Tózala na makanisi ya Klisto na likambo etali kozala moto monene
“Moto nyonso oyo alingi kozala moto monene na kati na bino asengeli kozala mosaleli na bino.”—MATAI 20:26.
1. Bato ya mokili bazalaka na makanisi nini na likambo etali kozala moto monene?
PENEPENE na Thèbes, engumba moko ya kala ya Ezipito (lelo oyo Karnak), pene na kilomɛtrɛ 500 na sudi ya Caire, ezali na ekeko ya Falao Aménophis III oyo ezali na mɛtrɛ 18. Moto nyonso oyo atɛlɛmi penepene ya ebakata ya ekeko yango amimonaka moke mpenza. Monima yango, oyo na ntembe te basalaki yango mpo na kokumisa mokonzi wana, ezali komonisa makanisi ya bato ya mokili na likambo etali kozala moto monene: komitombola mpe koluka lokumu mingi mpe kokitisa bato mosusu mpo bámimona mpamba.
2. Ndakisa nini Yesu apesaki bayekoli na ye, mpe mituna nini tosengeli komituna?
2 Talá bokeseni oyo ezali kati na makanisi ya bato ná oyo Yesu Klisto ateyaki. Atako Yesu azalaki “Nkolo mpe Moteyi” epai ya bayekoli na ye, ateyaki bango ete moto monene ezali ye oyo asalelaka basusu. Na mokolo ya nsuka ya bomoi na ye awa na mabelé, Yesu alimbolaki likambo oyo ateyaki na ndenge asukolaki bayekoli na ye makolo. Likambo yango emonisaki mpenza komikitisa! (Yoane 13:4, 5, 14) Osepelaka kosalela basusu to nde basusu básalela yo? Ndakisa ya Klisto ezali kopesa yo mposa ya kozala na komikitisa lokola ye? Tiká tótalela bokeseni oyo ezali kati na makanisi ya Klisto ná oyo ya mokili na likambo etali kozala moto monene.
Tóboya makanisi ya mokili na likambo etali kozala moto monene
3. Pesá ndakisa ya bato oyo Biblia elobi ete basukaki mabe mpo bazalaki na mposa makasi ya lokumu oyo euti na bato?
3 Biblia elobeli bandakisa ya ebele ya bato oyo emonisi ete makanisi ya mokili na likambo etali kozala moto monene ememaka na mabe. Tózwa ndakisa ya Hamana, moto moko monene na ndako ya mokonzi ya Perse na ntango ya Esetele ná Moledekai. Lokola Hamana azalaki na mposa makasi ya lokumu, asukaki na kosambwa mpe na liwa. (Esetele 3:5; 6:10-12; 7:9, 10) Tokoloba boni mpo na Nebukadanesala, mokonzi ya lolendo, oyo abɛlaki ligboma ntango akómaki na nguya mingi? Amonisaki ete azalaki na makanisi mabe na likambo etali kozala moto monene na maloba oyo: “Oyo ezali Babele monene te, oyo esili ngai kotonga mpo na esika ya kofanda ya mokonzi, na makasi ya nguya na ngai mpe mpo na nkembo ya lokumu na ngai?” (Danyele 4:30) Tozali mpe na ndakisa ya Elode Agilipa I, moto ya lolendo oyo, na esika apesa Nzambe nkembo, andimaki lokumu oyo ebongaki na ye te. “Nkusu elyaki ye mpe akataki motema.” (Misala 12:21-23) Bato yango basukaki mabe mpo baboyaki likanisi ya Yehova na likambo etali kozala moto monene.
4. Nani azali kobimisa elimo ya lolendo oyo etondi na mokili?
4 Ezali mabe te tóluka kosala makambo oyo ekosala ete bato bákumisa mpe bámemya biso. Kasi, Zabolo asalelaka mposa wana mpo na kokolisa elimo ya lolendo na mitema na biso, elimo oyo emonisaka makanisi na ye. (Matai 4:8, 9) Tóbosana ata moke te ete ye nde “nzambe ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo,” mpe azali na mokano ete mokili mobimba bálanda makanisi na ye. (2 Bakolinti 4:4; Baefese 2:2; Emoniseli 12:9) Lokola baklisto bayebi nani azali kobimisa makanisi ya mokili na likambo etali kozala moto monene, baboyaka kolanda yango.
5. Kosala makambo minene, koyebana, mpe kokóma na bomɛngo epesaka bolamu ya libela? Limbolá.
5 Likanisi moko oyo Zabolo azali kopesa bato ezali ete soki moto ayebani na mokili, bato bazali kokumisa ye, mpe akómi na mbongo mingi, bomoi na ye mpe ekómi malamu. Ezalaka mpenza ndenge wana? Soki moto azali kosala makambo minene, ayebani mpe azali na bomɛngo, azalaka kaka na esengo? Biblia ekebisi biso ete tómikosa na makanisi ya ndenge wana te. Salomo, mokonzi ya bwanya akomaki boye: “Ngai namoni ete misala nyonso ya mayele nyonso kati na mosala euti na kolulela ya moto oyo akolulaka mozalani na ye. Oyo mpe ezali mpamba mpe koluka kokwa mopɛpɛ.” (Mosakoli 4:4) Bato mingi oyo basalaki nyonso mpo na koluka lokumu mpe bomɛngo bakoki koloba ete toli wana ya Biblia ezali solo. Tozali na ndakisa ya moko ya bato oyo babongisaki, basalaki, mpe bamekaki fize oyo bakendaki na yango na sanza mpo na mbala ya liboso. Alobaki boye: “Namipesaki mpenza na mosala na ngai mpe nakómaki na mayele mingi. Kasi nyonso wana ezalaki mpamba, to ntina te; epesaki ngai bolamu ya seko mpe kimya ya makanisi te.”a Ndenge oyo bato ya mokili batalelaka kozala moto monene, ezala na mombongo, na masano, to na makambo mosusu, epesaka bolamu ya libela te.
Moto monene ezali oyo asalelaka basusu na bolingo
6. Nini ezali komonisa ete Yakobo ná Yoane bazalaki na makanisi ebongi te na likambo etali kozala moto monene?
6 Likambo moko oyo elekaki na bomoi ya Yesu ezali komonisa biso soki kozala moto monene elimboli nini mpenza. Yesu ná bayekoli na ye bazalaki kokende na Yelusaleme mpo na Elekeli ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.). Na nzela, Yakobo ná Yoane, bana ya ndeko ya mama na Yesu, bamonisaki ete bazalaki na makanisi ebongi te na likambo etali kozala moto monene. Batindaki mama na bango aloba na Yesu boye: ‘Pesá liloba ete tófanda, moko na lobɔkɔ na yo ya mobali mpe moko na lobɔkɔ na yo ya mwasi, na kati ya bokonzi na yo.’ (Matai 20:21) Epai ya Bayuda, kofanda na lobɔkɔ ya mobali to na lobɔkɔ ya mwasi ezalaki lokumu monene. (1 Mikonzi 2:19) Yakobo ná Yoane basalelaki mayele mabe mpo na kozwa bisika ya lokumu. Bango bakómaki na mposa ya bisika wana ya bokonzi. Yesu ayebaki makanisi na bango mpe asalelaki libaku yango mpo na kolongola bango makanisi mabe oyo bazalaki na yango na likambo etali kozala moto monene.
7. Na kotalela maloba ya Yesu, moklisto akómaka moto monene ntango azali kosala nini?
7 Yesu ayebaki ete na kati ya mokili oyo etondi na lolendo, moto monene ezali moto oyo azali likoló ya basusu mpe azali koyangela bango, apesaka mitindo mpe bato mosusu basalaka nyonso oyo alobi. Kasi na kati ya bayekoli ya Yesu, moto monene ezali oyo asalelaka basusu na komikitisa. Yesu alobaki boye: “Moto nyonso oyo alingi kozala moto monene na kati na bino asengeli kozala mosaleli na bino, mpe moto nyonso oyo alingi kozala moto ya liboso na kati na bino asengeli kozala moombo na bino.”—Matai 20:26, 27.
8. Kozala mosaleli elimboli nini, mpe mituna nini tokoki komituna?
8 Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “mosaleli” na kati ya Biblia elimbolaka moto oyo amipesaka mpenza mpe alɛmbaka te mpo na kosalela basusu. Yesu ateyaki bayekoli na ye likambo moko ya ntina mingi: Moto monene ezali te oyo apesaka bato mosusu mitindo, kasi nde oyo asalelaka basusu na bolingo. Sikoyo, omituna motuna: ‘Soki nazalaki na esika ya Yakobo ná Yoane, nalingaki kokanisa nini? Nalingaki kokanga ntina ete moto monene ezali nde oyo asalelaka basusu na bolingo?’—1 Bakolinti 13:3.
9. Yesu apesaki ndakisa nini na ndenge na ye ya kozala na bato?
9 Yesu amonisaki bayekoli na ye ete makanisi ya bato ya mokili na likambo etali kozala moto monene ekeseni na oyo ya Klisto. Ata mbala moko te alukaki komimonisa ete azali likoló ya bato oyo azalaki kosalela to asalaki ete bango bámimona ete bazali na nse. Bato ya ndenge nyonso: mibali, basi, mpe bana, bazwi, babola, mpe bato minene, ata mpe bato oyo bayebanaki ete bazali bato ya masumu, bazalaki kokakatana te kopusana penepene na ye. (Malako 10:13-16; Luka 7:37-50) Mbala mingi, bato bazalaka motema mokuse epai ya bato ya bolɛmbu. Kasi, Yesu azalaki bongo te. Atako bayekoli na ye bazalaki ntango mosusu kokanisa malamu te mpe ntango mosusu bango na bango bazalaki koswana, azalaki koteya bango na motema molai, mpe na ndenge yango, amonisaki bango ete azalaki mpenza na komikitisa mpe na boboto.—Zekalia 9:9; Matai 11:29; Luka 22:24-27.
10. Ndenge nini bomoi ya Yesu mobimba emonisaki ete amipesaki mpo na kosalela bato?
10 Ndakisa ya koluka bolamu ya bato mosusu oyo Mwana ya Nzambe apesaki emonisaki mpenza oyo kozala moto monene elimboli. Yesu ayaki na mokili mpo bato básalela ye te, kasi mpo na kosalela bato, abikisaki “maladi ndenge na ndenge” mpe bato oyo bazalaki kotungisama na bademo. Atako azalaki mpe kolɛmba mpe azalaki na mposa ya kopema, azalaki ntango nyonso kotya bamposa ya bato mosusu liboso ya bamposa na ye moko, mpe azalaki kosala makasi mpo na kobɔndisa bango. (Malako 1:32-34; 6:30-34; Yoane 11:11, 17, 33) Bolingo na ye etindaki ye asalisa bato na elimo, atambolaki bantaka milai na banzela oyo etondi na mputulu mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi. (Malako 1:38, 39) Na ntembe te, Yesu azalaki kozwa na lisɛki te likambo ya kosalela basusu.
Tólanda ndakisa ya komikitisa ya Klisto
11. Bizaleli nini esɛngami epai ya bandeko oyo baponami lokola bakɛngɛli na kati ya lisangá?
11 Na nsuka ya bambula ya 1800, bamonisaki polele makanisi oyo bakɛngɛli baklisto basengeli kozala na yango ntango bazalaki kopona mibali oyo basengelaki kotambolaka mpo na kosalela basaleli ya Nzambe. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Siona ya 1 Sɛtɛmbɛ 1894 emonisaki ete bazalaki na mposa ya mibali “oyo bazali basɔkemi—mpo bávimba na lolendo te . . . , bazali na elimo ya komikitisa oyo bakoluka koteya makanisi na bango moko te, kasi ya Klisto—mpo na kolakisa boyebi na bango te, kasi Liloba na ye, na kozanga kokómisa yango mindɔndɔ mpe na nguya na yango.” Yango emonisi polele ete baklisto ya solo basengeli te koluka mikumba mpo na lokumu to mpo bázala na esika ya liboso, bázala bakonzi, mpe báyangela basusu. Mokɛngɛli oyo azali na komikitisa abosanaka te ete mikumba na ye ezali “mosala moko ya malamu mingi,” kasi te esika monene oyo akozwela lokumu. (1 Timote 3:1, 2) Bankulutu mpe basaleli na misala nyonso basengeli kosala makasi básalelaka basusu na komikitisa mpe kozala na molɔngɔ ya liboso na mosala ya bosantu, mpo na kopesa basusu ndakisa.—1 Bakolinti 9:19; Bagalatia 5:13; 2 Timote 4:5.
12. Mituna nini bandeko oyo bazali na mposa ya kozwa mikumba na lisangá basengeli komituna?
12 Ndeko nyonso oyo azali na mposa ya mikumba asengeli komituna boye: ‘Nalukaka makambo oyo nakoki kosalela basusu, to nalingaka nde básalela ngai? Nandimaka kosalela basusu makambo ya malamu kozanga ete eyebana epai ya bato mosusu?’ Na ndakisa, elenge moko akoki kozala na mposa asalaka masukulu na lisangá, kasi asepelaka mpenza kosalisa mibange te. Akoki kolinga azalaka pembeni ya bandeko oyo bazali kotambwisa lisangá, kasi alingaka mpenza mosala ya kosakola te. Elenge ya ndenge wana asengeli komituna boye: ‘Na mosala ya Nzambe, nalingaka mingimingi makambo oyo ekosala ete nayebana mpe bato bákumisaka ngai? Nalukaka kozala likoló ya basusu?’ Soki tozali koluka bákumisa biso, tozali kolanda ndakisa ya Klisto te.—Yoane 5:41.
13. (a) Ndenge nini ndakisa ya komikitisa ya mokɛngɛli ekoki kosalisa basusu? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete mpo na moklisto, kozala na elimo ya komikitisa ezali te likambo oyo akosala kaka soki alingi?
13 Soki tozali kosala makasi mpo na kolanda ndakisa ya komikitisa ya Klisto, tokozala na mposa ya kosalela basusu. Tózwa ndakisa ya ndeko moko, mokɛngɛli ya zone, oyo azalaki kotala ndenge misala ezalaki kosalema na biro ya filiale moko ya Batatoli ya Yehova. Atako azalaki na misala mingi mpe na mikumba minene, ndeko yango atɛlɛmaki mpo na kopesa mabɔkɔ na elenge moko oyo azalaki kobunda mpo na kobongisa masini moko ya kokangisa bapapye mpo na kosala babuku. Elenge yango alobaki boye: “Nakamwaki mpenza! Alobaki na ngai ete ntango azalaká elenge, azalaki kosala na masini ya ndenge wana na Betele, mpe ayebi ete ezalaka mpasi mpo na kobongisa yango na ndenge oyo moto alingi esalaka. Asalaki na ngai na masini wana mwa ntango atako azalaki na makambo mingi ya ntina ya kosala. Likambo yango esimbaki mpenza motema na ngai.” Ndeko yango, oyo azali sikoyo na mikumba minene na biro ya filiale moko ya Batatoli ya Yehova, abosanaka te elimo ya komikitisa oyo mokɛngɛli ya zone amonisaki. Biso mpe, ebongi te tómimonaka ete tozali na lokumu to bato minene, oyo babongi te na misala ezangi lokumu to ya mpambampamba. Tosengeli nde komilatisa “elimo ya komikitisa.” Yango ezali te likambo oyo moto akosala kaka soki alingi. Ezali moko ya bizaleli ya “bomoto ya sika” oyo moklisto asengeli kolata.—Bafilipi 2:3; Bakolose 3:10, 12; Baloma 12:16.
Ndenge ya kokóma na likanisi ya Klisto na likambo etali kozala moto monene
14. Ndenge nini kotalela na bozindo boyokani na biso na Nzambe mpe na bazalani na biso ekoki kosalisa biso tókóma na makanisi malamu na likambo etali kozala moto monene?
14 Ndenge nini tokoki kokóma na makanisi ebongi na likambo etali kozala moto monene? Ya liboso, tosengeli kotalela na bozindo boyokani oyo tozali na yango na Yehova Nzambe. Bonene, nguya, mpe bwanya na ye eleki oyo ya biso bato mpamba na mosika. (Yisaya 40:22) Soki mpe tozali kotalela na bozindo boyokani oyo tozali na yango na bazalani na biso, ekosalisa biso tólona elimo ya komikitisa. Na ndakisa, ekoki kozala ete toleki bato mosusu na makambo mosusu, kasi bango mpe bakoki koleka biso na makambo mosusu ya ntina mingi, to bandeko na biso baklisto bakoki kozala na bizaleli mosusu ya malamu oyo biso tozangi. Kutu, lokola bazali na komikitisa, bato mingi oyo bazali na motuya mingi na miso ya Nzambe balukaka te kozala likoló ya basusu.—Masese 3:34; Yakobo 4:6.
15. Ndenge nini bosembo ya basaleli ya Nzambe ezali komonisa ete moto moko te azali na ntina ya komona ete aleki basusu?
15 Masolo ya Batatoli ya Yehova oyo banyokwamaki mpo na kondima na bango ezali komonisa likambo yango malamu. Mbala mingi, ezali bato oyo mokili ezalaki komona bato mpamba nde batikalaki sembo ntango bamekamaki makasi. Kokanisa na mozindo na bandakisa wana ekoki kosalisa biso tóbatela elimo ya komikitisa mpe koteya biso ‘tókanisa mpo na biso moko te koleka ndenge oyo esengeli kokanisa.’—Baloma 12:3.b
16. Ndenge nini bandeko nyonso na kati ya lisangá bakoki kolona elimo ya kozala moto monene na kolanda ndakisa ya Yesu?
16 Baklisto nyonso, bilenge mpe mikóló, basengeli kosala makasi mpo na kokóma na makanisi ya Klisto na likambo etali kozala moto monene. Na kati ya lisangá, misala ndenge na ndenge esengeli kosalema. Tosengeli koyokaka mabe te ntango basɛngi biso tósala mosala moko oyo ekoki komonana ete ezali na lokumu te. (1 Samwele 25:41; 2 Mikonzi 3:11) Baboti, bolendisaka bana na bino mpe bilenge na kosala na esengo mosala nyonso oyo bapesi bango, ezala na Ndako ya Bokonzi, to na esika oyo bokosala liyangani? Bamonaka bino bozali kosala misala oyo ezangi lokumu? Ndeko moko oyo azali kosala sikoyo na biro monene ya Batatoli ya Yehova abosanaka ndakisa ya baboti na ye te. Alobaki boye: “Ndenge oyo bazalaki kotalela mosala ya kosukola Ndako ya Bokonzi to esika ya liyangani ezalaki komonisa ngai ete mosala yango ezalaki na ntina mingi mpo na bango. Mbala mingi bazalaki kopesa nkombo mpo na misala oyo ezali mpo na bolamu ya lisangá to ya bandeko, ata soki ezali misala ya lokumu te na miso ya bato. Elimo na bango esalisaki ngai nandimaka mosala nyonso oyo bapesi ngai awa na Betele.”
17. Na ndenge nini basi ya komikitisa bakoki kozala lipamboli mpo na lisangá?
17 Na likambo ya koluka naino bolamu ya basusu, tozali na ndakisa malamu mingi ya Esetele, oyo akómaki mwasi ya mokonzi ya Perse na ekeke ya mitano liboso ya ntango na biso (L.T.B). Atako azalaki kofanda na ndako ya mokonzi, andimaki kotya bomoi na ye na likama mpo na libota ya Nzambe, mpo na kokokisa mokano ya Nzambe. (Esetele 1:5, 6; 4:14-16) Lelo oyo, bázala bato ya mbongo to te, baklisto ya basi bakoki komonisa elimo lokola ya Esetele soki bazali kolendisa baoyo bazali kotungisama, kotala bato ya maladi, kobima na mosala ya kosakola, mpe kopesa bankulutu mabɔkɔ. Bandeko basi oyo bazali na komikitisa ndenge wana bazali lipamboli monene mpo na lisangá!
Mapamboli ya kozala na makanisi ya Klisto na likambo etali kozala moto monene
18. Matomba nini moto azwaka soki azali na makanisi ya Klisto na likambo etali kozala moto monene?
18 Okozwa mapamboli mingi soki obateli makanisi ya Klisto na likambo etali kozala moto monene. Kosalela basusu epesaka esengo na moto yango ye moko mpe na baoyo azali kosalela. (Misala 20:35) Soki ozali mpenza komipesa mpo na kosalela bandeko, bakolinga yo mingi. (Misala 20:37) Likambo eleki ntina, Yehova atalelaka mosala oyo ozali kosala mpo na bolamu ya bandeko na yo baklisto lokola mbeka ya lisanzoli ya malamu mpo na ye.—Bafilipi 2:17.
19. Ekateli nini tosengeli kozwa mpo na makanisi ya Klisto na likambo etali kozala moto monene?
19 Mokomoko na biso asengeli kotalela motema na ye mpe komituna boye: ‘Nakosuka kaka na kolobela makanisi ya Klisto na likambo etali kozala moto monene, to nde nakosala mpenza makasi mpo nasalela yango?’ Yehova ayebisi biso polele ndenge oyo atalelaka bato ya lolendo. (Masese 16:5; 1 Petelo 5:5) Tiká ete misala na biso emonisa ete tosepelaka komonisa makanisi ya Klisto na likambo etali kozala moto monene, ezala na kati ya lisangá, na libota, na boyokani na biso ya mokolo na mokolo na bazalani na biso—mpe tósala nyonso mpo na nkembo mpe lokumu ya Nzambe.—1 Bakolinti 10:31.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá lisolo “J’ai voulu réussir” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Augusto 1982, nkasa 3-6 (na Lifalanse).
b Mpo na bandakisa, talá Annuaire des Témoins de Jéhovah 1992, nkasa 181-182 mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛmbɛ 1993, nkasa 27-31.
Okoki kolimbola?
• Mpo na nini tosengeli koboya makanisi ya mokili na likambo etali kozala moto monene?
• Yesu amonisaki ete kozala moto monene esɛngaka nini?
• Ndenge nini bakɛngɛli bakoki kolanda ndakisa ya komikitisa ya Klisto?
• Nini ekoki kosalisa biso tólanda makanisi ya Klisto na likambo etali kozala moto monene?
[Etanda na lokasa 17]
Na makanisi ya Klisto, nani azali moto monene?
Moto oyo alingaka básalela ye to oyo alingaka kosalela basusu?
Moto oyo alukaka lokumu to oyo andimaka misala ezangi lokumu?
Moto oyo amitombolaka to oyo akumisaka basusu?
[Elilingi na lokasa 14]
Ekeko monene ya Falao Aménophis III
[Elilingi na lokasa 15]
Oyebi mpo na nini Hamana asukaki mabe?
[Elilingi na lokasa 16]
Olukaka makambo oyo okoki kosalela basusu?