Liteya 5
Mokano ya Nzambe mpo na mabelé ezali nini?
Mpo na nini Yehova azalisaki mabelé? (1, 2)
Mpo na nini lelo oyo mabelé mazali paladiso te? (3)
Nini ekokómela bato mabe? (4)
Na mikolo mizali koya, Yesu akosala nini mpo na bato na maladi? mpo na mibangé? mpo na bakufi? (5, 6)
Mpo na kozwa mapamboli wana na mikolo mizali koya, osengeli kosala nini? (7)
1. Yehova azalisaki mabelé mpo ete bato bákoka kosepela na bomoi likoló na yango libela na libela. Alingaki ete mabelé máfandama seko na bayengebene, bato na esengo. (Nzembo 115:16; Yisaya 45:18) Mabelé makobomama soko moke te; yango ekotikala libela na libela.—Nzembo 104:5; Mosakoli 1:4.
2. Liboso ete Nzambe asala moto, Ye aponaki mwa esika moke na mabelé mpe akónisaki wana paladiso moko kitoko. Abéngaki yango elanga ya Edene. Ezali kati na yango nde atyaki mobali mpe mwasi ya liboso, Adama mpe Eva. Mokano ya Nzambe mpo na bango ezalaki ete bábota mpe bátondisa mabelé mobimba. Mokemoke, mbɛlɛ bakokaki kokómisa mabelé mobimba paladiso.—Genese 1:28; 2:8, 15.
3. Adama mpe Eva basalaki lisumu na kobukáká na nkó nyonso mobeko ya Nzambe. Na yango, Yehova abimisaki bango na elanga ya Edene. Paladiso ebungaki. (Genese 3:1-6, 23) Kasi Yehova abosanaki te mokano na ye mpo na mabelé. Alaki ete akobongola yango paladiso, epai bato bakofanda libela na libela. Ndenge nini akosala yango?—Nzembo 37:29.
4. Liboso ete mabelé oyo mákoka kokóma paladiso, bato mabe basengeli kolongolama. (Nzembo 37:38) Yango ekosalema na Armagedon, oyo ezali etumba ya Nzambe mpo na kosukisa mabe. Na nsima, Satana akokangama na bolɔ́kɔ na boumeli ya mbula 1 000. Yango emonisi ete bato mabe bakozala lisusu te mpo na kobebisa mabelé. Bobele libota ya Nzambe nde likotikala.—Emoniseli 16:14, 16; 20:1-3.
5. Na nsima Yesu Klisto akoyangela lokola Mokonzi likoló na mabelé mpo na mbula 1 000. (Emoniseli 20:6) Akolongola mokemoke lisumu longwa na makanisi mpe na nzoto na biso. Tokokóma bato ya kokoka ndenge Adama mpe Eva bazalaki liboso ete básala lisumu. Na yango, bokɔnɔ, bobangé, mpe kufa ekozala lisusu te. Bato ya maladi bakobikisama, mpe mibangé bakozonga lisusu bilenge.—Yobo 33:25; Yisaya 33:24; Emoniseli 21:3, 4.
6. Na boumeli ya Mbula Nkóto ya Boyangeli ya Yesu, bato na sembo bakosala mosala mpo na kobongola mabelé ete mákóma paladiso. (Luka 23:43) Lisusu, bamilió ya bato oyo bakufá bakosekwa mpo na kozala na bomoi awa na mabelé. (Misala 24:15) Soki basali makambo oyo Nzambe azali kosɛnga na bango, bakokóba kozala na bomoi libela na libela awa na mabelé. Soki basali bongo te, bakobomama libela na libela.—Yoane 5:28, 29; Emoniseli 20:11-15.
7. Na yango, mokano Nzambe azalaki na yango uta na ebandeli mpo na mabelé mokokokisama. Yo mpe olingi kozwa mapamboli wana na mikolo mizali koya? Soki ezali bongo, osengeli kolanda koyekola makambo na ntina na Yehova mpe kotosa masɛngami na ye. Koyangana na makita na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova, oyo ezwami na esika ofandi, ekosalisa yo na kosala bongo.—Yisaya 11:9; Baebele 10:24, 25.
[Elilingi na lokasa 10]
Paladiso oyo ebungaki
[Bililingi na lokasa 11]
Nsima ya Armagedon, mabelé makokóma paladiso