Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 1/2 nk. 29-31
  • Ezali maloba ya kokumisa to ya kolɛtɛ?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ezali maloba ya kokumisa to ya kolɛtɛ?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Makumisi mpe kolɛtɛ elimbolami
  • Likanisi ya Makomami
  • Kolɛtɛ ezali motambo
  • Kebá na maloba ya kolɛtɛ
  • Pesá makumisi soko yango esengeli
  • Tósanzola Yehova, Nzambe na biso!
    Tóyembela Yehova
  • Tópesa Yehova Nzambe na biso nkembo!
    Tóyembela Yehova na esengo
  • Kokumisa bana
    Lamuká!—2015
  • Bilenge, bósanzola Yehova!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 1/2 nk. 29-31

Ezali maloba ya kokumisa to ya kolɛtɛ?

MOTO moko alobi na yo ete, “Osali nsuki na yo kitoko!” Ezali maloba ya kokumisa to ya kolɛtɛ? “Kazaka wana ebongisi yo mpenza!” Makumisi to kolɛtɛ? “Naino nalya bilei kitoko boye te!” Ezali maloba ya kokumisa to kolɛtɛ? Ntango moto azali kopesa biso longonya boye, tokoki komituna soki maloba yango ezali mpenza ya bosembo mpe ya solo to moto yango alingi bobele kosepelisa biso kasi na motema azali kondima biso te.

Lolenge nini tokoki koyeba soki makambo oyo moto azali kolobela biso ezali makumisi to kolɛtɛ? Yango ezali na ntina? Tokoki te bobele kondima oyo elobami mpe kozwa esengo oyo yango ezali kopesa biso? Ezali boni ntango tokumisaka bato mosusu? Totalelaka malamu matindiki na biso ya motema? Kokanisa na mituna oyo ekoki kopusa biso ete tózala bato oyo bayebi kososola mpe kosalela lolemo na biso na lolenge oyo ekokumisa Yehova Nzambe.

Makumisi mpe kolɛtɛ elimbolami

Búku Webster’s Dictionary elimboli makumisi lokola lolenge ya kondima likambo moko, to masanzoli, mpe liloba yango ekoki lisusu kolobela losambo to kopesa nkembo. Ezali polele ete bandimbola mibale oyo ya nsuka etaleli bobele makumisi oyo mapesami epai na Yehova Nzambe. Yango ezali eteni ya losambo ya solo, lokola mokomi na nzembo oyo apemamaki na Nzambe alendisi ete: “Ezali malamu . . . , ezali kitoko mpe kosanzola ebongi.” “Nyonso na mpema básanzola [Yehova].”​—Nzembo 147:1; 150:6, NW.

Nzokande, yango elingi koloba te ete tokoki te kokumisa bato. Makumisi ekoki kopesama, na lolenge ya kopesa longonya, kondima likambo oyo moto asali, to kolóngisa ye. Kati na lisese moko Yesu apesaki, nkolo alobaki na mosali na ye ete: “Malamu, moombo malamu mpe na sembo!”—Matai 25:21.

Nzokande, kolɛtɛ elimbolami lokola makumisi ya lokuta, ya kozanga sembo to ya kolekisa ndelo, epai oyo mbala mingi, mokosi atindikami na koluka kokokisa mposa na ye moko ya moimi. Longonya oyo epesami na mayele mabe to kokumisa oyo eleki ndelo epesamaka na mokano ya kondimama to ya kozwa biloko ya mosuni epai ya moto mosusu to ya kopesa ye liyoki ya nyongo liboso ya molɛti. Balɛti batindikami na moimi. Engebene Yuda 16, “bakosanzola bilongi na bato mpo na kozwa litomba.”

Likanisi ya Makomami

Makomami elobi nini na likambo ya kokumisa baninga na biso bato? Yehova apesi ndakisa oyo tosengeli kolanda na likambo yango. Biblia elobi na biso ete tokokumisama soki tokosala mokano ya Yehova. Ntoma Paulo alobi ete “moto na moto akozwa lisanzoli na ye uta na Nzambe.” Petelo alobi na biso ete kondima na biso oyo emekami “ekomonana mpo na masanzoli na lokumu.” Na yango, likambo oyo ete Yehova akokumisa bato emonisi biso ete kokumisa ya solosolo ezali elembo ya boboto, ya bolingo, mpe ya malamu, moto moko te akoki komona yango mpamba.​—1 Bakolinti 4:5; 1 Petelo 1:7.

Na kotalela Biblia, tokoki lisusu kosanzolama uta na bakonzi ya Letá oyo bazali komona etamboli malamu na biso mpe bazali kopesa biso lokumu na bosembo nyonso. Balobi na biso ete, “Salaká bobele [makambo] malamu mpe okozala na lokumu epai na ye.” (Baloma 13:3) Tokoki mpe kokumisama na bato oyo bazali sembo na maloba na bango mpe oyo bazali na makanisi mosusu te wana bazali kokumisa biso. Makomami mapemami malobi kati na Masese 27:2 ete: “Tiká ete mosusu asanzola yo kasi monɔkɔ na yo mpenza te.” Yango emonisi ete kondima lokumu oyo euti epai ya bato ezali mabe te.

Yango ezali bongo te mpo na kokumisa to kondima maloba ya kolɛtɛ. Mpo na nini maloba ya bokosi masepelisaka Yehova te? Mpo ete, yango ezali sembo te, mpe Yehova akweisi kozanga bosembo. (Kokanisá na Masese 23:6, 7.) Lisusu, yango elongobani te. Kolobáká mpo na bato oyo Nzambe asepelaka na bango te, mokomi na nzembo alobi: “Ntango nyonso bazali koloba lokuta moto na moninga na ye, na bibebu na elengi bazali sé koloba na mitema mibale. Yehova akolongola bibebu nyonso na elengi.”​—Nzembo 12:2, 3, NW.

Likoló na nyonso, kolɛtɛ ezali kozanga bolingo. Yango etindikami na moimi. Nsima ya kolobela balɛti, Davidi mokomi na nzembo azongelaki maloba na bango ete: “Tokolónga na lolemo na biso; bibebu izali epai na biso, nani akozala mokóló na biso?” Yehova azali komonisa bato wana ya moimi lokola ‘banyokoli na babola.’ Basalelaki maloba na bango ya kolɛtɛ mpo na kolendisa basusu te, kasi mpo na konyokola bango mpe komonisa bango mpasi.​—Nzembo 12:4, 5.

Kolɛtɛ ezali motambo

Salomo, Mokonzi na mayele, alobi ete: “Moto oyo akobenda mozalani na ye na maloba kitoko azali kotyela ye [monyama, NW] na makolo.” Mpe yango ezali mpenza solo! (Masese 29:5) Bafalisai bamekaki kotyela Yesu motambo na maloba ya kolɛtɛ. Balobaki ete: “Molakisi, toyebi ete yo ozali solo mpe okolakisa nzela na Nzambe solo mpe okotyaka moto moko liboso na mosusu te, okotalaka mpe bilongi na bato te.” Ezalaki mpenza maloba ya elengi! Kasi Yesu akosamaki te na maloba wana ya kolɛngola. Ayebaki ete bazalaki kondima bosolo ya mateya na ye te, kasi bazalaki bobele koluka ete aloba mabe na ntina na kofuta mpako ya Kaisala.​—Matai 22:15-22.

Nzokande, Mokonzi Elode, na ekeke ya liboso, akesanaki mpenza na Yesu. Ntango asalaki lisukúlu liboso ya bato na engumba Kaisalia, bato balobaki ete: “Mongongo na nzambe! Mongongo na moto te!” Na esika ya kopamela bango na ntina na libunga motindo wana, makumisi ya lokuta, Elode andimaki maloba ya kolɛtɛ yango. Nokinoki anzelu ya Yehova apesaki ye etumbu, Elode alyamaki na nkiso mpe akufaki.​—Misala 12:21-23.

Moklisto oyo atɛli na elimo akoyeba nokinoki maloba ya kolɛtɛ. Bankulutu ya lisangá basengeli mpenza kozala na bokɛngi ntango moto oyo bazali kosambisa abandi kokumisa bango, mbala mosusu kino kokokanisa nkulutu moko na nkulutu mosusu mpe kolobáká ete moko azali na boboto mpe amityaka na esika ya bandeko koleka mosusu.

Maloba ya kolɛtɛ ekoki kozala motambo, Biblia ezali komonisa yango polele ntango ezali kolobela lolenge elenge mobali abendami na etamboli ya mbindo na mwasi mozimbisi. (Masese 7:5, 21) Likebisi yango ebongi mpenza lelo oyo. Kati na baoyo bazali kobimisama na lisangá ya boklisto mbula na mbula, motuya monene ezali mpo na etamboli ya mbindo. Ekoki kozala ete kokwea na lisumu monene ebandaki na maloba ya kolɛtɛ, boye te? Lokola bato balingaka ete bápesa bango longonya mpe balingaka ete báloba malamu mpo na bango, maloba ya kolɛngola oyo euti na bibebu ya bokosi ekoki kolɛmbisa makasi ya moklisto kino komema ye na etamboli ya mbindo. Ntango akebi te na maloba mpe na longonya ya kolɛngola, yango ekoki komema na makama minene.

Kebá na maloba ya kolɛtɛ

Maloba ya kolɛtɛ elendisaka komilinga mpe lofundo ya moto oyo bazali kokumisa. Yango esalaka ete moto amipesa lokumu mingi, amimona ete aleki basusu. Mofilozofe François de La Rochefoucauld, akokanisaki maloba ya kolɛtɛ na mbongo ya mabe, “oyo, endimami bobele mpo ete ezali kopesa moto lolendo.” Na yango, mpo na komibatela esengeli kotya likebi na toli ebongi ya ntoma Paulo oyo elobi ete: “Nazali koloba na moko na moko kati na bino ete bóleka te komikanisa bino mpenza na motindo mobongi te. Kasi bómitánga na makanisi na sembo, moto na moto pelamoko na likabo na kondima oyo Nzambe apesi ye.”​—Baloma 12:3.

Atako tobotami na makanisi ya kolinga koyoka makambo oyo mazali kosepelisa matoi na biso, mbala mingi tozalaka mpenza na mposa ya koyoka toli mpe disipilini oyo ezwami na Biblia. (Masese 16:25) Mokonzi Ahaba alingaki koyoka bobele makambo oyo mazalaki kosepelisa ye; kútu basali na ye basɛngaki mosakoli Mikaya aloba “lokola liloba na moko na bango [basakoli ya kolɛtɛ oyo Ahaba azalaki na bango], lobá na malamu.” (1 Mikonzi 22:13) Soki Ahaba andimaki koyoka maloba ya sembo oyo ezangi bokosi mpe kobongwana na misala na ye mabe, mbɛlɛ apɛngolaki etumba ya nsɔ́mɔ oyo kati na yango Yisalaele ekweaki mpe lisusu mbɛlɛ apɛngolaki liwa na ye moko. Mpo na bolamu na biso ya elimo, tosengeli kozala pene ya koyoka toli ya makasi, kasi etondi na bolingo oyo euti na bankulutu batyami na lisangá, oyo balingi kosalisa biso ete tótikala na nzela ya solo, na esika ya koluka bato oyo bakokumisa biso mpamba, na konyomitisáká matoi na biso na maloba ya kolɛtɛ!—Kokanisá na 2 Timoté 4:3.

Ezala mpo na ntina nini, baklisto basengeli kosalela maloba ya kolɛtɛ te. Lokola mosembwi Elihu, bazali kobondela na etingya: “Tiká te ete natalela moto elongi na ye, to ete nazimbisa moto na maloba na kitoko. Nayebi kozimbisa na maloba na kitoko te, zambi Motongi na ngai akolongola ngai wana.” Boye, lokola Paulo, bakokoka koloba ete: “Zambi, lokola eyebi bino, toyei na maloba na [kolɛtɛ, NW] te soko mpo na kozipa elulela.”​—Yobo 32:21, 22; 1 Batesaloniki 2:5, 6.

Pesá makumisi soko yango esengeli

Lisese lipemami na Nzambe emonisi ete makumisi ekoki kosala lokola emekeli, kolobáká ete: “Enangwelo mpo na palata mpe mɔ́tɔ makasi mpo na wolo; boye moto ayebani na lisanzoli na ye.” (Masese 27:21) Ɛɛ, masanzoli ekoki kolamwisa mayoki ya komitombola to ya lolendo, mpe ekomema moto na kokwea. Epai mosusu, moto akoki komonisa bopɔlɔ to komikitisa soki azali koyeba ete azali na nyongo liboso ya Yehova mpo na likambo nyonso asali oyo epesi ye lokumu.

Masanzoli ya bosembo mpo na etamboli malamu to mpo na makambo nyonso moto azali kokokisa ekolendisa moto oyo azali kopesa yango mpe ye oyo azali kozwa yango. Yango ekokólisa bosepeli ya mɔ́tɔ mpe ya malamu epai na moko mpe epai na mosusu. Ekolendisa na kosala makasi mpo na mikano oyo mibongi kokumisama. Masanzoli mabongi oyo bapesi bilenge, ekopusa bango na kosala lisusu na molende koleka. Yango ekoki kosunga bango na kobongisa bizaleli na bango lokola balingi kozala na bomoi oyo eyokani na mitindá oyo etali bango.

Yango wana, tóboya maloba ya kolɛtɛ—ezala mpo na koloba yango epai na bato to soki balobeli biso yango. Tózala na komikitisa ntango tozali kozwa makumisi. Mpe tiká ete tózala bakabi mpe tópesa makumisi na motema mobimba—mbala na mbala epai na Yehova na losambo na biso mpe na bosembo nyonso epai na bamosusu na longonya mpe bosepeli, komikundoláká ete “liloba lilobami na ntango ekoki ezali malamu boni!”—Masese 15:23.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto