Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala
01-07/03
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MITÁNGO 7-8
“Ndenge oyo kaa ya Yisraele ebongisamaki eteyi biso nini?”
it-1-F lok. 508 par. 5
Lisangá
Na Yisraele, mbala mingi bamonisi oyo bato bazalaki kotyela motema bazalaki kosala na nkombo ya bato nyonso. (Ezr 10:14) Yango wana, “bankumu ya mabota” nde bapesaki bambeka ntango basilisaki kotɛlɛmisa tabernakle. (Mit 7:1-11) Lisusu na mikolo ya Nehemia, banganga-nzambe, Balevi, mpe “bankumu ya bato” basalaki “boyokani oyo ebongi kotyelama motema” na nkombo ya bato nyonso ya ekólo. (Ne 9:38–10:27) Wana bana ya Yisraele bazalaki na mobembo na esobe, “bankumu ya liyangani, bato oyo babengamaka na likita, mibali ya lokumu,” oyo bazalaki mibali 250 basanganaki ná Kora, Datane, Abirame, mpe One mpo na kotɛmɛla Moize ná Arona. (Mit 16:1-3) Mpo na kotosa malako ya Nzambe, Moize aponaki mibali 70 kati na mikóló ya Yisraele oyo bazalaki bakapita mpo básalisa ye na komema “mokumba ya bato,” mokumba oyo akokaki komema ye moko te. (Mit 11:16, 17, 24, 25) Balevi 4:15 etángi “mikóló ya liyangani,” mpe emonani ete bamonisi ya bato ezalaki mikóló ya ekólo, bankumu na yango, basambisi na yango mpe bakapita na yango.—Mit 1:4, 16; Yos 23:2; 24:1.
it-2-F nk. 835-836 par. 9
Rubene
Na kaa ya Yisraele, mabota ya bana ya Rubene, ya Simeone mpe ya Gade ezalaki mopanzi moko na ngámbo ya sudi ya tabernakle. Ntango bazalaki kolongola kaa, etuluku ya mabota misato oyo Rubene azalaki kokamba ezalaki kolanda etuluku ya mabota misato ya bana ya Yuda, ya Isakare, mpe ya Zebulone. (Mit 2:10-16; 10:14-20) Na ntango ya bofungoli ya tabernakle, mabota elandaki kaka molɔngɔ yango mpo na kopesa bambeka.—Mit 7:1, 2, 10-47.
Makanisi ya ntina na mokanda ya Mituya
8:25, 26. Balevi oyo bakómi mibange basengelaki kolongwa na molɔngɔ ya bato oyo bazalaki kosala misala oyo bapesaki bango mpo mikumba yango epesama na mibali oyo bazali naino makasi, oyo bakokokisa yango malamu. Kasi, soki bango moko basepeli, bakokaki kopesa Balevi mosusu mabɔkɔ. Atako lelo oyo basakoli ya Bokonzi bazwaka pasyo te na mosala ya Nzambe, mobeko wana ezali na liteya moko ya ntina mingi mpo na biso. Soki mokristo moko oyo akómi mobange azali kokoka mikumba mosusu te, akoki kosala makambo mosusu na mosala ya Nzambe, oyo makoki na ye ezali kopesa ye nzela.
Biloko ya motuya ya elimo
it-2-F lok. 637 par. 4
Mwana ya liboso to mwana ya liboso oyo afungoli libumu
Lokola bana mibali ya liboso ya Yisraele basengelaki kokóma batata ya mabota ndenge na ndenge, bazalaki bamonisi ya ekólo mobimba. Kutu, Yehova alobelaki ekólo mobimba lokola “mwana mobali [na ye] ya liboso,” ekólo yango ezalaki mpenza mwana na ye ya liboso na kotalela kondimana oyo asalaki elongo na Abrahama. (Kob 4:22) Lokola abatelaki bana mibali ya liboso na bomoi, Yehova asɛngaki ete básantisela ye “mwana mobali nyonso ya liboso oyo afungoli libumu kati na bana ya Yisraele, kati na bato mpe banyama.” (Kob 13:2) Yango wana, bana mibali ya liboso bazalaki ya Nzambe.
08-14/03
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MITÁNGO 9-10
“Ndenge Yehova akambaka basaleli na ye”
it-1-F lok. 386 par. 5
Kaa
Kolongola kaa wana ya monene mpo na kokende na esika mosusu (na Mitángo 33, Moize amonisi ete batyaki kaa na bango na bisika soki 40) emonisi ete makambo ebongisamaki malamu mpe na molɔngɔ. Ntango nyonso oyo lipata ezalaki kotikala likoló ya tabernakle, bazalaki te kolongola kaa. Ntango lipata yango elongwe, bazalaki kolongola kaa. “Na etinda ya Yehova, bazalaki kotikala na kaa, mpe na etinda ya Yehova, bazalaki kolongwa.” (Mit 9:15-23) Mpo na koyebisa bato nyonso oyo bazalaki na kaa etinda ya Yehova, bazalaki koyula kelelo mibale ya palata. (Mit 10:2, 5, 6) Lokito ya kelelo oyo ezalaki komata mpe kokita, ezalaki komonisa ete basengelaki kolongola kaa. Yango esalemaki mpo na mbala ya liboso “na mbula ya mibale [na mobu 1512 L.T.B.], na sanza ya mibale, na mokolo ya ntuku mibale (20) ya sanza yango.” Lokola sanduku ya kondimana ezalaki liboso, etuluku ya mabota misato ya kaa ya bana ya Yuda elongwaki liboso, mpe na nsima etuluku ya bana ya Isakare ná ya Zebulone elongwaki. Nsima ya bituluku yango, Bagereshone ná Bamerari oyo bazalaki komema biloko ya tabernakle oyo ezalaki na mokumba na bango, bazalaki kolongwa. Na nsima, etuluku ya mabota misato ya bana ya Rubene mpe ya Simeone ná ya Gade ezalaki kolongwa. Na nsima na bango, Bakohate oyo bazalaki komema biloko ya esika mosantu bazalaki kolongwa. Lisusu, etuluku ya mabota misato ya bana ya Efraime, ya Manase ná ya Benyamina ezalaki kolongwa. Na nsuka, bituluku ya mabota misato oyo esalaki molɔngɔ ya bato oyo bakɛngɛlaka na nsima; elingi koloba, etuluku ya bana ya Dani, ya Ashere ná ya Nafatali ezalaki kolongwa. Na yango, bituluku mibale ya mabota misato oyo ezalaki na bato ebele mpe oyo ezalaki makasi esalaki molɔngɔ ya bato oyo bakɛngɛlaka na liboso mpe na nsima.—Mit 10:11-28.
Ozali komona polele ndenge Nzambe azali kokamba biso?
Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi mpo na ndenge oyo Nzambe azali kokamba biso? Ntoma Paulo alobaki boye: “Bótosaka baoyo bazali kokamba bino mpe bómikitisaka liboso na bango.” (Ebr. 13:17) Kosala yango ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Tózwa ndakisa: omitya na esika ya Moyisraele moko na ntango ya Moize. Kanisá ete nsima ya kotambola mwa ntango, likonzí etɛlɛmi. Ekoumela ntango boni? Mokolo moko? Pɔsɔ moko? Basanza mingi? Okómi komituna: ‘Nafungola biloko na ngai nyonso?’ Ya liboso, ofungoli naino kaka biloko oyo ozali na yango mposa mingi. Kasi, nsima ya mwa mikolo, lokola obaye kolukaluka na kati ya biloko na yo, obandi kofungola biloko nyonso. Kasi na nsima, kaka ntango oyo olingi kosilisa kofungola biloko, omoni likonzí yango emati ekómi kokende—mpe osengeli kobanda lisusu kokanga biloko! Elingaki kozala likambo ya pɛtɛɛ to ya pɛpɛlɛ te. Atako bongo, Bayisraele basengelaki “kolongwa mpe kolanda na nsima.”—Mit. 9:17-22.
Tosalaka ndenge nini soki tozwi malako oyo euti na Nzambe? Tosalelaka yango “nsima” kaka ya kozwa yango? To tokobaka kosala makambo kaka ndenge tomesaná kosala? Tomesani na malako ya sika, na ndakisa malako etali ndenge ya kotambwisa boyekoli ya Biblia, kosakwela bato oyo balobaka minɔkɔ ya bapaya, kosangana na losambo ya libota pɔsɔ nyonso, kosala elongo na Komite mpo na boyokani na minganga, mpe ndenge ya komitambwisa malamu na mayangani? Tokomonisa mpe botɔndi mpo na litambwisi ya Nzambe soki tozali kondima toli. Soki esɛngi tózwa bikateli ya minene mingi, totyelaka mayele na biso moko motema te kasi tolukaka nde litambwisi ya Yehova mpe ebongiseli na ye. Mpe kaka ndenge mwana alukaka libateli epai ya baboti na ye na ntango ya mbula ya mopɛpɛ makasi, tolukaka libateli na kati ya ebongiseli ya Yehova ntango mikakatano ekweli biso lokola mbula ya nkake.
Biloko ya motuya ya elimo
it-1-F nk. 207-208 par. 7
Liyangani
Ntina ya koyanganaka. Kosala Elekeli mbula na mbula ezali komonisa ntina ya kozwa matomba na bibongiseli oyo Yehova azali kozwa mpo na koyanganisa basaleli na ye mpe koteya bango na elimo. Mobali nyonso oyo azalaki pɛto to azalaki na mobembo te mpe amonisaki bopɔtu mpo na kosala Elekeli, mobali yango asengelaki kobomama. (Mit 9:9-14) Ntango Mokonzi Hizikiya abengaki bafandi ya Yuda mpe ya Yisraele báya na Yerusaleme mpo na kosala fɛti ya Elekeli, alobaki maloba oyo: “Bino bana ya Yisraele, bózongela Yehova Nzambe . . . bókómisa mitó na bino makasi te ndenge bankɔkɔ na bino basalaki. Bóyokela Yehova mpe bóya na esika na ye mosantu oyo asantisi mpo na ntango oyo etyami ndelo te mpe bósalela Yehova Nzambe na bino, mpo nkanda na ye oyo ezali kongala elongwa epai na bino. . . . Yehova Nzambe na bino azali na ngɔlu mpe na motema mawa, mpe akobombela bino elongi na ye te, soki bozongeli ye.” (2Nt 30:6-9) Moyisraele oyo aboyaki na nko koya na liyangani yango amonisaki ete awanganaki Nzambe. Atako bakristo basalaka te fɛti ya Elekeli to bafɛti mosusu ya ndenge wana, Paulo alendisaki bakristo ete bátika te koyanganaka elongo na basaleli ya Nzambe mbala na mbala, ntango apesaki toli oyo ya ntina: “Tótyelanaka likebi mpo tólendisana mpo tózala na bolingo mpe tósala misala ya malamu, tótika koyanganaka na makita na biso te, ndenge bamosusu bamesaná kosala, kasi tólendisanaka, mpe tósalaka bongo mingi koleka awa tozali komona mokolo yango ezali kobɛlɛma.”—Ebr 10:24, 25; talá LISANGÁ.
15-21/03
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MITÁNGO 11-12
“Mpo na nini tosengeli koboya ezaleli ya komilelalela?”
Bózala te bayoki oyo babosanaka makambo
20 Bakristo mingi bakweaka te na pite to na ekobo. Kasi, tosengeli kokeba ete tólanda te nzela oyo ekomema biso na koimaima oyo ekoki kosala ete Nzambe aboya biso. Paulo apesi biso toli oyo: “Tómeka mpe Yehova te, ndenge bamosusu na bango bamekaki ye, mpe babomamaki na banyoka. Bózala mpe te bato oyo baimaimaka, ndenge bamosusu na bango baimaimaki, mpe babomamaki na mobomi.” (1 Bakorinti 10:9, 10) Bayisraele baimaimaki mpo na Moize mpe Arona, baimaimaki kutu mpo na Nzambe ye moko; bamilelalelaki mpo na mana oyo bapesaki bango na ndenge ya likamwisi. (Mitángo 16:41; 21:5) Likambo nini esilikisaki Yehova makasi koleka: koimaima to pite? Biblia emonisi ete banyoka ebomaki bato mingi oyo baimaimaki. (Mitángo 21:6) Na likambo mosusu oyo esalemaki liboso, batomboki koleka 14 700 oyo baimaimaki babomamaki. (Mitángo 16:49) Yango wana, tótyolaka te biloko oyo Yehova azali kopesa biso mpo tómeka motema molai na ye te.
Tóboya koimaima
7 Makanisi ya Bayisraele ebongwanaki mpenza! Liboso, bazalaki na botɔndi mingi na ndenge balongwaki na boombo na Ezipito mpe bakatisaki Mbu Motane, yango wana basanzolaki Yehova na banzembo. (Kobima 15:1-21) Kasi, ntango bakutanaki na mikakatano na esobe mpe bakómaki kobanga Bakanana, esengo nyonso esilaki. Na esika bátɔnda Nzambe oyo alongolaki bango na boombo, bamonaki ete babungisaki makambo ya malamu mpe bakanisaki ete ezali foti na ye. Koimaima na bango emonisaki ete bazalaki na botɔndi te mpo na nyonso oyo Yehova asalelaki bango. Yango wana Yehova alobaki boye: “Kino ntango nini liyangani mabe oyo ekoimaima boye ndenge bazali kaka koimaima mpo na ngai?”—Mitángo 14:27; 21:5.
it-2-F lok. 715 par. 1
Koswana
Koimaima. Koimaima elɛmbisaka nzoto mpe esilisaka makasi. Mwa moke nsima ya kobima na bango na Ezipito, Bayisraele baimaimaki mpo na Yehova, bapesaki ye foti na ndenge asalelaki basaleli na ye, Moize ná Arona mpo na kokamba bango. (Kob 16:2, 7) Na nsima, komilelalela na bango elɛmbisaki mpenza Moize nzoto mpe asɛngaki Nzambe aboma ye. (Mit 11:13-15) Soki moto azali koimaima, yango ekoki komema ye na liwa. Ndenge bato yango baimaimaki mpo na Moize, Yehova amonaki ete bato yango batombokelaki nde bokonzi na ye. (Mit 14:26-30) Mingi bakufaki mpo na ezaleli na bango ya koimaima.
Biloko ya motuya ya elimo
it-2-F lok. 207 par. 3
Mana
Ndenge ezalaki. Mana ezalaki “mpɛmbɛ lokola mbuma ya koriandre” mpe ezalaki “komonana” lokola bedeliume, oyo ezali lokola mafuta ekangamá mpe emonanaka na kati mpe ezalaka lokola liyaka. Elɛngi na yango ezalaki lokola “oyo ya bagato ya papala esalemi na mafuta ya nzoi” to “elɛngi ya gato ya kitoko oyo etyami mafuta.” Nsima ya konika yango na enikelo ya mabɔkɔ to kotuta yango na liboka, bazalaki kotɔkisa yango na banzungu to kosala yango bagato mpe kotumba yango.—Kob 16:23, 31; Mit 11:7, 8.
22-28/03
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MITÁNGO 13-14
“Kondima epesaka biso mpiko”
Kondima mpe kobanga Nzambe epesaki bango mpiko
5 Nzokande, mibale kati na mibali yango, Yosua ná Kalebe, bazalaki na mposa makasi ya kokɔta na Mokili ya Ndaka. Balobaki boye: Bakanana “bazali lokola limpa na miso na biso. Bisika na bango ya komibatela ekimi bango, mpe Yehova azali elongo na biso. Bóbanga bango te.” (Mitángo 14:9) Yosua ná Kalebe bazalaki nde matoi mangbongi? Te. Elongo na ekólo mobimba, bamonaki ndenge Yehova asambwisaki Ezipito ná banzambe na yango na Malɔzi Zomi. Bamonaki mpe ndenge Yehova abomaki Farao ná basoda na ye na Mbu Motane. (Nzembo 136:15) Emonani polele ete mibali zomi wana ná bato oyo bayokelaki bandimelaki bango bazalaki na ntina ya kobanga te. Mpo na komonisa bango ete asepeli te, Yehova alobaki na bango boye: “Kino ntango nini bato oyo bakozanga limemya epai na ngai, mpe kino ntango nini bakondimela ngai te mpo na bilembo nyonso oyo nasalaki na kati na bango?”—Mitángo 14:11.
6 Yehova asosolaki mpenza ete kobanga ya Bayisraele eutaki na kozanga kondima na bango. Ɛɛ, kondima ezali na boyokani makasi ná mpiko. Yango wana ntoma Yoane akomaki mpo na lisangá ya bokristo mpe etumba ya elimo ete: “Bolongi oyo elongi mokili yango oyo: kondima na biso.” (1 Yoane 5:4) Lelo oyo, kondima lokola oyo ya Yosua ná Kalebe ezali kotinda Batatoli ya Yehova koleka milio motoba, bilenge mpe mikóló, oyo bazali nzoto kolɔngɔnɔ mpe baoyo bazali na bamaladi, básakola nsango malamu ya Bokonzi na mokili mobimba. Monguna moko te alongi kokangisa limpinga yango ya nguya mpe ya mpiko monɔkɔ.—Baroma 8:31.
Biloko ya motuya ya elimo
it-1-F lok. 740
Mokili oyo Nzambe apesaki Yisraele
Na ntembe te, mokili oyo Nzambe apesaki Yisraele ezalaki mokili moko kitoko mpenza. Ntango Moize atindaki banɔngi bákende naino kotala Mokili ya Ndaka mpe bámema mwa bambuma oyo ezalaki kobota kuna, banɔngi yango bamemaki mwa ndambo ya mbuma ya figi, mwa ndambo ya bagrenade mpe etape moko ya mbuma ya vinyo oyo ezalaki monene mpenza oyo bato mibale kati na bango bamemaki yango na nzete! Atako bazalaki na kobanga mpo na kozanga kondima, kasi bandimaki ete mokili yango “etondi mpenza na miliki mpe na mafuta ya nzoi.”—Mit 13:23, 27.
Omipesa na mosala ya kosakola
Diskur: Motó ya likambo: Mituna oyo ekosalisa biso tótalela malamumalamu soki kondima na biso ezali makasi
“Bótɛlɛma ngwi na kondima”
8 Lelo oyo namonaka ete bilaka ya Nzambe ezali mpenza solo ndenge nazalaki kotalela yango liboso? Na ndakisa, Nzambe alaki ete akobebisa mokili ya Satana. Kasi, totyaka likebi na biso nyonso na masano ndenge na ndenge ya mokili na ye? Soki ezali bongo, tokoki kobanda komituna soki nsuka ekómi pene. (Habakuku 2:3) Tózwa ndakisa mosusu. Yehova apesá biso lisiko, mpe alaki ete akolimbisa masumu na biso. Kasi, soki tokobi kotya makanisi na biso nyonso na masumu na biso ya kala, tokoki kobanda komituna soki Yehova alimbisá biso mpenza. (Misala 3:19) Yango ekoki kosala ete tóbungisa esengo na biso na mosala ya Nzambe mpe tótika kosakwela basusu.
9 Nakobaka kopesa Yehova oyo eleki malamu? Ntango tozali kosala mingi mpo na Yehova, yango esalisaka biso tótya makanisi na biso nyonso na elikya oyo tozali na yango mpo na mikolo ezali koya. Kasi, ekozala ndenge nini soki tokómi kotya likebi mingi kaka na makambo na biso moko? Na ndakisa, tokoki kondima mosala moko oyo efutaka malamu kasi ezali kotikela biso nzela te ya kosala mingi na mosala ya Yehova. Yango ekoki kokitisa kondima na biso, mpe tokoki ‘kokóma gɔigɔi,’ mpe kosalela Yehova kaka moke, atako tokokaki kosala mingi.—Baebre 6:10-12.
10 Nazalaka na mokakatano ya kolimbisa basusu? Ntango bato mosusu basali biso likambo moko ya mabe, tokangelaka bango nkanda to toboyaka kolobisa bango? Soki tosalaka bongo, ekomonisa ete totyaka likebi mingi koleka kaka na makambo oyo etungisaka biso. Tomonisaka kondima na biso epai ya Yehova ntango tolimbisaka basusu. Na ndenge nini? Soki moto moko asaleli biso lisumu, akómi na nyongo na biso. Ntango biso mpe tosaleli Yehova lisumu, tokómi na nyongo na ye. (Luka 11:4) Na yango, ntango tolimbisaka basusu, tomonisaka kondima epai ya Yehova. Tondimaka ete akopambola ezaleli na biso, mpe lipamboli na ye ezali na valɛrɛ mingi koleka kofutisa moto moko mabe oyo asalaki biso. Bayekoli ya Yesu bayekolaki ete kondima ezali na ntina mingi mpo na kolimbisa basusu. Ntango Yesu ayebisaki bango bálimbisaka ata baoyo basali bango mabe mbala mingi, bayekoli basɛngaki ye ete: “Bakiselá biso kondima.”—Luka 17:1-5.
11 Nayokaka mabe ntango bapesaka ngai toli? Luká koyeba liteya oyo okoki kozwa na toli moko na esika ya koluka mabunga ya toli yango to ya moto oyo apesi yango. (Masese 19:20) Tólekisaka ata libaku moko te ya koyekola kokanisaka mingi lokola Yehova!
12 Namilelalelaka mpo na bandeko oyo bazali kokamba lisangá? Ntango Bayisraele batyaki makanisi na bango na nsango mabe ya banɔngi zomi, bakómaki komilelalela mpo na Moize mpe Arona. Na nsima Yehova atunaki Moize boye: “Kino ntango nini bakondimela ngai te?” (Mitángo 14:2-4, 11) Ya solo, Yehova ayebaki ete Bayisraele bandimelaki ye te mpo bamilelalelaki mpo na Moize ná Arona, mibali oyo aponaki. Ndenge moko mpe, soki tozali ntango nyonso komilelalela mpo na bato oyo Yehova azali kosalela mpo na kokamba bato na ye lelo, yango ekoki komonisa ete kondima na biso epai ya Nzambe ekómi kokita.
29/03–04/04
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MITÁNGO 15-16
“Kebá na ezaleli ya lolendo mpe ya komityela motema koleka ndelo”
Yehova ayebi yo?
12 Kasi, ntango Bayisraele bazalaki kokende na Mokili ya Ndaka, Kora amonaki lokola ete makambo mosusu ezali kotambola malamu te na ebongiseli ya Yehova. Na nsima, bankumu 250 balandaki ye mpo na koluka kobongola makambo. Kora ná bato wana mosusu bazalaki mpenza komona ete bazali na boyokani malamu na Yehova. Bayebisaki Moize ná Arona boye: “Tobaye bino, mpamba te liyangani oyo mobimba, bango nyonso bazali basantu mpe Yehova azali na kati na bango.” (Mit. 16:1-3) Ezalaki mpenza lolendo! Moize ayebisaki bango boye: “Yehova akoyebisa nani azali moto na ye.” (Tángá Mitángo 16:5.) Na nsuka ya mokolo oyo elandaki, Kora mpe bato nyonso oyo balandaki ye na botomboki bakufaki.—Mit. 16:31-35.
Yehova ayebi yo?
11 Tólobela ndakisa ya Moize ná Kora, bato mibale oyo bakesanaki mpenza na likambo etali kotosa ebongiseli ya Yehova mpe bikateli na ye. Yehova atalelaki bango na kolanda ndenge oyo mokomoko na bango asalaki. Kora azalaki Molevi ya libota ya Bakohate mpe azalaki na mikumba mingi mpe amonaki makambo mingi ya malamu. Na ndakisa, mbala mosusu amonaki ndenge Yehova abikisaki ekólo ya Yisraele na Mai Motane, atosaki ekateli oyo Yehova azwaki na Ngomba Sinai, ete báboma Bayisraele oyo batombokaki, mpe azalaki na molɔngɔ ya bato oyo bazalaki komema sanduku ya kondimana. (Kob. 32:26-29; Mit. 3:30, 31) Emonani ete azalaki sembo epai ya Yehova bambula mingi, mpe mpo na yango Bayisraele mingi bazalaki komemya ye.
Biloko ya motuya ya elimo
Tyá makambo oyo maleki ntina na esika ya liboso!
Yehova azalaki kotalela likambo yango na lisɛki te. Biblia elobi boye: “Yehova alobaki na Moize ete: ‘Mobali yango asengeli mpenza kobomama.’” (Mitángo 15:35) Mpo na nini Yehova asilikaki na likambo mobali wana asalaki? Bayisraele bazalaki na mikolo motoba mpo na kolɔkɔta nkoni mpe kobongisa makambo etali bilei, bilamba, mpe ndako na bango. Basengelaki kotika mokolo ya nsambo mpo na makambo na bango ya elimo. Atako kolɔkɔta nkoni ezalaki mabe te, kasi ezalaki mabe kosala yango na ngonga oyo ebongisamaki mpo na losambo ya Yehova. Atako bakristo bazali na nse na Mibeko ya Moize te, lisolo ya mobali oyo ezali koteya biso ete tosengeli kotyaka makambo oyo eleki ntina na esika ya liboso lelo oyo, boye te?—Bafilipi 1:10.
Omipesa na mosala ya kosakola
Diskur: Motó ya likambo: Bokeseni nini ezali kati na komikumisa na ndenge ya malamu ná lolendo?
Okoki kobunda na Satana mpe kolonga!
5 Diksionɛrɛ moko elobi ete lolendo ezali ezaleli ya komityela motema mpe komizwa na lokumu mingi. Elimboli mpe “koyoka esengo mpo yo to baninga na yo ya motema basali likambo moko ya malamu to bazali na eloko moko ya malamu.” Komiyoka boye ezali mabe te. Ntoma Paulo alobaki na bandeko ya Tesaloniki ete: “Biso mpenza tozali komikumisa mpo na bino na kati ya masangá ya Nzambe mpo na koyika mpiko na bino mpe kondima na bino na minyoko na bino nyonso mpe malɔzi oyo bozali kokangela motema.” (2 Batesaloniki 1:4) Na yango, koyoka malamu mpo na mosala oyo basusu basali to mpe ata komipesa mwa lokumu moke ekoki komemela biso litomba. Tosengeli koyoka nsɔni te mpo na libota na biso, makambo oyo tokolá na yango, to esika oyo tokolá.—Misala 21:39.
6 Nzokande, ezali na ezaleli ya lolendo oyo ekoki kobebisa boyokani na biso, mingimingi boyokani na biso ná Yehova. Lolendo ya ndenge wana ekoki kotinda biso tósilika ntango bapesi biso toli. Ekoki mpe ata kosala ete tóboya toli na esika ya kondima yango na komikitisa nyonso. (Nzembo 141:5) Lolendo ya ndenge wana elimbolami lokola ezaleli ya moto oyo akanisaka mingi mpo na ye moko to lokola “ezaleli ya komitombola oyo bato mosusu atako bazali na ntina te ya kosala yango bandimaka ete baleki basusu mosika.” Yehova ayinaka mpenza ezaleli ya lolendo. (Ezekiele 33:28; Amose 6:8) Kasi Satana ayokaka malamu ntango bato bazali kolanda lolendo na ye na ndenge bamikumisaka. Kanisá naino ndenge Satana asepelaki ntango Nimerode, Farao mpe Abisalome bamonisaki lolendo ya mabe mpenza ndenge bamikumisaki! (Ebandeli 10:8, 9; Kobima 5:1, 2; 2 Samwele 15:4-6) Lolendo nde esalaki ete Kaina abebisa boyokani na ye ná Nzambe. Yehova apesaki Kaina toli, kasi lokola azalaki na lolendo makasi, aboyaki koyoka. Azalaki motó makasi, alandaki te likebisi ya Nzambe, mpe akakatanaki te mpo na kosala lisumu liboso ya Yehova.—Ebandeli 4:6-8.
05-11/04
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MITÁNGO 17-19
“Nazali . . . libula na yo”
Otikaka Yehova azala likabo na yo?
9 Kanisá Balevi; bazwaki libula ya mabele te. Lokola losambo ya pɛto ezalaki na esika ya liboso na bomoi na bango, basengelaki kotya motema ete Yehova akokokisa bamposa na bango ya mosuni, mpo ayebisaki bango ete: “Ngai nazali likabo na [bino].” (Mit. 18:20) Atako tozali kosala na tempelo mpenza te lokola banganga-nzambe mpe Balevi, tokoki komekola bango mpe kotya motema ete Yehova akokokisa bamposa na biso. Awa tozali kopusana pene na nsuka, tosengeli mpenza kotyela Yehova motema ete akokokisa bamposa na biso.—Em. 13:17.
Yehova azali likabo na ngai
4 Mokumba yango elimbolaki nini mpo na Balevi? Yehova alobaki ete azali likabo na bango elingi koloba, na esika bázwa libula ya mabele, Yehova apesaki bango lokumu monene ya kosalela ye. “Bonganga-nzambe ya Yehova” nde ezalaki libula na bango. (Yos. 18:7) Bavɛrsɛ oyo ezali liboso mpe nsima ya Mitángo 18:20 emonisi ete atako bongo, bazangaki biloko ya kobikela te. (Tángá Mitángo 18:19, 21, 24.) Basengelaki kopesa Balevi “moko ya bandambo zomi nyonso na Yisraele [mpo] ezala libula mpo na mosala na bango.” Elimboli ete basengelaki kozwa moko ya bandambo zomi ya biloko oyo eboti na bilanga ya Bayisraele mpe ya banyama ya mboka oyo ebakisami. Bango moko Balevi mpe basengelaki kopesa moko ya bandambo zomi ya biloko oyo bazwi, “eloko na yango nyonso oyo eleki kitoko,” mpo na kosunga banganga-nzambe. (Mit. 18:25-29) Banganga-nzambe bazalaki mpe kozwa “makabo nyonso mosantu” oyo Bayisraele bazalaki komemela Nzambe na esika na ye ya losambo. Na yango, banganga-nzambe bakokaki kondima ete Yehova akokokisa bamposa na bango.
Biloko ya motuya ya elimo
g02 8/10 lok. 26 par. 2
Mungwa ezali eloko moko ya ntina mingi
Lisusu, mungwa ekómaki elembo ya eloko oyo esengeli kobeba te mpe oyo esengeli koumela libela. Yango wana, na Biblia kondimana oyo esalemi na motema moko ebengamaki “kondimana ya mungwa,” mpe, mbala mingi bato oyo basali kondimana yango bazalaki kolya bilei esika moko, na mungwa. (Mitángo 18:19) Na nse ya Mibeko ya Moize, bazalaki kobakisa mungwa na bambeka oyo bazalaki kopesa na etumbelo, na ntembe te ezalaki mpo na komonisa ete mbeka yango ekopɔla te.
Omipesa na mosala ya kosakola
Diskur: Motó ya likambo: Mpo na nini topesaka Yehova?
Mpo na nini kopesa moto oyo azali na nyonso?
4 Topesaka Yehova mpo tolingaka ye mpe tozali na botɔndi epai na ye. Kokanisa nyonso oyo Yehova asaleli biso esimbaka mpenza motema na biso. Tondimaka likambo oyo Mokonzi Davidi alobelaki biloko oyo esengelaki mpo na kotonga tempelo. Alobaki ete eloko nyonso tozwaka eutaka epai ya Yehova mpe eloko nyonso oyo topesaka Ye eutaka na biloko oyo apesá biso.—Tángá 1 Ntango 29:11-14.
5 Topesaka Yehova mpo ezali mpe lolenge ya kosambela ye. Na emonaneli moko, ntoma Yoane ayokaki basaleli ya Yehova na likoló bazali koloba ete: “Yehova, ɛɛ Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo mpe lokumu mpe nguya, mpo yo ozalisaki biloko nyonso, mpe mpo na mokano na yo yango ezalaki mpe ezalisamaki.” (Emoniseli 4:11) Ya solo, Yehova abongi kozwa nkembo mpe lokumu nyonso, yango wana tolingaka kopesa ye biloko na biso oyo eleki malamu. Yehova alobaki na Moize ayebisa Bayisraele básalaka bafɛti misato na mbula. Na bafɛti yango ya losambo, basengelaki mpe kopesa Yehova. Bayebisaki bango ete “moto moko te akomonana liboso ya Yehova mabɔkɔ mpamba.” (Kolimbola Mibeko 16:16) Lelo oyo mpe, kopesa na motema moko ezali na esika na kati ya losambo na biso. Na ndenge yango, tomonisaka ete tosepelaka na mosala ya ebongiseli ya Yehova mpe topesaka yango mabɔkɔ.
6 Kopesa ezali malamu mpo na biso. Ezali malamu kopesa na motema moko na esika ya koluka kaka kozwa. (Tángá Masese 29:21.) Tózwa ndakisa ya mwana oyo baboti na ye bapesi ye mwa mbongo mpe asaleli mbongo ndambo mpo na kosombela baboti likabo. Na ntembe te, baboti na ye bakosepela mingi! To kanisá ete mobongisi-nzela moko ya elenge oyo afandaka na baboti na ye apesi bango mwa mbongo mpo bábakisa na mbongo ya kofuta ndako to kosomba bilei. Mbala mosusu baboti na ye basɛngaki te ete asala bongo, kasi bakondima likabo yango. Mpo na nini? Mpo mwana amonisi botɔndi mpo na nyonso oyo baboti basalelaka ye. Ndenge moko mpe, Yehova ayebi ete kopesa ye biloko na biso ya motuya ezali malamu mpo na biso.
12-18/04
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MITÁNGO 20-21
“Kobá komitikisa ntango omekami”
Luká komikitisa mpe sepelisá Yehova
19 Ekosalisa biso tókima mabunga mosusu. Kanisá lisusu Moize. Na boumeli ya bambula, abatelaki komikitisa mpe asepelisaki Yehova. Na nsima, pene na nsuka ya mobembo ya mpasi oyo eumelaki mbula 40, oyo alekisaki elongo na Bayisraele na esobe, Moize amonisaki komikitisa te. Ndeko na ye ya mwasi, oyo mbala mosusu abikisaki ye na Ezipito ntango abotamaki sika, autaki kokufa na Kadeshe mpe bakundaki ye. Mpe Bayisraele babandaki lisusu koloba ete bazalaki kokokisa bamposa na bango ndenge esengeli te. Na mbala oyo, “babandaki koswanisa Moize” mpo mai ezalaki te. Atako Yehova asalaki makamwisi ebele na nzela ya Moize, mpe atako Moize akambaki bato bambula ebele na ndenge oyo ebongi, bato yango bazalaki komilela. Bamilelaki kaka mpo na kozanga mai te kasi mpe mpo na Moize, lokola nde ye moto asalaki ete báyoka mposa ya mai.—Mit. 20:1-5, 9-11.
Luká komikitisa mpe sepelisá Yehova
20 Moize asilikaki makasi mpe azalaki lisusu na boboto te. Na esika amonisa kondima mpe aloba na libanga, ndenge Yehova ayebisaki ye, agangelaki bato mpe alobaki ete akosalela bango likamwisi. Na yango, abɛtaki libanga mbala mibale mpe mai ebimaki ebele. Lolendo mpe nkanda etindaki ye asala libunga moko monene. (Nz. 106:32, 33) Ndenge Moize azangaki komikitisa na libaku wana, esalaki ete akɔta te na Mokili ya Ndaka.—Mit. 20:12.
21 Tokoki kozwa mateya ya ntina mingi na likambo yango. Ya liboso, tosengeli ntango nyonso kosala makasi mpo na kobatela ezaleli na biso ya komikitisa. Soki na bantango mosusu tomonisi yango te, lolendo ekoki kobima mpe kotinda biso tóloba to tósala makambo na bozoba. Ya mibale, mitungisi ekoki kolɛmbisa biso; yango wana tosengeli kosala makasi tózala na komikitisa, ata ntango tozali kotungisama.
Mosambisi oyo akataka makambo na bosembo
Ya liboso, Nzambe asɛngaki Moize te ete aloba na bato, asɛngaki mpe ye te abenga bango batomboki. Ya mibale, Moize ná Arona bakumisaki Nzambe te. Nzambe alobaki boye: ‘Bosantisaki ngai te.’ (Vɛrsɛ 12) Ntango alobaki ete “tóbimisela bino mai,” Moize alobaki lokola nde ezalaki ye ná Arona nde bakobimisa mai na ndenge ya likamwisi, kasi Nzambe te. Ya misato, etumbu yango eyokanaki na bitumbu oyo Nzambe akataki liboso. Nzambe aboyaki libota oyo etombokelaki ye liboso ekɔta na Kanana, mpe asalaki bongo mpo na Moize ná Arona. (Mitángo 14:22, 23) Ya minei, Moize ná Arona bazalaki bakambi ya Yisraele. Nzambe asɛngaka mingi koleka na bato oyo bazali na mikumba minene.—Luka 12:48.
Biloko ya motuya ya elimo
Otalelaka bolɛmbu ya basusu lokola Yehova?
12 Na makambo oyo nyonso, Yehova akokaki kopesa Arona etumbu mbala moko. Kasi, amonaki ete Arona azalaki moto mabe te to ete foti na ye elekaki ndelo te. Emonani ete Arona atikaki nde ete makambo oyo basusu basalaki to mosukusuku na bango epekisa ye kosala oyo ezali malamu. Nzokande, ntango ye moko asalaki mabunga, andimaki yango mbala moko mpe aboyaki te bikateli oyo Yehova azwaki. (Kob. 32:26; Mit. 12:11; 20:23-27) Yehova amonaki malamu atya likebi mingi na kondima ya Arona mpe na ndenge abongolaki motema. Basiɛklɛ na nsima, Yehova akobaki kotalela Arona mpe bakitani na ye lokola bato oyo bazalaki kobanga ye.—Nz. 115:10-12; 135:19, 20.
Omipesa na mosala ya kosakola
Diskur: Motó ya likambo: Ndenge nini nakoki kokitisa nkanda na ngai?
Ndenge ya kokitisa nkanda na yo
OYO OKOKI KOSALA
Mityelá mokano. Na esika oloba “ezali ndenge na ngai,” mityelá nde ntango oyo okani kobongisa ezaleli na yo; mbala mosusu okoki komityela sanza motoba. Na boumeli ya ntango yango, komáká na papye milende oyo ozali kosala. Mbala nyonso oyo osiliki, komá (1) likambo oyo ebimaki, (2) ndenge oyo osalaki, mpe (3) ndenge okokaki kosala malamu koleka mpe mpo na nini. Na nsima, mityelá mokano ya kosala bongo mbala ya nsima oyo bakosilikisa yo. Toli: Komá mpe makambo oyo ozali kolonga na yango! Komá ndenge omiyokaka malamu nsima ya komipekisa na likambo moko.—Toli ya Biblia: Bakolose 3:8.
Zelá naino liboso ya kosala likambo. Ntango moto to likambo moko esilikisi yo, zelá naino na esika ya koloba likambo ya liboso oyo eyeli yo na makanisi. Soki esengeli, bendá naino mpema makasi. Erik oyo azali na mbula 15, alobi boye: “Soki nabendi mpema, epesaka ngai ntango ya kokanisa liboso nasala to naloba likambo moko oyo ekoyokisa ngai mawa na nsima.”—Toli ya Biblia: Masese 21:23.
Talelá likambo na mobimba na yango. Na bantango mosusu okoki kosilika mpo otaleli kaka ngámbo moko ya likambo yango; oyo esali yo mpasi. Meká mpe kotalela ngámbo mosusu ya likambo yango. Mwasi moko na nkombo Jessica, alobi boye: “Ata ntango bato basali ngai mabe mpenza, mbala mingi ezalaka kaka na likambo oyo ekoki kosalisa ngai nameka koyeba mwa moke mpo na nini basali bongo.”—Toli ya Biblia: Masese 19:11.
Soki likoki ezali, longwá na esika yango. Biblia elobi boye: “Liboso koswana ebima, bendá nzoto.” (Masese 17:14) Ndenge Biblia emonisi yango, na bantango mosusu ezalaka malamu kobenda nzoto liboso likambo moko epelisa mɔtɔ. Na nsima, na esika okoba kokanisa likambo yango mpe kotika nkanda na yo emata lisusu, kokanga nde mabɔkɔ te. Elenge mwasi moko na nkombo Danielle, alobi boye: “Namonaka ete kosala ngalasisi ekitisaka mitungisi na ngai mpe esalaka ete nasilikaka makasi te.”
Yekolá kolimbisa. Biblia elobi boye: “Ata soki bosiliki, bósala lisumu te. Bóloba na motema na bino, . . . mpe bófanda nyɛɛ.” (Nzembo 4:4) Simbá ete kosilika ezali mabe te. Omituna nde nini ekobima na nsima? Elenge mobali moko na nkombo Richard, alobi boye: “Soki opesi nzela ete basusu básilikisa yo, okopesa bango bokonzi likoló na yo. Mpo na nini te komonisa ete ozali mwana moke te mpe koboya kokipe likambo yango?” Soki osali bongo, okopekisa nkanda na yo na esika ya kotika yango ekonza yo.
19-25/04
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MITÁNGO 22-24
“Yehova akómisi elakeli mabe lipamboli”
Asakolaki “nsango malamu oyo etali Yesu”
5 Lelo oyo, ndenge kaka ezalaki na ekeke ya liboso, monyoko oyo basaleli ya Nzambe bakutanaka na yango epekisaka bango te bákoba kosakola. Mbala na mbala, kotinda bakristo na makasi na bisika mosusu, ezala na bolɔkɔ mosusu to na mboka mosusu, esalisi mpo na kokɔtisa nsango ya Bokonzi na bisika yango. Na ndakisa, na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, Batatoli ya Yehova bazwaki likoki ya kopesa litatoli na bakaa ya bakangami ya Banazi. Moyuda moko oyo akutanaki na Batatoli na bakaa yango alobaki boye: “Mpiko ya Batatoli ya Yehova oyo bazalaki na bolɔkɔ endimisaki ngai ete kondima na bango eutaki na Biblia—mpe ngai moko nakómaki Motatoli.”
it-1-F lok. 909 par. 6
Bozoba to ligboma
Kotɛmɛla Yehova ezali bozoba. Na bozoba nyonso, mosakoli Balaama alukaki kolakela Yisraele mabe mpo azwa mbongo ya Balake mokonzi ya Moabe, kasi Yehova asalaki ete milende na ye elonga te. Ntoma Petro alobaki boye mpo na Balaama: “Nyama oyo ememaka mikumba mpe oyo elobaka te, elobaki na mongongo lokola ya moto mpe ekangelaki bozoba ya mosakoli yango nzela.” Mpo na kolobela bozoba ya Balaama, ntoma Petro asalelaki liloba ya Grɛki paraphronia, oyo epesaka likanisi ya “kozala na makanisi malamu te.”—2Pe 2:15, 16; Mit 22:26-31.
Biloko ya motuya ya elimo
Makanisi ya ntina na mokanda ya Mituya
22:20-22—Mpo na nini nkanda ya Yehova epelelaki Balaama? Yehova apekisaki mosakoli Balaama kolakela Bayisraele mabe. (Mitángo 22:12) Kasi, mosakoli yango andimaki kokende na bato ya Balake, na likanisi ya kolakela Bayisraele mabe. Balaama alukaki kosepelisa mokonzi ya Moabe, mpo apesa ye lifuta. (2 Petro 2:15, 16; Yuda 11) Ata ntango Yehova abalolaki makanisi ya Balaama mpo apambola Bayisraele na esika alakela bango mabe, Balaama alukaki kaka kosepelisa mokonzi mpe apesaki ye likanisi ete atinda basi oyo bazalaki basambeli ya Baala bákende kolɛngola mibali ya Yisraele. (Mitángo 31:15, 16) Boye, nkanda ya Nzambe epelelaki Balaama mpo na lokoso na ye.
26/04–02/05
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MITÁNGO 25-26
“Likambo oyo moto moko asali ekoki kosalisa bato ebele!”
‘Kimá pite!’
Mobomi-mbisi moko akei na esika oyo akoki kozwa lolenge ya mbisi oyo azali koluka. Aponi mpambo ya malamu, atye yango na ndɔbɔ mpe abwaki ndɔbɔ na ye na mai. Azali kaka kozela, mpe ntango mbisi elei mpambo mpe ekangami na ndɔbɔ, abimisi mbisi yango na mai.
2 Bato mpe bakoki kokangama na motambo. Na ndakisa, Bayisraele bazalaki pene mpenza ya kokɔta na Mokili ya Ndaka, ntango batyaki bahema na mokili patatalu ya Moabe. Mokonzi ya Moabe alakaki mobali moko na nkombo Balaama ete akopesa ye mbongo ebele soki alakeli Yisraele mabe. Nsukansuka, Balaama akanisaki mayele moko ya mabe mpo Bayisraele bango moko básala likambo oyo ekomemela bango elakeli mabe. Aponaki malamu mpambo na ye. Atindaki bilenge basi ya Moabe epai ya Bayisraele mpo na kolɛngola mibali.—Mitángo 22:1-7; 31:15, 16; Emoniseli 2:14.
‘Kimá pite!’
4 Mpo na nini ebele ya Bayisraele bakweaki na motambo oyo Balaama atyaki? Bazalaki kokanisa kaka bisengo na bango moko, mpe babosanaki nyonso oyo Yehova asalelaki bango. Mpo na nini Bayisraele basengelaki kotikala sembo epai ya Nzambe? Yehova abimisaki bango na boombo na Ezipito, aleisaki bango na esobe, mpe abatelaki bango tii bakómaki pene ya Mokili ya Ndaka. (Baebre 3:12) Atako bongo, bakweaki na motambo ya pite. Ntoma Paulo akomaki: “Tósalaka mpe pite te, ndenge bamosusu na bango basalaki pite, mpe bakweaki.”—1 Bakorinti 10:8.
Biloko ya motuya ya elimo
it-1-F lok. 933 par. 5-6
Ndelo
Na yango, emonani ete ntango bazalaki kokabola mabele mpo na mabota bazalaki kotalela makambo oyo mibale: kobwaka mbɛsɛ mpe bonene ya libota. Mbala mosusu, mbɛsɛ ezalaki kaka komonisa esika to teritware oyo libota mokomoko esengelaki kozwa lokola libula, ezalaki komonisa libula na esika moko boye to na esika mosusu ya mokili yango, na ndakisa, na Nɔrdi to na Sudi, na Ɛsti to na Wɛsti, na mokili patatalu ya bokula, to na etúká ya ngombangomba. Ekateli oyo mbɛsɛ ezalaki kobimisa ezalaki nde kouta epai ya Yehova, yango esalaki ete zuwa ná koswana ezala te kati na mabota. (Mas 16:33) Na ndenge yango, Nzambe azalaki mpe kotambwisa makambo mpo makambo ya libota mokomoko eyokana na esakweli oyo Yakobo asakolaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe liboso akufa. Esakweli yango ezali na Ebandeli 49:1-33.
Soki babwaki mbɛsɛ mpe mbɛsɛ yango elakisi teritware epai libota moko ekozala, bazalaki sikoyo kotalela likambo ya mibale: bonene ya libota. “Mpe bino bosengeli kokabola mokili yango ezala ya bino na kobwakáká mbɛsɛ, engebene mabota na bino. Moto oyo azali na bato mingi, bokobakisa libula na ye, mpe moto oyo azali na bato moke, bokokitisa libula na ye.” (Mit 33:54) Esika oyo mbɛsɛ ezalaki kolakisa, yango nde bazalaki kondima. Kasi bakokaki kokitisa bonene ya libula yango na kotalela libota. Na ndakisa, ntango bamonaki ete eteni ya mabele ya bana ya Yuda elekaki monene, bakataki ndambo na yango mpe bapesaki yango libota ya bana ya Simeone.—Yos 19:9.
Omipesa na mosala ya kosakola
Diskur: Motó ya likambo: Mpo na nini motángo oyo Mitángo 25:9 elobeli ekeseni na oyo ya 1 Bakorinti 10:8?
Mituna ya batángi
Mpo na nini 1 Bakorinti 10:8 elobi ete Bayisraele oyo bakweaki na mokolo moko mpo basalaki pite bazalaki 23 000, nzokande Mitángo 25:9 elobi ete bazalaki 24 000?
Ezali na bantina mingi oyo ekoki kosala ete mitángo yango ekesana na bavɛrsɛ wana mibale. Ntina ya liboso ekoki kozala ete motángo mpenza ya bato oyo bakufaki ezali na kati ya 23 000 ná 24 000; yango wana, bakoki koloba kaka mbala moko 23 000 to 24 000.
Tótalela likanisi mosusu. Ntoma Paulo alobelaki ndakisa ya Bayisraele na Shitime mpo na kokebisa bakristo ya Korinti ya kala, mboka oyo eyebanaki ete bato na yango bamipesaki na etamboli ya mbindo. Akomaki boye: “Tósalaka mpe pite te, ndenge bamosusu na bango basalaki pite, mpe bakweaki, nkóto ntuku mibale na misato (23 000) na mokolo moko.” Paulo apesaki motángo ya bato 23 000 mpo na kolobela kaka bato oyo Yehova abomaki mpo basalaki pite.—1 Bakorinti 10:8.
Nzokande, mokanda ya Mitángo mokapo 25 eyebisi biso ete “Yisraele akanganaki na Baala ya Peore; mpe nkanda ya Yehova ebandaki kongalela Yisraele.” Na bongo, Yehova ayebisaki Moize ete báboma “bankumu nyonso na kati ya bato.” Moize atindaki basambisi básala likambo oyo Nzambe atindaki. Na nsuka, ntango Fineasi akakatanaki te koboma Moyisraele oyo akɔtaki na mwasi moko Momidiane na kaa, ‘bolɔzi ekatamaki.’ Lisolo yango esuki na maloba oyo: “Baoyo bakufaki na bolɔzi bazalaki nkóto ntuku mibale na minei (24 000).”—Mitángo 25:1-9.
Emonani ete motángo oyo bapesi awa esangisi “bankumu nyonso” oyo basambisi babomaki ná bato oyo Yehova abomaki ye moko. Ekoki kozala ete bankumu oyo basambisi babomaki bazalaki nkóto moko, yango wana motángo ya bato oyo bakufaki ekómaki 24 000. Ezala bankumu to bakambi yango ya mabe basalaki pite, basanganaki na bafɛti yango, to bandimelaki baoyo basalaki mabe, basalaki mbemba mpo ‘bakanganaki na Baala ya Peore.’
Mpo na liloba ‘kokangana,’ buku moko oyo elimbolaka maloba ya Biblia elobi ete ekoki kolimbola ‘kokangana na moto.’ Bayisraele bazalaki libota oyo emipesaki na Yehova, kasi ntango ‘bakanganaki na Baala ya Peore,’ babebisaki boyokani oyo basalaki bango na Nzambe. Mbula soki 700 na nsima, Yehova ayebisaki Bayisraele na nzela ya mosakoli Hosea ete: “Bakendaki epai ya Baala ya Peore, mpe babandaki komipesa na eloko ya nsɔni, mpe bakómaki bosɔtɔ lokola eloko ya bolingo na bango.” (Hosea 9:10) Baoyo nyonso basalaki bongo, babongaki mpenza kozwa etumbu ya Nzambe. Yango wana, Moize ayebisaki bana ya Yisraele boye: “Miso na bino moko nde emonaki oyo Yehova asalaki na likambo ya Baala ya Peore, ete mobali nyonso oyo alandaki Baala ya Peore ye nde Yehova Nzambe na yo abomaki epai na yo.”—Kolimbola Mibeko 4:3.