Tómekola Yehova na komibanzabanzáká mpenza mpo na bazalani na biso
1 Yehova azali ndakisa eleki monene ya moto oyo amibanzabanzaka mpenza mpo na basusu. Lokola azali Mokonzi Aleki likoló na mɔlɔ́ngɔ́ mobimba, ayebi bamposa ya bikelamu na ye bato. (1 Pet. 5:7) Yesu alendisaki bayekoli na ye ete bámonisa bizaleli ya Tata na ye, oyo azali kobimisa moi mpe konɔkisa mbula likoló na bato sembo mpe bato sembo te. (Mat. 5:45) Tokoki komekola Yehova na komonisáká bosepeli ya solosolo epai na bazalani na biso, na komibongisáká mpo na koyebisa nsango ya Bokonzi epai na moto nyonso oyo tokokutana na ye. Soki toyebi malamumalamu mwa babúku oyo tokosalela na mosala ya kosakola na sanza ya Augústo, tokozala mpenza na likoki ya kopesa lisalisi ya elimo epai na bazalani na biso. Malako malandi mazali kopesa biso mwa makanisi na lolenge ya kobongisa lisoló ya liboso mpe kobatela bosepeli na bozongeli ya sika ya malamu.
2 Soki tozali kolakisa mwa búku “Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?” tokoki koloba ete:
◼ “Osilá komituna mpo na nini Nzambe azali kotika nzela na bampasi, soki amibanzabanzaka mpenza mpo na bato? [Tótika ete moto yango ayanola.] Mwa búku oyo esuki te bobele na kopesa eyano ya kosepelisa na motuna oyo, kasi ezali mpe komonisa ete Nzambe alaki kolongola mabe nyonso oyo moto asili koyeisela moninga na ye moto mpe mabelé.” Tótánga paragrafe 23 na lokasa 27. Tómonisa elilingi oyo ezali na nsé mpe tótánga Nzembo 145:16 oyo epesami na paragrafe 22. Tólakisa ye mwa búku. Soki andimi yango, tótuna motuna oyo tokoya koyanola na mbala ya nsima, na ndakisa: “Okolinga koyeba ndenge Nzambe akokokisa mokano na ye ya kosopa mapamboli likoló na bato mpe kobongola mabelé ete mákóma paladiso?”
3 Ntango tozongi kotala baoyo totikelaki mwa búku “Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?” tokoki kobanda lisoló ya mibale na lolenge oyo:
◼ “Ntango nalekaki mbala ya liboso, tomonaki ete Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso mpe ete azali na mokano ya kolongola mabe oyo moto asili koyeisela bazalani na ye mpe mabelé.” Tófungola mwa búku na nkasa 2 mpe 3, epai elilingi ezali, mpe tókóba koloba boye: “Motuna oyo totunaki liboso ya kokabwana ezalaki oyo: ndenge nini Nzambe akokokisa mokano na ye ya kosopa mapamboli likoló na bato mpe kobongola mabelé ete mákóma paladiso? Okanisi boni mpo na yango?” Nsima na koyoka eyano, tótánga paragrafe 2 na lokasa 17 mpe Danyele 2:44. Tótánga lisusu paragrafe 12 na lokasa 18. Tótuna na molobani na biso soki akolinga kotalela elongo na biso eteni 9 ya mwa búku. Soki andimi, tóyekola yango elongo na ye.
4 Talá maloba mpo na kobanda lisoló oyo makoki kosalisa biso soki tozali kolakisa mwa búku “Ntango moto oyo olingaka akufi. . . . ” Tólakisa ezipeli mpe tóloba ete:
◼ “Tozali lelo kolakisa mwa búku oyo esili kopesa kobɔndisama mpe elikya epai na ebele ya bato oyo basili kobungisa balingami na bango. Osilá komituna elikya nini ezali mpo na bakufi? [Tóyoka eyano.] Biblia elobi polele ete Nzambe alaki lisekwa.” Tótánga Yoane 5:28, 29. Tófungola mwa búku mpe tópesa ndimbola oyo ezali na paragrafe ya nsuka ya lokasa 28 mpe ya paragrafe oyo elandi na lokasa 31. Tómonisa bililingi oyo bikangani na yango. Tólakisa ye mwa búku. Tokoki kobongisa nzela mpo na bozongeli ya sika na kotunáká ete: “Ndenge nini tokoki kondimisama ete nsukansuka liwa ekolongolama mpenza solo?”
5 Wana tozongi kotala bato oyo bazwaki mwa búku “Ntango moto oyo olingaka akufi . . . ” tokolinga mbala mosusu koloba ete:
◼ “Mbala eleki, tosololaki na ntina na elikya kitoko ya lisekwa. Mwa búku oyo natikelaki yo elimboli mpo na nini tokoki kondimisama ete nsukansuka liwa ekolongolama mpenza solo. Omoni ete bilaka wana ya Nzambe bizali kobɔndisa mpe kolendisa biso, boye te?” Tótika ete moto yango ayanola. Na nsima, tófungola mwa búku na lokasa 31 mpe tótánga paragrafe ya mibale mpe ya misato, mpe Emoniseli 21:1-4. Tólobela mingi elikya oyo tozali na yango ya kozala na bomoi kozanga kokufa. Na kotalela bosepeli oyo moto amonisi mpe ezalela ya makambo na ye, tósɛnga ye boyekoli ya Biblia na lisalisi ya búku Boyebi to tótuna motuna mosusu oyo ekopesa nzela na kosolola mbala ya nsima.
6 Talá oyo tokoki koloba soki tozali kolakisa mwa búku “Quel est le but de la vie? Comment le découvrir?”:
◼ “Bato mingi bamitunaka soki mokano ya bomoi ezali nini. Balobaka ete: ‘Mpo na nini nazali awa? Bomoi na ngai ekosuka wapi? Bomoi na ngai na mikolo mizali koya ekozala nini?’ Na likanisi na yo, epai wapi tokoki kozwa biyano? [Tóyoka moto yango.] Talá oyo Biblia elobi. [Tótánga Nzembo 36:9.] Elongobani kondima ete Mozalisi ya moto nde abongi mpenza mpo na kolimbwela biso mpo na nini tozali awa, boye te? [Tótika ete moto yango ayanola.] Mwa búku oyo ezali komonisa mokano monene oyo Nzambe azali na yango mpo na biso.” Tófungola mwa búku na nkasa 20 mpe 21, tótánga maloba oyo mazali zingazinga na elilingi mpe tólimbola elilingi yango, mpe na nsima tólakisa ye mwa búku. Soki andimi yango, tótuna ete: “Ndenge nini tokoki kondimisama ete ntango nyonso mokano ya Nzambe ezali ete bato bázala na bomoi ya seko kati na Paladiso awa na mabelé?” Tóyokana mpo na mokolo oyo tokozongela ye.
7 Soki totikaki mwa búku “Quel est le but de la vie? Comment le découvrir?” tokoki koloba na boyei na biso ya mibale, na ndakisa ete:
◼ “Ntango nayaki na mbala eleki, nasepelaki mingi na lisoló na biso likoló na Biblia, oyo elobi ete bomoi ezali mpenza na mokano.” Tómonisa elilingi ya lokasa 31 mpe tótuna boye: “Ndenge nini tokoki kondimisama ete ntango nyonso mokano ya Nzambe ezali ete bato bázala na bomoi ya seko kati na Paladiso awa na mabelé?” Tótánga paragrafe 3 na lokasa 20. Tósolola likoló na makanisi mapesami na nsé ya motó na likambo moke “Le dessein de Dieu demeure inchangé” elingi koloba “Mokano ya Nzambe ebongwanaka te,” na lokasa 21. Tótánga maloba oyo mazali na ezipeli ya nsuka ya mwa búku oyo mamonisi lolenge boyekoli ya Biblia esalemaka na ndako kozanga kofuta mbongo. Tólakisa búku Boyebi mpe tósɛnga na moto yango ete tómonisa ye lolenge tósalelaka búku oyo mpo na koyekola Biblia.
8 Mosala na biso esengeli komonisa lobanzo na biso ya solosolo ya kosalisa bato ya motema sembo na ‘kokóma na boyebi ya sikisiki ya solo.’ (1 Tim. 2:4) Na yango, tómibombela ntango kati na manáka na biso mpo na kozongela baoyo nyonso totikelaki bango mwa búku. Na komonisáká ete tozali mpenza komibanzabanza mpo na bango, tokokoka mbala mosusu kosalisa baoyo bazali kokimela mpe kolela na ntina na makambo mabe oyo mazali kosalema kati na mangomba ya lokuta ete bázwa elembo mpo na lobiko. (Ezek. 9:4, 6) Lisusu tokozala na esengo mpe na bosepeli na koyeba ete tozali komekola Yehova na komibanzabanzáká mpenza mpo na bazalani na biso.—Talá Bafilipi 2:20.