Tósalelaka malamu mikanda na biso
1. Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Yesu, oyo azalaki na botɔndi mpo na biloko oyo Yehova apesaki?
1 Nsima ya koleisa ebele ya bato na ndenge likamwisi, Yesu ayebisaki bayekoli na ye bálɔkɔta bilei oyo etikalaki mpo ebeba te. (Mat. 14:19-21) Ndakisa oyo Yesu atikaki na ndenge aboyaki kobebisa biloko oyo Yehova apesaki esengeli kotinda biso ‘tózala na botɔndi’ mpe tósalelaka malamu biloko nyonso oyo Yehova apesaka biso na nzela ya “kapita ya sembo.”—Kols. 3:15; Luka 12:42; Mat. 24:45-47.
2. Tokoki kosala nini mpo bazulunalo etondela biso na ndako te?
2 Bazulunalo: Soki tozali kokabola te bazulunalo oyo tozwaka, tokokóma na yango ebele. Soki mbala mingi totikalaka na bazulunalo ebele, tosengeli koluka ntango mpo na kokabola yango. Kasi ezali boni mpo na bazulunalo ya kala? Yango mpe esilaka ngala te ata soki eumeli. Soki bazulunalo ya kala etondeli biso na ndako, mbala mosusu mokɛngɛli na mosala ya kosakola to nkulutu mosusu akoki kosalisa biso tókabola yango nyonso.
3, 4. Makambo nini tosengeli kobosana te ntango tozali kozwa mikanda na Ndako ya Bokonzi?
3 Mikanda mosusu: Soki tokokabola mokanda moko, osengeli naino koluka koyeba soki ozali na mikanda yango na ndako liboso ya kosɛnga mosusu na Ndako ya Bokonzi. Ekozala malamu osɛnga kaka mikanda oyo okokabola pɔsɔ wana; soki osilisi kokabola yango, okoki kosɛnga mosusu.
4 Mpo na mikanda oyo okosalela yo moko, sɛngá kaka oyo osengeli mpenza na yango. Komá nkombo na yo na esika oyo ebongisami mpo na yango. Yango ekosalisa yo omona mokanda yango soki ebungi. Soki osalelaka CD-ROM Watchtower Library mpe obombaka banimero nyonso ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká!, mbala mosusu okomona ntina ya kosɛnga volimi relye te. Bótika bana na bino básakana na mikanda mpe bazulunalo te.
5. Likambo nini tosengeli kobosana te ntango tozali kokabola mikanda na biso?
5 Kokabola mikanda: Tokabolaka mikanda na biso kaka epai ya bato oyo basepeli mpenza na yango. Tosengeli koyeba ete mokumba ya kopesa makabo mpo na mikanda oyo tokabolaka na mosala ya kosakola ezali libosoliboso ya biso. Ntango totikeli moto oyo asepeli na nsango malamu mokanda, tosengeli te kokakatana mpo na koyebisa ye ete azali na libaku ya kopesa makabo mpo mosala ya kosakola na mokili mobimba ekende liboso.
6. Mpo na nini tozwaka mikanda na biso na motuya mingi, mpe yango esengeli kotinda biso na kosala nini?
6 Yesu apesaki bato bilei na ndenge ya likamwisi, kasi mbala mingi azalaki nde kopesa bato bilei ya elimo. Alobaki boye: “Moto asengeli kobika, kaka na mampa te, kasi na liloba nyonso oyo ezali kobima na monɔkɔ ya Yehova.” (Mat. 4:4) Mikanda na biso eteyaka solo ya Biblia oyo ekoki kopesa bomoi ya seko. (Yoa. 17:3) Lokola ezali na motuya mingi, tosengeli kosakana na yango te!