Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 15/12 nk. 5-9
  • Kobotama ya Yesu—Ndenge makambo malekaki mpenza

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kobotama ya Yesu—Ndenge makambo malekaki mpenza
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Baevanzile ekomamaki na mokano nini?
  • Kobotama ya Yesu na Beteleme
  • Yehova amonisaka ngɔlu epai ya basɔkɛmi oyo balukaka solo
  • Mwana akómi na likama
  • Kobotama ya Yesu—Ndimbola na yango mpo na yo
  • Liteya oyo tokoki kozwa na lisolo ya mbotama ya Yesu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Bato misato ya bwanya bakendaki mpenza kotala Yesu ntango abotamaki?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Yesu abotami wapi mpe ntango nini?
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Yesu—autaki wapi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 15/12 nk. 5-9

Kobotama ya Yesu—Ndenge makambo malekaki mpenza

KANISÁ likambo moko esalemaká kala na mboka na bino mpe eyebani mingi. Elobelami na mikanda oyo banganga-mayele ya istware mingi bakomá. Sikoyo, ekozala boni soki moto moko alobi na yo ete likambo yango esalemaki te, ezali se lisapo ya mpamba? To mpe, tózwa ndakisa ya likambo oyo etali yo mpenza. Ekozala boni soki moto moko alobi na yo ete makambo mingi oyo bayebisá yo na libota na yo mpo na kobotama ya nkɔkɔ na yo mpe ndenge bomoi ezalaká ezali lokuta? Na ntembe te, soki moto abimisi ata likanisi mpamba na bandakisa wana mibale, ekopesa yo nkanda. Tokanisi ete okondima te soki bilembeteli bizali te!

Nzokande, lelo oyo batyoli ya Biblia baboyi masolo ya Baevanzile ya Matai na Luka oyo elobeli kobotama ya Yesu. Balobi ete masolo yango ezali na bongolabongola, ezali na boyokani te mpe etondi na makambo ya lokuta mpe mabunga. Likambo yango ekoki kozala solo? Na esika ya kondima maloba na bango, biso moko tótalela masolo ya Baevanzile. Ntango tozali kotalela yango, tótya likebi na makambo oyo ekoki koteya biso lelo oyo.

Baevanzile ekomamaki na mokano nini?

Libosoliboso ezali malamu tóbosana mokano oyo bakomaki masolo yango ya Biblia te. Ezali masolo ya bomoi ya moto te; ezali nde Baevanzile. Esengeli mpenza tokesenisa makambo yango. Na mokanda oyo ezali kolobela lisolo ya bomoi ya moto, mokomi akoki kokoma makambo ebele mpo na komonisa misala ya moto yango kino akómaki moto monene oyo ayebani. Yango wana, mikanda mosusu oyo ezali kolobela bomoi ya bato ezalaka na ebele ya makambo etali libota, kobotama, mpe bomwana ya bato oyo mikanda yango elobeli. Kasi ezali bongo te na Baevanzile. Na kati ya Baevanzile nyonso minei, bobele Evanzile ya Matai na ya Luka nde elobeli kobotama mpe bomwana ya Yesu. Kasi, mokano na yango ezali te mpo na komonisa ndenge oyo Yesu akolaki kino akómaki moto monene. Tóbosana te ete bayekoli ya Yesu bayebaki ete azalaki na bomoi lokola ekelamu ya elimo liboso aya awa na mabelé. (Yoane 8:23, 58) Yango wana, soki Matai mpe Luka balobelaki bomwana ya Yesu, ezalaki mpo na kolimbola ndenge nini akómaki moto monene te. Kasi, balobelaki makambo oyo mayokani na mokano ya Baevanzile na bango.

Bakomaki Baevanzile na mokano nini? Liloba “evanzile” elimboli “nsango malamu.” Bato mibale wana bazalaki na nsango se moko: ete Yesu azali Masiya, to Klisto oyo alakamaki; akufaki mpo na masumu ya bato; asekwisamaki mpe abutaki na likoló. Kasi, bakomi yango mibale bakolaki na makambo ndenge moko te mpe bakomaki mpo na bato bakeseni. Matai, oyo azalaki mokɔngɔli ya mpako, abongisaki lisolo na ye mingimingi mpo na Bayuda. Luka, oyo azalaki monganga, akomelaki “Teofili, moto na lokumu”—ekoki mpenza kozala ete azalaki moto monene—mpe, na nzela na ye, ekóma epai ya Bayuda mpe bato ya mabota mosusu. (Luka 1:1-3) Mokomi mokomoko aponaki makambo oyo makokaki mpenza kosimba mitema mpe makokaki mpenza kondimisa bato oyo akomelaki. Yango wana, lisolo ya Matai elobeli mingi bisakweli ya Makomami ya Liebele oyo Yesu akokisaki. Nzokande, Luka akomaki nsango na ye lokola lisolo mpo ete batángi na ye oyo bazalaki Bayuda te básosola yango malamu.

Tokoki kokamwa te ete masolo na bango mákesena. Kasi bango mibale bazali na bongolabongola te, ndenge batyoli mosusu ya Biblia bazali koloba. Lisolo mokomoko ezali kobakisa makambo oyo ezangi na lisolo mosusu. Na nsuka, ezali kosalisa motángi ete ayeba malamu lisolo mobimba.

Kobotama ya Yesu na Beteleme

Matai na Luka bakomaki lisolo ya kobotama ya Yesu oyo ezalaki likamwisi monene: abotamaki na mwasi oyo asanganaki naino na mobali te. Matai amonisi ete likamwisi yango ekokisaki likambo oyo Yisaya asakolaki bikeke mingi liboso. (Yisaya 7:14; Matai 1:22, 23) Luka alobi ete Yesu abotamaki na Beteleme mpamba te Kaisala asɛngisaki bato ete bákomisa bankombo na mikanda ya Leta; yango wana Yosefe na Malia bakendaki kuna. (Talá etanda na lokasa 7.) Kobotama ya Yesu na Beteleme ezalaki na ndimbola. Bikeke mingi liboso, Mika asakolaki ete Masiya akobima na mboka moke wana oyo ezali pene na Yelusaleme.​—Mika 5:2.

Butu ya mokolo oyo Yesu abotamaki eyebana mingi mpo na bilyelo ya elilingi oyo basalaka mpo na komonisa makambo oyo malekaki mokolo yango. Nzokande, ndenge mpenza makambo elekaki ekeseni na oyo tomonaka na elakiseli yango. Luka, mokomi ya makambo ya kala, alobeli biso lesansema oyo etindaki Yosefe na Malia ete bákende na Beteleme. Alobi na biso lisusu ete na butu wana, babateli na mpate bazalaki libándá na bibwele na bango. Makambo oyo mibale epusaki balukiluki mingi oyo bayekolaka Biblia na koloba ete Yesu akokaki kobotama na sanza ya Desɛ́mbɛ te. Balobaka ete ezali mpasi kokanisa ete Kaisala asɛngisaki Bayuda oyo bazalaki pene ya kotomboka ete básala mibembo kino na bamboka oyo babotamaki na eleko ya mpiɔ mpe ya mbula. Likambo yango ekokaki kotinda bango na kotomboka. Lisusu, ezali mpenza mpasi ete babateli na mpate bázala libándá na bibwele na bango na eleko wana ya malili makasi.​—Luka 2:8-14.

Tósimba likambo oyo ete Yehova aponaki bato ya mayele mpe bakonzi ya mangomba ya ntango wana te mpo na koyebisa kobotama ya Mwana na ye, kasi aponaki basali-bilanga ya mpiko oyo bazalaki libándá. Ekoki kozala ete Bakomeli na Bafalisai bazalaki kotyela babateli na mpate likebi te, baoyo bangonga ya mosala na bango ezalaki kobongwana ntango nyonso mpe ezalaki kosala ete bátosa te makambo mosusu mikemike ya mibeko oyo mikomami te. Kasi Nzambe apesaki basɔkɛmi mpe basembwi wana lokumu monene—baanzelu bayebisaki bango ete Masiya, oyo libota ya Nzambe ezalaki kozela banda kalakala, abotami na Beteleme. Ezalaki bato wana, kasi “bakonzi misato” oyo tomonaka na elakiseli ya elyelo te nde bakendaki kotala Malia na Yosefe mpe bamonaki mwana alali na elyelo.​—Luka 2:15-20.

Yehova amonisaka ngɔlu epai ya basɔkɛmi oyo balukaka solo

Nzambe amonisaka ngɔlu na basɔkɛmi oyo balingaka ye mpe basepelaka ete bilaka na ye bikokisama. Yango nde likanisi oyo ezali kozonga mingi na makambo oyo masalemaki ntango Yesu abotamaki. Ntango Yesu akokisaki soki sanza moko, Yosefe na Malia bakendaki kolakisa ye na tempelo mpo na kotosa Mibeko ya Mose. Kuna, bapesaki “bibenga mibale soko bana na bibenga mibale” lokola mbeka. (Luka 2:22-24) Mobeko esɛngaki mpenza mpate, kasi endimaki mpe likabo ya ntalo moke soki mopesi azali mobola. (Levitike 12:1-8) Kanisá naino. Yehova Nzambe, Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, aponaki libota ya bazwi te, kasi ya babola lokola ndako oyo Mwana na ye molingami, mobotami-bobele-moko asengelaki kobɔkwama. Soki ozali moboti, likambo oyo esengeli kopusa yo na kokanisa ete likabo eleki malamu oyo okoki kopesa bana na yo—koleka bozwi ya mosuni to kokɔtisa bango kelasi mineneminene—ezali bongo ndako oyo makambo ya elimo etyami na esika ya liboso.

Na tempelo, Yehova amonisi mpe ngɔlu na ye epai ya basɔkɛmi mibale oyo bazali basaleli na ye ya sembo. Moko nkombo na ye Ana, mwasi-mokufeli-mobali oyo azali na mibu 84. Ye “azangaka na tempelo te.” (Luka 2:36, 37, NW) Mosusu azali mobange mobali moko ya sembo, nkombo na ye Simeona. Bango mibale basepeli mingi na libaku malamu oyo Nzambe apesi bango—komona Masiya oyo alakamaki liboso ete bákufa. Simeona asakoli likambo moko mpo na mwana yango. Ezali esakweli ya elikya kasi esangani na kolela. Asakoli ete mokolo mosusu Malia, elenge mwasi oyo abotaki Yesu, akoyoka mpasi na motema mpo na kolela mwana na ye oyo alingaki mingi.​—Luka 2:25-35.

Mwana akómi na likama

Esakweli ya Simeona ezali kokundola likambo ya mawa ete bakoyina mwana yango atako asali eloko te. Koyina yango ebandi ntango azali naino moke mpenza. Lisolo ya Matai eyebisi na bozindo ndenge likambo yango esalemaki. Eleki mwa basanza, Yosefe, Malia, na Yesu bazali kofanda na Beteleme. Bapaya bayei na mbalakaka kotala bango. Na bokeseni na oyo bilakiseli mingi ya elyelo emonisaka, Matai ayebisi motuya ya bato yango te, mpe abéngi bango “bato ya mayele” te to mpe “bakonzi misato” te. Asaleli liloba ya Greke maʹgoi, oyo elimboli “banganga-minzoto.” Bobele likambo yango esengeli kopesa motángi likanisi ete likambo moko ya mabe ezali kosalema, mpamba te Liloba ya Nzambe epekisi kosalela minzoto (astrologie) mpe Bayuda ya sembo bazalaki koboya yango mpenza.​—Deteronome 18:10-12; Yisaya 47:13, 14.

Banganga-minzoto yango balandaki monzoto moko oyo eutaki na ɛsti mpe bamemi makabo mpo na “ye oyo abotami Mokonzi na Bayuda.” (Matai 2:2) Kasi monzoto yango ememi bango na Beteleme te. Ememi bango na Yelusaleme mpe epai ya Elode Monene. Na mokili mobimba, moto mosusu te azali na makoki mpe makaneli ya kosala Yesu mabe. Moto yango oyo alingá lokumu mpe azali mobomi abomaki bandeko na ye mingi oyo amonaki ete bazali kotya bokonzi na ye na likama.a Lokola amitungisi ntango ayoki ete moto moko abotami mpe akozala “mokonzi ya Bayuda,” atindi banganga-minzoto ete báluka Ye na Beteleme. Ntango babandi kokende, likambo moko ya kokamwa esalemi. “Monzoto” oyo ememaki bango na Yelusaleme ebandi kotambola!—Matai 2:1-9.

Toyebi te soki ezalaki mpenza monzoto ya likoló to emonaneli mpamba. Kasi toyebi ete Nzambe te nde atindaki “monzoto” wana. Monzoto yango ememi basambeli wana ya banzambe ya bapakano na esika mpenza oyo Yesu azalaki—mwana moke oyo akoki komibatela te mpe akoki komibikisa te, bobele mobola mosali na mabaya moko na mwasi na ye nde bazali babateli na ye. Banganga-minzoto, baoyo bakosamaki na Elode, na ntembe te balingaki kozonga mpo na kopesa mokonzi mabe wana nsango, na nsima alingaki koboma mwana. Kasi, Nzambe alɔtisi bango ndɔtɔ mpe azongisi bango na mboka na bango na nzela mosusu. Na bongo, esengeli kozala ete “monzoto” wana ezali mayele ya Satana, monguna ya Nzambe, oyo akoki kosalela mwaye nyonso mpo na kosala Masiya mabe. Ezali mpenza likambo ya kokamwa na komona ete bililingi ya elyelo bimonisaka ete Nzambe nde atindaki “monzoto” mpe banganga-minzoto!—Matai 2:9-12.

Atako bongo, Satana alɛmbi te. Mokonzi Elode, oyo Satana azali kosalela na likambo yango, abomisi bana nyonso ya Beteleme oyo bazali na nse ya mbula mibale. Kasi, Satana akoki kolonga Yehova na etumba te. Matai amonisi ete Nzambe ayebaki liboso kobomama ya bana oyo basali eloko te. Na mbala oyo lisusu, Yehova abebisi mwango ya Satana, atindi anzelu koyebisa Yosefe ete akima na Ezipito. Matai akomi ete mwa moke na nsima Yosefe amemi lisusu mwa libota na ye mpe bakei kofanda na Nasalete, epai Yesu akolaki na bandeko na ye ya mibali mpe ya basi.​—Matai 2:13-23; 13:55, 56.

Kobotama ya Yesu—Ndimbola na yango mpo na yo

Okamwi na ndenge totaleli na mokuse makambo oyo esalemaki ntango Yesu abotamaki mpe bomwana na ye? Bato mingi bakamwaka. Bakamwaka na komona ete masolo yango mazali na boyokani mpe mazali na bosikisiki, atako bato mosusu bazali koloba na etingya ete ezali bongo te. Bakamwaka na komona ete makambo mosusu masakolamaki bikeke mingi liboso. Mpe bakamwaka na komona ete makambo mosusu ya ntina na kati ya Baevanzile makeseni mpenza na ndenge makambo emonisamaka na masolo ya kobotama ya mwana Yesu mpe na bilyelo ya elilingi.

Kasi, mbala mosusu likambo oyo eleki kokamwisa ezali ete milulu mingi oyo esalemaka na Noele etyá pembeni likambo oyo eleki ntina na kati ya masolo ya Baevanzile. Na ndakisa, Tata ya Yesu—Yosefe te kasi Yehova Nzambe—batyelaka ye mpenza likebi te. Kanisá ndenge amiyokaki ntango apesaki Mwana na ye molingami epai ya Yosefe na Malia ete bábɔkɔla ye mpe báleisa ye. Kanisá mpasi oyo Tata ya likoló azalaki na yango ntango atikaki Mwana na ye ete akola na mokili epai mokonzi moko atondi na likunya asengelaki koluka kobomisa ye ata ntango azalaki naino moke mpenza! Ezali bolingo mozindo mpo na bato nde etindaki Yehova ete andima likambo ya mpasi motindo yango.​—Yoane 3:16.

Mingimingi na milulu ya Noele babosanaka Yesu na ndenge oyo mpenza Baevanzile elobeli ye. Na esika moko te elobami ete ayebisaki bayekoli mokolo ya kobotama na ye; mpe likambo moko te emonisi ete bayekoli na ye bazalaki kokumisa mokolo oyo abotamaki.

Yesu atindaki bayekoli na ye ete bákanisaka liwa na ye mpe mbongwana monene oyo yango ekɔtisaki na lisolo ya bato, kasi kobotama na ye te. (Luka 22:19, 20) Tosengeli kotalela Yesu lokola mwana moke te oyo akoki komibatela te, alali na kati ya elyelo, mpamba te azali lisusu ndenge yango te lelo oyo. Mbula koleka 60 nsima ya kobomama na ye, Yesu amimonisaki epai ya ntoma Yoane na kati ya emonaneli lokola Mokonzi ya nguya oyo abimi mpo na kobunda etumba. (Emoniseli 19:11-16) Lelo oyo, tosengeli koyeba Yesu na mokumba na ye lokola Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe kuna na likoló, mpamba te azali Mokonzi oyo akobongola mokili.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Kaisala Augusite alobaki ete ngulu ya Elode ekokaki kobika kasi mwana ya Elode te.

[Etanda/Bililingi na lokasa 7]

Luka azalaki na libunga?

NDENGE nini Yesu, oyo akolaki na Nasalete mpe oyo bato nyonso bayebaki ye lokola moto ya Nasalete, akokaki kobotama na Beteleme, oyo ekabwani na Nasalete na kilomɛtɛlɛ 150? Luka alobi ete: “Na mikolo yango [liboso ete Yesu abotama] mobeko ebimaki na Kaisala Augusite ete bákoma nkombo na bato na mikili nyonso na mikanda. Oyo kokoma na liboso esalamaki wana ezalaki Kuleni mokolo na mokili na Sulia. Bato nyonso bakendaki kokomama nkombo, moto na mboka na ye moto na mboka na ye.”​—Luka 1:1; 2:1-3.

Batyoli ya Biblia balobelaka mingi bavɛrsɛ yango ete ezali libunga to mpe ezali lokuta mpenza. Na etingya nyonso, balobaka ete lesansema yango esalemaki na mobu 6 to 7 T.B. ntango Kuleni (Quirinius) azalaki koyangela. Soki maloba na bango ezali solo, boye tokokakatana mpenza mpo na kondima lisolo ya Luka, mpamba te bilembeteli bimonisi ete Yesu abotamaki na mobu 2 L.T.B. Kasi, batyoli yango babosanaka makambo mibale ya ntina. Ya liboso, Luka alobi ete lesansema esalemaki bobele mbala moko te​—tósimba malamu ete alobeli “kokoma[ma] na liboso.” Ayebaki ete lesansema mosusu esalemaki nsima. (Misala 5:37) Lesansema oyo ya mibale ezali yango nde Josèphe, mokomi ya makambo ya kala, amonisi ete esalemaki na mobu 6 T.B. Ya mibale, boyangeli ya Kuleni ezali likambo oyo ezali kosɛngisa biso te ete tózongisa nsima dati oyo Yesu abotamaki. Mpo na nini? Mpamba te emonani ete Kuleni ayangelaki mbala mibale. Banganga-mayele ya Biblia mingi bandimaka ete boyangeli na ye ya liboso esukaki na mobu 2 L.T.B.

Batyoli ya Biblia balobaka ete Luka alobelaki lesansema ya lokuta mpo na kondimisa bato ete Yesu abotamaki na Beteleme mpo ete Yesu akokisa esakweli ya Mika 5:2. Likanisi wana ezali komonisa ete Luka akosaki na nko, kasi motyoli ya Biblia moko te akoki komonisa ete molukiluki ya molende oyo akomaki Evanzile ya Luka mpe mokanda ya Misala akokaki kosala likambo motindo yango.

Likambo mosusu oyo batyoli ya Biblia bakokaka kolimbola te ezali ete lesansema yango ekokisaki esakweli! Na ekeke ya motoba L.T.B., Danyele asakolaki ete mokonzi moko “akotinda mokɔngɔli na mpako na kati na nkembo na mokili.” Likambo yango ekokisamaki na Augusite mpe etinda na ye ya kosala lesansema na Yisalaele? Esakweli elobi lisusu ete Masiya, to “Mokonzi na kondimana,” ‘akobukana’ na boyangeli ya mokitani ya mokonzi yango. Yesu ‘abukanaki’ solo, abomamaki ntango Tibeli, mokitani ya Augusite, azalaki koyangela.​—Danyele 11:20-22.

[Bililingi]

Kaisala Augusite (27 L.T.B.​-⁠14 T.B.)

Tibeli Kaisala (14-37 T.B.)

[Eutelo ya bafɔtɔs]

Musée de Normandie, Caen, France

Tokangi fɔtɔ oyo na ndingisa ya British Museum

[Elilingi na lokasa 8]

Anzelu ya Yehova aponaki basɔkɛmi babateli na mpate mpo na koyebisa bango nsango malamu ya kobotama ya Yesu

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto