Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/98 lok. 1
  • Botali oyo ekoki kozala lipamboli

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Botali oyo ekoki kozala lipamboli
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Masolo mosusu
  • “Bóbatela etonga ya Nzambe”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Ndenge nini bankulutu basalisaka bandeko ya lisangá?
    Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
  • Lolenge babateli ya mpate baklisto basungaka yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • “Bóbatela etonga ya Nzambe oyo bapesi na mabɔkɔ na bino”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1998
km 8/98 lok. 1

Botali oyo ekoki kozala lipamboli

1 Zakai ayambaki Yesu lokola mopaya na esengo. Nzokande, botali wana ekómaki lipamboli mpenza.​—Luka 19:2-9.

2 Lelo oyo, Yesu Klisto, Mokonzi ya lisangá, azali kosɛnga na bankulutu ete ‘bábatela etonga ya Nzambe.’ (1 Pet. 5:2, 3; Yoa. 21:15-17) Longola koteya na makita mpe kopesa ndakisa na mosala ya kosakola, na bolingo nyonso, bankulutu basungaka ndeko mokomoko na lisangá. Na ntina yango, osengeli koyeba ete na bantango mosusu, bakosolola na yo, epai na yo na ndako, to na Ndako ya Bokonzi, to na ntango ozali kosakola elongo na bango, to mpe na mabaku mosusu. Osengeli nde kobanga soki bankulutu bayei kotala yo? Te. Soki bankulutu bayei kotala yo, yango elingi koloba te ete likambo ezali. Na bongo, ntina ya mosala ya kotala bampate ezali nini?

3 Paulo alobaki ete alingaki kokende kotala bandeko ‘mpo na koyeba soko bazali ndenge nini.’ (Mis. 15:36, NW) Bankulutu bazali babateli na mpate oyo batondi na bolingo, bamibanzabanzaka mingi mpo na koyeba bomoi na yo. Balingaka kopesa yo lisalisi na elimo, lisalisi oyo ebongi mpe oyo ekotonga yo. Yehova, Mobateli na mpate oyo aleki bonene mpe atondi na bolingo, azali na mposa ete mokomoko na biso azwa lisungi yango.​—Ezek. 34:11.

4 Tóndima ete bankulutu báyaka kotala biso: Ntango Paulo azalaki kokende kotala bandeko na ye, azalaki na mokano ya ‘kokabela bango likabo na elimo mpo na kolendisa bango, mpe ete báyikisana mpiko.’ (Lom. 1:11, 12) Biso banso tozali na mposa ya kolendisama na elimo na mikolo oyo ya nsuka mpe ya mpasi, mpe tozali lisusu na mposa ya lisalisi mpo na kotikala ngwi kati na solo. Na bongo, tóndima na esengo nyonso ete bankulutu báyaka kotala biso; na ntembe te yango ekopesa nzela ete tólendisana.

5 Tóyebaka matomba mingi oyo mautaka na mosala ya kotala bampate oyo bankulutu basalaka. Soki likambo moko ezali kotungisa biso, tómikundola ete bankulutu bazali wana mpo na kosalisa biso. Tókakatana te koyebisa bango likambo nyonso oyo ekoki kobebisa elimo na biso. Tózala mpe na botɔndi epai na Yehova mpo na ebongiseli yango ya bolingo mpe tókanisa na esengo nyonso mapamboli oyo tokoki kozwa ntango bankulutu bayei kotala biso.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto