Bazalani na biso bazali na mposa ya koyoka nsango malamu
1 Nzambe alingi ete “bato ya mitindo nyonso bábika mpe bákóma na boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Tim. 2:4, NW) “Bato ya mitindo nyonso” elimboli bazalani na biso nyonso. Mpo ete nsango malamu ekómela bango, tósalela bokɔti ya masolo ndenge na ndenge mpe tókanisa makambo oyo ekoki kosepelisa mokomoko na bango. (1 Kol. 9:19-23) Lisangá ya Nzambe ezali kopesa biso bisaleli oyo ekosalisa biso na kosimba mitema ya baoyo ‘bazali na elimo ebongi mpo na bomoi ya seko.’ (Mis. 13:48) Tótala lolenge ya kosalela mwa babuku ndenge na ndenge, oyo tokolakisa na Augústo mpe na Sɛtɛ́mbɛ, mpo na kokokisa bamposa ya elimo ya bazalani na biso.
2 Mwa babuku oyo tozali kolakisa: Makanisi oyo malandi makoki kosalisa biso mpo na kolakisa mwa babuku mosusu. Likanisi mokomoko ezali (1) na motuna moko oyo ezali kosɛnga kokanisa malamu mpo na kobanda lisolo, (2) kotánga likambo moko kati na mwa buku epai kuna tokokuta makanisi ya kolobela mpe (3) na vɛrsɛ moko ya Biblia oyo ebongi, tokoki kotánga yango ntango tozali kosolola. Mpo na makambo mosusu oyo tokoloba wana tozali kolakisa mwa babuku, tósalela maloba na biso moko mpe tótalela bosepeli oyo moto amonisi. Makanisi ya mozindo na oyo etali kolakisa mwa babuku mingi ezali kati na moko na Mosala na biso ya Bokonzi oyo etángami awa.
Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?
Na makanisi na yo, elikya nini ezali mpo na baoyo banyokwamaki?—Nkasa 27-28, paragrafe 23-27; Yis. 65:17, 18; km 8/97 lokasa 8.
Quel est le but de la vie ? Comment le découvrir ?
Mpo na nini lelo oyo bato mingi bazali kosepela te na bomoi na bango?—Nkasa 29-30, baparagrafe 2, 25-26; Nz. 145:16; km 8/96 lokasa 8.
Sepela na bomoi ya seko na mabele!
Osilá komituna mpo na koyeba eloko nini Yesu azali kosala sikawa?—Bililingi 41-42; Emon. 11:15; km 9/96 lokasa 4.
Bokonzi oyo ekosala Paradis.
Okolinga koyeba Bokonzi nini Yesu ateyaki biso ete tóbondelaka na ntina na yango?—Lokasa 3; Mat. 6:9, 10; km 9/96 lokasa 4.
Ntango moto oyo olingaka akufi. . .
Esilá kokómela yo ete oyeba te eloko nini osengeli kosala mpo na kobɔndisa moto moko oyo abungisaki moto oyo alingaka?—Lokasa 26, paragrafe 2-5; Yoa. 5:28, 29; km 8/97 lokasa 8.
Osengeli kondima Trinité?
Okanisi ete ezali na ntina mpo na bomoi na biso na mikolo mizali koya ete tóyeba bomoto mpenza ya Nzambe?—Lokasa 3, paragrafe 3, 7-8; Yoa. 17:3.
3 Mwa babuku mosusu: Siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Mársi 1998 ezali na molɔngɔ ya mwa babuku mpe mikanda mosusu mpo na kolakisa epai na bato ya Lingomba ya Bouddha, bato ya Lingomba ya Bahindu, Bayuda mpe Bamizilma. Soki ebongi, tokoki mpe kolakisa yango. Mpo na kozwa makanisi, tótala lisusu nkasa 4- 6 ya siplema yango, bakisa mpe nkasa 21-24 ya buku Comment raisonner, mpe tóbongisa bilakiseli mokuse oyo ezali kolamusa bosepeli ya bato yango.
4 Mwa buku mosusu ebimisamaki mpo na baoyo, mbala mosusu batángá mingi, kasi bayebi makambo mingi te na ntina na Biblia. Ezali na mokano ya kopusa bango ete bátalela Liloba ya Nzambe. Soki libaku emonani, tokoki kolakisa yango:
Un livre pour tous.
Na makanisi na yo, kelasi ya malamu esengeli mpe kokɔtisa makambo mosusu ya Biblia?—Lokasa 3, paragrafe 1-3 mpe lokasa 30, paragrafe 2; Mos. 12:9, 10.
5 Mwa buku moko ya boyekoli: Tosengeli ntango nyonso kozala na mokano ya kobanda boyekoli ya Biblia, na bokutani ya liboso to na bozongeli ya sika. Mpo na yango, tozali na mwa buku oyo ezali kosalisa biso na kobanda, mpe na nsima kotambwisa boyekoli kozanga nkaka:
Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
Oyebi ete soki ozali kosala bobele miniti soko 30 ya boyekoli na pɔsɔ moko mpe bongo na boumeli ya pɔsɔ 16, okoki koyeba makambo mingi na Biblia?—Liteya 2, paragrafe 6; 2 Tim. 3:16, 17; km 5/97 lokasa 8.
6 Kati na lisese na ye ya Mosamalia malamu, Yesu amonisaki polele ete mozalani na biso mpenza ezali oyo azali komonisa bolingo mpe motema malamu epai na monyokwami. (Luka 10:27-37) Nzokande, bazalani na biso bazali kati na mawa. Bazali na mposa ya koyoka nsango malamu. Na bongo, tókokisa mokumba na biso epai na bazalani na biso na koyebisáká bango nsango malamu. Na kosaláká bongo, tokozala bayekoli ya solosolo ya Yesu Klisto.—Mat. 24:14; Gal. 5:14.