Tósakola nsango malamu kozanga kotika
1 Baklisto ya liboso bazalaki kozwa mosala na bango na motuya mingi. Luka ayebisi ete: “Nde batiki te kolakisa mikolo nyonso kati na tempelo mpe na ndako na bango mpenza mpe kosakoláká nsango malamu ete Yesu azali Klisto.” (Mis. 5:42) Eloko moko te ekokaki kopekisa bango, ata kútu monyokoli! (Mis. 8:4) Bazalaki kolakisa solo mikolo nyonso.
2 Ezali boni mpo na biso? Tómituna ete: ‘Nazali kososola ete ntango eyei mokuse? Nandimi kokóba kosakola nsango malamu kozanga kotika?’
3 Bazali kosakola kozanga kotika: Ndeko mwasi moko oyo azalaki na bokɔnɔ ya bukabuka atyamaki kati na masini oyo ebéngami poumons d’acier. Ezalaki mpasi mpo na ye kokende na Ndako ya Bokonzi to koyangana na mayangani. Atako bongo, amipesaki mingi na kosakola nsango malamu. Na boumeli ya mibu 37 oyo asili kolekisa kati na masini yango, asili kosalisa bato 17 ete báyeba solo! Azalaki kosala lolenge nini? Atako azali na likoki te ya kokende ndako na ndako, asili kozwa mwango ya kopesa litatoli na lolenge ya libaku malamu epai na baoyo nyonso bazalaki kosolola na ye.
4 Bandeko na biso ya mboka Bosnie bakutanaki na bitumba mpe na bozangi ya biloko mingi. Atako bongo, bazali kokóba kosakola. Na mboka Sarajevo, basakoli bazali kolekisa na mwayene ngonga 20 sanza na sanza na koyebisa nsango malamu, mpe mokomoko azali kotambwisa na mwayene boyekoli mibale ya Biblia. Atako bazali kati na ezalela wana ya mpasi, bazali kosakola mpe koteya kozanga kotika.
5 Bilenge mpe bazali na molende mpo na mosala ya kosakola. Na Rwanda, basangani ya libota moko ya Batatoli batyamaki na ndako moko epai kuna basodá bamilɛngɛlaki mpo na koboma bango. Libota wana lisɛngaki nzela ya kosala liboso libondeli. Bapesaki bango nzela, mpe Deborah, mwana moke mpenza ya mwasi, asalaki libondeli oyo na mongongo makasi: “Yehova, pɔ́sɔ oyo ngai mpe papa tokabolaki bazulunalo mitano. Lolenge nini tokokoka kozongela bato wana mpo na koteya bango solo oyo ekobikisa bomoi na bango?” Na lisalisi ya kondima makasi na ye mpe na bolingo na ye mpo na mosala ya kosakola, libota mobimba libikisamaki.
6 Na mikolo na biso, ezali likambo ya ntina kotya likebi na mabaku nyonso mapesameli biso mpo na kopesa litatoli mpe koluka baoyo bazali “kati na ezalela esengeli mpo na bomoi ya seko.” (Mis. 13:48, NW ) Na kotaleláká ezalela ya makambo kati na teritware na bango, bankulutu ya lisangá bazali kobongisa makita mpo na mosala ya kosakola na bantango ebongi mpo na bato nyonso, ezala na ntɔ́ngɔ́, nsima na midi, to na mpokwa. Masoló ya Mosala na biso ya Bokonzi mpe masoló oyo mapesamaka na boumeli ya likita ya mosala, na mayangani ya zongazonga mpe ya etúká ezali mabaku masengeli mpo na kozwa malako mpe bilendiseli etali mitindo mikeseni ya mosala ya kosakola. Lisusu, bakɛngɛli ya zongazonga mpe ya etúká babongisaka basakoli mpo na mosala ya kosakola na balabála, bazali komonisa bango lolenge ya kosakola kati na kartyé ya mombongo mpe bazali kobenda likebi likoló na myango misusu mpo na kopesa litatoli epai kuna bakoki kokuta bato. Nyonso wana ezali kokundwela biso ete tosengeli kosakola nsango malamu kozanga kotika.
7 Bantoma ya Yesu balobaki na molende nyonso ete: “Mpo na makambo mayebi biso mpe mayoki biso, tokoki kotika kosolola yango te.” Lolenge nini balóngaki kolendendela atako mikakatano mizalaki mingi? Balukaki lisalisi ya Yehova, mpe apesaki bango lisalisi yango, na boye ete “bango nyonso batondaki na [elimo santu, NW ], mpe na molende basakoli Liloba na Nzambe.” (Mis. 4:20, 29, 31) Bato nyonso bakutanaka te na makambo ya kosepelisa kati na mosala ya kosakola, kasi soki tozali mpenza na mposa ya kosakola nsango malamu kozanga kotika mpe soki tozali kosala makasi na kosakola mokolo na mokolo, Yehova akosalisa biso.