Ndenge nini mabota ekoki kozala makasi na elimo?
1 Mabota ya baklisto esengeli kozwa longonya mpo ‘basalelaka ezaleli ya kobanga Nzambe na kati ya bandako na bango moko.’ (1 Tim. 5:4, NW) Nzokande, lokola mokili oyo ezingi biso etondi na makambo mabe oyo ekoki kolɛmbisa kondima na biso, ezali mpenza na ntina ete mabota esala milende mpo na kotikala makasi na elimo. Ndenge nini bakoki kosala yango?
2 Bólanda ndenge Klisto asalelaka bokonzi na ye: Batata ya mabota basengeli kolanda ndakisa ya Yesu Klisto ntango bazali kokokisa mokumba na bango ya kolendisa bato ya ndako na bango. Longola ndenge oyo amonisaki bolingo na ye mpo na biso ntango andimaki kokufa lokola mbeka, tii lelo, Yesu azali se kokoba ‘koleisa’ mpe ‘kobatela’ lisangá. (Ef. 5:25-29) Baboti ya bolingo balandaka ndakisa wana; mokolo na mokolo, bakokisaka na bolingo mpenza bamposa ya elimo ya mabota na bango. Mpo na yango, esɛngaka ete bátambwisaka boyekoli ya Biblia na libota pɔsɔ na pɔsɔ, básololaka masolo ya elimo oyo ezali mpenza na ntina ntango nyonso oyo bazwi likoki ya kosala yango, mpe bálukaka ndenge ya kosilisa mikakatano soki ebimi.—Det. 6:6, 7.
3 Na mosala ya kosakola: Bato nyonso ya libota basengeli koyeba ete kopesa litatoli epai ya bato mosusu na ntina na Yehova mpe mikano na ye, ezali likambo ya ntina mingi na losambo na bango. (Yis. 43:10-12) Soki bino baboti bolingi ete bana na bino bázala Batatoli ya sembo ya Yehova, bosengeli kobanda kobongisa mitema na bango mpo na mosala ya kosakola ntango bazali naino mike. Bósololaka mpo na komonisa bango ntina ya kozala na elimo ya komipesa na mosala ya kosakola mpe ntina ya kobimaka pɔsɔ na pɔsɔ na mosala yango. (Mat. 22:37-39) Na nsima, bómibongisa mpo na kobimaka na bango mbala na mbala na mosala ya kosakola.
4 Lisusu, bósalisa bango bámona ntina ya mosala ya kosakola. Mpo na yango, na ntango ya boyekoli ya libota pɔsɔ na pɔsɔ, bokoki kozwa mwa miniti mpo na kobongisa lolenge moko ya malamu mpenza ya kobanda lisolo mpe bokoki komekameka yango. Na mosala ya kosakola, bópesa mwana mokomoko formasyo oyo ebongi na ye mpo akoka kokola na kotalela makoki mpe mbula na ye. Nsima ya kosakola elongo na ye, bótuna ye ayebisa ndenge ye moko amonaki mpenza motema malamu ya Yehova. Bóbɛtelaka bango masolo oyo ekolendisa kondima na bango. Ntango mabota ‘ezali kososola ete Nkolo azali na boboto,’ yango ekosala ete bápusana lisusu koleka penepene na Yehova mpe bázwa makasi ya koboya “mabe nyonso.”—1 Pet. 2:1-3.
5 Na makita: Ezalaka mpenza malamu soki bato ya libota moko bazali kosalisana mpo na koyangana na makita nyonso ya lisangá, mingimingi ntango moko na bango alɛmbi, alɛmbi nzoto, to makambo elekeli ye! Ndeko mwasi moko oyo azali elenge alobaki ete: “Ntango tata autaka mosala, alɛmbaka mingi. Kasi nayebisaka ye likambo moko ya malamu oyo ekolobelama na makita na mpokwa wana, mpe yango epesaka ye makasi ya kokende na makita. Mokolo mosusu, soki ngai mpe nalɛmbi, ye nde alendisaka ngai nakende na makita.”—Ebe. 10:24, 25.
6 Kosala makambo elongo: Bato ya libota moko basengeli kosala makambo elongo, na ndakisa kosalisana na misala ya ndako. Basengeli mpe kobomba ntango mpo na kominanola na lolenge oyo ebongi. Kokende kolya mpe komɛla na esika moko boye, kokende kotambola, kosakana, kokende kotala bandeko to baninga, nyonso wana ezali bantango ya esengo oyo etikalaka libela na makanisi.—Mos. 3:4.
7 Mabota ya baklisto oyo ezali makasi na elimo elongaka mikakatano ya mokolo na mokolo, mikakatano oyo ekoki kobebisa elimo na bango. Ntango mabota yango ezali kopusana lisusu koleka penepene na Yehova, ezali komona ete azali kopesa bango nguya na ye.—Ef. 6:10.