Ndenge ya kolakisa buku Yekolá epai ya Moteyi Monene
◼ “Okanisi ete mokili elingaki kozala malamu koleka soki bato basalelaki toli oyo? [Tángá Matai 7:12a. Na nsima tiká ye apesa eyano.] Buku oyo ezali na mateya mingi ya moteyi oyo aleki bateyi nyonso.” Lobelá bililingi mpe maloba oyo ezali na nse ya bililingi ya mokapo 17.
◼ “Lelo oyo baboti mingi bateyaka mokemoke bizaleli malamu epai ya bana na bango. Okanisi ete ezali na ntina kosala yango? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Masese 22:6.] Vɛrsɛ oyo emonisi ete baboti basengeli kobanda koteya bana na bango ntango bazali naino mike mpenza. Bakomi buku oyo mpo na kosalisa baboti báteyaka bana na bango.” Lobelá bililingi mpe maloba oyo ezali na nse ya bililingi ya mokapo 15, 18, to 32.
◼ “Mbala mingi baboti bakamwaka ntango bayokaka mituna oyo bana na bango batunaka. Mituna yango mosusu ezalaka mpasi mpo na kopesa eyano, ezali bongo te? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá 2 Timote 3:14, 15.] Mama ya Timote mpe nkɔkɔ na ye bateyaki ye Makomami banda bomwana. Buku oyo ekoki kosalisa baboti básala mpe bongo lelo oyo.” Lobelá mwa moke bililingi mpe maloba oyo ezali na nse ya bililingi ya mokapo 11 mpe 12 to 34 tii 36.