BOMOI YA BAKRISTO
Ndenge ya kobanda lisolo na batrakte
Banda sanza ya 01/2018, lokasa ya ebandeli ya Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo ezalaka na eteni “Ndenge ya kobanda lisolo.” Balendisaki biso tóluka nde kosololaka na bato na esika ya kosuka kaka na kopesa bango mikanda na biso. Bavideo mpo na ndenge ya kobanda lisolo emonisaki ndenge ya kobanda lisolo kaka na lisalisi ya Biblia mpo na kosalisa basakoli bábongola mwa moke ndenge na bango ya kobanda lisolo. Kasi, yango elingi nde koloba ete tosengeli te kosalela mikanda na biso na mosala ya kosakola ndako na ndako? Soki moke te! Na ndakisa, batrakte ekoki kosalisa mpenza mpo na kobanda lisolo. Tokoki kosalela mayele oyo elandi na trakte nyonso oyo tokosalela:
Tuná moto motuna oyo ekosalisa ye apona moko ya biyano oyo ezali na trakte.
Lakisá ye eyano ya Biblia oyo ezali na vɛrsɛ (bavɛrsɛ) na ebandeli ya lokasa ya mibale. Soki azali na mwa ngonga, bótánga mpe bólobela mwa makambo oyo ezali na kati ya trakte yango.
Pesá ye trakte yango mpe lendisá ye atánga eteni oyo etikali na ntango oyo akomona malamu.
Liboso bókabwana, lakisá ye motuna oyo ezali na esika bakomi “Kanisá naino” mpe yebisá ye ete bokotalela eyano ya Biblia na mbala ekoya.
Ntango ozongeli ye, bólobela eyano yango mpe tikelá ye motuna mosusu oyo okopesa eyano na mbala ekoya. Okoki kopona motuna yango na site Internet na biso to na mokanda oyo trakte yango elobeli na lokasa ya nsuka. Na ntango oyo ebongi, lakisá ye mwa buku Nsango malamu oyo euti na Nzambe! to mokanda mosusu oyo ezali na kati ya bisaleli na biso mpo na koteya.