Lolenge nini tomiyokaka soki bato batali nsango na biso mpamba?
1 Botali mpamba (indifférence) ezali ezaleli ya moto oyo azali komonisa mayoki te mpo na likambo moko, oyo motema ezali kopasuka te mpo na likambo moko, oyo azali komonisa bosepeli te mpe ata komibanzabanza te. Yango ezali moko na bizaleli oyo tokutanaka na yango mingi mpe oyo ezalaka mpasi mingi koleka mpo na kolónga kati na mosala na biso ya kosakola. Lolenge nini tomiyokaka soki bato batali nsango na biso mpamba? Tolɛmbisaka nde mosala na biso mpo na yango? Lolenge nini tokoki kolónga ezaleli ya bato oyo batalaka nsango na biso mpamba mpo ete tóyebisa bango nsango ya Bokonzi?
2 Libosoliboso, tóluka koyeba ntina oyo bato ya teritware na biso bazali kotala nsango na biso mpamba. Ezali mpo ete bazali kotya lisusu elikya te na bakonzi ya politiki mpe ya mangomba? Bamonaka ete bazali ata na mwango moko te mpo na kolónga mikakatano na bango? Bazali kotya ntembe na bilaka bitali bomoi malamu koleka na mikolo mizali koya? Baboyaka kolekisa ntango na bango na makambo ya Nzambe, lobá soki bakokaki komona matomba na yango na mbala moko?
3 Tómonisa ntina ya elikya ya Bokonzi: Ezali na mokakatano moko te oyo Bokonzi ya Nzambe ekozanga kosilisa yango. Na bongo, soki likoki ezali, tosengeli kolobela bilaka ya Bokonzi na kotaleláká makambo ya ntina oyo Biblia elobi mpo na yango, ata soki likoki ezali te mpo na kotánga mokapo ya Biblia. (Ebe. 4:12) Na yango, lolenge nini tokoki komema lisoló kino na esika wana?
4 Esengeli ete bato báyeba ntina oyo tokendaka epai na bango. Esengeli bákanga ntina ete ezali bolingo mpe komibanzabanza mpo na bazalani na biso nde ezali kopusa biso mpo ete tokendeke kotala bango. Tokoki kotuna bango motuna moko ya ntina lokola: “Mpo na yo, mwango nini ekoki kosukisa mokakatano [lobelá mokakatano moko oyo etali kartyé na bino]?” Soki tozwi litomba te na maloba oyo tozali kosalela mpo na kokɔta na lisoló, tokoki kosalela maloba mosusu.
5 Na kartyé moko ya bato ya bozwi oyo bazalaki kotala nsango ya Bokonzi mpamba, basakoli basalaki makasi mpo na kozwa maloba ya bokɔti na lisoló oyo makobenda likebi. Mpo na kolakisa búku Boyebi, ndeko mobali moko na mwasi na ye bamekaki lolenge oyo: “Okanisi ete mpo na kozala na bomoi ya malamu lelo, ezali mpenza na ntina ete moto abɔkɔlama malamu mpe atánga kelasi mingi? Ondimi ete kobɔkɔlama oyo esalemi mpenza malamu esangisi mpe boyebi ya Biblia?” Na nsima ya nzanga, batikaki búku Boyebi misato mpe mwasi moko oyo azwaki búku moko, alobaki na nsima ete atángaki búku yango mobimba mpe andimaki boyekoli ya Biblia.
6 Ntango tozali kokutana na bato oyo bazali kotala nsango na biso mpamba, tómeka maloba ndenge na ndenge ya bokɔti na lisoló, tótuna mituna oyo mikoki kopusa bato na kokanisa mpe tótya elikya na nguya ya Liloba ya Nzambe. Ntango mosusu tokozala na likoki ya kosunga bato mosusu ete bándima elikya kitoko ya Bokonzi ya Nzambe.