Ndenge nini okoki kosolola na moto ya lingomba ya Bouddha?
1 Na mikili mosusu bato mingi oyo bazwaka batisimo bautaka na Lingomba ya Bouddha. Eloko nini ebendaka bato yango kati na solo? Ndenge nini okoki kosakola nsango malamu epai ya moto oyo azali na Lingomba ya Bouddha?
2 Monisá komibanzabanza ya solo: Bato mingi oyo bazalaki liboso na Lingomba ya Bouddha balobaka ete, eloko oyo ebendaki bango na solo ezali ndimbola ya milaimilai te, kasi, komibanzabanza oyo bamoniselaki bango yango nde esimbaki motema na bango. Mwasi moko, moto ya Azia afandaka na États-Unis, akamwaki na boboto oyo ndeko mwasi moko oyo ayaki kotala ye amoniselaki ye, mpe andimaki koyekola. Azalaki koloba Lingelesi malamu te, kasi ndeko mwasi yango amoniselaki ye motema molai. Na bantango oyo mwasi yango alɛmbaki to azalaki na likoki ya koyekola te, ndeko mwasi wana azalaki koya kaka mpo na kotala ye mpe kobongisa mokolo mosusu oyo bakoki koyekola. Nsukansuka, mwasi yango, bana na ye mibale ya mibali, mpe mama na ye atako akómaki mobange bazwaki batisimo. Azongaki na mboka na ye mpe asalisaki bato mingi ete báyekola solo. Mwana na ye moko ya mobali azali kosala lelo na Betele. Na ntembe te, kozala na ‘boboto’ mpe ‘kolinga bato’ lokola Yehova ebimisaki matomba malamu!—Tito 3:4.
3 Bindimeli ya bato ya lingomba ya Bouddha: Mingimingi, bato ya Lingomba ya Bouddha bandimaka makanisi ya bato mosusu, kasi bamonaka mpenza ntina te ya kokangama na mateya yango. Na yango, moto na moto azalaka na bindimeli na ye mpenza. Liteya oyo eyebani mingi na bato ya Lingomba ya Bouddha yango oyo: bomoi etondi na minyoko, kasi na nzela ya kongɛngisama, moto akoki kosukisa ebongiseli ya kobotama mbala na mbala na bomoi ya mabe. Balobaka ete mpo na kosikolama na ebongiseli yango, moto asengeli kokóma na Nirvana, eloko oyo ekoki kolimbolama te mpo ezali esika te to likambo oyo esalemaka te kasi nde ezalela ezangi mpasi mpe na mabe. (Talá mwa buku Nini ekómelaka biso soki tokufi?, nkasa 9-10.) Yango elingi koloba nini? Ekozala na litomba moko te kobendanabendana na filozofi ya lingomba ya Bouddha. Na esika ya kosala bongo, tokoki kosolola likoló na mikakatano oyo etaleli biso nyonso.
4 Lobelá makambo oyo esepelisaka bato nyonso: Lokola bato ya Lingomba ya Bouddha bamonaka ete bomoi awa na mabelé etondi se na bampasi, na bongo likanisi ya bomoi ya seko awa na mabelé ekomonana lokola likambo mpamba na miso na bango. Nzokande, biso nyonso tosepelaka kozala na libota ya esengo, komona mpasi te, mpe koyeba ntina ya bomoi. Talá ndenge nini tokoki kolobela makambo oyo esepelisaka bato nyonso.
5 Okoki komeka maloba oyo mpo na kobanda lisolo:
◼ “Lelo oyo, ata bato oyo basali likambo te bazali konyokwama. Ondimaka ete mokolo mosusu bampasi mpe minyoko ekosila? [Tiká ye ayanola.] Ezali na elaka moko ya kala oyo ebɔndisaka ngai mingi. [Tángá Emoniseli 21:4.] Ya solo, ntango yango ekómi naino te, kasi ntango ekokóma, tokosepela, boye te?” Na nsima lakisá ye mokanda oyo ezali kolimbola ndenge bampasi ekosila.
6 Soki okutani na mokóló, okoki koloba boye:
◼ “Ntango mosusu ozali komitungisa lokola ngai na komona ndenge makanisi ya mbindo mpe bana na biso bazali kobeba mpo na yango. Mpo na nini bilenge mingi bazali na bizaleli ya mbindo? [Tiká ye ayanola.] Oyebaka ete yango esakolamaki na buku moko oyo ebandaki kokomama kala mpenza liboso kutu ete Lingomba ya Bamizilma, boklisto, mpe ya Bahindu esalema? [Tángá 2 Timote 3:1-3.] Tozali komona ete ezalela yango ezali se kopalangana atako bato bakómi na mayele mingi. [Tángá vɛrsɛ 7.] Mokanda oyo esalisaki ngai mpo nayeba solo oyo bato mingi bayebi naino yango te. Okosepela kotánga yango?” Lakisá ye buku moko to mwa buku oyo elobeli likambo yango.
7 Mbala mingi bato ya Lingomba ya Bouddha bandimaka Biblia, batalelaka yango lokola makomi mosantu. Na bongo tángelá ye makambo yango na Biblia. (Ebe. 4:12) Soki moto oyo ozali kosolola na ye asepeli te ete otánga Biblia mpo azali komona yango lokola mokanda ya bato ya mikili ya Mpoto, okoki koyebisa ye ete bato nyonso oyo bakomaki Biblia bazalaki bato ya Azia.
8 Mikanda nini ebongi mpenza mpo na bango? Trakte oyo (Will Suffering Ever End?) ebimaki mpenzampenza mpo na bato ya Lingomba ya Bouddha. Ebimaki na lokota ya Chinois, Japonais, Cinghalais mpe na Thaï. Lisusu, basakoli mingi bazwaki matomba malamu na kosaleláká mikanda oyo: Sɛkɛlɛ ya bolamu na libota, L’humanité à la recherche de Dieu, mpe Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano bibongi; mwa babuku “Tala, nazali kozalisa biloko nyonso biloko na sika” mpe Quel est le but de la vie? Comment le découvrir?; mpe trakte Nsango ya Bokonzi No. 35: Mokolo mosusu bato nyonso bakolingana? soki ezali naino na libombo. Bato mingi ya Lingomba ya Bouddha oyo bazali koyekola solo sikoyo babandaka liboso koyekola mwa buku Azali kosɛnga mpe na nsima bayekolaka buku Boyebi.
9 Atako balobaka ete bamisionere ya Lingomba ya Bouddha bakómaki na Athènes soko mbula 400 liboso ete Paulo ateya na engumba yango, nzokande eyebani mpenza te soki akutanaki na bato oyo bazalaki kondima mateya ya filozofi ya Bouddha. Kasi, toyebi ndenge ntoma Paulo azalaki komiyoka ntango azalaki kopesa litatoli epai na bato ya lolenge nyonso. Amikómisaki ‘moombo ya bato nyonso’ mpo ete “na nzela nyonso abikisa bamosusu.” (1 Kol. 9:19-23) Tokoki mpe kosala bongo na komonisáká komibanzabanza makasi mpo na bato mpe na kobendáká likebi na bango na elikya oyo biso nyonso tozali na yango wana tozali kopesa litatoli epai na moto nyonso oyo tozali kokutana na ye.