Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • kr mok. 17 nk. 182-191
  • Formasyo mpo na basakoli ya Bokonzi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Formasyo mpo na basakoli ya Bokonzi
  • Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Kaka ndenge Tata ateyaki ngai, ndenge mpe nazali koloba”
  • Formasyo mpo na bapalanganisi ya nsango malamu
  • Koteya bandeko mibali mpo bákokisa mikumba minene
  • Biteyelo ya Teokrasi emonisaka bolingo ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Ozali koyekola epai ya Yehova na ndenge oyo makoki na yo nyonso ezali kopesa yo nzela?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Biteyelo nini ebongisami mpo na babongisi-nzela?
    Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
  • Eteyelo mpo na kobongisa basungi​—Ekuke monene oyo ezali komema na mosala
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
Makambo mosusu
Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
kr mok. 17 nk. 182-191

MOKAPO 17

Formasyo mpo na basakoli ya Bokonzi

MOKAPO OYO ELOBELI NINI?

Elobeli ndenge biteyelo ya teokrasi esalisaka basakoli ya Bokonzi mpo bákokisa mikumba na bango

1-3. Yesu asalaki nini mpo nsango malamu esakolama na bisika mingi, mpe yango ebimisi mituna nini?

YESU asakolaki na Galile mobimba na boumeli ya mbula mibale. (Tángá Matai 9:35-38.) Akendaki na bingumba mpe bamboka ebele, azalaki koteya na basinagoga mpe kosakola nsango malamu ya Bokonzi. Esika nyonso oyo azalaki kosakola, ebele ya bato bazalaki koya epai na ye. Yesu alobaki ete “mbuma ya kobuka ezali mingi, kasi basali bazali moke.”

2 Yesu azwaki bibongiseli mpo mosala ya kosakola esalema na bisika mingi. Asalaki nini? Atindaki bantoma 12 bákende “kosakola bokonzi ya Nzambe.” (Luka 9:1, 2) Mbala mosusu bantoma bazalaki komituna soki bakokokisa mosala yango ndenge nini. Lokola Yesu alingaki bantoma na ye, liboso atinda bango, apesaki bango eloko moko oyo Tata na ye ya likoló apesaki ye​—formasyo.

3 Yango ebimisi mituna oyo: Formasyo nini Yesu azwaki epai ya Tata na ye? Formasyo nini Yesu apesaki bantoma na ye? Bongo lelo, Mokonzi Masiya apesi mpe bayekoli na ye formasyo mpo bákokisa mosala na bango? Soki ɛɛ, apesi yango ndenge nini?

“Kaka ndenge Tata ateyaki ngai, ndenge mpe nazali koloba”

4. Epai wapi mpe ntango nini Yehova ateyaki Yesu?

4 Yesu alobaki polele ete Tata na ye ateyaki ye. Na mosala na ye awa na mabele, Yesu alobaki boye: “Kaka ndenge Tata ateyaki ngai, ndenge mpe nazali koloba makambo oyo.” (Yoa. 8:28) Epai wapi mpe ntango nini Yehova ateyaki Yesu? Emonani ete formasyo yango ebandaki mwa moke nsima ya ntango oyo Yesu, Mwana ya liboso ya Nzambe, akelamaki. (Kol. 1:15) Elongo na Tata na ye na likoló, Yesu alekisaki bambula oyo ekoki kotángama te na koyoka ‘Molakisi Monene’ mpe koyekola epai na ye. (Yis. 30:20) Na yango, Yesu azwaki formasyo oyo ekokani na mosusu te epai ayekolaki bizaleli, misala, mpe mikano ya Tata na ye.

5. Formasyo nini Tata apesaki Mwana na ye mpo na mosala ya kosakola oyo asengelaki kosala awa na mabele?

5 Na ntango oyo ebongi, Yehova ateyaki Mwana na ye makambo etali mosala oyo akosala awa na mabele. Tótalela esakweli moko oyo elobeli boyokani kati na Molakisi Monene ná Mwana na ye ya liboso. (Tángá Yisaya 50:4, 5.) Esakweli yango elobi ete Yehova azalaki kolamwisa Mwana na ye “ntɔngɔ na ntɔngɔ.” Maloba yango ya elilingi epesaka likanisi ya molakisi oyo alamwisaka mwana-kelasi na ye ntɔngɔntɔngɔ mpo na koteya ye. Buku moko oyo elimbolaka maloba ya Biblia elobi boye: “Yehova . . . azalaki kozwa ye lokola mwana-kelasi na eteyelo, mpe ateyaki ye makambo oyo akosakola mpe ndenge oyo akosala yango.” Na “eteyelo” yango kuna na likoló, Yehova ateyaki Mwana na ye ‘makambo oyo asengeli koyebisa mpe oyo asengeli koloba.’ (Yoa. 12:49) Tata alakisaki mpe Mwana na ye ndenge ya koteya.a Ntango Yesu azalaki awa na mabele, asalelaki malamu formasyo oyo azwaki na mosala na ye ya kosakola, mpe alakisaki bayekoli na ye ndenge ya kosala malamu mosala na bango ya kosakola.

6, 7. (a) Formasyo nini Yesu apesaki bantoma na ye, mpe yango esalisaki bango na nini? (b) Lelo oyo, Yesu asalaka ete bayekoli na ye bázwa formasyo nini?

6 Kasi, formasyo nini Yesu apesaki bantoma na ye? Na kolanda Matai mokapo 10, Yesu apesaki bango malako ya sikisiki mpo na mosala ya kosakola, na ndakisa: esika bakosakola (vɛrsɛ 5 ná 6), nsango oyo bakomema (vɛrsɛ 7), ntina ya kotyela Yehova motema (vɛrsɛ 9 ná 10), ndenge ya kobanda lisolo na bato (vɛrsɛ 11-13), ndenge ya kosala soki baboyi koyamba bango (vɛrsɛ 14 ná 15), mpe ndenge ya kosala soki bakutani na botɛmɛli (vɛrsɛ 16-23).b Formasyo wana oyo Yesu apesaki bantoma na ye esalisaki bango bápalanganisa nsango malamu na siɛklɛ ya liboso.

7 Ezali boni lelo? Yesu, Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe, apesi bayekoli na ye mokumba monene mpenza: kosakola “nsango malamu oyo ya bokonzi . . . na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso.” (Mat. 24:14) Mokonzi apesi biso formasyo mpo tókokisa mosala yango ya ntina mingi? Ɛɛ! Kuna na likoló esika azali, Mokonzi asalaka ete bayekoli na ye bázwa formasyo na oyo etali ndenge ya kosakwela bato nsango malamu mpe ndenge ya kokokisa mikumba minene na kati ya lisangá.

Formasyo mpo na bapalanganisi ya nsango malamu

8, 9. (a) Ntina ya libosoliboso ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ezalaki nini? (b) Ndenge nini likita oyo tosalaka na kati ya pɔsɔ esalisi yo okóma mosakoli malamu ya Bokonzi?

8 Liboso, ebongiseli ya Yehova ezalaki kosalela mayangani ya mike mpe ya minene ná makita ya lisangá, lokola Likita ya mosala, mpo na kopesa basaleli ya Nzambe formasyo na oyo etali mosala ya kosakola. Kasi, kobanda na bambula ya 1940, bandeko oyo bazalaki kokamba mosala na biro monene babandaki kozwa bibongiseli mpo formasyo epesama na nzela ya biteyelo ndenge na ndenge.

9 Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Ndenge tomonaki yango na mokapo eleki, eteyelo yango ebandaki kosalema na 1943. Ntina na yango ezalaki kaka ya koteya bana-kelasi ndenge ya kosala masolo ya malamu na makita ya lisangá? Te. Ntina ya libosoliboso ya eteyelo yango ezalaki ya koteya basaleli ya Nzambe mpo básalela likabo ya koloba, oyo Yehova apesá biso, mpo na kokumisa ye na mosala ya kosakola. (Nz. 150:6) Eteyelo yango esalisaki bandeko mibali mpe bandeko basi nyonso oyo bazalaki na eteyelo yango bákóma basakoli ya malamu ya Bokonzi. Lelo, tozali kozwa mateya yango na likita ya kati ya pɔsɔ.

10, 11. Banani bakoki kokɔta na Eteyelo ya Gileade lelo oyo, mpe mateya na yango ebongisamá na mokano nini?

10 Gileade, Eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia. Eteyelo yango ebandaki na mwayambo, na mokolo ya 01/02/1943. Na ebandeli, eteyelo yango ebongisamaki mpo na koteya babongisi-nzela mpe basaleli mosusu ya ntango nyonso mpo bákende mosala ya misionɛrɛ na ekólo oyo bakotinda bango. Kasi, kobanda na sanza ya zomi na 2011, eteyelo yango ekómá kaka mpo na bandeko oyo bazali babongisi-nzela monene, bakɛngɛli-batamboli ná basi na bango, bandeko ya Betele, mpe bamisionɛrɛ oyo bakɔtá naino eteyelo yango te.

11 Mateya ya eteyelo ya Gileade ebongisamá na mokano nini? Ndeko moko oyo azali molakisi na eteyelo yango banda kala alobi ete “ezali mpo na kolendisa kondima ya bana-kelasi na nzela ya boyekoli ya mozindo ya Liloba ya Nzambe mpe kosalisa bango bákolisa bizaleli ya elimo oyo ekosalisa bango bálonga mikakatano na bateritware. Mateya yango ebongisamá mpe na mokano ya kosalisa bana-kelasi bázala na mposa makasi ya kopalanganisa nsango malamu.”​—Ef. 4:11.

12, 13. Ndenge nini Eteyelo ya Gileade esalisi na mosala ya kosakola na mokili mobimba? Pesá ndakisa.

12 Ndenge nini Eteyelo ya Gileade esalisi na mosala ya kosakola na mokili mobimba? Banda 1943, bandeko koleka 8 500 bakɔti eteyelo yango,c mpe bamisionɛrɛ yango basali na mikili koleka 170. Bamisionɛrɛ basalelaka malamu formasyo oyo bazwi, mpe na bongo bazalaka ndakisa malamu na oyo etali kozala molende na mosala ya kosakola mpe bapesaka basusu formasyo na likambo yango. Mbala mingi, bamisionɛrɛ batambwisaka mosala ya kosakola na bateritware oyo basakoli ya Bokonzi bazali moke to mpe bazali te.

13 Tózwa ndakisa ya Japon, epai mosala ya kosakola ezalaki kosalema lisusu na molɔngɔ te na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Na sanza ya mwambe 1949, basakoli bazalaki ata zomi te na Japon. Kasi na nsuka ya mbula yango, bamisionɛrɛ 13 oyo bazwaki formasyo na Gileade bamipesaki na kosakola na Japon. Bamisionɛrɛ mosusu ebele bayaki na nsima. Na ebandeli, bamisionɛrɛ bamipesaki na kosakola na bingumba ya minene; na nsima bakendaki mpe na bingumba mosusu. Mpiko ya bamisionɛrɛ yango elendisaki bayekoli na bango ya Biblia mpe bandeko mosusu bákóma babongisi-nzela. Molende ya bamisionɛrɛ ebotaki mbuma ya malamu mpenza. Lelo, basakoli na Japon bazali koleka 216 000, mpe mingi kati na bango (40%) bazali babongisi-nzela!d

14. Biteyelo ya teokrasi ezali komonisa nini? (Talá mpe etanda “Biteyelo mpo na kobongisa basakoli ya Bokonzi,” na lokasa 188.)

14 Biteyelo mosusu ya Teokrasi. Eteyelo ya babongisi-nzela, Eteyelo ya Biblia mpo na bandeko oyo babalá, mpe Eteyelo ya Biblia mpo na bandeko mibali minzemba esalisi bandeko oyo bakɔtá yango bázala makasi na elimo mpe bámipesa na molende na kopalanganisa nsango malamu.e Biteyelo wana nyonso ezali mpenza komonisa ete Mokonzi apesi bayekoli na ye nyonso oyo esengeli mpo bákokisa mosala na bango.​—2 Tim. 4:5.

Koteya bandeko mibali mpo bákokisa mikumba minene

15. Bandeko oyo bazali na mikumba balingaka komekola Yesu na likambo nini?

15 Kanisá lisusu esakweli ya Yisaya oyo elobelaki ndenge Nzambe azalaki koteya Yesu. Na “eteyelo” wana ya likoló, Yesu ayekolaki “ndenge ya koloba mpo na kobɔndisa moto oyo alɛmbi.” (Yis. 50:4.) Yesu asalelaki mateya wana; ntango azalaki awa na mabele, abɔndisaki bato oyo bazalaki “komona mpasi na mosala mpe na kokumba mikumba.” (Mat. 11:28-30) Na ndakisa ya Yesu, bandeko mibali oyo bazali na mikumba balingaka kobɔndisa bandeko na bango na lisangá. Yango wana, biteyelo ndenge na ndenge esalemi mpo na kosalisa bango báyeba malamumalamu ndenge ya kosalisa bandeko na bango.

16, 17. Ntina ya Eteyelo ya mosala ya Bokonzi ezali nini? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)

16 Eteyelo ya mosala ya Bokonzi. Kelasi ya liboso ya eteyelo yango ebandaki na mokolo ya 09/03/1959 na South Lansing, na etúká ya New York. Babengisaki bakɛngɛli-batamboli mpe basaleli ya masangá mpo bálanda mateya sanza mobimba. Na nsima, babongolaki mateya yango oyo ezalaki na Lingelesi na minɔkɔ mosusu, mpe mokemoke, bandeko mibali na mokili mobimba bakómaki kozwa formasyo na eteyelo yango.f

Ndeko Lloyd Barry azali koteya bandeko na Eteyelo ya mosala ya Bokonzi na Japon, na 1970

Ndeko Lloyd Barry azali koteya na Eteyelo ya mosala ya Bokonzi na Japon, na 1970

17 Annuaire des Témoins de Jéhovah 1962 elobelaki ntina ya Eteyelo ya mosala ya Bokonzi; elobaki boye: “Na mokili oyo etondi na yikiyiki, mokɛngɛli na lisangá ya Batatoli ya Yehova asengeli kozala moto oyo ayebi kobongisa makambo na bomoi na ye mpo akoka kotyela bandeko nyonso ya lisangá likebi ndenge esengeli mpe asalisa bango. Asengeli mpe te kosundola libota na ye mpe komipesa mobimba na lisangá, kasi asengeli kozala na makanisi malamu. Basaleli na masangá ya mokili mobimba bazwaki libaku malamu mpenza ya koyangana elongo na Eteyelo ya mosala ya Bokonzi mpo na kozwa formasyo oyo ekosalisa bango báyeba kosala makambo oyo Biblia elobi ete mokɛngɛli asengeli kosala!”​—1 Tim. 3:1-7; Tito 1:5-9.

18. Na ndenge nini basaleli nyonso ya Nzambe bazwaka matomba ya Eteyelo ya mosala ya Bokonzi?

18 Basaleli nyonso ya Nzambe bazwaka matomba ya Eteyelo ya mosala ya Bokonzi. Na ndenge nini? Ntango bankulutu mpe basaleli na misala bazali kosalela makambo oyo bayekolaki na eteyelo yango balendisaka bandeko ya lisangá, ndenge Yesu asalaki. Osepelaka te soki nkulutu moko to mosaleli na misala ayebisi yo likambo moko ya boboto, ayoki yo na likebi, to mpe ayei kotala yo mpo na kolendisa yo? (1 Tes. 5:11) Bandeko ya ndenge wana bazali mpenza lipamboli na masangá na bango!

19. Komite ya Mateya ebongisi mpe biteyelo nini, mpe biteyelo yango ebongisami mpo na nini?

19 Biteyelo mosusu ya teokrasi. Komite ya mateya ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi ebongisi mpe biteyelo mosusu mpo na kopesa formasyo na bandeko oyo bazali na mikumba na ebongiseli ya Yehova. Biteyelo yango ebongisami mpo na kosalisa bankulutu, bakɛngɛli-batomboli, mpe bandeko ya Bakomite ya filiale, mpo bákokisa mikumba na bango malamumalamu. Mateya yango oyo euti na Biblia elendisaka bandeko yango bázala ntango nyonso makasi na elimo mpe básalela batoli ya Biblia ntango bazali kotalela makambo ya bampate ya Yehova oyo apesi na mabɔkɔ na bango.​—1 Pe. 5:1-3.

Kelasi ya liboso ya Eteyelo mpo na kobongisa basungi na Malawi

Kelasi ya liboso ya Eteyelo mpo na kobongisa basungi na Malawi, na 2007

20. Mpo na nini Yesu alobaki ete biso nyonso ‘toteyami na Yehova,’ mpe ozali na ekateli nini?

20 Ya solo, Masiya Mokonzi asali nyonso mpo bayekoli na ye bázwa formasyo oyo esengeli. Formasyo yango euti likoló: Yehova ateyaki Mwana ye, mpe Mwana na ye ateyi bayekoli na ye. Yango wana, Yesu alobaki ete biso nyonso ‘toteyami na Yehova.’ (Yoa. 6:45; Yis. 54:13) Tózala na ekateli ya kosalela mpenza formasyo oyo Mokonzi azali kopesa biso. Mpe tóbosana te ete formasyo nyonso oyo tozwi ezali mpo na kosalisa biso tózala makasi na elimo mpo tókokisa mosala ya kosakola malamumalamu.

a Ndenge nini toyebi ete Tata alakisaki Mwana na ye ndenge ya koteya? Kanisá naino: Ndenge Yesu asalelaki bandakisa ebele ntango azalaki koteya ekokisaki esakweli moko oyo ekomamaki basiɛklɛ mingi liboso abotama. (Nz. 78:2; Mat. 13:34, 35) Ezali polele ete Yehova, oyo akomisaki esakweli yango, abongisaki ete ntango Mwana na ye akoya, akoteya na nzela ya bandakisa, to masese.​—2 Tim. 3:16, 17.

b Mwa basanza na nsima, Yesu “aponaki bayekoli mosusu ntuku nsambo (70) mpe atindaki bango mibalemibale” na mosala ya kosakola. Apesaki bango mpe formasyo.​—Luka 10:1-16.

c Bandeko mosusu bakɔtaki Eteyelo ya Gileade koleka mbala moko.

d Mpo na koyeba makambo mosusu oyo mosala ya bamisionɛrɛ ya Gileade esali na mokili mobimba, talá mokapo 23 ya buku Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieu.

e Longola eteyelo ya babongisi-nzela, biteyelo wana mosusu mibale ekómi Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi.

f Lelo oyo, bankulutu nyonso balandaka mateya ya Eteyelo ya mosala ya Bokonzi oyo esalemaka nsima ya mwa bambula moke; mosusu eumelaka mikolo mingi, mosusu eumelaka te. Kobanda 1984, basaleli na misala mpe bazwaka formasyo na eteyelo yango.

Bokonzi ezali likambo ya solo na miso na yo?

  • Formasyo nini Yesu azwaki epai ya Tata na ye?

  • Formasyo nini Mokonzi apesi bayekoli na ye mpo bázala bapalanganisi ya nsango malamu?

  • Baformasyo nini bandeko mibali bazwaka mpo bákokisa malamu mikumba na bango?

  • Ndenge nini okoki komonisa ete osepelaka na formasyo oyo Mokonzi azali kopesa?

BITEYELO MPO NA KOBONGISA BASAKOLI YA BOKONZI

BOMOI MPE MOSALA YA BAKRISTO

Ntina: Kopesa bapalanganisi ya nsango malamu formasyo mpo bázala basakoli mpe bateyi ya malamu.

Boumeli: Esilaka te.

Esika: Ndako ya Bokonzi.

Ndenge ya kokɔta: Moto nyonso oyo ayanganaka na makita nyonso ya lisangá, oyo andimaka mateya ya Biblia, mpe oyo bomoi na ye eyokani na batoli ya Biblia. Bakomisaka nkombo epai ya mokɛngɛli na likita Bomoi mpe mosala.

Matomba: Likita Bomoi mpe mosala ya bakristo eteyaka biso kosala bolukiluki mpe koyeba kobimisa makanisi na molɔngɔ. Toyekolaka mpe koyoka basusu mpe koluka kokokisa bamposa na bango ya elimo, kaka ya biso moko te.

Arnie, ndeko moko oyo aumeli na mosala ya mokɛngɛli-motamboli, alobi boye: “Na bomwana nazalaki na likukuma makasi mpe nazalaki kokoka kotala bato na miso te. [Likita] yango esalisi ngai natika kobangabanga. Na lisalisi ya Yehova, nayekoli ndenge ya kobenda mpema ntango nazali koloba mpe kotya makanisi na likambo nazali kosala. Nazali na esengo mingi ndenge nayekoli kosanzola Nzambe na lisangá mpe na mosala ya kosakola.”

Mosakoli moko oyo azali mwana moke azali kotánga Biblia na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

ETEYELO MPO NA BANKULUTU YA MASANGÁg

Ntina: Kosalisa bankulutu bábongisa lisusu boyokani na bango na Nzambe, mpe bákokisa malamu mikumba na bango na lisangá.

Boumeli: Mikolo mitano.

Esika: Biro ya filiale nde eponaka; ezalaka mbala mingi na Ndako ya Bokonzi to na Ndako ya mayangani.

Ndenge ya kokɔta: Biro ya filiale ebengisaka bankulutu.

Matomba: Bandeko mosusu oyo bakɔtaki na kelasi ya mbala ya 92 na Patterson, na New York (États-Unis) balobi boye:

“Nazwi matomba mingi na eteyelo yango; esalisi ngai namitalela mpe namona ndenge oyo nakoki kobatela bampate ya Yehova.”

“Na bomoi na ngai mobimba, nakobosana te makambo oyo nayekoli.”

ETEYELO YA BABONGISI-NZELA

Ntina: Kosalisa babongisi-nzela ‘bákokisa mosala na bango malamumalamu.’​—2 Tim. 4:5.

Boumeli: Mikolo motoba.

Esika: Biro ya filiale nde eponaka; ezalaka mbala mingi na Ndako ya Bokonzi.

Ndenge ya kokɔta: Babengisaka mobongisi-nzela nyonso ya sanza na sanza oyo asili kokokisa ata mbula moko mpe mokɛngɛli ya zongazonga nde akoyebisa ye. Babongisi-nzela oyo bakɔtá kelasi yango esili koleka mbula mitano, bakoki kobengama lisusu na eteyelo yango.

Matomba: Ndeko mwasi Lily alobi boye: “Eteyelo yango esalisi ngai nalonga mikakatano oyo nakutanaka na yango na mosala ya kosakola mpe na bomoi na ngai. Nabongisi mpenza ndenge na ngai ya koyekola, ya koteya, mpe ya kosalela Biblia. Nakoki sikoyo kosalisa basusu malamu, kopesa bankulutu mabɔkɔ, mpe kosalisa mpo lisangá ekola.”

Brenda, oyo akɔti eteyelo yango mbala mibale, alobi boye: “Eteyelo yango esalisi ngai namipesa mobimba na makambo ya elimo, nabongisa lisosoli na ngai, mpe nasalisaka mpenza basusu. Ya solo mpenza, Yehova azali mokabi!”

ETEYELO YA BANDEKO OYO BAKƆTI SIKA NA BETELE

Ntina: Eteyelo yango ebongisami mpo na kosalisa bandeko oyo bayei sika bámesana na bomoi ya Betele.

Boumeli: Mikolo minei, ngonga minei na mokolo.

Esika: Betele.

Ndenge ya kokɔta: Batyaka bandeko nyonso oyo bakɔti Betele sika to oyo bandimi kopesa mabɔkɔ na Betele na boumeli ya mbula mobimba to koleka.

Matomba: Demetrius, oyo akɔtaki na eteyelo yango na bambula ya 1980, alobi boye: “Eteyelo yango esalisaki ngai nakóma na momeseno malamu ya koyekola mpe ebongisaki ngai mpo naumela na Betele. Balakisi, mateya, mpe batoli ya malamu oyo bapesaki biso endimisaki ngai ete Yehova amibanzabanzaka mpenza mpo na ngai mpe alingi ete nasalela ye na Betele.”

ETEYELO YA BAPALANGANISI YA NSANGO MALAMU YA BOKONZIh

Ntina: Kopesa bandeko oyo bazali na mosala ya ntango nyonso (baoyo babalá, minzemba ya basi mpe mibali) formasyo oyo esengeli mpo Yehova mpe ebongiseli na ye esalela bango mingi koleka. Bandeko mingi oyo bakɔti eteyelo yango bakotindama mpo na kosala na bisika oyo mposa ezali mingi na mboka na bango. Bandeko oyo bakokisi naino mbula 50 te bakoki kosala mpo na mwa ntango lokola babongisi-nzela monene mpo na kobandisa mosala to kokolisa yango na bamboka ya kati.

Boumeli: Sanza mibale.

Esika: Biro ya filiale nde eponaka; ezalaka mbala mingi na Ndako ya Bokonzi to na Ndako ya mayangani.

Ndeko mwasi moko azali na mosala ya kosakola

Bandeko mibali mpe bandeko basi bazwaka formasyo na biteyelo ya Teokrasi

Ndenge ya kokɔta: Ezali mpo na bandeko oyo bazali na mosala ya ntango nyonso, ya mbula kobanda 23 tii na 65 oyo bazali na nzoto makasi, oyo bakondima kosala esika nyonso oyo basakoli bazali mingi te, mpe bakoloba “Ngai oyo! Tindá ngai.” (Yis. 6:8) Bandeko nyonso oyo bakokɔta na eteyelo yango, ezala bandeko mibali mpe bandeko basi ya minzemba, ezala baoyo babalá, basengeli kosala ata mbula mibale na mosala ya ntango nyonso kozanga kokata. Baoyo babalá basengeli kosala ata mbula mibale na libala. Bandeko mibali basengeli kosala ata mbula mibale lokola nkulutu to mosaleli na misala kozanga kokata. Soki eteyelo yango esalemaka na mboka na bino, likita moko ekosalema na liyangani ya etúká mpo na bandeko oyo balingi kokɔta yango.

Matomba: Bandeko mingi bamonisaki ndenge basepelaki nsima ya kokɔta na Eteyelo ya Biblia mpo na bandeko mibali minzemba mpe Eteyelo ya Biblia mpo na bandeko oyo babalá. Na 2013, Lisangani ya mikóló-bakambi endimaki ete biteyelo yango mibale ekóma eteyelo kaka moko mpe ebengama Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi. Sikoyo, babongisi-nzela ebele koleka bakozwa matomba na mateya yango, ata mpe bandeko basi minzemba.

GILEADE​—ETEYELO YA WATCHTOWER MPO NA MATEYA YA BIBLIA

Ntina: Bandeko oyo bazwi diplome na eteyelo yango bakoki kotindama lokola bakɛngɛli-batamboli, bamisionɛrɛ to kosala na Betele. Soki basaleli formasyo yango malamu, bandeko yango basalisaka na kolendisa mpe kobongisa mosala na teritware mpe na filiale.

Boumeli: Sanza mitano.

Esika: Esalemaka na esika monene ya Watchtower mpo na mateya na Patterson, na etúká ya New York.

Bana-kelasi ya Gileadi bazali kolanda moteyi moko ya Gileadi

Eteyelo ya Gileade, na Patterson, New York

Ndenge ya kokɔta: Ezali mpo na bandeko oyo babalá, bandeko mibali mpe basi minzemba oyo bazali na mosala ya ntango nyonso, lokola bamisionɛrɛ oyo bakɔtá naino Gileade te, babongisi-nzela monene, bandeko ya Betele, to bakɛngɛli-batamboli. Komite ya filiale ekoki kosɛnga bango bátondisa formilɛrɛ. Esengeli koyeba koloba mpe kokoma Lingelesi.

Matomba: Lade ná Monique, ndeko moko ya États-Unis ná mwasi na ye oyo bazali na teritware esali mwa bambula balobi boye:

“Eteyelo ya Gileade ebongisaki biso mpo tókende ata esika nini na mokili, tózala na mpiko, mpe tósala na bomoko na bandeko.”​—Lade.

“Kosalela batoli ya Liloba ya Nzambe oyo tozwaki, esalisi ngai nazala na esengo na teritware. Esengo yango emonisaka ngai ete Yehova alingaka ngai.”​—Monique.

ETEYELO YA MOSALA YA BOKONZI

Ntina: Kopesa formasyo na bakɛngɛli-batamboli, bankulutu mpe basaleli na misala mpo básala malamu mosala ya kokɛngɛla lisangá mpe kotambwisa makambo. (Mis. 20:28) Balobelaka makambo oyo ezali kosalema na masangá, bolɛmbu oyo ezali komonana mpe bamposa oyo esengeli kokokisa nokinoki. Eteyelo yango esalemaka nsima ya mwa bambula moke, na kolanda ekateli ya Lisangani ya mikóló-bakambi.

Boumeli: Ndenge ekómá, ntango mosusu eumelaka mikolo mingi, ntango mosusu eumelaka te.

Esika: Mbala mingi na Ndako ya Bokonzi to na Ndako ya mayangani.

Ndenge ya kokɔta: Mokɛngɛli ya zongazonga akomelaka bankulutu mpe basaleli na misala. Biro ya filiale ebengisaka bakɛngɛli-batamboli.

Matomba: “Atako eteyelo yango ezalaka na mateya ebele mpe epesamaka na ntango mokuse, elendisaka bankulutu mpo bábatela esengo mpe bámitambwisa lokola mibali na mosala ya Yehova. Ezala bankulutu ya sika to baoyo baumelá bayekolaka ndenge ya kobatela etonga malamu mpe kozala mpenza na bomoko ‘na motindo ya kokanisa kaka moko.’”​—Quinn.

“Formasyo yango eteyi biso makambo ebele​—esalisi biso tóyeba malamu makambo ya elimo, emonisi makama oyo tosengeli kokima, mpe epesi biso batoli ya malamu mpo na kobatela etonga.”​—Michael.

ETEYELO MPO NA BAKƐNGƐLI YA ZONGAZONGA NÁ BASI NA BANGOi

Ntina: Kosalisa bakɛngɛli ya zongazonga bákokisa malamu mokumba na bango ya kosalisa masangá, básala “mosala makasi ya koloba mpe ya koteya,” mpe bábatela bandeko na bango.​—1 Tim. 5:17; 1 Pe. 5:2, 3.

Boumeli: Sanza moko.

Esika: Biro ya filiale nde eponaka yango.

Ndenge ya kokɔta: Biro ya filiale ebengisaka bakɛngɛli ya zongazonga ná basi na bango.

Matomba: “Eteyelo yango esalisaki biso tólanda na bosembo ndenge Yesu azali kotambwisa ebongiseli ya Nzambe. Tomonaki ntina ya kolendisa bandeko mpe bomoko na lisangá mokomoko. Mateya yango esalisaki biso tómona mpe ete atako mokɛngɛli-motamboli apesaka toli mpe ntango mosusu asembolaka makambo, mokumba na ye ya libosoliboso ezali ya kosalisa bandeko bámona ete Yehova alingaka bango.”​—Joel ná Connie, kelasi ya liboso, na 1999.

ETEYELO YA BANDEKO YA KOMITE YA FILIALE NÁ BASI NA BANGO

Ntina: Kosalisa bandeko ya Bakomite ya filiale báyeba kotambwisa makambo na Babetele, kotya likebi na makambo oyo ezali koleka na masangá, mpe kotambwisa mosala na bazongazonga ya bamboka na bango.​—Luka 12:48b.

Boumeli: Sanza mibale.

Esika: Esalemaka na esika monene ya mateya ya Watchtower na Patterson, New York.

Ndenge ya kokɔta: Komite ya Mosala ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi ebengisaka bandeko ya Bakomite ya filiale to ya Bakomite ya ekólo ná basi na bango.

Matomba: Lowell ná Cara bakɔtaki na kelasi ya mbala ya 25. Bazali kosala sikoyo na Nigeria.

Lowell alobi boye: “Kelasi yango ekundwelaki ngai ete ata soki nazali na mosala mingi mpe ata soki bapesi ngai mokumba nini, nasengeli kozala makasi na elimo mpo na kosepelisa Yehova.”

Cara alobeli toli moko oyo akangaki malamu mpenza; alobi boye: “Soki nazali kokoka kolimbola likambo moko polele te, nasengeli koyekola yango malamumalamu liboso nateya yango bato mosusu.”

g Eteyelo yango ebandi naino te na mikili mosusu.

h Eteyelo yango ebandi naino te na mikili mosusu.

i Eteyelo yango ebandi naino te na mikili mosusu.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto