“Bómilɛngɛla”
1 Na esakweli monene oyo Yesu apesaki na ntina na bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo, akebisaki bayekoli na ye ete bámipesa mobimba te na makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo. (Mat. 24:36-39; Luka 21:34, 35) Bolɔzi monene ekoki kobanda ata na ntango nini; yango wana, tosengeli mpenza kolanda toli oyo ya Yesu: “Bómilɛngɛla, mpamba te na ngonga oyo bozali kokanisa te ete ezali yango, Mwana ya moto akoya.” (Mat. 24:44) Nini ekoki kosalisa biso na komilɛngɛla?
2 Tómitika te na mitungisi mpe na makambo oyo bato balekisaka na yango ntango: Motambo moko oyo tosengeli komibatela na yango na elimo ezali komitungisa mpo na biloko ya kobikela. (Luka 21:34) Na mikili mosusu, bato bazali kozwa biloko ya kobikela na mpasi mpo bazali babola, bazangi mosala mpe mpo biloko yango ezali ntalo makasi. Na mikili mosusu, kozwa biloko ya mokili ezali mpasi te. Soki tokómi kokanisa kaka na biloko ya mokili, likama ezali ete tokotyela lisusu makambo etali Bokonzi likebi nyonso te. (Mat. 6:19-24, 31-33) Makita ya boklisto esalisaka biso tólanda kotya likebi na biso na makambo yango. Omityelá mokano ya kozangisa ata likita moko te?—Ebe. 10:24, 25.
3 Lelo oyo, mokili etondi na makambo oyo bato balekisaka na yango ntango; soki tokɛbi te, makambo yango ekoki kozwa ntango na biso mingi. Na ndakisa, ordinatɛrɛ ekoki kokómela biso motambo soki tozali kolekisa ntango mingi mpo na kotala makambo ndenge na ndenge oyo ezali na Internet, kotindelana mikanda na Internet to mpe kobɛta masano na ordinatɛrɛ. Soki tozali kobebisa ntango mingi na kotala televizyo mpe bafilme, na makambo oyo tolingaka kosala mpo na kolekisa ntango, na kotánga mikanda ya mokili mpe na masano, tokotikala na ntango to na makasi mingi te mpo na komipesa na makambo ya elimo. Kozwa mopɛpɛ mpe kominanola ekoki kopemisa biso mpo na mwa ntango moke, kasi koyekola Biblia biso moko mpe na kati ya libota epesaka matomba oyo eumelaka libela. (1 Tim. 4:7, 8) Osombaka ntango mpo na komanyola likoló ya Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo?—Ef. 5:15-17.
4 Tokoki mpenza kozala na botɔndi mpo na ndenge ebongiseli ya Yehova etyeli biso programɛ ya koteya biso na elimo mpo na kosalisa biso ‘tólonga kokima makambo nyonso oyo esengeli kobima, mpe kotɛlɛma liboso ya Mwana ya moto.’ (Luka 21:36) Tiká ete tósalela malamumalamu programɛ yango mpe ‘tómilɛngɛla’ mpo kondima na biso ekoka kozala “ntina ya lisanzoli mpe ya nkembo mpe ya lokumu na emoniseli ya Yesu Klisto.”—1 Pet. 1:7.