Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/99 lok. 8
  • Ndenge nini okoki kosolola na Mizilma?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini okoki kosolola na Mizilma?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Masolo mosusu
  • Osalelaka mwa babuku oyo?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Tósakola epai na bato ya nkota nyonso mpe ya mangomba nyonso
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Ndenge ya kosalela mwa buku ya sika Nsango malamu oyo euti na Nzambe!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Tómekola Yehova na komibanzabanzáká mpenza mpo na bazalani na biso
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1999
km 11/99 lok. 8

Ndenge nini okoki kosolola na Mizilma?

1 Osilá kopesa litatoli epai ya Mizilma moko? Soki ezali bongo, na ntembe te omonaki ete Bamizilma bazali na kondima makasi epai ya Nzambe. Kasi, bayebi makambo mingi te mpo na Paladiso oyo ekozala awa na mabelé ndenge basakoli ya Yehova bayebisaki yango, mpe tokosepela koyebisa bango elikya yango. (1 Tim. 2:3, 4) Makambo oyo ezali awa na nse ekosalisa yo opesa litatoli ya malamu.

2 Bamizilma bandimaka Allah, to Nzambe, mpe balobaka ete Mahomet (Muḥammed) azali profeta ya Nzambe. Buku mosantu na bango ezali Coran, mpe nkombo ya lingomba na bango ezali Islam, yango elimboli “botosi.” Coran eteyaka ete lokuta mpe losambo ya bikeko ezali mabe, Nzambe azali bobele moko kasi azali Bosato te. Lisusu, buku yango eteyaka ete molimo ekufaka te, lifelo ya mɔ́tɔ ezali, mpe paladiso ezali na likoló. Bamizilma bandimaka ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe kasi bakanisaka ete ezali lisusu ndenge bakomaki yango te, nzokande lokola Coran ezali kaka na monɔkɔ oyo bakomaki yango na ebandeli, ebongwaná te.

3 Zalá na boboto, na mayele, mpe na bososoli: Ntango ozali kosolola na Mizilma, zalá na boboto mpe na mayele. (Mas. 25:15) Kobosana te ete Bamizilma bakangamaka makasi na bindimeli na bango mpe mingi bakangá yango bobele na motó. Yango wana, bateyaka Bamizilma te ete bákanga ntina ya mateya ya lingomba mpe báluka soki mokano ya Nzambe ezali nini. (Lom. 12:2) Mpo na kosalisa Bamizilma, ebongi mpenza kozala motema molai mpe komitya na esika na bango.—1 Kol. 9:19-23.

4 Kosalela te maloba oyo ekopusa Mizilma akanisa ete yo ozali mondimi ya mangomba ya boklisto. Monisá polele ete ozali mondimi ya Lingomba ya Katolike te, to ya Protesta te. Lobelá ntango nyonso Biblia lokola Mokanda ya Nzambe. Lokola Bamizilma balingaka te koyoka liloba “Mwana ya Nzambe,” eleki malamu kosalela yango te to kolobela lisolo yango te tii ntango oyo moto yango akoyoka mpenza mposa ya kokola na elimo. Kasi, okoki kolobela Yesu, kobenga ye profeta to motindami. Koluka koswana te. Soki omoni ete moto yango akómi kosilika, osengeli nokinoki kokabwana na ye na boboto mpenza.

5 Eleki malamu kosolola na moto moko na esika ya kosolola na bato ebele mbala moko. Mbala mingi, ezali malamu ete bandeko basi básolola na basi mpe mibali, básolola na mibali. Nzokande, ezali mpe na bantango mosusu oyo mwasi akoki kosolola na mobali mpe mobali akoki kosolola na mwasi, kasi ebongi kosalela bososoli mpo na yango. Lisusu, Bamizilma mingi basepelaka te na molato to monzele oyo batalelaka ete ebongi te mpo na basi. Bandeko basi basengeli koyeba likambo yango.—1 Kol. 10:31-33.

6 Makambo oyo osengeli kolobela: Lobá polele ete Nzambe azali mokonzi monene mpe azali na bolingo mingi. Kokakatana te mpo na koloba ete ozali mondimi ya solo, ete Nzambe azali bobele moko (Bosato te), mpe losambo ya bikeko ezali mabe. Lobelá makambo mabe oyo ezali komonana na mokili lelo oyo—bitumba, mobulu, koyina bato ya lomposo mosusu, mpe bokosi oyo ezali komonana epai ya bato mingi oyo basambelaka.

7 Mwa buku La direction venant de Dieu: le chemin qui mène au Paradis ekopesa yo mayele mpe masolo oyo okoki kosalela mpo na kobanda kosolola na Bamizilma. Mwa buku yango ebongisami mpo na kobenda likebi ya Bamizilma oyo bafandaka na bisika oyo bakoki koyekola Biblia kozanga kobanga.

8 Na ndakisa, okoki koloba boye:

◼ “Nazali kosala makasi mpo na kosolola na Bamizilma. Natángaki makambo ya lingomba na bino mpe nakanisi ete nazali na elonga ya koloba ete Bamizilma bandimaka Nzambe moko ya solo mpe baprofeta na ye nyonso. [Tiká ye apesa eyano.] Nakosepela kosolola na yo esakweli moko ya kala oyo elobaki ete mabelé ekokóma paladiso. Nakoki kotángela yo makambo profeta yango akomaki? [Tángá Yisaya 11:6-9.] Esakweli yango etindi ngai na kokanisa maloba ya Coran oyo tozali kokuta na mwa buku oyo.” Fungolá lokasa 9 na mwa buku La direction venant de Dieu, mpe tángá makambo oyo bakomi na langi ya moindo mpenza, oyo ezali koloba ete bato ya sembo bakosangola mabelé. Soki moto yango asepeli koyoka, landá lisolo na paragrafe 7 tii na paragrafe 9 na lokasa oyo elandi. Tikelá ye mwa buku yango mpe bóyokana mpo ozongela ye lisusu.—Mpo na lolenge mosusu ya kosala lisolo, talá siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi, ya Marsi 1998 na lokasa 6 paragrafe 26.

9 Ntango ozali kosɛnga na Mizilma ete bótalela mwa buku La direction venant de Dieu, ekozala malamu obenga yango lisolo, kasi boyekoli ya Biblia te. Soki bosilisi koyekola mwa buku yango, bokoki koyekola mwa buku Azali kosɛnga to buku Boyebi. Mikanda mosusu oyo ebongisami libosoliboso mpo na Bamizilma ezali trakte Le chemin du Paradis: Comment le trouver? mpe Le temps de la vraie soumission à Dieu.

10 Lokola toyebi bindimeli ya Bamizilma mpe ndenge batalelaka makambo, tokoki kopona mikanda nini tokopesa bango mpe lolenge nini tokoteya bango. Tiká ete Yehova alanda kopambola milende na biso mpo na kosalisa bato ya ndenge nyonso bábelela nkombo na ye mpo bábika.—Mis. 2:21.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto