Tósakola epai na bato ya nkota nyonso mpe ya mangomba nyonso
1 Na ekeke ya liboso, baklisto bapesaki litatoli na molende epai na bato oyo bazalaki koloba nkota mosusu mpe bazalaki na lingomba oyo likeseneki na lingomba na bango. Litomba nini baklisto yango bazwaki? Engebene buku Histoire du Moyen Âge (na Lingelesi), tozali kotánga boye: “Na mobu 100, bituluku ya baklisto bipalanganaki kati na etúká mokomoko oyo ezalaki pembenipembeni ya Mai na Méditerranée.”
2 Na bateritware na biso, na ntina na koyikana ya bato bakimá mboka mpe ya banamboka oyo bazali kouta na bamboka mike, bingumba mosusu bitondi sikawa na ebele na bapaya. Ntango mosusu, na ntina na bokeseni ya nkota mpe ya mangomba, ekoki kozala mpenza mpasi mpo na koyeba lolenge ya kosolola na bato yango mpe lolenge ya kopesa bango litatoli ntango tozali kokutana na bango. Ntango mosusu ezali na bisika oyo bapaya bafandaka kati na kartye na biso. Lolenge nini tokoki kotosa etinda ya Yesu ‘ya kosakola na bozindo epai na bato’ mpe epai na bato ya nkota nyonso mpe ya mangomba nyonso?—Mis. 10:42.
Lolenge ya kopesa litatoli epai na bato oyo balobaka lokota mosusu
3 Atako ezalaka mpasi mpo na kokutana na bato oyo balobaka te lokota ya esika bafandi kati na mboka mike, kasi na bingumba minene okoki kokutana na bato yango. Ekozala malamu ete tóyeba lolenge ya kobanda lisolo elongo na bango. Na bongo, tózwa liteya na makambo oyo bandeko na biso bakutanaki na yango na bikólo mosusu mpo na koyeba lolenge ya kobanda lisolo elongo na bato ya lolenge nyonso.
4 Tólonga mokakatano ya lokota: Ntembe ezali soko moke te ete bato mingi basimbaka malamumalamu mateya oyo bateyi bango na lokota na bango ya kobotama. Bandeko mingi basili koyekola lokota moko ya bopaya “mpo na nsango malamu” mpe mpo na ‘kokóma basangani na yango elongo na basusu.’ (1 Kol. 9:23) Na boumeli ya bambula, ndeko mwasi moko oyo alobaka Lingelesi azalaki komema bazulunalo mbala na mbala epai na mwasi moko moto ya ekólo Chine. Kasi mwasi yango azalaki koboya koyekola Biblia, kino mokolo ndeko mwasi mosusu oyo azalaki koyekola lokota ya Chinois alakisaki ye buku moko na lokota yango. Mwasi wana andimaki buku yango mpe boyekoli ya Biblia ebandaki na mbala moko. Milende oyo ndeko mwasi ya mibale asalaki mpo na kobimisa mwa maloba na lokota ya Chinois eyaki kobongola makambo.—Talá Misala 22:2.
5 Maloba oyo malandi mabimisamaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛ́mbɛ 1992 mabongi mpenza: “Koyekola lokotá mosusu ekokólisa te bobele makoki ya kokanisa ya bilenge, kasi ekoyeisa bango lisusu bato oyo lisangá ya Jéhovah lizali na mposa na bango.” Bamoko kati na bandeko basangani ya Betele bamipesi na koyekola lokota mosusu, mpe yango epesi bango libaku ya kokende kosalisa masangá oyo mazalaki mpenzampenza na mposa na litambwisi na bango. Soki oyebi koloba lokota moko oyo ezali kolobama te na esika oyo ozali, to soki olingi koyekola lokota mosusu, okoki mpe kosunga lisangá moko to etuluku moko oyo ezali koloba lokota yango.—Mat. 9:37, 38.
6 Soki toyebi koloba bobele lokota na biso ya kobotama, tokoki kokólisa mosala na biso ya kosakola na koyekoláká Lifalansé, lokota ya Letá na ekólo na biso, boye te? Na bongo, tokokoka kosolola na bato mingi koleka. Lingelesi ezali lokota oyo ezali kolobama na bikólo mingi ya Afrika. Lokota yango ezali kutu na manáka ya biteyelo lelo oyo. Lolenge moko esengelaka koyeba lokota yango mpo na kozwa mosala na bakompanyi mosusu, lolenge moko lokota yango ekoki kopesa biso likoki ya kokólisa mosala na biso ya Nzambe soki toyekoli yango. Ezali mpe bongo soki toyekoli nkota mosusu oyo ilobamaka na bato mingi na Afrika lokola Lingala, Swahili to Kirundi.
7 Na etúká ya Californie na États-Unis, ndeko mwasi moko mobongisi-nzela akutanaki na bato mingi oyo bakufá matoi. Azalaki kobondela Yehova ete alakisa ye moto moko oyo akoki koteya ye elobeli ya bilembo, mpo ete azala na likoki ya koteya bato oyo bakufá matoi solo. Mokolo moko, ntango azalaki kosomba biloko na zando moko ya monene, mwasi moko oyo azalaki elenge, oyo akufa matoi, atunaki ye soki akoki kosalisa ye mpo na kozwa eloko moko oyo ye alingaki kosomba. Akomaki maloba na ye na lokasa. Nsima ya komona eloko oyo mwasi yango azalaki koluka, ndeko mwasi mobongisi-nzela akomaki mpe na lokasa mpo na koyebisa ye ete alingi koyekola elobeli ya bilembo mpo na kosunga bato oyo bakufá matoi na esika oyo ye afandi. Mwasi yango azongisaki, bobele na kokomáká na lokasa, ete: “Mpo na nini olingi kosunga bato oyo bakufá matoi?” Ndeko mwasi azongiselaki ye eyano ete: “Nazali Motatoli ya Yehova mpe nalingi kosunga bango mpo ete báyeba Biblia. Nakosepela koyekola Biblia elongo na yo soki oteyi ngai elobeli na bino.” Ndeko mwasi alobi: “Okoki koyeba te esengo oyo nazalaki na yango ntango mwasi yango andimaki boyekoli.” Na boumeli ya sanza moko na pɔsɔ mibale, ndeko mwasi azalaki kokende mpokwa nyonso epai na mwasi yango. Ayekolaki elobeli ya bilembo mpe ateyaki mwasi yango solo, mpe mwasi oyo azwaki batisimo! Likambo yango esalemi esili koleka lelo mbula 30, kasi ndeko na biso ya mwasi mobongisi-nzela azali kokóba kosakola epai na bato oyo bakufá matoi mpe azali sikawa koyangana na lisangá moko oyo balobaka elobeli ya bilembo.
8 Soki olobaka malamumalamu lokota moko oyo ezali kolobama na etúká mosusu ya ekólo na yo to na ekólo mosusu mpe ete ozali na mposa mpe na likoki ya kokende epai kuna mposa ezali mingi mpo na likambo yango, mpo na nini okoki kosolola elongo na bankulutu ya lisangá na yo te? Soki bamoni ete okokisi masɛngami mpo na likambo yango, bakoloba na yo osɛnga na mokɛngɛli ya zongazonga soki teritware moko ya pembeni ezali epai kuna okoki kopesa lisungi. Soki teritware yango ezali te, okoki kotinda nkomá na la Société, elongo na nkomá ya bankulutu ya lisangá, oyo kati na yango, bakoyebisa makanisi na bango na oyo etali bizaleli na yo mpe makoki na yo ya koloba lokota yango.—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augústo 1988 (ebimeli ya Lifalansé), nkasa 21 kino 23.
9 Tósalela bisaleli oyo bipesameli biso: Mikanda na biso mikomami na nkota mingi ya bapaya. Ezali malamu ete tózalaka na batrakte to na mwa buku Azali kosɛnga na nkota oyo balobaka kati na teritware na biso, ata soki makita ya lisangá esalemaka te na nkota yango. Soki tomoni ete Lingala ezali lokota ya moto yango te, tótuna ye nkota nini atángaka. Yango ekoki kopesa ye likoki ya kopona mikanda oyo ye akoki kosepela kozwa. Na ndakisa, moto oyo alobaka Kirundi akoki ntango mosusu kotánga Swahili.
10 Ata soki tokoki koloba lokota ya moto moko oyo tokutani na ye na mosala ya kosakola te, kasi tokoki koyebisa ye nsango malamu. Na lolenge nini? Na kosaleláká mwa buku Une bonne nouvelle pour toutes les nations (Nsango malamu mpo na mabota nyonso). Yango ezali na nsango mokuse oyo ekomami na nkota 59. Lokola malako ya lokasa 2 ezali komonisa yango, nsima ya koyeba lokota ya molobani na biso, tokolakisa ye lokasa epai kuna litatoli ekomami na lokota yango kati na mwa buku mpe tokosɛnga ye ete atánga. Na nsima, tólakisa ye mokanda moko na lokota na ye. Soki tozali na yango te, tólakisa ye mokanda moko na Lifalansé. Tóyebisa ye ete tokosala makasi tómemela ye mokanda moko oyo mokomami na lokota na ye. Tótuna ye nkombo na ye, adresi na ye mpe tóbatela yango. Tokoki koyebisa lisangá moko to na etuluku moko ya pembeni oyo ezali koloba lokota yango, na kosaleláká formilɛrɛ “Intérêt à suivre dans une langue étrangère.” (S-70a) Mpo na koyeba malamu lolenge ya kokómisa liyebisi yango epai na bato oyo bakoki kozala na mposa na yango, talá Mosala na biso ya Bokonzi ya Apríli 1994, na lokasa 2. Soki moto oyo alobaka lokota yango azali te mpo na kotala moto yango, tokoki kondima mokumba yango, na koyekoláká na moto yango na lisalisi ya mokanda ya Lifalansé.—1 Kol. 9:19-23.
Lolenge ya kopesa litatoli na bato oyo bazali na mangomba ya boklisto te
11 Koyeba bindimeli ya mangomba oyo bato bakóli kati na yango ekoki kopesa biso nzela ya kopesa litatoli ya nguya na ntina na Bokonzi ya Nzambe. Na elobeli ya polele mpe ya mokuse, buku L’humanité à la recherche de Dieu ezali komonisa biso mangomba ya mineneminene kati na mokili, kopesáká biso boyebi oyo ekoki mpo na bindimeli ya bato mpe kosunga bango mpo ete báyeba solo.
12 Etanda oyo ezwami na lokasa ya nsuka ya siplemá oyo ezongeli nkombo ya mikanda oyo lisangá ya Yehova ebimisi mpo na kosakola epai na bato oyo bazali na mangomba ya boklisto te. Soki totángi mikanda yango, tokoyeba lolenge ya koyebisa bato yango nsango malamu. Tóbosana buku Comment raisonner te mpo ete yango ezali esaleli ya ntina mpenza. Na nkasa 21 kino 24 ya buku yango, makanisi ya ntina mapesami mpo na koyeba lolenge ya kosolola na Babudiste, na Bayuda mpe na Bamizilma.
13 Tókeba na maloba na biso: Tókanisa te ete basangani ya lingomba moko bazalaka bango nyonso na bindimeli motindo moko mpamba te moto na moto akoki kozala na bindimeli na ye mpenza oyo bikeseni na oyo ya baninga na ye bandimi. Kasi nde tokosala milende mpo na koyeba lolenge moto oyo tozali kosolola na ye akanisaka. (Mis. 10:24-35) Kobanda bomwana na ye, bateyaki Salimoon ete Coran ezali Liloba ya Nzambe. Nzokande, ezalaki mpasi mpo na ye kondima liteya ya Bamizilma oyo elobi ete mawa ya Nzambe ezali na nsuka te kasi azali konyokola bato na mɔ́tɔ ya lifelo. Mokolo moko, Batatoli ya Yehova babyangaki ye na likita moko. Asosolaki ete makambo oyo ye ayokaki ezalaki solo, mpe sikawa azali na esengo ya kozala nkulutu kati na lisangá.
14 Ntango tozali kosolola na bato oyo bazali na bindimeli ya boklisto te, tosengeli kokeba ete maloba na biso mpo na kobanda lisolo mapekisa bango te koyoka nsango malamu. (Mis. 24:16) Bandimi ya mangomba mosusu bazalaka na bokɛngi mpenza liboso na bato oyo bazali na maloba ya koluka kopɛngola bango na lingomba na bango. Tósala makasi mpo na koluka masolo oyo tokosolola malamu elongo na bango na mokano ete bábendama na mateya ya solo ya Biblia. Bato oyo bakokani na bampate bakosepela na maloba mpo na kobanda lisolo oyo matondi na boboto mpe mazali kolobela solo polele.
15 Ezali mpe na ntina ete tóponaka maloba oyo tokosalela, noki tokokimisa bato mosika na nsango na biso. Na ndakisa, soki tolobi na komindimisa nyonso ete tozali baklisto, molobani na biso akoki kotya biso mbala moko na molɔngɔ́ ya baklisto ya mangomba ya mokili oyo; mpe yango ekoki kopekisa ye ete ayokamela biso. Ntango tozali kosolola na ye, ebongi mpe ete tólobelaka Biblia na ebengeli oyo: “Makomami” to “makomi ya bulɛɛ.”—Mat. 21:42; 2 Tim. 3:15.
16 Soki tozali kosolola na moto oyo azali na lingomba ya boklisto te mpe tomoni ete tokokoka kopesa litatoli na ntango yango te, tósalela libaku yango mpo na koyeba moto yango mwa malamu. Tótikela ye trakte, tópesa ye nkombo na biso mpe tósɛnga nkombo na ye. Mpe nsima ya mokolo moko to mikolo mibale, wana tosili komibongisa malamumalamu, tokoki kosala bozongeli ya sika na mokano ya kopesa litatoli.—1 Tim. 4:16; 2 Tim. 3:17.
17 Kosakola epai na Babudiste: (Talá mokapo 6 ya buku L’humanité à la recherche de Dieu.) Bindimeli ya Babudiste ekeseni mingi kati na mondimi moko na mondimi mosusu. Lingomba ya Bouddha ezali koteya te ete Nzambe Mozalisi azali, kasi ezali kotalela Bouddha Gautama, MoIndien oyo azalaki na bomoi na ekeke ya 6 L.T.B., lokola ndakisa oyo bandimi basengeli komekola. Ntango amonaki, mpo na mbala ya liboso, moto moko oyo azalaki na bokɔnɔ, moto moko oyo azalaki mobange mpe moto moko akufi, Bouddha amitunaki soki bomoi ya moto ezali na ntina nini. Amitunaki ete, ‘Moto abotamaka bobele mpo na komona mpasi, mpo na konuna mpe kokufa?’ Na ntembe te, tokoki kopesa eyano na motuna yango epai na Babudiste oyo bazali na mitema sembo mpe balingi kozwa eyano yango.
18 Soki tozwi libaku ya kosolola na Babudiste, tókangama bobele na nsango ya kolendisa mpe na mateya ya solo oyo mayebisami polele kati na Biblia, buku oyo eleki babuku mosantu nyonso. Lokola bato mingi, Babudiste balingaka mpenza kimya, bizaleli malamu mpe bomoi ya kimya kati na libota, mpe mingimingi basepelaka kosolola likoló na makambo yango. Yango ekoki kopesa biso nzela ya koloba na ntina na Bokonzi [ya Nzambe] lokola mwango ya solo bobele moko mpo na kosilisa bampasi ya mokili.
19 Koleka mbula 10, ndeko mwasi moko mobongisi-nzela na etúká ya Nevada na États-Unis ya Amerika azalaki koteya mateya ya solo ya Biblia epai na bayekoli moko, bato ya ekólo Chine. Mokolo moko, ntango azalaki kosakola na ndako moko oyo ezalaki na biteni ya kolala 8 epai bayekoli Bachinois yango bazalaki kolala, abondelaki Yehova ete asunga ye abanda kotambwisa boyekoli na eteni mokomoko ya bandako yango ya kolala. Na pɔsɔ mibale, ayekolaki na moyekoli moko to koleka na eteni mokomoko ya ndako yango. Ndeko mwasi yango azali kozwa matomba malamu mpo ete na maloba na ye mpo na kobanda lisolo, alobaka ete bayekoli nyonso balukaka likambo moko ya ntina: kimya mpe bolamu. Atunaka mpe bayekoli yango soki bango mpe bamitungisaka mpo na makambo yango. Bapesaka eyano lolenge moko ete ezali mpenza bongo. Na nsima, ndeko mwasi abendaka likebi na bango na mwa buku La paix et le bonheur sans fin : comment les trouver ? (na Lingelesi), oyo ebimisami mpo na Bachinois. Nsima ya koyekola bobele mbala mitano, moyekoli moko alobaki ete nsukansuka azwi solo oyo ye azalaki koluka uta kala.
20 Kosakola epai na Bahindu: (Talá mokapo 5 ya buku L’humanité à la recherche de Dieu.) Lingomba ya Bahindu ezali na mateya ya moboko te. Mateya ya lingomba yango oyo mauti na filozofi mpe ezali mpenza mpasi mpo na koyeba yango. Brahma, nzambe oyo aleki banzambe nyonso ya Bahindu, azali nzambe ya Trinité (Brahma Mozalisi, Vishnu Mobateli, Çiva Mobebisi). Endimeli oyo ete molimo ekufaka te ezali moboko ya liteya libengami réincarnation (kobotama lisusu ya molimo), oyo mpo na yango Bahindu bandimaka ete makambo nyonso masilá kotángama kati na bomoi. (Talá buku Comment raisonner, nkasa 305 kino 309, mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Máí 1997, nkasa 3 kino 8.) Lingomba ya Bahindu ezali kopesa nzela na makambo nyonso mpe ezali kondima ete mangomba nyonso mazali kosuka na solo moko.
21 Mpo na koteya mondimi ya Hindu, ezali malamu koyebisa ye elikya na biso ya kozala na bomoi ya seko kati na ezalela ya kokoka awa na mabelé, mpe lisusu biyano malamu oyo Biblia ezali kopesa na mituna ya ntina oyo bato bazali komituna.
22 Kosakola epai na Bayuda: (Talá mokapo 9 ya buku L’humanité à la recherche de Dieu.) Na bokeseni na mangomba mosusu oyo ezali mangomba ya boklisto te, Lingomba ya Bayuda ezwi moboko kati na Lisolo ya bato, kasi na masapo te. Bolukiluki oyo bato bazali kosala mpo na koyeba Nzambe ya solo esengeli kosalema na nzela ya Makomami mapemami ya Liebele. Nzokande, endimeli ya molimo ekufaka te ezali liteya ya moboko ya Lingomba ya Bayuda na ntango na biso, kasi liteya yango endimami kati na Liloba ya Nzambe te. Okoki kosolola malamu na Moyuda na kobendáká likebi na ye na likambo oyo ete tozali kosambela Nzambe ya Abalayama mpe ete tozali biso nyonso kokutana na mikakatano motindo moko kati na mokili ya lelo oyo.
23 Soki tokutani na Moyuda oyo azali kondima Nzambe te, tokoyeba malamu lolenge ya kosimba motema na ye na kotunáká ye soki azalaki ntango nyonso na endimeli yango liboso. Ntango mosusu azwá naino eyano ya malonga te mpo na ntina oyo Nzambe azali kotika nzela na bampasi. Tokoki kosɛnga na Bayuda ya sembo ete bátalela makambo oyo ezali komonisa Yesu lokola Masiya na lisalisi ya makambo oyo bakomi Bayuda bakomaki kati na Makomami ya Greke, kasi te na lolenge mabe oyo mangomba ya boklisto ya mokili ezali komonisa ye.
24 Kosakola epai na Bamizilma: (Talá mokapo 12 ya buku L’humanité à la recherche de Dieu.) Bamizilma bazali bandimi ya Lingomba ya Islam (to lingomba ya profeta Mahomet), bazali kondima Allah ete azali nzambe bobele moko oyo ayebani, mpe Mahomet (mobu 570 kino 632 T.B.) azali profeta ya nsuka mpe oyo aleki baprofeta nyonso. Lokola bandimaka te ete Nzambe azali na mwana, Bamizilma bamonaka Yesu ete akeseni te na baprofeta mosusu ya Nzambe. Coran, oyo eumeli naino koleka mbula 1 400 te, ezali kolobela Makomami ya Liebele mpe Makomami ya Greke. Lingomba ya Islam mpe Lingomba ya Katolike ezali na mateya mingi oyo makokani mpenza. Mangomba yango mibale mazali koteya ete molimo ekufaka te, ete epongelo ezali mpe ete lifelo ya mɔ́tɔ ezali.
25 Tozali kondima Nzambe moko ya solo mpe tozali kotalela Biblia ete ezali buku oyo epemami na ye; yango ezali likambo oyo likoki kopesa nzela na boyokani. Soki otángi Coran na likebi, okomona ete yango ezali kolobela Torah, Nzembo mpe Baevanzile lokola Liloba ya Nzambe oyo esengeli kondimama mpe kosalelama. Yango ekoki kosala ete tósɛnga na molobani na biso ete tóyekola biteni yango ya Biblia elongo na ye.
26 Maloba oyo malandi mpo na kobanda lisolo makoki kozala na bopusi likoló na moto oyo alobi ete azali Mizilma: “Nasololaka mingi na Bamizilma te, kasi nasili komona mwa mayebisi matali bindimeli na bino na buku oyo. [Tófungola buku Comment raisonner na lokasa 24.] Balobaka ete bondimaka ete Yesu azalaki profeta, kasi Mahomet azalaki profeta ya nsuka mpe ya monene koleka baprofeta nyonso. Bondimaka mpe ete Mose azalaki profeta ya solo? [Tótika moto yango apesa eyano.] Nakoki kolakisa yo oyo Nzambe ayebisaki Mose na ntina na nkombo na ye mpenza?” Mpe tótánga Exode 6:2, 3. Na bozongeli ya sika, tokoki kosolola likoló na motó na likambo moke “Un seul Dieu, une seule religion” oyo ezali na lokasa 13 ya mwa buku Le temps de la vraie soumission à Dieu.
27 Ekoki kosalema ete bokokutana na makambo nyonso wana te kati na teritware na bino. Kasi, mokomoko kati na biso akoki kokólisa mosala na ye na koyekoláká lokota mosusu, longola oyo ye alobaka malamumalamu, to na kokendáká na bolingi na ye moko na teritware mosusu mpo na kopesa lisungi. (Yis. 6:8) Lelo oyo, bato mingi bazali kosala na boyokani na makambo oyo malobami na Yisaya 55:6, epai tozali kotánga ete: “Bóluka [Yehova] naino akoki komonana, bóbyanga ye naino abɛlɛmi penepene.” Yango etaleli bato nyonso ya mitema sembo, ezala bato ya lokota nini to ya lingomba nini. Tokoki komindimisa ete Yehova akopambola milende na biso mpo tókende mpe ‘tózalisa bayekoli bato bauti na mabota nyonso.’—Mat. 28:19.
[Etanda na lokasa 6]
Mikanda mibimisami mpo na bato oyo bazali na mangomba ya Boklisto te
Babudiste
À la recherche d’un père (Mwa buku)
“ Voici, je fais toutes choses nouvelles ” (Mwa buku, na ebimeli ya monene)
Bachinois
La paix et le bonheur sans fin : comment les trouver ? (Mwa buku, na ebimeli ya monene)
Bahindu
De Kurukshetra à Harmaguédon et à votre survie (Mwa buku)
La victoire sur la mort : est-elle à votre portée ? (Mwa buku)
Le chemin de la liberté : la vérité divine (Mwa buku)
Nos problèmes—Qui nous aidera à les résoudre ? (Mwa buku, na ebimeli ya monene)
Pourquoi adorer Dieu en amour et en vérité ? (Mwa buku, na ebimeli ya monene)
Bayuda
Connaîtrons-nous un jour un monde sans guerre ? (Mwa buku, na ebimeli ya monene)
Les Témoins de Jéhovah : Quelles sont leurs croyances ? (Trakte T-18)
Un monde nouveau de paix : Le verrons-nous un jour ? (Trakte T-17)
Bamizilma
Le chemin du Paradis : Comment le trouver ? (Trakte)
Le temps de la vraie soumission à Dieu (Mwa buku)