Ndenge ya kobanda masolo na mosala ya kosakola
Malako: Mpo oyeba maloba oyo okosalela mpo na kobanda lisolo na mosala ya kosakola, esengeli otya likebi mpenza na makambo misato oyo: (1) Nsango oyo batindi biso tósakola ezali ‘nsango malamu ya bokonzi.’ (Mat. 24:14) Ata soki na ebandeli ya lisolo na biso tolobeli bokonzi yango mbala moko te, tosengeli kobosana te kosalisa bato bámona ntina na yango, to mpe tosengeli kolongola makambo oyo ekoki kopekisa bango báyoka nsango yango. (2) Komibanzabanza mpo na bolamu ya bato oyo tozali kosolola na bango ekosalisa biso, ndenge esalisaki mpe Yesu, tósimba mitema na bango. (Mrk. 6:34) Soki tozali komungamunga mpe komonisa boboto, soki tozali kolanda na likebi ntango bato bazali koloba mpe koyokanisa makanisi na biso na mposa na bango, tokomonisa ete tozali komibanzabanza mpo na bango; lisusu, soki tozali kosalela mituna oyo ezali kolendisa bango bábimisa makanisi na bango, tokoyeba makanisi na bango malamu. Mokanda ya 1 Bakorinti 9:19-23 emonisi ete ntoma Paulo azalaki koyokanisa lolenge na ye ya kosakola nsango malamu na makambo ya bato oyo azalaki kosolola na bango. (3) Na mikili mosusu, esɛngaka mopaya asala makambo oyo bato basalaka ntango moto ayei kotala moto, liboso aloba likambo oyo ayeli. Kasi, na mikili mosusu nkolo-ndako alingaka ete moto oyo ayei mbalakaka aloba mbala moko likambo oyo ayeli.—Talá mpe Luka 10:5.
Maloba ya kobanda lisolo oyo elandi ezali kolakisa ndenge Batatoli mosusu, oyo bameseni na mosala ya kosakola, babandaka masolo na bato. Soki maloba oyo ozali kosalela tii sikoyo ezali kosalisa yo mingi te mpo na kobanda masolo, salelá naino mwa makanisi oyo elandi. Soki osaleli yango, lobá yango na maloba na yo moko. Lisusu, okozwa mpe makanisi epai ya Batatoli ya lisangá na bino oyo bayebaka mpenza kosolola na bato.
ARMAGEDONE
● ‘Bato mingi babangaka Armagedone. Bayoká bakonzi ya politiki bazali koloba ete Armagedone ezali etumba moko ya nikleere oyo ekoboma mokili mobimba. Bato balobaka ete Armagedone ezali nini? . . . Ya solo, liloba Armagedone euti na Biblia, mpe ndimbola na yango ekeseni na oyo bato mingi bapesaka. (Em. 16:14, 16) Biblia emonisi mpe nini moto asengeli kosala mpo abika. (Sef. 2:2, 3)’ (Talá mpe nkasa 30-34, na motó ya likambo “Armagedone.”)
AVENIRE/KIMYA
● ‘Mbote Tata (to Mama). Nsango nini? . . . Tozali koyebisa bato ete bomoi ekozala malamu na mikolo ezali koya. Yo mpe okanisaka bongo? . . . Mpo na yo, makambo nini ekómisaka bomoi mpasi? . . . Biblia esalisaki ngai nayeba likambo yango. Elobeli polele makambo mabe oyo ezali kosalema na mikolo na biso, kasi elimboli mpe ntina ya makambo yango mpe eyebisi ndenge oyo ekosuka. (Luka 21:10, 11, 31)’
● ‘Mbote. Nkombo na ngai ——. Bongo yo? . . . Nazali kolendisa bilenge lokola yo bámeka kokanisa bomoi ya malamu oyo Biblia elaki biso. (Tángá vɛrsɛ moko, na ndakisa Emoniseli 21:3, 4.) Osepeli na likambo yango?’
BIBLIA/NZAMBE
● ‘Mbote Tata (to Mama). Nayei kotala yo mpo nayebisa yo nsango moko ya ntina mingi. Yoká ndenge Biblia elobi awa. (Tángá vɛrsɛ moko, na ndakisa Emoniseli 21:3, 4.) Okanisi nini na likambo yango? Osepeli na yango to te?’
● ‘Tozali kosolola na bato mpo na koyeba epai wapi tokoki kozwa lisalisi ya malamu mpenza mpo na kolonga mikakatano ya bomoi. Kala, bato mingi bazalaki koluka toli ya Biblia. Kasi lelo oyo basalaka lisusu bongo te. Okanisi nini na likambo yango? Ondimaka ete Biblia ezali mpenza Liloba ya Nzambe to omonaka ete ezali kaka mwa buku moko boye ya malamu oyo bato bakomá? . . . Na makanisi na yo, nini ekoki kondimisa moto ete Biblia euti mpenza na Nzambe?’ (Talá nkasa 101-110, na motó ya likambo “Biblia.”)
● ‘Nasepeli ndenge nakuti yo epai na yo. Nazali kosolola na bato likanisi moko ya kolendisa oyo euti na Biblia (to Makomami Mosantu). Osí omituná soki: . . . ? (Tuná motuna moko oyo ekopesa yo nzela ya kobanda lisolo.)’
● ‘Tozali kolendisa bato bátángaka Biblia. Mbala mingi, biyano na yango na mituna oyo bato bamitunaka mingi ekamwisaka bango. Na ndakisa: . . . (Nz. 104:5; to Dan. 2:44; to vɛrsɛ mosusu).’
● ‘Lelo tozali kotala bato mpo na kosolola na bango mwa moke. Bato mosusu oyo tosololi na bango batyelaka Nzambe motema. Kasi basusu bandimelaka ye te. Bongo yo? . . . Biblia esɛngi biso tótalela biloko oyo ezali na molɔ́ngɔ́. (Nz. 19:1) Moto oyo atyá mibeko oyo etambwisaka biloko ya likoló atyá mpe mibeko oyo ebongi kotambwisa biso. (Nz. 19:7-9)’ (Talá mpe nkasa 397-403, 150-154, na mitó ya makambo “Nzambe” mpe “Bozalisi.”)
BITUMBA/KIMYA
● ‘Na mikolo oyo, moto nyonso azali kobanga etumba ya nikleere (to bateroriste). Okanisaka ete mokolo mosusu tokozala mpenza na kimya na mokili oyo? . . . (Nz. 46:8, 9; Yis. 9:6, 7)’
● ‘Nazali koluka bato oyo bazali na mposa ya kofanda na mokili oyo ezangi bitumba. Kaka na siɛklɛ oyo eleki, longola bitumba mibale ya mokili mobimba, bato babundaki bitumba mingi. Sikoyo tozali kobanga etumba ya nikleere (to bateroriste). Na makanisi na yo, esengeli kosala nini mpo makambo ya ndenge wana esalema te? . . . Nani akoki kotya kimya na mokili? . . . (Mika 4:2-4)’
● ‘Tomoni ete moto nyonso alobaka ete alingi kimya ezala na mokili mobimba. Bakonzi ya politiki mingi bazali koloba mpe bongo. Kasi, mpo na nini kimya ezali te? . . . (Em. 12:7-12)’
BOKONZI
● ‘Ntango nazali kosolola na bato, namoni ete mingi bazali na mposa ya guvɛrnema oyo ekoki kosilisa mpenza mikakatano minene oyo tozali na yango lelo, na ndakisa kobomana mpe ntalo ya biloko (to lobelá mokakatano mosusu oyo ezali kotungisa bato). Bato bakoki kosepela na guvɛrnema ya ndenge wana, boye te? . . . Guvɛrnema ya ndenge wana ezali lelo? . . . Ya solo, bato mingi babondelaka mpo bázwa guvɛrnema oyo ekoki kosala makambo wana. Na ntembe te, yo mpe obondelaka mpo na yango, nzokande bato mingi te bandimaka ete ezali guvɛrnema ya solo. (Dan. 2:44; Nz. 67:6, 7; Mika 4:4)’ (Talá mpe nkasa 115-123, 203-207, na mitó ya makambo “Bokonzi” mpe “Guvɛrnema.”)
● ‘Tozali kotuna bato motuna moko. Tolingi mpe koyeba likanisi na yo. Oyebi ete Yesu ateyaki biso tóbondelaka ete Bokonzi ya Nzambe eya mpe ete mokano ya Nzambe esalema na mabele ndenge esalemaka na likoló? Okanisi ete Nzambe akoyoka libondeli yango mpo mokano na ye esalema mpenza na mabele? . . . (Yis. 55:10, 11; Em. 21:3-5)’
● ‘Nazali kosolola na bato mpo na likambo moko oyo moto nyonso asengeli kopona: Tosepelaka na guvɛrnema ya Nzambe, to tolingaka nde bato báyangela biso? Na kotalela makambo oyo ezali koleka na mokili lelo, omoni te ete tozali na mposa ya eloko mosusu koleka oyo bato basali? . . . (Mat. 6:9, 10; Nz. 146:3-5)’
BOLINGO/BOBOTO
● ‘Tomoni ete ebele ya bato bazali komitungisa mpo bato bazali lisusu na bolingo te. Yo mpe omitungisaka mpo na likambo yango? . . . Na makanisi na yo, mpo na nini bolingo ezali lisusu te? . . . Oyebi ete Biblia esí elobelá likambo yango? (2 Tim. 3:1-4) Eyebisi biso mpe mpo na nini bato bazali lisusu na bolingo te. (1 Yoa. 4:8)’
● ‘Nkombo na ngai ——. Nafandaka pene na bino. Nazali kotala bato mpo na mwa ntango moke mpo na koyebisa bango likambo moko oyo ezali kotungisa ngai mingi, mbala mosusu yo mpe oyebi yango. Komonisa boboto ezalaka mpasi te, nzokande lelo oyo ezaleli yango emonanaka mpenza te. Osí omituná mpo na nini boboto ezali te? . . . (Mat. 24:12; 1 Yoa. 4:8)’
BOMOI/BOLAMU
● ‘Tozali kotala bato mpo na koluka baoyo bazali mpenza na mposa ya koyeba ntina ya bomoi. Bato mingi bazali na mwa esengo. Kasi, bazali mpe kokutana na mikakatano mingi. Ntango tozali kokola, tozali komona ete bomoi ezali mpenza mokuse. Bomoi esengelaki kozala kaka boye? Okanisi nini? . . . (Lobelá mokano ya Nzambe ndenge ezalaki kosalema na Edene; na nsima tángá Yoane 17:3 mpe Emoniseli 21:3, 4.)’ (Talá mpe nkasa 124-128 na motó ya likambo “Bomoi.”)
● ‘Lelo tozali kotuna bato soki bakanisaka nini ntango batángaka maloba “bomoi ya seko” na Biblia na bango. Maloba yango ezali na ntina mingi mpo Biblia elobeli yango mbala soki 40. Bomoi ya seko ekozala ndenge nini? . . . Ndenge nini tokoki kozwa yango? (Yoa. 17:3; Em. 21:4)’
● ‘Tozali kosolola na bato oyo bazali mpenza komitungisa mpo lelo bomoi ezali malamu te. Ebele ya bato basepelaka kozala na bomoi, kasi mingi bamitunaka soki mokolo mosusu bakozala mpenza na bomoi ya malamu. Bongo yo? . . . Okoki kotánga likambo moko oyo esalaka ete bato bázala na bomoi ya mpasi lelo? . . . (Nz. 1:1, 2; tángá bavɛrsɛ mosusu oyo eyokani na likambo oyo ezali kotungisa moto oyo ozali kosolola na ye.)’
BOYEKOLI YA BIBLIA
● ‘Nayei kotala yo mpo nalakisa yo ndenge toyekolaka na bato Biblia ofele. Soki olingi, nakomonisa yo na mwa miniti moke ndenge bato bazali koyekola Biblia ná mabota na bango, na mikili koleka 230. Tokoki kopona lisolo moko kati na masolo oyo. (Lakisá ye etanda ya makambo oyo ezali na kati ya buku oyo bokoyekola.) Wapi lisolo oyo esepelisi yo mingi?’
● ‘Tozali kolakisa bato buku oyo esalisaka biso tóyekola Biblia. (Lakisá buku yango.) Ozali na yango? . . . Soki ozali na mwa miniti, nakoki kolakisa yo ndenge ya kosalela yango mpo na koyekola Biblia, na Biblia na yo moko.’
KOBOMANA/KIMYA
● ‘Mbote Tata (to Mama). Tozali kosolola na bato likambo etali kimya. Na bisika oyo tozali, bato bazali kobomana mingi mpe likambo yango ezali kotungisa biso. Okanisi ete mokolo mosusu bato bakotambola na butu kozanga kobanga? (To okanisi ete moto moko akoki kosilisa likambo yango?) . . . (Mas. 15:3; Nz. 37:10, 11)’
● ‘Nkombo na ngai ——. Nafandi pene na bino. Ntango nazali koya awa, nayoki bato nyonso bazali koloba mpo na (lobelá likambo moko ya mabe oyo euti kosalema na esika oyo bofandi to likambo mosusu oyo ezali kotungisa bato). Okanisi nini na likambo yango? . . . Okanisi ete ezali na eloko oyo ekoki kosalisa bato bázala na kimya? . . . (Mas. 1:33; 3:5, 6)’
KONUNA/LIWA
● ‘Osí omituná mpo na nini bato banunaka mpe bakufaka? Nkoba mosusu ya mbu eumelaka bambula ebele mpenza. Nzete mosusu esili koumela bankóto ya bambula. Nzokande, moto aumelaka kaka mbula 70 to 80 mpe na nsima akufi. Osí omituná mpo na nini ezalaka bongo? . . . (Rom. 5:12) Likambo yango ekobongwana mokolo mosusu? . . . (Em. 21:3, 4)’
● ‘Osí omituná soki liwa ezali nsuka ya makambo nyonso to soki bomoi mosusu ezalaka nsima ya liwa? . . . Biblia ezali kopesa biyano na mituna nyonso oyo tokoki komituna mpo na liwa. (Mos. 9:5, 10) Emonisi lisusu ete ezali na elikya ya solo mpo na baoyo bazali na kondima. (Yoa. 11:25)’ (Talá mpe nkasa 313-319 mpe 175, na mitó ya makambo minene “Liwa” mpe “Elendiseli.”)
KOZANGA BOSEMBO/MPASI
● ‘Osí omituná soki Nzambe akipaka makambo ya kozanga bosembo mpe mpasi oyo ezali kotungisa bato? . . . (Mos. 4:1; Nz. 72:12-14)’ (Talá mpe mitó ya makambo “Bampasi” mpe “Elendiseli.”)
LIBOTA/BANA
● ‘Tozali kosolola na moto nyonso oyo alingi koyeba ndenge ya malamu ya kosilisa mikakatano na libota. Biso nyonso tobomaka nzoto mpo na kosilisa mikakatano yango, kasi soki ezali na eloko oyo ekoki kosalisa biso tósala malamu koleka, tokosepela na yango, boye te? . . . (Kol. 3:12, 18-21) Biblia epesi elikya ete na mikolo ezali koya, tokozala na bomoi ya malamu na mabota na biso. (Em. 21:3, 4)’
● ‘Biso nyonso tolingaka bana na biso bázala na bomoi ya esengo. Kasi na makanisi na yo, tokoki mpenza kondima ete mikakatano oyo tozali komona lelo oyo na mokili ekosila? . . . Bongo, okanisi mokili ekozala ndenge nini ntango bana na biso bakokóma mikóló? . . . Biblia emonisi ete Nzambe akokómisa mabele oyo esika kitoko mpenza ya kofanda. (Nz. 37:10, 11) Kasi mpo bana na biso báfanda na mabele yango, etaleli mpenza nde nzela oyo biso toponi. (Mib. 30:19)’
MAKAMBO OYO EZALI KOLEKA NA MOKILI
● ‘Mbote Tata (to Mama). Nkombo na ngai ——. Nafandi pene na bino na (pesá nkombo ya balabala to esika ofandaka). Lobi na mpokwa olandaki nsango na televizyo? . . . Balobelaki (yebisá likambo moko oyo ezali kotungisa bato)—okanisi nini mpo na yango? . . . Mbala mingi toyokaka bato bazali komituna: Mokili oyo ezali kokende wapi? Biso Batatoli ya Yehova tondimi ete tozali sikoyo na ntango oyo Biblia ebengi ete “mikolo ya nsuka.” Talá ndenge likambo yango elobelami polele na 2 Timote 3:1-5.’ (Talá mpe nkasa 359-368.)
● ‘Otángaki likambo oyo na zulunalo pɔsɔ oyo? (Lakisá eteni ya zulunalo oyo ezali na likambo yango.) Okanisi boni . . . ?’
● ‘Nalingi natuna yo likambo moko. Soki esengeli opona, na kati ya makambo oyo ezali kotungisa bato, oyo wapi okolinga elongwa liboso? (Nsima ya koyeba likambo oyo ezali kotungisa moto oyo ozali kosolola na ye, bandá lisolo na likambo yango.)’
MIKOLO YA NSUKA
● ‘Toyei kotala yo mpo na kosolola na yo mpo na makambo oyo tozali komona na mokili lelo. Bato mingi bazali lisusu kosepela na Nzambe te mpe bazali komitambwisa te ndenge Biblia esɛngi. Yango esali ete bato bátyelanaka motema lisusu te. Tiká natángela yo makambo oyo ezali na 2 Timote 3:1-5 mpe okoyebisa ngai soki makambo yango ezali mpenza kosalema na mokili lelo. (Tángá) . . . Tokoki mpenza kondima ete makambo ekobonga na mikolo ezali koya? (2 Pe. 3:13)’
● ‘Bato mingi bazali kokanisa ete mokili etikali na mikolo ya kotánga. Bazali koloba ete ntango na biso ezali “mikolo ya nsuka.” Kasi oyebi ete Biblia ezali kolakisa biso makambo oyo tosengeli kosala mpo tóbika ntango mokili oyo ekobomama mpe oyo tosengeli kosala mpo tózala na bomoi na mabele oyo ekokóma paradiso? (Sef. 2:2, 3)’ (Talá mpe nkasa 359-368, na motó ya likambo “Mikolo ya nsuka.”)
[Talá makanisi mosusu na eteni oyo elobi “Makambo oyo ezali koleka na mokili.”]
MOSALA/NDAKO
● ‘Touti kosolola na bato mpo na koyeba nini esengeli mpo moto nyonso azala na mosala mpe na ndako na ye moko. Okanisi ete tokoki mpenza kotya motema ete baguvɛrnema ya bato ekosala mpenza likambo yango? . . . Nzokande ezali na moto moko oyo akosilisa mikakatano yango; moto yango nde Mozalisi ya bato. (Yis. 65:21-23)’
● ‘Tozali kosolola na bato likambo ya guvɛrnema ya malamu. Bato mingi balingaka guvɛrnema ya malamu mpenza, oyo ekopesa bato nyonso misala mpe bandako ya malamu. Mpo na yo, guvɛrnema nini ekoki kosala makambo nyonso wana? . . . (Nz. 97:1, 2; Yis. 65:21-23)’ (Talá mpe nkasa 203-207, na motó ya likambo “Guvɛrnema.”)
SOKI MOTO ALOBI: ‘NAZALI NA LINGOMBA NA NGAI’
● ‘Mbote Tata (to Mama). Tozali kotala mabota nyonso ya balabala na bino (to ya esika oyo), mpe tomoni ete bato mingi bazali na mangomba na bango. Ntango mosusu yo mpe ozali na lingomba na yo. . . . Nzokande, ata soki tozali na lingomba nini, biso nyonso tokutanaka na mikakatano lokola, ntalo ya biloko, maladi mpe toyokaka ete bato bazali kobomana, ezali bongo te? . . . Okanisi ete makambo wana ekoki kosila? . . . (2 Pe. 3:13; mpe bongo na bongo)’
SOKI MOTO ALOBI: ‘NAZALI NA MOSALA’
● ‘Mbote Tata (to Mama). Tozali kotala bato nyonso ya esika oyo mpo na koyebisa bango nsango moko ya ntina mingi. Namoni ete ozali na mosala mingi, yango wana nakoloba mingi te.’
● ‘Mbote Tata (to Mama). Nkombo na ngai ——. Nayei kotala yo mpo nayebisa yo bolamu oyo Bokonzi ya Nzambe ekomemela bato mpe oyo tokoki kosala mpo na kozwa bolamu yango. Kasi namoni ete ozali na mosala (to olingi kobima). Nakoki koyebisa yo likambo moko na mokuse?’
NA TERITWARE OYO TOSAKOLAKA MBALA NA MBALA
● ‘Nasepeli ndenge nakuti yo. Tozali koleka ndenge tolekaka pɔsɔ na pɔsɔ na kartye, mpe tozali na likambo ya sika ya koyebisa yo mpo na makambo ya malamu oyo Bokonzi ya Nzambe ekosalela bato.’
● ‘Mbote Tata (to Mama). Nasepeli mingi ndenge tomonani lisusu. . . . Bino nyonso na ndako bozali malamu? . . . Nayei koyebisa yo likanisi oyo . . . ’
● ‘Mbote Tata (to Mama). Nsango nini? . . . Nasepeli lokola tokutani lisusu mpo tósolola. (Yebisá mpenza likambo oyo olingi kosolola na ye.)’