Meká lolenge moko ya kobanda lisolo oyo ebongi
Soki totyelaka bato likebi mpenza, tokosala nyonso tóyeba bamposa na bango mpe tómonisa bango ndenge oyo Bokonzi ekosilisa mikakatano nyonso oyo ezali kotungisa bango. (Filp. 2:4) Basakoli mingi bamonaka ete bazwaka matomba soki babandi lisolo na kosɛnga moto oyo bazali kosolola na ye apesa likanisi na bililingi ya Paladiso oyo ezalaka na mikanda na biso, lokola oyo batii awa na lobɔkɔ ya mobali. Yo mpe okoki kosala bongo soki osaleli moko ya maloba ya kobanda lisolo oyo elandi:
◼ “Okanisi ete mokolo mosusu bato bakozala na bomoi lokola oyo ozali komona na elilingi oyo?”
◼ “Biso nyonso tolingaka ete bana na biso báfanda na esika lokola oyo. Mpo na yo, esengeli kosala nini mpo mokili ekóma boye?”
◼ “Elilingi oyo ezali komonisa ndenge mabelé ekokóma ntango mokano ya Nzambe ekosalema awa na mabelé ndenge ezali kosalema na likoló. Omoni likambo moko oyo ezali kosalema lelo te?”
◼ “Olingi kozala na bomoi lokola oyo? [Tiká ye apesa eyano.] Okanisi ete likambo oyo ekoki kosalema na mikolo na biso?”
Yoká na likebi mpenza eyano ya moto yango, mpe tuná ye lisusu motuna moko to mituna mibale mpo na koyeba likanisi na ye. Soki bato mosusu balobi ete bakosepela te kozala na bomoi ya ndenge wana to bandimaka te ete likambo ya ndenge wana ekoki kosalema, koloba mbala moko te ete baboyi. Na mayele mpenza, tuná bango ntina oyo balobi bongo. Maloba na bango ekoki komonisa ete bazali komitungisa mingi mpo na bampasi oyo bato bazali kokutana na yango, oyo ezali komonana ete ekosila te.—Ezek. 9:4.
Soki oyebi makambo oyo ezali kotungisa moto oyo ozali kosolola na ye, sololá na ye na kotalela makambo yango. Lobelá nsango ya Bokonzi oyo eyokani na bamposa na ye. Monisá ye vɛrsɛ moko to bavɛrsɛ mibale oyo elobeli likambo oyo ezali kotungisa ye. (Talá makanisi oyo ezali na lobɔkɔ ya mobali.) Tiká amona ye moko makambo oyo Liloba ya Nzambe elobi. Soki asepeli, lakisá ye mokanda mpe bóyokana mpo ozongela ye. Salá ete asepela lisusu mingi na nsango malamu.
[Etanda na lokasa 6]
Bandakisa ya bililingi ya Paladiso
Buku Création: nkasa 237, 243, 251
Buku Boyebi: nkasa 4-5, 188-189
Mwa buku Azali kosɛnga: nkasa 11, 13
Buku Paix véritable: lokasa 98
Buku Tósambela Nzambe: nkasa 92-93
[Etanda na lokasa 6]
Makambo oyo etungisaka bato
Kanyaka mpe kozanga bosembo
Koboma bato, mobulu
Liwa, kolela
Konyokwama na makanisi
Koboma bato, mobulu
Esika ya kofanda, mikakatano ya mbongo
Guvɛrnɛma ekokisaka bamposa ya bato te
Konyokola banyama
Kobeba ya bizaleli malamu
Koboma bato, mobulu
Kokanisela basusu mabe, bokeseni kati na bato
Kobebisa mabelé
Maladi, kobeba ya binama ya nzoto
Bitumba, terorisme