Tósalela malamu babuku ya kala
1 Na bisika nyonso na mokili, bato basili kobomba bamilio ya mikanda ya kala kati na babibliotɛkɛ. Nzokande, litomba nini ya koumela mikanda yango esili komemela bato? (Mos. 12:12) Mikanda oyo mizali kobenda likebi likoló na Bokonzi ya Nzambe mpe oyo Bokonzi yango ekosala mpo na bato ezali na motuya mingi. Masangá mingi ezali na mikanda lolenge yango oyo ebimisamaki liboso ya mobu 1985 na mabombo na bango. Na sanza ya Yanuali tokolakisa mikanda yango na mosala ya kosakola.
2 Ezali na motuya mingi: Atako bamoko kati na biso bakoki kokanisa ete babuku yango esilá ngala soki tokokanisi yango na babuku oyo ezali kobima mikolo oyo, tosengeli komikundola ete babuku yango ezali na bosolo oyo euti na Makomami. Solo ya Bokonzi oyo yango ezali kolimbola ezali naino na ntina kino lelo oyo; mpe soki esalelami ekoki kobikisa bomoi. (Yoa. 17:3) Na yango, tosengeli kosala milende mpenza mpo na kosalela malamu babuku yango ya kala.
3 Lisolo ya mwasi oyo azwaki libula ya mwa mikanda ya kala ya la Société, emonisi mpenza motuya ya babuku yango. Motatoli moko atunaki mwasi yango soki ayebi motuya ya mikanda yango. Mwasi yango ayanolaki: “Nayebi mpenza motuya na yango ya solo te, kasi ndenge nini nakoki koyeba yango?” Mwasi yango andimaki boyekoli ya Biblia, akómaki kati na solo, mpe ayaki koyeba motuya ya mikanda ya nkɔkɔ na ye. Libombo wana ya mikanda ya kala ezalaki solo libula ya motuya monene!
4 Lakisá yango epai na bato: Longola mosala ya kokabola babuku yango ya kala na ndako na ndako, osengeli mpe kolakisa yango wana ozongeli bato oyo oyebi ete basepelaka kotánga mikanda na biso, bakisa mpe bato oyo basalaka abonema ya bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! mpe baoyo bazali kati na molɔngɔ na yo ya bato oyo bazwaka bazulunalo mbala na mbala. Mpo na baoyo ozali koyekola na bango Biblia, okoki koponela bango mwa babuku ya kala oyo ekoki kosalisa bango na kokolisa bososoli na bango ya solo. Kobosana te kobakisa mwa babuku mosusu ya kala oyo ezangi kati na bibliotɛkɛ na yo moko. Na kosaláká bongo, okozala na libombo malamu ya mikanda ya Teokrasi, oyo ekosalisa yo wana ozali kosala boyekoli ya yo moko.
5 Na esika ete tóbomba babuku na biso ya kala na libombo ya lisangá, tiká ete tósalela yango malamu mpo na kobenda bato oyo tozali kokutana na bango ete ‘bátosa Nzambe mpe bábatela mibeko na ye.’—Mos. 12:13.