Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/15 lok. 2
  • Kobá kokolisa mayele na yo ya kosakola

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kobá kokolisa mayele na yo ya kosakola
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2015
  • Masolo mosusu
  • ‘Bókoba kobota mbuma mingi’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Tókolisa mayele na biso ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Yesu bomoi na ye mpe mosala na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Sakolá mpo na kokómisa bato bayekoli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2015
km 1/15 lok. 2

Kobá kokolisa mayele na yo ya kosakola

1. Bandakisa nini ya ekeke ya liboso emonisi ete tosengeli kokoba kokolisa mayele na biso ya kosakola?

1 Biso bakristo tosengeli kokolisa mayele na biso ya kosakola. Yango wana Yesu apesaki bayekoli na ye formasyo mokemoke na mosala ya kosakola. (Luka 9:1-5; 10:1-11) Ezali mpe mpo na yango nde Akila ná Prisile bazwaki Apolosi mpe “bamonisaki ye polele nzela ya Nzambe.” (Mis. 18:24-26) Kaka mpo na ntina yango, ntoma Paulo alendisaki Timote, oyo azalaki mopalanganisi ya nsango malamu oyo akɔmeli, ete amipesa na mateya na ye mpo “bato nyonso bámona polele” ete azali kokende liboso. (1 Tim. 4:13-15) Ezala tosalelaka Nkolo lokola baombo banda bambula mingi na mosala ya kosakola nsango malamu, tosengeli kokoba kokolisa mayele na biso ya kosakola.

2. Ndenge nini tokoki koyekola epai ya basusu?

2 Yekolá epai ya basusu: Lolenge moko ya kokolisa mayele na biso ezali ya koyekola epai ya basusu. (Mas. 27:17) Na yango, tyá likebi ntango mosakoli oyo obimi elongo na ye azali kosolola na moto. Sɛngá basakoli oyo bamesani na mosala bápesa yo toli, mpe yoká na likebi makambo oyo bakoyebisa yo. (Mas. 1:5) Ozalaka na mokakatano ya kozongela bato, ya kobanda koyekola na bango Biblia, to ya kosakola na mitindo mosusu? Zwá ekateli ya kokutana na mokɛngɛli ya etuluku na bino to mosakoli mosusu oyo amesani na mosala mpe sɛngá ye asalisa yo. Kobosana mpe te ete elimo santu ya Yehova ekoki kokolisa makoki na biso; yango wana sɛngáká yango mbala na mbala na libondeli.​—Luka 11:13.

3. Tosengeli kosala nini soki bapesi biso toli moko, ntango mosusu kozanga ete tósɛnga yango?

3 Soki bapesi yo toli mpo obongisa likambo moko, kosilika te ata soki osɛngaki yango te. (Mos. 7:9) Lokola Apolosi, ndimá lisalisi na komikitisa nyonso mpe na botɔndi. Kosala bongo emonisaka bwanya.​—Mas. 12:15.

4. Wapi ntina monene oyo Yesu apesaki, oyo esengeli kotinda biso tókolisa mayele na biso ya kosakola?

4 Kokoba kokolisa mayele ekumisaka Yehova: Yesu asalelaki ndakisa moko mpo na kolendisa bayekoli na ye bákoba kokolisa mayele ya kosakola. Amikokanisaki na nzete ya vinyo mpe bayekoli na ye oyo batyami mafuta na elimo na bitape. Alobaki ete Tata na ye apɛtolaka etape nyonso oyo ebotaka mbuma “mpo ebota mbuma mingi lisusu.” (Yoa. 15:2) Ndenge nkolo elanga ya vinyo alingaka ete bitape ya vinyo na ye ebota mbuma mingi, ndenge moko mpe Yehova alingi ete biso tókoba kokolisa makoki na biso ya kobota “mbuma ya mbɛbu na biso.” (Ebr. 13:15) Matomba nini tokozwa soki tokobi kokolisa mayele na biso ya kosakola? Yesu apesi biso eyano: “Tata na ngai azali kozwa nkembo na likambo oyo: bókoba kobota mbuma mingi mpe kolakisa mpenza ete bozali bayekoli na ngai.”​—Yoa. 15:8.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto