Klisto mpe mposa ya mokili?
11 Bobele lokola ezalaki na bambula ya nsuka ya ekeke ya liboso na Ntango na Biso, lelo oyo ezali na “batɛmɛli na Klisto mingi” oyo baklisto ya solo basengeli kokebisama na ntina na bango. Baklisto yango ya solo basengeli kosimba makasi ‘nsango oyo bayokaki longwa na ebandeli, kolingana bamoko na bamosusu,’ mpe koumela kati na bomoko elongo na Nzambe mpe kati na mateya ya solo, kosaleláká boyengebene na bonsomi ya maloba. (2:18; 3:11; 2:27-29) Eloko mosusu ya ntina mingi ezali likebisi na ntina na “mposa mabe na nzoto mpe mposa mabe na miso mpe nzombo na bizaleli,” makambo mabe wana ya mokili mpe ya mposa ya bozwi masili kozindisa mingi kati na baoyo bazalaki komibénga baklisto. Nzokande, baklisto ya solo basengeli koboya mokili mpe mposa na yango, koyebáká ete “ye oyo akosalaka mokano na Nzambe akoumelaka seko.” Ya solo, kati na ekeke oyo ya mposa ya mokili, ya mikabwano, mpe ya koyinana, koyekola mokano ya Nzambe na nzela ya Makomami mapemami mpe kosalela yango ezali mpenza kopesa litomba!—2:15-17.
12. Makeseni nini Mokanda ya Liboso ya Yoane esali mpo na litomba na biso, mpe ndenge nini tokoki kolónga mokili?
12 Ezali mpo na litomba na biso nde mokanda ya liboso ya Yoane momonisi polele bokeseni oyo ezali kati na pole euti na Tata, mpe molili mouti na oyo mabe, molili oyo ezali kobulunganisa solo, bokeseni kati na mateya ya Nzambe oyo mazali kopesa bomoi mpe mateya ya lokuta ya motɛmɛli ya Klisto oyo mazali koyokisa mawa, bokeseni kati na bolingo oyo ezali komonana kati na lisangá mobimba ya baoyo bazali kati na Tata elongo na Mwana mpe koyina oyo ezali kopusa na koboma lokola Kaina, oyo ezali kati na baoyo “babimaki na kati na biso . . . ete bámonana ete nyonso bazali bato na biso te.” (2:19; 1:5-7; 2:8-11, 22-25; 3:23, 24, 11, 12) Lokola tozwi bososoli oyo, tosengeli kozala na mposa makasi ya ‘kolónga mokili.’ Kasi lolenge nini tokoki kosala yango? Na kokólisáká kondima makasi mpe na kozaláká na “bolingo na Nzambe,” oyo elimboli kotosa mibeko na ye.—5:3, 4.
13. (a) Lolenge nini bolingo ya Nzambe emonisami polele ete ezali nguya ebongi? (b) Bolingo ya boklisto esengeli kozala ya lolenge nini, mpe ekobimisa bomoko nini?
13 “Bolingo na Nzambe”—oyo ezali nguya makasi mpenza, elobelami polele kati na mokanda oyo mobimba! Kati na mokapo 2, tozali kokuta bokeseni monene oyo esalemi kati na bolingo ya mokili mpe bolingo ya Tata. Mwa mosika, mokanda yango mokundweli biso ete “Nzambe azali bolingo.” (4:8, 16) Mpe yango ezali mpenza bolingo oyo ebongi! Yango emonisami na monene mpenza kati na likambo oyo ete Tata atindaki “Mwana [na ye] lokola Mobikisi na mokili.” (4:14) Yango esengeli kokólisa bolingo ya botɔ́ndi, bolingo ezangi kobangabanga kati na mitema na biso, na boyokani na maloba ya ntoma oyo malandi: “Biso tokolingaka mpo ete ye alingaki biso liboso.” (4:19) Bolingo na biso esengeli kozala lolenge moko na oyo ya Tata mpe oyo ya Mwana—bolingo ya solosolo mpe ya komipesa mpo na basusu. Lokola Yesu asopaki bomoi na ye mpo na biso, bobele bongo “ekoki mpe na biso ete tósopa bomoi na biso mpo na bandeko,” ɛɛ, tófungola ekuke ya bolingo mozindo na ntina ete tólinga bandeko na biso, na bolingo ya maloba mpamba te, kasi “na misala mpe na solo.” (3:16-18) Lokola mokanda ya Yoane emonisi yango polele, ezali bolingo yango nde, ntango esangani na boyebi ya solosolo ya Nzambe, ezali kokangisa baoyo bazali kokóba kotambola elongo na Nzambe, kati na bomoko elongo na Tata mpe Mwana, bomoko oyo ekoki kobebisama te. (2:5, 6) Ezali epai na basangoli na Bokonzi kati na ekanganelo yango ya bolingo nde Yoane azali koloba ete: “Tozali mpe kati na Oyo na solo [na nzela] na Mwana na ye Yesu Klisto. Ye wana Nzambe na solo mpe Bomoi na seko.”—5:20.
[Maloba na nse ya lokasa]
a The International Standard Bible Encyclopedia, Vol. 2, 1982, ebimisami na G. W. Bromiley, nkasa 1095-1096.
b The Ecclesiastical History, III, XXIV, 17.
c Búku Insight on the Scriptures, Vol. 2, lokasa 1019.
d New Bible Dictionary, ebimeli ya mibale, 1986, ebimisami na J. D. Douglas, nkasa 426, 604.