BOMOI YA BAKRISTO
Bakristo ya solo bayebanaka na bolingo—Batelá bomoko na biso
MPO NA NINI EZALI NA NTINA: Na butu liboso Yesu akufa, abondelaki ete bayekoli na ye “bázala mpenza na bomoko ya solosolo.” (Yn 17:23) Mpo tókoba kozala na bomoko, tosengeli komonisa bolingo, oyo “ebombaka mabe na motema te.”—1Ko 13:5.
NDENGE YA KOSALA YANGO:
Lukáká bizaleli ya malamu oyo basusu bazali na yango ndenge Yehova asalaka
Limbisáká na motema moko
Nsima ya kobongisa matata moko, kozongela yango lisusu te.—Mas 17:9
TALÁ VIDEO “BÓZALA NA BOLINGO NA KATI NA BINO”—KOBOMBAKA MABE NA MOTEMA TE, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:
Na eteni ya liboso ya video oyo, ndenge nini Helen amonisaki ete azalaki ‘kobomba mabe na motema’?
Na eteni ya mibale ya video oyo, ndenge nini Helen alongolaki makanisi mabe oyo azalaki na yango mpe akómaki na makanisi malamu?
Nsukansuka, ndenge nini Helen asalaki ete lisangá ekóma lisusu na bomoko?
Soki tobombi mabe na motema ekosala nani mabe koleka?