Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 1/8 nk. 4-7
  • Ndenge ya kosilisa bobola mpo na libela

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kosilisa bobola mpo na libela
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Makambo oyo babola bakoki kosala mpo bázala na bomoi ya mwa malamu
  • Biblia ezali kopesa elikya
  • Okokɔta na mokili yango?
  • Mosika te, moto moko te akozala lisusu mobólá!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Bobola
    Lamuká!—2015
  • Landá ndakisa ya Yesu mpe monisá ete omibanzabanzaka mpo na babola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Milende mpo na kosilisa bobola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 1/8 nk. 4-7

Ndenge ya kosilisa bobola mpo na libela

ATAKO tozali koyoka bansango ya mabe na ntina etali bobola na mokili mobimba, bato mosusu bazali na elikya ete likambo moko ekoki kosalema mpo na kosilisa yango. Na ndakisa, zulunalo moko (Manila Bulletin) ebimisaki lisolo moko oyo elobaki ete banki moko (Asian Development Bank) eyebisi ete “mikili ya Azia ekoki kosilisa bobola nsima ya mbula 25.” Bato ya mayele ya banki yango balobaki ete esengeli kobakisa nkita ya bikólo mpo na kosilisa bobola.

Bibongiseli mpe baguvɛrnema ndenge na ndenge ebimisá makanisi mpe mikano ebele mpo na kosilisa bobola. Makanisi mosusu oyo bapesi yango oyo: assurance sociale, bakelasi ya malamu, bikólo ya bobola efuta lisusu te nyongo oyo esengeli kofuta bikólo ya bozwi, kolongola mpako ya douane mpo bikólo oyo ezali na babola mingi ezala na nkaka te mpo na kotɛkisa biloko na yango na bikólo mosusu, mpe baguvɛrnema etongela babola bandako ya ntalo moke.

Na mobu 2000, likita monene ya ONU etyaki mikano oyo basengeli kokokisa banda mbula yango tii na mobu 2015. Moko na mikano yango ezalaki ya kosilisa bobola oyo eleki mpe nzala mpe kosala ete bozwi ya bikólo ekesana lisusu mingi te. Nzokande, atako mikano yango ezali mpenza malamu, bato ebele bazali kotya motema te ete ekoki kokokisama na mokili oyo bomoko ezali te.

Makambo oyo babola bakoki kosala mpo bázala na bomoi ya mwa malamu

Lokola elikya ezali mpenza te mpo na kosilisa bobola na mokili mobimba, moto akoki koluka lisalisi epai wapi? Lokola tolobaki yango liboso, ezali na mokanda moko oyo eteyaka bwanya oyo ekoki mpenza kosalisa bato lelo oyo. Ezali mokanda nini? Ezali Biblia, Liloba ya Nzambe.

Nini ekesenisi mokanda yango na mikanda mosusu nyonso? Ezali mokanda oyo euti na Mokonzi oyo aleki bakonzi nyonso, Mozalisi na biso. Na kati ya mokanda yango akomi makambo ya bwanya, mitinda yango etali bato nyonso, na bisika nyonso, mpe na bileko nyonso. Soki mobola alandi mitinda yango, ekoki kosalisa ye azala na bomoi ya malamu ata na moi ya lelo. Tótalela mwa bandakisa.

Kotya mbongo na esika ebongi na yango. Biblia elobi boye: “Bwanya ebatelaka lokola mpe mbongo ebatelaka; kasi boyebi eleki malamu mpamba te bwanya ebatelaka bomoi ya bato oyo bazali na yango.” (Mosakoli 7:12, NW) Yango elingi koloba nini? Mbongo ekoki kosilisa makambo nyonso te. Toboyi te, mbongo ebatelaka na makambo mingi. Esalisaka mpo na kosomba biloko oyo tozali na yango mposa, kasi ekoki kosala nyonso te. Ezali na biloko mosusu ya motuya mingi oyo tokoki kosomba na mbongo te. Koyeba likambo yango ekosalisa biso tótya biloko ya mokili na esika na yango mpe tókima mitungisi oyo ezwaka bato oyo batyaka mbongo na esika ya liboso na bomoi na bango. Moto akoki kosomba bomoi na mbongo te, kasi bwanya ekoki kobatela bomoi ya moto lelo oyo mpe kopesa ye likoki ya kozala na bomoi ya seko.

Koluka te kosala makambo oyo eleki makoki na yo. Biloko oyo toyokaka mposa na yango ezalaka ntango nyonso te biloko oyo tosengelaka na yango mpenza. Tólukaka naino nde biloko oyo tosengeli na yango mpenza. Tokoki kokanisa ete tosengeli na eloko moko boye, nzokande ezali kaka motema nde esepeli na yango, kasi ezali mpenza na ntina te. Moto ya bwanya akosalela mbongo na ye libosoliboso na biloko ya ntina: kolya, kolata, ndako, mpe bongo na bongo. Na nsima, liboso ya kobimisa mbongo mpo na makambo mosusu, akoluka koyeba soki mbongo oyo atikali na yango ezali kopesa ye nzela asala badepansi mosusu. Na ndakisa moko oyo Yesu apesaki, alobaki ete ebongi moto ‘afandaka liboso mpo na kotánga motuya, mpo na komona soki azali na oyo esengeli.’​—Luka 14:28.

Na ekólo Philippines, Eufrosina, mama moko oyo mobali asundolá ye na bana misato eleki mwa bambula, azalaki na etumba mpo na kozwa mbongo mpe kosomba biloko nyonso oyo basengelaki na yango. Ateyi bana na ye koyeba kosalela mbongo libosoliboso mpo na makambo oyo eleki ntina. Na ndakisa, bana bakoki kosepela na eloko moko boye. Kasi, na esika ya koloba na bango mbala moko ete aboyi, asalisaka bango bátalela makambo na ndenge ya malamu; alobaka na bango boye: “Tokoki kosomba yango soki bolingi, kasi bino moko bópona. Mbongo oyo tozali na yango ekokoka kaka na eloko moko. Tokoki kosomba eloko yango oyo esepelisi bino, to tokoki kosomba mwa nyama to ndunda mpo na kolya na loso mpo na pɔsɔ oyo. Sikoyo, bino moko bópona oyo bolingi.” Mbala mingi, bana basosolaka mpe bandimaka ete eleki malamu básomba bilei na esika ya eloko mosusu.

Sepelá na oyo ozali na yango. Biblia elobi boye: “Kozaláká na bilei mpe na eloko ya kozipa nzoto, tokosepela na biloko wana.” (1 Timote 6:8) Mbongo yango moko epesaka moto bolamu te. Ebele ya bato ya mbongo bazali na esengo te, nzokande babola mingi bazali na bomoi ya esengo mpenza. Babola yango bayekoli kosepela kaka na mwa biloko oyo ezali na ntina. Yesu alobelaki ‘liso oyo ezali alima,’ oyo etalaka kaka biloko oyo eleki ntina. (Matai 6:22) Yango nde esalisaka moto asepela na oyo azali na yango. Babola mingi bazali na esengo mpamba te bazali baninga ya Nzambe mpe bazali na mabota ya esengo​—makambo oyo moto akoki kosomba na mbongo te.

Yango ezali kaka mwa bandakisa ya toli ya Biblia oyo ekoki kosalisa babola mpo na kolonga mokakatano na bango. Ezali mpe na makanisi mosusu. Na ndakisa, koboya mimeseno mabe oyo ebebisaka mbongo lokola komɛla likaya mpe masano ya mbongo; koyeba makambo oyo eleki ntina na bomoi, mingimingi mikano ya elimo; na bisika oyo misala ezali mpasi, kosala mosala oyo bato mosusu bakosengela na yango. (Masese 22:29; 23:21; Bafilipi 1:9-11) Biblia ezali kolendisa kosalela “bwanya oyo ebongi mpe likoki ya kokanisa,” mpamba te yango “ekozala bomoi mpo na molimo na yo.”​—Masese 3:21, 22, NW.

Atako makanisi ya Biblia ekoki kosalisa mwa moke babola, tozwi naino te biyano na motuna ya koyeba soki bobola ekosila. Babola bakotikala kaka babola libela na libela? Bokeseni kati na bato ya mbongo ná babola ekosila te? Tótalela eyano oyo bato mingi bayebi te.

Biblia ezali kopesa elikya

Bato mingi bandimaka ete Biblia ezali buku moko malamu. Kasi, mbala mingi bayebaka te ete ezali kolobela mbongwana monene oyo etikali moke esalema.

Nzambe akani kosilisa mikakatano ya bato, na ndakisa bobola. Lokola baguvɛrnema ya mokili elongi kosilisa likambo yango te to mpe elingi kosala yango te, Nzambe akani kotya guvɛrnema mosusu na esika na yango. Ndenge nini akosala yango? Biblia elobi polele na Danyele 2:44 ete: “Nzambe ya lola akotɛmisa bokonzi bokobebisama soki moke te, mpe bokonzi yango ekopesama na bato mosusu te; ekobuka mpe ekosilisa makonzi oyo nyonso, mpe ekotikala lobiko na lobiko.”

Nsima ya kolongola “makonzi,” to baguvɛrnema yango, Mokonzi oyo Nzambe aponi akosala mosala. Mokonzi yango azali moto lokola biso te; azali ekelamu ya nguya oyo azali na lolenge ya Nzambe, azali na likoki ya kobongola makambo mpo na kosilisa bobola oyo tozali komona lelo oyo. Nzambe aponi Mwana na ye moko mpo na kosala yango. (Misala 17:31) Nzembo 72:12-14 elobeli makambo oyo Mokonzi yango akosala: “Akobikisa mobola oyo akogangaka, mpe moto ya mawa oyo azali na mosungi te. Akoyokela moto ya bolɔzi mpe mobola mawa; akobikisa milimo ya babola. Akosikola milimo na bango kati na minyoko mpe na mobulu; makila na bango makozala na motuya na miso na ye.” Talá elikya kitoko! Bato bakosikolama mpenza! Mokonzi oyo Nzambe atye akosilisa mikakatano ya babola mpe bato mpamba.

Ebele ya mikakatano oyo bobola ezali komema ekosila na ntango wana. Nzembo 72:16 elobi ete: “Masango ekotondana na mokili ata kino likoló ya [ngomba].” Bato bakozanga lisusu biloko ya kolya te mpo bazali na mbongo te to mpo bazali na bakonzi ya mabe.

Mikakatano mosusu mpe ekosila. Na ndakisa, na mokili oyo, ebele ya bato bazali na bandako te. Nzokande, Nzambe alaki ete: “Bakotonga ndako mpe bakofanda na yango; bakokona bilanga ya [vinyo] mpe bakolya mbuma na yango. Bakotonga te ete mosusu afanda; bakokona te ete mosusu alya; zambi lokola mikolo ya nzete, bongo ekozala mikolo ya bato na ngai, mpe baponami na ngai bakosepela kino ntango molai mpo na misala ya mabɔkɔ na bango.” (Yisaya 65:21, 22) Moto na moto akozala na ndako na ye mpe akozala na mosala ya malamu. Tomoni ete Nzambe alaki kosilisa mpenza bobola mpo na libela. Tokomona lisusu te epai bazwi, epai babola; tokomona lisusu mpe te bato oyo bakoloba ete bayaki nde kotika bato mosusu na mokili.

Ntango moto ayoki bilaka yango ya Biblia mpo na mbala ya liboso, akoki kokanisa ete ezali kaka makanisi mpamba. Kasi, soki ayekoli Biblia malamumalamu akomona ete makambo nyonso oyo Nzambe alakaki na ntango ya kala ekokisamaki. (Yisaya 55:11) Yango wana, ezali te likambo ya koloba mbala mosusu ekosalema. Esengeli nde komituna ete, Osengeli kosala nini mpo yo mpe omona makambo yango?

Okokɔta na mokili yango?

Lokola guvɛrnema ya Nzambe nde ekosala makambo yango, tosengeli kozala bato oyo Nzambe akondima koyangela bango. Abombeli biso te makambo oyo tosengeli kokokisa. Biblia eyebisi makambo nyonso polelepolele.

Mwana ya Nzambe oyo akozala Mokonzi azali sembo. (Yisaya 11:3-5) Yango wana, bato oyo bakozwa bomoi na mokili oyo guvɛrnema yango ekoyangela basengeli kozala bato ya sembo. Masese 2:21, 22 elobi ete: “[Bato ya sembo, NW] bakofanda na mokili mpe bato malamu bakotikala na yango. Kasi bato mabe bakolongolama na mokili mpe bato ya masumu bakopikolama wana.”

Moto akoki koyekola ndenge ya kokokisa makambo oyo Nzambe azali kosɛnga? Ɛɛ. Soki oyekoli Biblia mpe osaleli toli na yango, okoki kozwa bomoi yango. (Yoane 17:3) Batatoli ya Yehova bakosepela kosalisa yo mpo na koyekola makambo yango. Tozali kolendisa yo osalela libaku yango mpo okɔta na mokili oyo ekozala na bobola te mpe kozanga bosembo te.

[Elilingi na lokasa 5]

Eufrosina: “Kosalela mbongo libosoliboso na makambo ya ntina esalisaka libota na ngai tózala na oyo tosengeli na yango”

[Bililingi na lokasa 6]

Boninga na Nzambe mpe libota ya esengo ekoki kosombama na mbongo te

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto