Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 5/04 lok. 1
  • Monisá ete ozali na botɔndi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Monisá ete ozali na botɔndi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Masolo mosusu
  • Bózalaka na botondi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • “Bómimonisa bato ya Botɔndi”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • ‘Tómonisa botɔ́ndi’
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Tómonisa botɔndi mpo na oyo tozali na yango
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2004
km 5/04 lok. 1

Monisá ete ozali na botɔndi

1 Atako tozali kobika na “bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza,” tozali na bantina mingi ya komonisa botɔndi epai ya Yehova. (2 Tim. 3:⁠1) Ntina oyo eleki nyonso ezali likabo ya motuya ya Mwana na ye oyo apesaki mpo na kobikisa biso. (Yoa. 3:16) Lisusu, tozali na ebele ya bilei ya elimo, nzokande, baoyo bazali na mangomba ya lokuta bazali konyokwama na nzala na elimo. (Yis. 65:13) Tozali na kati ya lisangá ya bandeko na mokili mobimba mpe tozwi libaku ya kopesa mabɔkɔ na mosala monene ya kopalanganisa losambo ya solo. (Yis. 2:​3, 4; 60:​4-10, 22) Ndenge nini tokoki komonisa Yehova botɔndi mpo na ebele ya mapamboli oyo asopeli biso?​—⁠Kols. 3:​15, 17.

2 Kosala na esengo mpe na motema mobimba: Ntango ntoma Paulo alobelaki makabo, akomaki boye: “Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.” (2 Kol. 9:⁠7) Tokoki kosalela etinda yango mpe na mosala oyo tozali kosalela Nzambe. Soki tozali na botɔndi, yango ekomonana na ndenge oyo tozali kosepela na solo, na esengo oyo tozali na yango na makita, na molende na biso na mosala ya kosakola, mpe na ndenge oyo tozali kokokisa mokano ya Nzambe na esengo mpenza.​—⁠Nz. 107:​21, 22; 119:14; 122:1; Lom. 12:​8, 11.

3 Na Yisalaele ya kala, Mibeko ekataki te motuya ya makabo mosusu oyo basengelaki kopesa. Mosambeli mokomoko akokaki komonisa botɔndi na ye na kopesaka “lokola na lipamboli ya [Yehova]” oyo asili kozwa. (Det. 16:​16, 17) Ndenge moko mpe lelo oyo, soki tozali na motema oyo etondi na botɔndi, tokosala nyonso oyo tokoki mpo na kosakola mpe kokómisa bato bayekoli. Kobanda na sanza ya Yuni kino Augusto, tozalaka mbala mingi na mabaku ya komonisa botɔndi na biso. Basusu soki bazwi konje na mosala, na kelasi, to soki bazali na ntango mingi, bamipesaka na mosala ya kosakola, ata mpe kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Okoki kosakola mingi?

4 Tótonda na botɔndi: Lolenge ya malamu koleka oyo tokoki komonisa botɔndi na biso ezali na nzela ya libondeli. (1 Tes. 5:​17, 18) Liloba ya Nzambe elendisi biso ‘tótondana mpenza na kondima na kati ya matɔndi.’ (Kols. 2:⁠7) Ata soki tozali na makambo mingi ya kosala to tozali kotungisama na makambo mingi, tosengeli ntango nyonso kokɔtisaka maloba ya botɔndi na mabondeli na biso. (Filp. 4:⁠6) Lisusu, na nzela ya mosala na biso ya kosakola mpe na mabondeli na biso, tiká ete ‘tózala na maloba mingi ya kopesa matɔndi epai ya Nzambe.’​—⁠2 Kol. 9:⁠12.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto