Loyembo 16
Zalá na esengo mpo na elikya ya Bokonzi!
1. Esengo! Esengo!
Ólikyaka na Bokonzi.
Esengo! Esengo!
Yango ebɛlɛmi!
Ósalela Mokonzi na
Yo na molende bɛɛ.
Óngɛngɛlaka bato na
Misala malamu.
Esengo! Esengo!
Yebis’eliky’a Bokonzi!
Esengo! Esengo!
Yango ebɛlɛmi!
2. Nsai bɛɛ! Nsai bɛɛ!
Epai na ye, okolikya.
Nsai bɛɛ! Nsai bɛɛ!
Okozwa bolamu.
Tolendisami solo mpo
Na elikya yango.
Nsuka ekómi pene mpo
Na monguna, liwa.
Nsai bɛɛ! Nsai bɛɛ!
Talelá bobele Nzambe!
Nsai bɛɛ! Nsai bɛɛ!
Bangá Monguna te!
3. Kumisá Yah! Kumisá Yah!
Tótondi’eliky’a Bokonzi!
Kumisá Yah! Kumisá Yah!
Bino, Batatoli.
Tombolá miso, talá mpe
Elanga etɛli.
“Ebele monene” baye’
Mpe bayembeli Yah.
Kumisá Yah! Kumisá Yah!
Akopesa yo makasi.
Kumisá Yah! Kumisá Yah!
Monisá bosembo.