“Mosala na bino ezali mpamba te”
1 Lokola oyebi ete mosala oyo ozali kosalela Yehova ezali ya mpamba te, yango ezali mpenza kolendisa yo, boye te? (1 Kol. 15:58) Nzokande, kanisá naino ndenge bato basalaka milende mpo na koluka kobongisa bomoi na bango, to koluka kokóma na mbongo mingi. Mbala mosusu basalaka makasi mpo na kotánga bakelasi ya milaimilai na boumeli ya bambula mingi to bazali koboma nzoto na mosala mpo bákóma na bozwi mingi. Kasi, “ntango mpe makambo makanami te” ekoki kosala ete bázwa te lokumu oyo bazalaki koluka, to básuka bobele na biloko moke mpenza na ndenge oyo balingaki te. Milende na bango ezali mpamba, lokola “koluka kokwa mopɛpɛ.” (Mos. 1:14; 9:11) Yango wana, ezali mpenza na ntina mingi lokola tozali na makambo mingi ya kosala na mosala bobele moko oyo ezali ya mpamba te mpo ete matomba na yango ekoumela seko!
2 Mosala oyo ezali mpenza na ntina: Kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe ezali mosala moko ya ntina mingi oyo eleki misala nyonso awa na mabele. Mosala yango esengeli kosalema ata soki bato bandimi koyoka to baboyi koyoka. Biso mpe tolingi tóloba ndenge Paulo alobaki ete: “Nazali pɛto na makila ya bato nyonso, mpamba te nazangaki te kopesa bino toli nyonso ya Nzambe.”—Mis. 20:26, 27, NW.
3 Ntango bato bazali koyoka nsango malamu ya Bokonzi mpe bazali kondima yango, tozalaka mpenza na esengo, boye te? Elenge mwasi moko akufelaki mama leki na ye. Azalaki komituna soki mama leki na ye akei wapi—na likoló to na lifelo? Ntango azalaki kobondela Nzambe mpo na kosɛnga ye asalisa ye, asalelaki nkombo Yehova ndenge ndeko na ye ya mwasi alakisaki ye. Eumelaki te abandaki koyekola Biblia mpe koyangana na makita ya boklisto. Yango esalisaki ye ete abanda kotalela bomoi na lolenge moko ya sika mpe alongwaki na etuluku ya bilenge ya mobulu oyo ye azalaki. Elenge mwasi yango atikaki komela likaya, komela bangi mpe koyiba. Alobi ete: “Ezali mpo nalingaki Yehova yango wana natikaki makambo ya mabe oyo nazalaki kosala. Bobele Yehova na mawa na ye monene nde akokaki kopesa ngai elikya ya bomoi ya seko.” Elenge mwasi yango azali lisusu kobebisa bomoi na ye te na misala ezangi ntina.
4 Ata soki bato baboyi koyoka, ozali ntango nyonso kokokisa mosala moko ya ntina mingi. Bayebi ete Batatoli ya Yehova bayaka kotala bango. Ozali komonisa bokangami na yo, bosembo na yo, mpe bolingo na yo. Na yango, mosala ya Nkolo oyo ozali kosala ezali mpamba? Soko moke te!