Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lv mok. 1 nk. 4-13
  • “Bolingo ya Nzambe elakisi boye”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bolingo ya Nzambe elakisi boye”
  • “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “BOLINGO YA NZAMBE ELAKISI BOYE”
  • “TÓTOSAKA MIBEKO NA YE”
  • “MIBEKO NA YE EZALI KILO TE”
  • Bolingo ya Nzambe eumelaka seko
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Lingá Nzambe oyo alingaka yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mobeko ya bolingo na mitema
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Makambo mosusu
“Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
lv mok. 1 nk. 4-13
[Elilingi na lokasa mobimba 4]

MOKAPO 1

“Bolingo ya Nzambe elakisi boye”

“Bolingo ya Nzambe elakisi boye: ete tótosaka mibeko na ye; kutu mibeko na ye ezali kilo te.”​—1 YOANE 5:3.

1, 2. Nini etindaka yo olinga Yehova Nzambe?

OLINGAKA Nzambe? Soki ozali moto oyo amipesá epai ya Yehova Nzambe, okokakatana ata moke te koloba ete olingaka Nzambe. Tomonaka ete ebongi mpenza tólinga Yehova. Tolingaka Nzambe mpamba te ye mpe alingaka biso. Biblia elobi boye: “Tozali kolinga, mpo [Yehova] alingaki biso liboso.”​—1 Yoane 4:19.

2 Yehova nde amonisaki liboso ete alingaka biso. Apesaki biso Mabele, oyo ezali esika ya kitoko, mpo tófanda wana. Akokisaka bamposa na biso ya mosuni. (Matai 5:43-48) Mpe oyo eleki ntina, akokisaka bamposa na biso ya elimo. Apesi biso Biblia, Liloba na ye. Longola yango, ayebisi biso ete tóbondelaka ye; alaki ete akoyoka biso mpe akopesa biso elimo santu mpo esalisa biso. (Nzembo 65:2; Luka 11:13) Likambo oyo eleki monene ezali ete atindaki Mwana na ye ya bolingo mpo azala Mobikisi na biso mpe alongola biso na boombo ya lisumu mpe ya liwa. Ya solo, Yehova amoniseli biso bolingo monene mpenza!​—Tángá Yoane 3:16; Baroma 5:8.

3. (a) Tosengeli kosala nini mpo tótikala na kati ya bolingo ya Nzambe? (b) Motuna nini ya ntina mingi tosengeli komituna, mpe epai wapi tokozwa eyano?

3 Yehova alingi ete bolingo na ye mpo na biso eumela libela. Nzokande, mokomoko na biso asengeli kopona soki alingi ezala bongo mpo na ye. Liloba ya Nzambe epesi biso toli oyo: “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe . . . mpo na bomoi ya seko.” (Yuda 21) Liloba “bótikala” ezali komonisa ete biso moko mpe tosengeli kokanga mabɔkɔ te mpo na kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe. Tosengeli kosala makambo oyo ekomonisa ete biso mpe tolingaka ye. Yango wana, motuna moko ya ntina mingi oyo tosengeli komituna ezali oyo, ‘Ndenge nini nakoki komonisa ete nalingaka Nzambe?’ Eyano na motuna yango ezali na maloba oyo ntoma Yoane akomaki na lisalisi ya elimo santu: “Bolingo ya Nzambe elakisi boye: ete tótosaka mibeko na ye; kutu mibeko na ye ezali kilo te.” (1 Yoane 5:3) Ebongi tótalela malamumalamu soki maloba yango elingi koloba nini, mpamba te tozali na mposa ya komonisa Nzambe na biso ete tolingaka ye mpenza.

“BOLINGO YA NZAMBE ELAKISI BOYE”

4, 5. (a) Maloba “bolingo ya Nzambe” elimboli nini? (b) Lobelá ndenge oyo bolingo epai ya Yehova ebandaki kokola na motema na yo.

4 “Bolingo ya Nzambe”​—ntoma Yoane alingaki koloba nini ntango akomaki maloba yango? Maloba yango ezali te komonisa bolingo ya Nzambe mpo na biso, kasi nde bolingo na biso mpo na ye. Okoki koyeba lisusu ntango oyo bolingo epai ya Yehova ebandaki kokola na motema na yo?

[Bililingi na lokasa 6]

Komipesa epai ya Yehova mpe kozwa batisimo ezali ebandeli ya bomoi ya botosi epai na ye

5 Kanisá naino mbala ya liboso oyo oyekolaki solo na ntina na Yehova mpe mikano na ye mpe okómaki kondima makambo yango. Okangaki ntina ete, atako obotamaki moto ya masumu oyo akabwani na Nzambe, na nzela ya Kristo, Yehova apesaki yo likoki ya kozwa bomoi ya seko mpe ya kokóma na ezaleli ya kokoka oyo Adama abungisaki. (Matai 20:28; Baroma 5:12, 18) Okómaki kososola ete Yehova asalaki likambo moko monene mpenza na ndenge atindaki Mwana na ye oyo alingaka mingi aya kokufa mpo na biso. Likambo yango esimbaki mpenza motema na yo, mpe okómaki kolinga Nzambe oyo amoniselaki yo bolingo monene ndenge wana.​—1 Tángá Yoane 4:9, 10.

6. Ndenge nini moto amonisaka bolingo ya solosolo, mpe bolingo na yo mpo na Nzambe etindaki yo osala nini?

6 Nzokande, wana ezalaki kaka ebandeli ya bolingo ya solosolo epai ya Yehova. Bolingo esukaka kaka na motema te; ezalaka mpe kaka na maloba te. Bolingo ya solosolo epai ya Nzambe esukaka kaka te na koloba ete, “Nalingaka Yehova.” Ndenge moko ná kondima, bolingo ya solosolo emonanaka na misala. (Yakobo 2:26) Na maloba mosusu, tomonisaka ete tolingaka moto ntango tozali kosala makambo oyo esepelisaka ye. Yango wana, ntango bolingo epai ya Yehova ezwaki misisa na motema na yo, okómaki na mposa omitambwisaka na ndenge oyo esepelisaka Tata na yo ya likoló. Ozali Motatoli oyo azwá batisimo? Soki ezali bongo, elakisi ete bolingo makasi mpe bosembo na yo epai ya Yehova etindaki yo ozwa ekateli wana ya ntina mingi na bomoi na yo. Omipesaki epai ya Yehova mpo na kosala mokano na ye mpe ozwaki batisimo mpo na komonisa yango. (Tángá Baroma 14:7, 8.) Mpo okokisa elaka na yo epai ya Yehova, osengeli kosala likambo mosusu oyo ntoma Yoane alobaki.

“TÓTOSAKA MIBEKO NA YE”

7. Tángá mwa mibeko ya Nzambe, mpe kotosa yango elimboli nini?

7 Yoane amonisaki ete bolingo ya Nzambe elimboli ete “tótosaka mibeko na ye.” Mibeko ya Nzambe ezali nini? Na kati ya Biblia, Liloba na ye, Yehova apesi biso mibeko ya polele. Na ndakisa, apekisi bizaleli lokola kolangwa masanga, kosala pite to ekobo, kosambela bikeko, koyiba, mpe kobuka lokuta. (1 Bakorinti 5:11; 6:18; 10:14; Baefese 4:28; Bakolose 3:9) Kotosa mibeko ya Nzambe elimboli kolanda mitinda ya Biblia na bomoi na biso.

8, 9. Ndenge nini tokoki koyeba etamboli oyo esepelisaka Yehova ata na makambo oyo mobeko moko te ya Biblia elobeli polele? Pesá ndakisa.

8 Kasi, mpo na kosepelisa Nzambe, tosengeli kosuka kaka te na kotosa mibeko oyo elobami polele. Yehova atyeli biso te mibeko ebele ebele oyo ezali kolandela ata makambo mikemike ya bomoi na biso. Yango wana, na bomoi ya mokolo na mokolo, tokoki kokutana na makambo oyo ata mobeko moko te ya Biblia elobeli polele. Na ntango yango, ndenge nini tokoki koyeba likambo oyo ekosepelisa Yehova? Biblia emonisi polele makanisi ya Nzambe. Boyekoli ya Biblia esalisaka biso tóyeba makambo oyo Yehova alingaka mpe oyo ayinaka. (Tángá Nzembo 97:10; Masese 6:16-19) Boyekoli yango esalisaka biso tóyeba bizaleli mpe misala oyo esepelisaka ye. Soki tozali koyeba malamu makanisi ya Yehova mpe banzela na ye, tokobanda mpe kozwa bikateli ya malamu mpe kosala makambo ya malamu. Na bongo, ata ntango tokutani na makambo oyo mobeko moko te ya Biblia elobeli polele, tokoyeba “soki mokano ya Yehova ezali nini.”​—Baefese 5:17.

9 Na ndakisa, ezali na vɛrsɛ moko te ya Biblia oyo epekisi kotala bafilme to baemisyo ya televizyo oyo ezali kolakisa mobulu to pite. Kasi, okanisi ete tozali mpenza na mposa ete mobeko moko eloba na biso polele ete tosengeli te kotala makambo ya ndenge wana? Toyebi ndenge oyo Yehova atalelaka makambo yango. Liloba na ye elobi na biso polele ete: ‘[Yehova] ayinaka mpenza moto oyo alingaka mobulu.’ (Nzembo 11:5) Biblia elobi mpe ete: “Nzambe akosambisa bato ya pite mpe bato ya ekobo.” (Baebre 13:4) Soki tomanyoli maloba wana ya Biblia, tokomona polele mposa ya Yehova. Na bongo, tokoboya kotala bafilme to baemisyo oyo ezali kolakisa makambo oyo Nzambe ayini. Toyebi ete tosepelisaka Yehova ntango toboyi makambo ya mbindo oyo bato ya mokili batalelaka lokola masano.a

10, 11. Mpo na nini tosepelaka kotosa Yehova, mpe tomoniselaka ye botosi ya ndenge nini?

10 Wapi ntina ya libosoliboso oyo totosaka mibeko ya Nzambe? Mpo na nini tolingaka kolanda makanisi ya Nzambe na bomoi na biso ya mokolo na mokolo? Ezali kaka te mpo na kokima etumbu to mbuma mabe oyo bato oyo baboyaka kosala mokano ya Nzambe babukaka. (Bagalatia 6:7) Tomonaka ete kotosa Yehova epesaka biso libaku ya komonisa ete tolingaka ye. Ndenge mwana alingaka komona ete tata na ye azali kosepela na ye, biso mpe tolingaka ete Yehova asepela na biso. (Nzembo 5:12) Azali Tata na biso, mpe biso tolingaka ye. Likambo moko te epesaka biso esengo oyo eleki esengo ya koyeba ete tozali kotambola na ndenge oyo ekosala ete ‘tóndimama na Yehova.’​—Masese 12:2.

11 Yango elingi koloba ete tokakatanaka te kotosa; totosaka mpe kaka te na makambo oyo esepelisi biso to oyo ekomemela biso litomba.b Toponaka te mibeko oyo tokotosa; lisusu, totosaka kaka te ntango tomoni ete kosala yango ebongi mpo na biso to ezali mpasi te. Kasi, ‘totosaka na motema.’ (Baroma 6:17) Tokanisaka lokola mokomi ya nzembo oyo akomaki ete: “Nakolinga makasi mitindo na yo oyo nalingá.” (Nzembo 119:47) Ya solo, tolingaka mpenza kotosa Yehova. Tondimaka ete ebongi mpenza tótosa Yehova na motema mobimba; kutu, asɛngi biso tósala bongo. (Kolimbola Mibeko 12:32) Tolingaka ete Yehova aloba mpo na biso ndenge oyo Liloba na ye elobi mpo na Noa. Mpo na moto yango ya sembo, oyo amonisaki ete alingaki Nzambe na ndenge atosaki ye na boumeli ya ebele ya bambula, Biblia elobi ete: “Noa abandaki kosala nyonso oyo Nzambe apesaki ye mitindo. Asalaki kaka bongo.”​—Ebandeli 6:22.

12. Ntango nini botosi na biso esepelisaka motema ya Yehova?

12 Yehova ayokaka ndenge nini ntango amonaka ete tozali kotosa ye na motema moko? Liloba na ye emonisi ete ‘tosepelisaka motema’ na ye. (Masese 27:11) Ezali mpenza solo ete botosi na biso esepelisaka motema ya Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso na molɔ́ngɔ́ mobimba? Ɛɛ, mpe ezali na ntina mpenza oyo asepelaka na yango! Yehova akelá biso na bonsomi ya kopona. Yango elingi koloba ete tokoki kopona biso moko soki tokotosa Nzambe to tokotosa ye te. (Kolimbola Mibeko 30:15, 16, 19, 20) Ntango toponi kotosa Yehova mpe soki bolingo nde etindi biso tósala yango, Tata na biso ya likoló asepelaka mingi. (Masese 11:20) Ntango tosalaka bongo, toponaka mpe nzela oyo eleki malamu na bomoi.

“MIBEKO NA YE EZALI KILO TE”

13, 14. Mpo na nini tokoki koloba ete “mibeko ya Nzambe ezali kilo te,” mpe ndakisa nini ekoki komonisa yango?

13 Ntoma Yoane alobi likambo moko ya kolendisa mpenza na oyo etali masɛngami ya Yehova: “Mibeko na ye ezali kilo te.” Biblia mosusu ebongoli vɛrsɛ yango boye: “Kotosa [mitindo] myangó ezali mpási té.” (Liloba lya Nzambe) Makambo oyo Nzambe asɛngaka biso eleki makasi te, enyokolaka mpe biso te.c Tokoki te koloba ete mibeko ya Nzambe ezali mpasi koleka makambo oyo bato ya kozanga kokoka bakoki kosala.

14 Tokoki kopesa ndakisa moko mpo na kolimbola likambo yango. Kanisá ete moninga moko asɛngi yo osalisa ye mpo na komema biloko na ndako ya sika oyo alingi kokɔta. Atye biloko yango na bakartɔ. Bakartɔ mosusu ezali pɛpɛlɛ mpe moto akoki komema yango ye moko, kasi bakartɔ mosusu ezali kilo mpe ezali kosɛnga bato mibale mpo na komema yango. Moninga yango aponi bakartɔ oyo alingi yo omemela ye. Okanisi ete akopona bakartɔ oyo ayebi malamu ete ezali kilo mingi mpo na yo? Te. Akolinga te onyokwama mpo na komema bakartɔ yango. Ezali mpe bongo mpo na Nzambe na biso oyo atondi na bolingo mpe boboto; asɛngi biso te tótosa mibeko oyo eleki makasi. (Kolimbola Mibeko 30:11-14) Ata mokolo moko te akosɛnga biso tómema mokumba oyo eleki kilo. Yehova ayebi bolɛmbu na biso, mpamba te “ayebi malamu ndenge oyo tosalemá, azali kobosana te ete tozali putulu.”​—Nzembo 103:14.

15. Mpo na nini tokoki kondima ete mibeko ya Yehova ezali mpo na bolamu na biso?

15 Mibeko ya Yehova ezali kilo te; ezali nde mpo na bolamu na biso. (Tángá Yisaya 48:17.) Yango wana, na ntango ya kala, Moize alobaki na Bayisraele ete: “Yehova apesaki biso mitindo tókokisa malako oyo nyonso, tóbanga Yehova Nzambe na biso mpo na bolamu na biso ntango nyonso, mpo tótikala na bomoi lokola na mokolo ya lelo.” (Kolimbola Mibeko 6:24) Biso mpe tokoki kondima ete Yehova apesi biso mibeko mpo alingi ete tózala malamu libela na libela. Yehova akoki te kosala makambo mpo na konyokola biso. Yehova Nzambe azali na bwanya oyo ezangi nsuka. (Baroma 11:33) Na yango, ayebi oyo eleki malamu mpo na biso. Lisusu, Yehova azali bolingo. (1 Yoane 4:8) Maloba mpe misala na ye nyonso esimbami na bolingo mpe yango nde ezaleli na ye oyo eleki monene. Mibeko nyonso oyo apesaka basaleli na ye emonisaka bolingo na ye.

16. Atako mokili oyo mabe mpe nzoto na biso ya kozanga kokoka etindaka biso na makambo ya mabe, mpo na nini tokoki kokoba kotosa Nzambe?

16 Yango elingi koloba te ete kotosa Nzambe ezali pɛtɛɛ. Tosengeli kobundisa makanisi mabe ya mokili oyo ezali “kolala na nguya ya moto mabe.” (1 Yoane 5:19) Lisusu, tosengeli kobundisa bamposa ya nzoto na biso ya masumu, oyo etindaka biso tóbuka mibeko ya Nzambe. (Baroma 7:21-25) Kasi, bolingo na biso epai ya Nzambe ekoki kolonga mikakatano yango. Yehova apambolaka baoyo batosaka ye mpo balingaka ye. Apesaka elimo santu na ye epai ya ‘baoyo batosaka ye mpo azali mokonzi.’ (Misala 5:32) Elimo santu yango ebotaka mbuma ya malamu mingi, elingi koloba bizaleli oyo ekoki kosalisa biso tókoba kotosa Nzambe.​—Bagalatia 5:22, 23.

17, 18. (a) Na buku oyo tokoyekola makambo nini, mpe ntango tozali kosala yango, makambo nini tosengeli kobosana te? (b) Tokolobela nini na mokapo oyo elandi?

17 Na buku oyo, tokotalela mitinda mpe mibeko ya Yehova na oyo etali etamboli ya malamu mpe makambo mosusu oyo ezali komonisa biso mokano na ye. Ntango tozali koyekola yango, ezali na mwa makambo ya ntina mingi oyo tosengeli kobosana te. Tóbosana te ete Yehova asɛngaka biso na makasi te ete tótosa mibeko mpe mitinda na ye; alingaka ete tótosa ye na motema moko. Tóbosana te ete Yehova azali kosɛnga biso tózala na etamboli oyo ekomemela biso mapamboli lelo oyo mpe ekosalisa biso tózwa bomoi ya seko na mikolo ezali koya. Tótalelaka mpe botosi na biso epai ya Yehova lokola libaku ya komonisa ete tolingaka ye mingi.

18 Mpo na kosalisa biso tóyeba kokesenisa mabe ná malamu, Yehova apesá biso lisosoli. Kasi, ndenge tokomona yango na mokapo oyo elandi, lisosoli na biso esengeli koteyama mpo etambwisa biso malamu.

a Mokapo 6 ya buku oyo elobeli ndenge ya kopona masano ya malamu.

b Bilimo mabe mpe bakoki kotosa, ata soki basali yango na esengo te. Ntango Yesu abenganaki bilimo mabe oyo ekɔtelaki bato, bademo batosaki mpo alekaki bango na nguya, atako basalaki yango na esengo te.​—Marko 1:27; 5:7-13.

c Na Matai 23:4, liloba yango esalelami mpo na kolobela “mikumba ya kilo,” elingi koloba mibeko oyo bakomeli mpe Bafarisai bazalaki kotyela bato ata na makambo mikemike mpe mimeseno oyo euti na makanisi ya bato.

OKOPESA EYANO NINI?

  • Yehova asɛngaka botosi ya ndenge nini epai ya basambeli na ye, mpe mpo na nini yango ezali mpo na bolamu na biso?​—Kolimbola Mibeko 5:28-33.

  • Ndenge nini Yehova atalelaka botosi na biso?​—1 Samwele 15:22, 23.

  • Liteya nini tokoki kozwa na ndenge oyo Yesu atalelaka botosi na ye epai ya Nzambe?​—Yoane 8:29.

  • Mpo na nini ebongi mpenza tótosaka Yehova?​—Emoniseli 4:11.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto