Bato ya ndenge nyonso bakobika
1. Nzambe atalaka nini epai na biso?
1 Motema-boboto ya Nzambe efungoleli bato nzela ya lobiko. Mokano ya Yehova ezali ete “bato ya ndenge nyonso bábika mpe bákóma na boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Tim. 2:3, 4) Nzambe atalaka te soki tozali mondele to moindo, mozwi to mobola, soki tozali mayele mingi to te, atalaka mpe kitoko ya nzoto te. Atalaka nde kondima oyo tozali na yango na mbeka ya lisiko ya Yesu. (Yoa. 3:16, 36) Lokola tozali kosala elongo na Nzambe, tosengeli kolongola makanisi nyonso ya koponapona, oyo ekoki kotinda biso tóboya bato oyo Yehova ye moko andimi bango.
2, 3. Nini ekoki kosalisa biso tótalela bato te kaka na ndenge oyo bazali komonana na miso?
2 Kopona bilongi te: Yehova atalaka motema ya moto, kozanga kopona bilongi to kozala na makanisi mabe. (1 Sam. 16:7) Atalaka mpe oyo moto akoki kokóma na mikolo ezali koya. Na bongo, asepelaka mingi na bato oyo balukaka kosepelisa ye. (Hag. 2:7) Totalelaka basusu ndenge Nzambe atalelaka bango?
3 Bato mosusu oyo tokutanaka na bango na mosala ya kosakola bakoki kobangisa biso na ndenge oyo bazali komonana na miso. Bakoki kolata lokola babola to kolata na ndenge ya kolekisa ndelo, bakoki kotika mandɛfu mingi to kolata eloko ya litoyi na zolo to na mbɛbu. Bato mosusu, bakoki kozanga esika ya kofanda. Basusu bakoki kosalela biso makambo na kozanga boboto. Na esika ya kokata ete bato ya ndenge wana bakoki kokóma basambeli ya Yehova te, tosengeli kozala na makanisi malamu, “mpo biso mpe tozalaki liboso bazoba, bato bazangá botosi, tozalaki babungi-nzela.” (Tito 3:3) Soki toyebi bongo, tokozala na mposa makasi ya kosakola epai ya bato nyonso, ata baoyo bakoki komonana na miso ete babongi te.
4, 5. Liteya nini tozwi na ndakisa ya Yesu ná Paulo?
4 Bandakisa ya ekeke ya liboso: Yesu Klisto azalaki kozwa ntango ya kosalisa bato mosusu oyo bato bazalaki kokanisa ete bakoki kobongwana ata moke te. (Luka 8:26-39) Atako azalaki kokanga miso na misala mabe te, ayebaki ete moto akoki kokangama na motambo ya misala mabe. (Luka 7:37, 38, 44-48) Yango wana, amonisaki ete azali komitya na esika bato, mpe “mawa ekangaki ye mpo na bango, mpamba te bazalaki lokola bampate bazangi mobateli.” (Mko. 6:34) Tokoki nde kolanda ndakisa na ye malamumalamu?
5 Bato babambaki ntoma Paulo mabanga, babɛtaki ye, mpe batyaki ye na bolɔkɔ. (Mis. 14:19; 16:22, 23) Ndenge oyo banyokolaki ye, elɛmbisaki ye nzoto mpe etindaki ye akanisa ete azalaki kobebisa ntango na ye mpamba epai ya bato ya bikólo mpe mabota mosusu? Soki moke te. Ayebaki ete akokaki kokuta bato ya mitema sembo na bikólo nyonso, mpe amityelaki mokano ya koluka bango. Totalelaka mpe ndenge wana bato oyo bazali na teritware na biso, oyo bauti bipai na bipai mpe bazali na mimeseno ya ndenge na ndenge?
6. Ndenge oyo totalelaka bato ya sika oyo bayaka na makita ya lisangá, ekoki kosala bango nini?
6 Koyamba bato lelo oyo: Basaleli mingi ya Nzambe bazali na esengo mpo bandeko mibali mpe basi bayambaki bango na lisangá kozanga ete bátya likebi mingi na ndenge oyo bazalaki komonana na miso. Na Allemagne, mobali moko oyo azalaki na mandɛfu mingi, na nsuki mingi mpe alataki bilamba ya salite, ayaki na Ndako ya Bokonzi. Ayebanaki ete azali moto ya mobulu. Atako bongo, bandeko bayambaki ye na esengo. Akamwaki mingi, yango wana pɔsɔ moko na nsima, ayaki lisusu na makita. Nsima ya mwa ntango, akómaki kolata malamu, akataki mandɛfu ná nsuki, atikaki komɛla makaya, mpe akomisaki libala na ye na mikanda ya Leta. Eumelaki te, ye ná mwasi na ye ná bana na bango bakómaki kosalela Yehova mpe libota na bango ekómaki na bomoko.
7. Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Nzambe na biso oyo aponaka bilongi te?
7 Tiká ete tólanda ndakisa ya Nzambe na biso oyo aponaka bilongi te mpe tóbenga bato nyonso bázwa matomba na motema-boboto na Ye.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 3]
“Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala boyengebene andimami na ye.”—Mis. 10:34, 35.