Liyangani ya mokolo moko ya mbala oyo
Liyangani ya mokolo moko oyo ekobanda na Sɛtɛmbɛ 1999, ezali na motó ya likambo ete: ‘Tólukaluka kati na makambo mozindo ya Nzambe.’ (1 Kol. 2:10) Makambo nini ya ntina tokoyoka kuna?
Ntango bazali kosala bolukiluki mpo na kozwa mayele, bato mingi bazali kobɔndisama te na makambo oyo bazali kokutana na yango. Nzokande, Biblia ezali kobɔndisa biso, ndenge yango ekomonisama na lisukulu oyo ekosalema na mokɛngɛli ya zongazonga, yango ezali na motó ya likambo ete: “Kolukaluka kati na Liloba ya Nzambe ebɔndisaka.” Molobi mopaya akomonisa boyokani oyo ezali na kati ya kolukaluka kati na makambo ya mozindo ya Nzambe mpe kosakola nsango malamu wana akolobela motuna oyo: “Ndenge nini otalelaka mosala ya kosakola Bokonzi?”
Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango bátimola mozindo kati na Liloba ya Nzambe? Toli ya malamu ekopesama na lisukulu oyo ezali na motó ya likambo ete: “Teyá bana na yo Liloba ya Nzambe mokemoke.” Bilenge baklisto bazwaka bopusi malamu na ntango basanganaka na bandeko ya lisangá oyo bazali makasi na elimo. Lisukulu oyo elobi ete: “Bilenge oyo bazali kolanda ndakisa ya mikóló,” ekomonisa bandakisa oyo ezali kolendisa bilenge na elimo.
Yehova azali Momonisi ya mabombami. Mpo na nini tosengeli koluka bozwi ya elimo na molende nyonso na mikolo oyo? Molobi mopaya akolimbola makambo oyo Yehova amonisaki na ntango ya kala mpe na ntango na biso na lisukulu oyo: “Yehova amonisaka makambo mozindo mokemoke.” Yango ekolendisa ekateli na biso ya kokoba ‘kolukaluka kati ya makambo mozindo ya Nzambe.’
Bandá komibongisa uta sikoyo mpo na kozala na liyangani. Baoyo balingi komipesa epai ya Yehova mpe kozwa batisimo basengeli koyebisa mokɛngɛli mokambi na lisangá na bango uta sikoyo. Makambo oyo tokoyoka ekolendisa mposa makasi oyo tozali na yango ya kolukaluka kati na Liloba ya Nzambe. Yango wana, mokolo yango ezali mokolo monene mingi, tokoyoka mateya ya elimo. Kozanga te!