Tozali batatoli ya ntango nyonso?
1 Tokoki koyanola ɛɛ na motuna yango? Ya solo, basaleli nyonso ya Yehova oyo bamipesi bakoki kosala mosala ya ntango nyonso te, kasi ebongi ete mokomoko kati na biso amitalela ete azali Motatoli ya ntango nyonso, boye te? Ezali mpenza bongo.
2 Moto azalaka moklisto mpo na mwa ntango te. Yesu alobaki na ntina na Tata na ye ete: “Ntango nyonso, ngai nakosalaka makambo makosepelisa ye.” (Yoa. 8:29) Ntoma Paulo, oyo azalaki na makanisi lolenge moko, alendisaki biso ete ‘tósalaka nyonso mpo na lokumu ya Nzambe.’ (1 Kol. 10:31) Mokomoko kati na biso asengeli bongo komitalela ete azali Motatoli ya Yehova mpo na ntango nyonso. Yango ekozala na bopusi malamu kati na misala nyonso oyo tozali kosala.
3 Tótalela misala na biso: Elateli na biso, maloba na biso mpe etamboli na biso ekoki komonisa na basusu ete tozali Batatoli ya Yehova. Tozali kososola ntina ya kozala na elateli ya bokatikati, na maloba ya pɛto mpe na etamboli malamu ntango tozali kosakola to ntango tozali koyangana na makita ya boklisto. Na yango, ezala na eteyelo, na esika ya mosala to na ntango ya kominanola, tosengeli komonisa ete tozali kotosa malako ya sembo ya Yehova na makambo nyonso kati na bomoi na biso.
4 Yesu alobaki ete: “Mboka etongami likoló na ngomba eyebi kobombama te . . . Tiká ete moi na bino engɛnga liboso na bato ete bámona misala na bino malamu mpe ete bákumisa Tata na bino oyo azali na Likoló.” (Mat. 5:14-16) Yango esengeli komonana na makambo nyonso oyo tozali kosala, mpe na ntango nyonso. Soki na mbala moko tokómi komona ete tokokoka te kopesa litatoli mpo na esika oyo tozwami to mpo na mosala oyo tozali kosala, tosengeli komituna: ‘Nazali nde kosalela Yehova ntango nyonso to bobele mpo na mwa ntango?’ Tiká tómiyoka ete topekisami te mpo na kolekisa libaku oyo tokokaki kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe epai na basusu!
5 Tómikundola ete tokokumisa Yehova mpe tokosepelisa ye soki mokomoko kati na biso ayanoli ɛɛ kozanga kokakatana na motuna oyo: “Ozali Motatoli ya ntango nyonso?”