Kopesa moto longonya elendisaka ye
1 Na ntango ya kolala, mwana moko ya moke ya mwasi alelaki na mongongo makasi; alobaki boye: “Nasalaki makambo ya malamu lelo te?” Motuna wana ekamwisaki mama na ye. Mama amonaki ndenge mwana na ye asalaki makasi mokolo yango mpo asala ata likambo moko te ya mabe, kasi apesaki mwana na ye longonya ata mbala moko te. Ndenge mwana wana alelaki mpo bapesaki ye longonya te emonisi biso lisusu ete biso nyonso, bilenge mpe mikóló, tozalaka na mposa bápesa biso longonya. Bongo yo, olendisaka baoyo ofandaka na bango na kopesáká bango longonya mpo na makambo ya malamu oyo basalaka?—Mas. 25:11.
2 Baninga na biso baklisto basalaka makambo mingi oyo esengeli kotindaka biso na kopesa bango longonya. Bankulutu, basaleli na misala mpe babongisi-nzela basalaka mosala makasi mpo na kokokisa mikumba na bango. (1 Tim. 4:10; 5:17) Baboti oyo babangaka Nzambe basalaka makasi mpo na kobɔkɔla bana na bango na banzela ya Yehova. (Ef. 6:4) Baklisto oyo bazali bilenge babundaka etumba monene mpo na koboya “elimo ya mokili.” (1 Kol. 2:12; Ef. 2:1-3) Baklisto mosusu basalelaka Yehova na bosembo mpenza atako bakómi mibange to bazali nzoto kolɔngɔnɔ te to mpe bazali na mikakatano mosusu. (2 Kol. 12:7) Baoyo nyonso totángi babongi mpenza kozwa longonya. Opesaka bango longonya mpo na milende oyo basalaka?
3 Epesama na moto na moto na kotalela likambo ya malamu oyo asali: Biso nyonso tosepelaka mingi soki ndeko moko apesi lisangá mobimba longonya na lisolo oyo azali kosala na estrade. Nzokande, moto nyonso alendisamaka mingi koleka soki bapesi nde ye longonya mpo na likambo ya malamu oyo asali. Na ndakisa, na mokapo 16 ya mokanda oyo atindelaki baklisto ya Loma, Paulo apesaki longonya na Foebe, na Pilisika mpe Akila, na Tilifene mpe Tilifoze, na Pelesisi mpe na basusu mpo na makambo ya malamu oyo mokomoko na bango azalaki kosala. (Lom. 16:1-4, 12) Na ntembe te, maloba na ye elendisaki mpenza baklisto wana ya sembo! Maloba wana ya kokumisa endimisaka bandeko na biso ete tozali na mposa na bango mpe ebendaka biso penepene na bango. Na mikolo oyo euti koleka, opesaki ndeko moko longonya mpo na likambo moko ya malamu oyo asalaki?—Ef. 4:29.
4 Euta na motema: Mpo longonya oyo topesi moto elendisa ye mpenza, esengeli kozala ya solosolo. Moto ayebaka soki longonya oyo bazali kopesa ye euti mpenza na motema to bazali bobele ‘koyebisa ye maloba ya sukali.’ (Mas. 28:23, NW) Soki tozali kosala nyonso mpo na komona makambo malamu oyo basusu basalaka, motema na biso ekotinda biso tópesaka bango longonya. Tiká ete tópesaka basusu longonya ya solosolo, mpamba te toyebi ete “liloba lilobami na ntango ekoki ezali malamu boni!”—Mas. 15:23.