Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/97 lok. 2
  • Makita ya mosala mpo na Novɛ́mbɛ

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makita ya mosala mpo na Novɛ́mbɛ
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔ́sɔ ebandi na 3 Novɛ́mbɛ
  • Pɔ́sɔ ebandi na 10 Novɛ́mbɛ
  • Pɔ́sɔ ebandi na 17 Novɛ́mbɛ
  • Pɔ́sɔ ebandi na 24 Novɛ́mbɛ
Mosala na biso ya Bokonzi—1997
km 11/97 lok. 2

Makita ya mosala mpo na Novɛ́mbɛ

Pɔ́sɔ ebandi na 3 Novɛ́mbɛ

Loyembo 39

10mn: Mayebisi. Mayebisi matali Mosala na biso ya Bokonzi.

15mn: “Mokolo mosusu bato nyonso bakolingana?” Ekosalema na mituna mpe biyano. Zongelá makambo ya ntina ya Nsango ya Bokonzi No. 35. Lobelá mpenza bantina oyo trakte yango ekozala na litomba mpo na bato ya teritware. Bɛtá nsɛ́tɛ́ likoló na ntina ya kozwa bibongiseli uta sikawa mpo na kosangana mpenza na kokabolama ya Nsango ya Bokonzi mpe kolanda na etingya bosepeli nyonso oyo bato bakomonisa.

20mn: “Tókabola trakte Nsango ya Bokonzi No. 35 mingi.” Lisukúlu ya bokɔti na lisoló ekosalema na mokɛngɛli na mosala ya kosakola. Paragrafe 5-8 ekosalema na mituna mpe biyano. Monisá bibongiseli oyo bizwami mpo ete tóbakisa mosala na biso. Lobelá myango ya kosalela mpo ete teritware mobimba etalelama. Basakoli bakoki kosalela Nsango ya Bokonzi No. 35 mpo na kopesa litatoli na bisika bisi etɛlɛmaka, na bisika ya mombongo, na baparking mpe na bisika mosusu. Pesá makanisi likoló na lolenge ya kosalisa bato ya sika oyo balingi kobanda kosakola. Na bateritware mosusu, ekozala ntango mosusu malamu kosakola moto ye moko mpe kozala na sakosi te mpo na kokabola Nsango ya Bokonzi. Bongisá bilakiseli mibale to misato.

Loyembo 126 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 10 Novɛ́mbɛ

Loyembo 41

12mn: Mayebisi. Lapólo ya kɔ́nti. Bendá likebi likoló na makanisi ya banimero ya sika ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká! oyo ekoki kosalelama mpo na kobanda lisoló. Okundwela bayangani nyonso ete bakolakisa bazulunalo esika moko na Nsango ya Bokonzi No. 35 na wikende. Tosengeli kolandela bosepeli. Sɛngá na bayangani ete bámɛma mwa búku Un livre pour tous (Búku mpo na bato nyonso) na likita ya mosala ya pɔ́sɔ ekolanda.

15mn: Mposa ya lisangá.

18mn: “Lolenge nini tomiyokaka soki bato batali nsango na biso mpamba?” Lisoló kati na bankulutu mibale. Bólobela lisoló lizwami na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (ebimeli ya Lifalansé) ya 1 Novɛ́mbɛ 1974, lok. 669-670, na nsé na motó na likambo moke “ Comment s’attaquer à l’indifférence ” (Lolenge ya kolónga ezaleli ya botali nsango na biso mpamba).

Loyembo 130 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 17 Novɛ́mbɛ

Loyembo 42

15mn: Mayebisi. Tangá baeksperiansi ya Annuaire 1996, na nk. 6-8, na nsé na motó na likambo moke “ Distribution mondiale des Nouvelles du Royaume ”. Lobelá mpenza milende basakoli basalaki na boumeli ya kokabolama ya Nsango ya Bokonzi na mbala eleki. Lendisá mokomoko ete amipesa mobimba mpo na kokabola Nsango ya Bokonzi No. 35.

15mn: Makambo ya ntina ya mwa búku Un livre pour tous (Búku mpo na bato nyonso). Lisoló elongo na bayangani likoló na bantina oyo Biblia esengeli kotalelama. Mwa búku yango ebimisami mpo na kosalisa bato oyo ntango mosusu batángá kelasi mingi, kasi bayebi makambo mingi te na ntina na Biblia. Mwa búku yango ezali koluka kondimisa bango na makasi te ete Biblia epemami na Nzambe; ezali nde komonisa polele basolo ya Biblia. Tosengeli kotánga yango mpe koyebisa yango epai na bato mosusu, mingi mpenza epai na baoyo tozali koyekola Biblia elongo na bango.

15mn: “Tozali Batatoli ya ntango nyonso?” Lisukúlu ekosalema na nkulutu moko.

Loyembo 133 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 24 Novɛ́mbɛ

Loyembo 43

12mn: Mayebisi. Lobelá kino na meko nini basakoli basili kokabola Nsango ya Bokonzi No. 35. Sɛngá na bayangani ete bálobela makambo ya kolendisa oyo bakutanaki na yango. Monisá kino na meko nini teritware esili kotalelama mpe monisá ndambo oyo etikali mpo ete esilisama mobimba, kobanda sikawa kino 14 Desɛ́mbɛ. Ntango tokosilisa kotala teritware mobimba, tokolakisa búku Boyebi kino nsuka ya sanza ya Desɛ́mbɛ. Bɛtá nsɛ́tɛ́ likoló na mokano ya kobanda boyekoli ya Biblia na ntango ya bozongeli ya sika epai na bato oyo basepelaki ntango topesaki bango Nsango ya Bokonzi.

15mn: Lolenge ya kozwa elikya kati na ezalela ya kozanga elikya. Lisukúlu ekosalema na nkulutu moko, ezwami kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Máí 1997, nk. 22-25.

18 mn: Tiká ete moi na bino engɛnga. Lisukúlu mpe lisoló oyo lizwami kati na búku Lisanga na nk. 85-89. Sɛngá na basakoli oyo osili kopona liboso ete bábongisa bakomantere na mituna oyo milandi: (1) Mpo na nini Batatoli ya Yehova basakolaka ndako na ndako? (2) Na meko nini mwango yango esalelamaki na ekeke ya liboso? (3) Mpo na nini ezali mpenza ntina lelo kokóba kosakola ndako na ndako? (4) Nini ezali kosala ete kosangana mbala na mbala na mosala ya kosakola ekóma mpasi lelo? (5) Lisungi nini tozali na yango mposa mpo na kolendendela? (6) Na makambo nini tokozwa mapamboli soki tongɛngisi pole na biso? (7) Nini tokoki kosala mpo na kokóma na molende mingi lisusu mpo na kokutana na bato? Monisá yango na kosɛngáká na basakoli misato to minei ete báyebisa makambo makoki kolendisa oyo bakutanaki na yango na kosakoláká na bamagazini mpe na balabála.

Loyembo 136 mpe libondeli ya nsuka.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto