Loyembo 60
Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Nzambe
1. Nzamb’alaki Mbula Nkóto ya kimya,
Oyo Mwana na y’akoyangela bato.
Baponami bakoyangela na ye.
Bango, bakonzi, banganga na likoló.
2. Tokosikwa mpe na masumu manso
Na nzela na bango elongo na Yesu.
Mpe Paladiso’ekozipa mabelé;
Babiki basanzoli Yah na lokumu.
3. Klist’akoyangela Mbula Nkóto; ee,
Tomoni yango na miso ya kondima.
Na mokolo oy’a kosambisama,
Bakufi babimi mpo na koteyama.
4. Banso, tósalela Yehova Nzambe.
Tósɛnzɛlaka, ngonga yang’ebɛlɛmi.
Tósalela Yah na molende nyonso,
Tóbelela ye, tokozwa nde libiki.