Loyembo 106
Tósɛnzɛla na lolenge tozali kotambola
1. Tómisɛnzɛla. Tómibatela.
Banso, tózala na bokɛngi,
Tóbungisaka ntango te,
Satan’azali mabe.
Tómisɛnzɛla. Tómibatela.
Banso, tózala na bokɛngi.
2. Maloba manso tokobimisa,
Ezala mpo na kobɔndisa;
Tóteya bato Liloba,
Mpo ete bápɛngwa te.
Maloba manso tokobimisa,
Ezala mpo na kobɔndisa.
3. Tómonisaka mpenza boboto
Kati na mosala ya Nzambe.
Tóbatelaka bampate
Na ndakisa na Yesu.
Tómonisaka mpenza boboto
Kati na mosala ya Nzambe.