LITEYA 46
Bandakisa ya makambo oyo bato bameseni na yango
YA SOLO, ezali likambo ya ntina ete bandakisa oyo ozali kosalela eyokana na lisolo oyo ozali kosala. Nzokande, mpo ebota mbuma mingi koleka, bandakisa yango esengeli mpe kozala oyo ebongi na bato oyo bakoyoka yo.
Ndenge nini lolenge ya bato oyo bakoyoka yo ekoki kosalisa yo na kopona bandakisa oyo okosalela ntango ozali koloba liboso ya bato mingi? Yesu Klisto asalaki nini? Ezala ntango azalaki koloba liboso ya bato ebele to na bayekoli na ye, Yesu azwaki bandakisa na ye na makambo ya mikili mosusu te, kaka ya Yisalaele. Mpamba te, soki azwaki bandakisa ya mikili mosusu, mbɛlɛ bato oyo bazalaki koyoka ye balingaki kosimba eloko te. Yesu apesaki ata mokolo moko te ndakisa oyo ezali kolobela makambo ya ndako ya mokonzi ya Ezipito to misala ya mangomba ya mboka Inde. Bandakisa na ye ezalaki kouta nde na makambo oyo bato ya mokili mobimba bayebi. Alobelaki, na ndakisa: kotonga bilamba, kosala mombongo, kobungisa eloko moko ya ntalo, mpe kokende na fɛti ya libala. Ayebaki malamu eloko nini bato basalaka ntango likambo moko boye ekómeli bango, mpe asalelaki yango na bandakisa na ye. (Mko. 2:21; Luka 14:7-11; 15:8, 9; 19:15-23) Lokola mosala na ye ya kosakola ezalaki mpenza nde mpo na bato ya Yisalaele, bandakisa oyo azalaki kopesa ezalaki kolobela mingimingi makambo oyo bazalaki komona mpe misala oyo bazalaki kosala mokolo na mokolo. Yango wana azalaki kolobela makambo lokola kolona bilanga, ndenge bampate balandaka mobateli na bango, mpe ndenge bazalaki kosalela mposo ya nyama mpo na kotya vinyo na kati. (Mko. 2:22; 4:2-9; Yoa. 10:1-5) Azalaki mpe kolobela masolo ya kala oyo bango bayebaki malamu; na ndakisa, ndenge mobali na mwasi ya liboso basalamaki, Mpela ya mikolo ya Noa, kobomama ya Sodoma na Gomola, liwa ya mwasi ya Lota, mpe bongo na bongo. (Mat. 10:15; 19:4-6; 24:37-39; Luka 17:32) Yo mpe otalelaka makambo oyo bato oyo bakoyoka yo bayebi mpe masolo ya mboka na bango mpo na kopona bandakisa?
Bongo soki ozali koloba liboso ya bato ebele te, kasi na moto moko to mpe bato moke kaka, okosala nini? Salá nyonso mpo na kopona ndakisa oyo ebongi mpenza na mwa ndambo wana ya bato to na moto wana moko. Ntango Yesu apesaki mwasi moko ya mboka Samalia litatoli na libulu ya mai pene na Sikala, alobelaki “mai ya bomoi,” ‘koyoka lisusu mposa ya mai ata moke te,’ mpe “liziba ya mai oyo ezali kopunzwapunzwa mpo na kopesa bomoi ya seko”—nyonso wana ezalaki maloba ya elilingi oyo eyokanaki na mosala oyo mwasi wana ayaki kosala. (Yoa. 4:7-15) Mpe ntango azalaki koloba na mibali oyo bazalaki kosukola minyama na bango, aponaki maloba ya elilingi oyo ezalaki kolobela mosala ya koboma mbisi. (Luka 5:2-11) Na mabaku nyonso wana mibale, bato oyo Yesu asololaki na bango bazalaki kofanda na mboka oyo mosala ya bilanga ezalaki kosalema mingi, Yesu akokaki kopesa ndakisa ya mosala wana ya bilanga, kasi apesaki te; aponaki nde ndakisa ya misala na bango moko mpo na kosalisa bango bámona liteya na ye na kati ya makanisi na bango; bandakisa yango ebongaki mpenza! Yo mpe omekaka kosala bongo?
Yesu atyaki likebi mingimingi nde epai ya “bampate babungá ya ndako ya Yisalaele,” nzokande ntoma Paulo atindamaki epai ya bato ya Yisalaele kaka te, kasi atindamaki mpe epai ya bato ya bikólo mosusu. (Mat. 15:24; Mis. 9:15) Yango ekesenisaki nde bandakisa ya Paulo na oyo ya Yesu? Ɛɛ. Ntango Paulo atindaki mokanda epai ya baklisto ya Kolinti, apesaki ndakisa ya momekano ya kopota mbangu, alobelaki likambo ya kolya biloko na batempelo ya banzambe ya bikeko, mpe alobelaki milɔngɔ ya bato oyo bautaki kolonga bitumba; nyonso wana ezali makambo oyo bato ya bikólo mosusu bamesanaki na yango.—1 Kol. 8:1-10; 9:24, 25; 2 Kol. 2:14-16.
Lokola Yesu na Paulo bazalaki kotalela makambo malamumalamu mpo na kopona bandakisa na mateya na bango, yo mpe osalaka bongo? Otalelaka mpenza makambo ya mboka ya bato oyo bakoyoka yo mpe misala na bango ya mokolo na mokolo? Ya solo, banda ekeke ya liboso tii sikoyo, makambo mingi ebongwani na mokili. Bato mingi bazali koyoka nsango ya makambo oyo ezali koleka na mokili na nzela ya televizyo. Mingi bakómá komesana na makambo oyo ezali koleka na mikili mosusu. Soki ezali bongo na esika ofandi, mabe ezali te soki osaleli bansango wana lokola bandakisa. Atako bongo, kobosana te ete bandakisa oyo esimbaka mpenza motema ya moto ezalaka mingimingi oyo ya makambo ya bomoi ya moto yango, elingi koloba ndako na ye, libota na ye, mosala na ye, biloko oyo ye alyaka, malili to molunge oyo ezalaka na mboka oyo ye afandi.
Soki ndakisa oyo oponi ekómi kosɛnga bandimbola milaimilai, yebá ete ndakisa yango ezali mbala mosusu kolobela likambo oyo bato oyo bazali koyoka yo bameseni na yango te. Ezali mpasi te mpo ndakisa ya ndenge wana ebungisa liteya oyo olingi kopesa. Mpe ata soki bato oyo bazali koyoka yo bakangi ndakisa yango na bɔɔngɔ, liteya ya Makomami oyo olingaki kopesa ekotikala na mitó na bango te.
Na esika ya kopesa bandakisa ya mindɔndɔmindɔndɔ, Yesu azalaki kosalela nde bandakisa ya makambo ya pɛtɛɛ, oyo bato bazalaki komona mikolo nyonso. Asalelaki makambo ya mikemike mpo na kolimbola makambo ya minene mpe asalelaki makambo ya pɛtɛɛ mpo na kolimbola makambo oyo ezalaki mpasi mpo na koyeba. Yesu asalisaki bato bákanga mpenza ntina ya mateya ya elimo mpe bábosana yango te, na ndenge azalaki kosalela makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo mpo na koteya bango. Azali mpenza ndakisa malamu ya kolanda!