Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Manaka mpo na pɔsɔ ya 19 sanza ya 1
    Mosala ya Bokonzi—2015 | Janvier
    • Manaka mpo na pɔsɔ ya 19 sanza ya 1

      PƆSƆ EBANDI NA 19 SANZA YA 1

      Loyembo 47 mpe libondeli

      Boyekoli ya Biblia na lisangá:

      cl mok. 19 par. 1-8 (Min. 30)

      Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:

      Botángi ya Biblia: Basambisi 1-4 (Min. 8)

      No. 1: Basambisi 3:1-11 (Eleka min. 3 te)

      No. 2: Ndenge nini okoki koyekola makambo etali Nzambe?​—igw lok. 4 par. 1-4 (Min. 5)

      No. 3: Ahitofele (Ahithophel)​—Motó ya likambo: Yehova abebisaka myango ya bato oyo batɛkaka basusu​—it-1-F lok. 64 (Min. 5)

      Likita ya mosala:

      Motó ya likambo ya sanza: ‘Salelá Nkolo lokola moombo na elimo ya komikitisa mingi koleka.’​—Misala 20:19.

      Loyembo 77

      Min. 10: Osalelaka Mwa buku mpo na koyekola Liloba ya Nzambe? Lisolo na bayangani na mituna oyo elandi: (1) Ndenge nini Mwa buku mpo na koyekola Liloba ya Nzambe ekoki kosalisa biso ntango tozali kotánga (a) Basambisi 16:1-3 (lok. 43) (b) Luka 6:17 (nk. 50-51) mpe (c) Baroma 15:19 (nk. 58-59)? (2) Ndenge nini tokoki kosalela Mwa buku mpo na koyekola Liloba ya Nzambe mpo esalisa biso tókanga ntina mpenza ya maloba lokola (a) “Omɛrɛ” mpe “Efa” (Kob. 16:32, 36) (lok. 60), (b) “Talanta” (Mat. 25:15) (nk. 62-63) mpe (c) “Abibi” mpe “Nisana” (Mib. 16:1) (lok. 64)? Na nsuka, lendisá moto nyonso asalela mwa buku yango.

      Min. 10: Kosalela Nkolo lokola moombo esɛngaka kotya mbamba mpe kozwa bikateli. Lisolo na bayangani ekouta na Annuaire 2014, lokasa 59, paragrafe 1 tii na lokasa 62, paragrafe 1; mpe lokasa 67, paragrafe 2. Sɛngá bayangani bálobela mateya oyo bazwi.

      Min. 10: “Kobá kokolisa mayele na yo ya kosakola.” Mituna mpe biyano.

      Loyembo 20 mpe libondeli

  • Kobá kokolisa mayele na yo ya kosakola
    Mosala ya Bokonzi—2015 | Janvier
    • 1. Bandakisa nini ya ekeke ya liboso emonisi ete tosengeli kokoba kokolisa mayele na biso ya kosakola?

      1 Biso bakristo tosengeli kokolisa mayele na biso ya kosakola. Yango wana Yesu apesaki bayekoli na ye formasyo mokemoke na mosala ya kosakola. (Luka 9:1-5; 10:1-11) Ezali mpe mpo na yango nde Akila ná Prisile bazwaki Apolosi mpe “bamonisaki ye polele nzela ya Nzambe.” (Mis. 18:24-26) Kaka mpo na ntina yango, ntoma Paulo alendisaki Timote, oyo azalaki mopalanganisi ya nsango malamu oyo akɔmeli, ete amipesa na mateya na ye mpo “bato nyonso bámona polele” ete azali kokende liboso. (1 Tim. 4:13-15) Ezala tosalelaka Nkolo lokola baombo banda bambula mingi na mosala ya kosakola nsango malamu, tosengeli kokoba kokolisa mayele na biso ya kosakola.

      2. Ndenge nini tokoki koyekola epai ya basusu?

      2 Yekolá epai ya basusu: Lolenge moko ya kokolisa mayele na biso ezali ya koyekola epai ya basusu. (Mas. 27:17) Na yango, tyá likebi ntango mosakoli oyo obimi elongo na ye azali kosolola na moto. Sɛngá basakoli oyo bamesani na mosala bápesa yo toli, mpe yoká na likebi makambo oyo bakoyebisa yo. (Mas. 1:5) Ozalaka na mokakatano ya kozongela bato, ya kobanda koyekola na bango Biblia, to ya kosakola na mitindo mosusu? Zwá ekateli ya kokutana na mokɛngɛli ya etuluku na bino to mosakoli mosusu oyo amesani na mosala mpe sɛngá ye asalisa yo. Kobosana mpe te ete elimo santu ya Yehova ekoki kokolisa makoki na biso; yango wana sɛngáká yango mbala na mbala na libondeli.​—Luka 11:13.

      3. Tosengeli kosala nini soki bapesi biso toli moko, ntango mosusu kozanga ete tósɛnga yango?

      3 Soki bapesi yo toli mpo obongisa likambo moko, kosilika te ata soki osɛngaki yango te. (Mos. 7:9) Lokola Apolosi, ndimá lisalisi na komikitisa nyonso mpe na botɔndi. Kosala bongo emonisaka bwanya.​—Mas. 12:15.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto