Mekolá kondima na bango
1. Kobanda na pɔsɔ ya 19 sanza ya 10, tokobanda koyekola nini na Boyekoli ya Biblia na lisangá?
1 Kobanda na pɔsɔ ya 19 sanza ya 10, 2015, tokobanda koyekola buku Mekolá kondima na bango na Boyekoli ya Biblia na lisangá. Buku yango elobeli masolo ya Biblia ya bato 14, mibali mpe basi ya kondima. Masolo yango ekomami na ndenge oyo ekosalisa biso tómona bato yango na makanisi, tómona ete bazalaki bato ya solosolo oyo bakutanaki na mikakatano ntango bazalaki kosalela Yehova. Buku yango ezali mpe na mateya oyo tokoki kozwa na masolo yango mpo na kosalisa mokomoko na biso asalela mateya yango na bomoi na ye lelo oyo.—Ebr. 6:12.
2. Lobelá makambo mosusu oyo ezali na buku Mekolá kondima na bango.
2 Makambo ezali na kati: Buku yango ezali na badati mpe bakarte mpo na kosalisa biso tóyeba esika mpe ntango oyo moto mokomoko azalaki na bomoi. Lisusu, mokapo mokomoko ezali na etanda: “Mituna mpo na komanyola . . . ,” oyo ekosalisa biso tómanyola na masolo mpe tósalela mateya oyo toyekoli. Buku yango ezali mpe na bililingi ebele ya langi kitoko, oyo elobeli makambo ndenge na ndenge mpe mayemi oyo balukalukaki malamumalamu, oyo ezali kosalisa biso tómona na makanisi ndenge masolo elekaki.
3. Tokoki kosala nini mpo tózwa matomba na boyekoli ya buku yango?
3 Ndenge oyo okoki kozwa matomba: Mokanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi oyo ezali na ebandeli elendisi biso na maloba oyo: “Salelá likoki na yo ya kokanisa, mpe saláká lokola ozali na kati ya makambo oyo balobeli na lisolo mokomoko. Lukáká komiyoka ndenge bato oyo Biblia elobeli bamiyokaki, mpe luká komona ndenge bamonaki. Luká koyeba ndenge oyo basalaki ntango makambo mosusu ekómelaki bango ná ndenge oyo yo olingaki kosala.” Na ntembe te, kosalela likoki ya kokanisa elimboli te kolukaluka, kasi nde komona na makanisi eloko nini lisolo oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu elobi mpe komitya na esika ya bato oyo balobelami. Kosala bongo esɛngaka ntango mpe komanyola. (Neh. 8:8) Soki liteya ebandi na katikati ya mokapo moko, motambwisi akobanda na kozongela liteya oyo elekaki na boumeli ya segɔnde 30 to miniti 1. Akoki kotuna motuna moko to mituna mibale mpo na kozongela liteya, soki etanda “Mituna mpo na komanyola . . .” ezali te.
4. Mpo na nini tosengeli koyekola buku Mekolá kondima na bango?
4 Tozali na mokili oyo elukaka mokolo na mokolo kobebisa to kolɛmbisa kondima na biso, na lolenge moko to mosusu. Buku yango, ezala mpe masolo oyo ezali kokoba kobima na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, oyo esangisamaki mpo na kosala buku yango, ezali likabo euti na Yehova mpo na kosalisa biso tókómisa kondima na biso makasi. (Yak. 1:17) Tiká ete tózwela yango mpenza matomba na koyangana na Boyekoli ya Biblia na lisangá pɔsɔ nyonso mpe kopesa biyano mingi soki likoki ezali, ntango tokoyekola buku yango elongo!