Lisolo ya bomoi
Tozalaki kobika na makasi ya Yehova
YA ERZSÉBET HAFFNER
Ntango Tibor Haffner ayokaki ete babengani ngai na ekólo Tchécoslovaquie, alobaki na ngai boye: “Nakotika te ete bábengana yo.” Mpe abakisaki ete: “Soki olingi, nakobala yo, mpe okotikala na ngai awa libela.”
MOKOLO ya 29 Yanuali 1938, kaka nsima ya mwa bapɔsɔ kobanda ntango Tibor atunaki ngai libala ya mbalakaka, tobalanaki na ye, ndeko oyo ateyaki libota na biso nsango malamu mbala ya liboso. Ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te mpo nandima kobalana na ye. Nautaki kaka kokokisa mbula 18 mpe, lokola nazalaki mobongisi-nzela, nazalaki na mposa ya komipesa mobimba na mosala ya Nzambe na bambula wana ya bolenge. Nalelaki. Nabondelaki. Kasi, ntango nakitisaki motema, namonaki ete Tibor atunaki ngai libala kaka mpo na komonisela ngai boboto te, mpe nandimaki kobalana na mobali yango, oyo alingaki ngai na bolingo ya solo mpenza.
Kasi, mpo na nini balingaki kobengana ngai? Likambo ya kokamwa ezali ete nazalaki kofanda na ekólo oyo ezali na demokrasi, epai moto na moto azalaki na bonsomi ya kolanda lingomba oyo ye alingi. Tiká nabɛtɛla bino sikoyo lisolo na ngai.
Nabotamaki mokolo ya 26 Desɛmbɛ 1919, na mboka Sajószentpéter, na ekólo Hongrie, na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 160 na ɛsti ya engumba Budapest; baboti na ngai bazalaki bandimi ya Lingomba ya Katolike. Kasi, tata na ngai akufaki liboso nabotama. Mwa moke na nsima, mama abalaki mobali moko oyo akufelaki mwasi mpe azalaki na bana minei, mpe tokendaki kofanda na Lučenec, engumba moko kitoko na ekólo Tchécoslovaquie. Na bambula wana, kokola na mabɔkɔ ya tata mosusu ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te. Lokola nazalaki mwana moke kati na bana mitano ya libota wana, nazalaki komimona mpenza mopaya. Mbongo ezalaki mpasi, mpe ngai nazangaki ná biloko ná bolingo mpe lisalisi ya baboti, oyo mwana nyonso azalaka na mposa na yango.
Nani akopesa ngai eyano?
Ntango nakokisaki mbula 16, nakómaki kotungisama na mituna ya ntina mingi. Natángaki na likebi mpenza lisolo ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, mpe ndenge bato ya bikólo oyo elobaka ete elongwa na molili mpe emibengaka bikólo ya boklisto babomanaki ekamwisaki ngai mpenza. Lisusu, na bamboka mingi, bakómaki kotya mosala ya soda liboso ya makambo mosusu nyonso. Yango ekesanaki mpenza na bolingo oyo bazalaki koteya na ndako-nzambe.
Na yango, nakendeki kotala sango moko mpe natunaki ye boye: “Mobeko nini esengeli kotambwisa biso baklisto: kokende na etumba mpe koboma bazalani na biso to nde kolinga bango?” Motuna na ngai epesaki ye nkanda, mpe ayanolaki ete ye ateyaka kaka oyo bakonzi bazali kosɛnga ye ateya. Ezalaki mpe ndenge moko ntango nakendeki epai ya pastɛrɛ moko ya Lingomba ya Protesta ya Calvin mpe Labi moko ya Lingomba ya Bayuda. Bapesaki ngai eyano moko te, kasi bazalaki kaka kokamwa na motuna na ngai, mpo bayoká naino motuna ya boye te. Nsukansuka, nakendeki kotala pastɛrɛ moko ya Lingomba ya Protesta ya Luther. Ye mpe asilikaki, kasi liboso tókabwana, alobaki na ngai boye: “Soki olingi mpenza kozwa eyano na motuna na yo, tuná Batatoli ya Yehova.”
Namekaki koluka Batatoli, kasi namonaki bango te. Mwa mikolo na nsima, nazalaki kozonga ndako nsima ya mosala mpe namonaki porte ya ndako na biso efungwami mwa moke. Elenge mobali moko kitoko azalaki kotángela mama na ngai Biblia. Na mbala moko, likanisi moko eyelaki ngai na motó mpe nalobaki na motema ete: ‘Na ntembe te, moto oyo azali Motatoli ya Yehova!’ Tokɔtisaki mobali yango, Tibor Haffner, na kati ya ndako, mpe natunaki ye mituna na ngai. Na esika apesa ngai biyano na maloba na ye moko, alakisaki ngai oyo Biblia elobi mpo na baklisto ya solo mpe mpo na mikolo oyo tozali.—Yoane 13:34, 35; 2 Timote 3:1-5.
Nsima ya mwa basanza, liboso nakokisa mbula 17, nazwaki batisimo. Namonaki ete moto nyonso asengeli koyoka solo yango ya ntina mingi, oyo ngai nayebaki na mpasi. Nabandaki mosala ya mobongisi-nzela, oyo ezalaki pɛtɛɛ te na ekólo Tchécoslovaquie na nsuka ya bambula ya 1930. Atako lingomba na biso eyebanaki na Leta, bakonzi ya mangomba bazalaki kotinda bato bátɛmɛla biso mpenza.
Minyoko ebandi
Mokolo moko, na nsuka ya 1937, nazalaki kosakola elongo na ndeko moko ya mwasi na mboka moko pene na engumba Lučenec. Mosika te, bakangaki biso mpe batyaki biso na bolɔkɔ. Mokɛngɛli ya bolɔkɔ alobaki na biso ete: “Bokokufa awa,” mpe akangaki porte na makasi.
Na mpokwa, bayaki na basi mosusu minei oyo bakangaki mpe batyaki bango esika moko na biso. Tobandaki kobɔndisa bango mpe kopesa bango litatoli. Bakitisaki mitema, mpe butu mobimba toteyaki bango solo ya Biblia.
Na ngonga ya motoba na ntɔngɔ, mokɛngɛli ya bolɔkɔ abengaki ngai. Nalobaki na ndeko mwasi oyo tozalaki na ye ete: “Tokokutana lisusu na Bokonzi ya Nzambe.” Nalobaki na ye ete, soki ye abiki, ayebisa baboti na ngai likambo oyo ekómeli ngai. Nabondelaki na motema mpe nalandaki mokɛngɛli. Amemaki ngai na ndako na ye oyo ezalaki na kati ya lopango ya bolɔkɔ. Alobaki na ngai ete: “Mwana, nazali na mwa mituna ya kotuna yo. Na butu ya lelo, nayokaki bolobi ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova. Okoki kolakisa ngai yango na Biblia?” Yango ekamwisaki ngai mpe motema na ngai ekitaki mpenza! Abimisaki Biblia na ye, mpe nalakisaki ye ná mwasi na ye nkombo Yehova. Atunaki ngai ebele ya mituna mosusu na makambo oyo ayokaki na butu ntango tozalaki kosolola na basi minei wana. Lokola asepelaki na biyano oyo napesaki ye, alobaki na mwasi na ye asalela ngai ná moninga na ngai tii.
Nsima ya mwa mikolo, babimisaki biso, kasi zuzi moko akataki ete lokola nazalaki moto ya ekólo Hongrie, nasengeli kolongwa na ekólo Tchécoslovaquie. Ezali na nsima ya likambo wana nde Tibor Haffner atunaki ngai libala. Tobalanaki, mpe nakómaki kofanda na ndako ya baboti na ye.
Minyoko ekómi makasi
Atako Tibor azalaki na mikumba mosusu na lisangá, ngai ná ye tokobaki na mosala ya kosakola elongo. Mwa moke liboso basoda ya ekólo Hongrie bákɔta na engumba na biso na sanza ya Novɛmbɛ 1938, mwana na biso, Tibor Junior, abotamaki. Na Mpoto, etikalaki moke Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebanda. Basoda ya Hongrie bazwaki ndambo monene ya ekólo Tchécoslovaquie mpe, na bamboka oyo ekómaki na mabɔkɔ na bango, Batatoli ya Yehova bakómaki konyokwama lisusu mingi koleka.
Mokolo ya 10 Ɔkɔtɔbɛ 1942, Tibor akendeki na engumba Debrecen mpo na kokutana na mwa bandeko kuna. Kasi, na mbala wana azongaki te. Nsima ya mikolo, ayebisaki ngai likambo oyo ekómelaki ye. Ntango akómaki na esika oyo asengelaki kokutana na bandeko, akutaki nde bapolisi oyo balataki bilamba ya bato ya mosala. Bazalaki kozela mobali na ngai ná Pál Nagypál, oyo bayaki bato ya nsuka. Bamemaki bango na biro ya bapolisi, balongolaki bango basapato mpe babɛtaki bango fimbo na nse ya makolo tii ntango bayebaki lisusu eloko te.
Na nsima, basɛngaki bango bálata basapato mpe bátɛlɛma. Atako bazalaki koyoka mpasi, basɛngaki bango bátambola tii na gare ya engbunduka. Bapolisi bayaki na mobali mosusu oyo bakangaki ye bande motó mobimba mpe akokaki ata komona te. Mobali yango ezalaki Ndeko András Pilling, oyo ayaki mpe na esika oyo bandeko basengelaki kokutana. Bamemaki mobali na ngai na engbunduka tii na bolɔkɔ ya Alag, pene na engumba Budapest. Mokɛngɛli moko ya bolɔkɔ oyo amonaki ndenge makolo ya Tibor ebebaki na fimbo, alobaki na litiyo mpenza ete: “Bato mosusu bazali mitema mabe mpenza! Kobanga te, tokosilisa mpasi na yo.” Bakɛngɛli mosusu mibale babandaki mbala moko kobɛta Tibor na makolo mpe ekómaki kobimisa makila mingi. Nsima ya mwa miniti, ayebaki lisusu eloko te.
Na sanza oyo elandaki, basambisaki Tibor ná bandeko mosusu koleka 60, basi mpe mibali. Bakatelaki Bandeko András Bartha, Dénes Faluvégi, mpe János Konrád etumbu ya kobomama na nsinga na nkingo. Ndeko András Pilling azwaki etumbu ya bolɔkɔ bomoi na ye mobimba, mpe mobali na ngai bolɔkɔ ya mbula 12. Mabe nini basalaki? Prokirɛrɛ afundaki bango ete bazali kotɛka mboka, bazali koboya kokɔta na mosala ya soda, bazali kotɛkɛla banguna basɛkɛlɛ ya mboka, mpe ete bazali kosambwisa lingomba mosantu. Na nsima, bakitisaki etumbu ya bandeko oyo basengelaki kobomama mpe bakómisaki yango etumbu ya bolɔkɔ bomoi na bango mobimba.
Nalandi mobali na ngai
Mikolo mibale nsima ya mokolo oyo Tibor atikaki biso mpo na kokende na likita na Debrecen, nalamukaki na ntɔngɔntɔngɔ, liboso ya ngonga ya motoba, mpe nazalaki kongoma bilamba na biso. Mbala moko, babɛtaki makasi na porte. Nalobaki na motema ete: ‘Bayei.’ Bapolisi motoba bakɔtaki mpe balobaki na ngai ete bazwi ndingisa ya kosala ankɛtɛ na ndako na biso. Bakangaki biso nyonso oyo tozalaki na ndako wana, ná mwana na biso oyo azalaki kaka na mbula misato, mpe bamemaki biso na biro ya bapolisi. Kaka mokolo wana, bamemaki biso na bolɔkɔ moko na engumba Pétervására, na ekólo Hongrie.
Ntango tokómaki kuna, nabɛlaki fiɛvrɛ mpe bakabolaki ngai na bakangami mosusu. Ntango nabikaki, basoda mibale bazalaki na ndako oyo batyaki ngai mpe bazalaki kobendana mpo na ngai. Moko azalaki koloba ete: “Tóbɛta ye masasi! Nakobɛta ye masasi!” Kasi, mosusu azalaki koloba ete esengeli bátala ngai naino mpo na koyeba soki nakobika to te, wana nde bakoyeba nini bakoki kosala. Nabondelaki bango báboma ngai te. Nsukansuka, babimaki na ndako oyo nazalaki, mpe natɔndaki Yehova ndenge abikisaki ngai.
Bakɛngɛli ya bolɔkɔ bazalaki konyonga bato na ndenge moko mabe mpo báloba. Balobaki na ngai nalala elongi na nse, bakɔtisaki ngai basosɛti na monɔkɔ, bakangaki ngai mabɔkɔ mpe makolo, mpe babɛtaki ngai fimbo tii ntango makila ekómaki kobima ngai. Batikaki kobɛta ngai kaka ntango soda moko alobaki ete alɛmbi. Batunaki ngai nayebisa bango bato oyo mobali na ngai akendeki kokutana na bango mokolo oyo bakangaki ye. Nayebisaki bango te, mpe bakobaki kobɛta ngai mikolo misato mobimba. Mokolo ya minei, bapesaki ngai nzela nakende kotika mwana na ngai epai ya mama. Na malili makasi oyo ezalaki na ntango wana, namemaki mwana na ngai na mokɔngɔ atako etondaki na bampota mpe natambolaki kilomɛtrɛ soki 13 tii na gare ya engbunduka. Kuna, nazwaki engbunduka tii na mboka na biso, kasi nasengelaki kozonga na kaa kaka mokolo yango.
Bakatelaki ngai mbula motoba ya bolɔkɔ na engumba Budapest. Ntango nakómaki na bolɔkɔ yango, nayokaki ete Tibor mpe azali wana. Tosepelaki mingi ntango bapesaki biso nzela ya kosololaka, atako tosengelaki kosolola kaka mwa miniti moke, mpe mwa lopango moko ya bibende ezalaki kokabola biso! Tomonaki mpenza bolingo ya Yehova mpe tolendisamaki mingi na mwa baminiti wana ya esengo. Liboso tókóma lisusu esika moko, mokomoko na biso anyokwamaki makasi mpenza, mpe mbala mingi tozalaki kokóma mpenza pene na liwa.
Tozali kolekaleka na babolɔkɔ
Batyaki biso bandeko basi soki 80 na ndako kaka moko ya bolɔkɔ. Tozalaki mpenza na mposa ya bilei ya elimo, kasi ezalaki mpasi mpenza mpo mikanda ekɔta na kati ya bolɔkɔ. Tokokaki nde kozwa ata mwa mokanda moko na kati ya bolɔkɔ? Tiká nayebisa bino ndenge tosalaki. Nandimaki mosala ya kobongiselaka basali ya bolɔkɔ basosɛti na bango. Nakomaki na mwa papye moko mpo na kosɛnga nimero ya Biblia na bibliotɛkɛ ya bolɔkɔ, mpe nakɔtisaki papye yango na kati ya sosɛti moko. Mpo na kobenda likebi na bango te, nasɛngaki mpe babuku mosusu.
Mokolo oyo elandaki, basali ya bolɔkɔ batindelaki ngai liboke mosusu ya basosɛti. Na kati ya sosɛti moko, namonaki banimero oyo nasɛngaki. Napesaki mokɛngɛli moko ya bolɔkɔ banimero yango mpo ayela ngai babuku yango. Tozalaki na esengo monene ntango tozwaki babuku yango, ná Biblia na kati! Babuku mosusu, tozalaki kozongisa yango mbala na mbala mpe kosɛnga mosusu, kasi tozalaki kozongisa Biblia te. Soki mokɛngɛli yango atuni yango, tozalaki ntango nyonso koyanola ye ete: “Ezali buku monene, mpe moto nyonso azali na mposa ya kotánga yango.” Na ndenge wana nde tozwaki likoki ya kotángaka Biblia.
Mokolo moko boye, mokonzi moko abengaki ngai na biro na ye. Azalaki koloba na bonkonde mpenza.
Alobaki na ngai ete: “Madame Haffner, nazali na nsango moko ya esengo mpenza mpo na yo. Okoki kozonga epai na bino. Mbala mosusu ata lobi. Ata mpe lelo, soki engbunduka moko eyei.”
Nazongisaki ete: “Ekozala esengo mingi.”
Ye azongisaki boye: “Ya solo, ekozala mpenza esengo. Ozali na mwana, mpe nakanisi ete ozali na mposa ya kobɔkɔla ye.” Mpe abakisaki ete, “Eloko nakosɛnga yo ezali kaka ete otya sinyatire na mokanda oyo.”
Natunaki ye ete: “Mokanda yango elobi nini?”
Alobaki na ngai ete: “Kobanga te. Soki otye kaka sinyatire na yo, obimi na bolɔkɔ.” Na nsima alobaki na ngai ete: “Ntango okokóma na mboka, okoki kosala nyonso oyo okosepela kosala. Kasi sikoyo, osengeli kotya sinyatire na yo na mokanda oyo mpo na komonisa ete ozali lisusu Motatoli ya Yehova te.”
Nazongaki nsima mpe nayebisaki ye polele ete naboyi.
Agangaki na nkanda nyonso ete: “Soki boye, okokufa awa!” mpe abimisaki ngai na biro na ye.
Na sanza ya Mai 1943, batindaki ngai na bolɔkɔ mosusu na Budapest, mpe na nsima, na mboka Márianosztra, epai batyaki biso na monastɛrɛ moko elongo na bamamelo soki 70. Atako tozalaki kobunda na nzala mpe na bampasi mosusu, tozalaki kolɛmba te kopesa bango litatoli na ntina na elikya na biso. Mamelo moko asepelaki mpenza na makambo oyo tozalaki koyebisa bango mpe alobaki ete: “Mateya yango ezali malamu mpenza. Naino nayoká mateya kitoko boye te. Bóyebisa ngai makambo mosusu.” Toyebisaki ye elikya ya mokili ya sika mpe bomoi ya esengo oyo ekozala na mokili yango. Ntango tozalaki kosolola na ye, mamelo-mokonzi ayaki. Bazwaki mbala moko mamelo yango mpe bakendeki na ye, balongolaki ye bilamba mpe alyaki fimbo ya solosolo. Ntango tokutanaki na ye lisusu, alobaki na biso ete: “Bóbondela Yehova mpo na ngai ete abikisa ngai mpe alongola ngai na esika oyo. Nazali na mposa ya kokóma Motatoli ya Yehova.”
Na nsima, bamemaki biso na bolɔkɔ moko ya kala na Komárom, engumba moko oyo ezali na Ebale Danube, na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 80 na wɛsti ya engumba Budapest. Tomonaki mpasi mpenza na bolɔkɔ yango. Bandeko mingi ya basi babɛlaki maladi babengi typhus, ngai mpe nabɛlaki yango; nazalaki kosanza makila mpe nakómaki kolɛmba mingi. Tozalaki na bankisi te, mpe namonaki mpenza ete bomoi na ngai ekómi na nsuka. Kasi, bakonzi ya bolɔkɔ bazalaki koluka moto moko oyo ayebi mosala ya biro. Bandeko bapesaki nkombo na ngai. Yango wana bapesaki ngai mwa bankisi, mpe nabikaki.
Libota na biso esangani lisusu
Lokola basoda ya Union soviétique bazalaki koya na ngámbo ya ɛsti mpe bakómaki penepene, tokendaki na ngámbo ya wɛsti. Soki nalobi nabɛta lisolo ya bampasi nyonso oyo tokutanaki na yango, yango ekoki kozwa ngai mbula mobimba. Mbala mingi, nazalaki mpenza komona liwa na miso, kasi lobɔkɔ ya Yehova ezalaki kobikisa ngai. Ntango etumba esilaki, tozalaki na engumba Tábor na République tchèque, na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 80 na engumba Prague. Ngai ná semeki na ngai Magdalena tosalaki pɔsɔ misato mobimba mpo tókóma epai na biso na engumba Lučenec, na mokolo ya 30 Mai 1945.
Ntango tozalaki naino mosika na ndako, namonaki mama-bokilo na ngai ná mwana na ngai, Tibor, na kati ya lopango. Mpisoli etondaki ngai na miso, mpe nabelelaki, “Tibike!” Akimaki mbangu mpe ayaki koyamba ngai. “Mama, okotika ngai lisusu?” Wana maloba ya liboso oyo alobaki na ngai, mpe nakobosana yango mokolo moko te.
Yehova amoniselaki mpe Tibor, mobali na ngai, motema mawa na ye. Ntango balongolaki ye na bolɔkɔ ya Budapest, batindaki ye elongo na bandeko mibali mosusu soki 160 na kaa ya misala makasi na engumba Bor. Bazalaki mbala na mbala komona mpenza liwa na miso, kasi bango nyonso babikaki. Tibor akómaki na mboka na mokolo ya 8 Aprili 1945, pene na sanza moko liboso na ngai.
Nsima ya etumba, tozalaki kaka na mposa ya makasi ya Yehova mpo na kolonga mikakatano nyonso oyo tokutanaki na yango na mbula 40 oyo Bakoministe bazalaki koyangela Tchécoslovaquie. Bakatelaki Tibor lisusu bolɔkɔ ya ebele ya bambula, mpe nasengelaki kobɔkɔla mwana na biso ngai moko. Ntango Tibor abimaki na bolɔkɔ, akómaki mokɛngɛli-motamboli. Na boumeli ya mbula 40 ya boyangeli ya Bakoministe, tozalaki kosalela mabaku nyonso mpo na koyebisa bato mosusu kondima na biso. Tosalisaki bato mingi na koyeba solo. Bato yango bazali lelo oyo bana na biso ya elimo.
Tozalaki na esengo monene mpenza ntango tozwaki bonsomi ya kosambela na 1989! Na mbula oyo elandaki, tosalaki liyangani ya liboso ya etúká na ekólo na biso, nsima ya ebele ya bambula. Ntango tomonaki bankóto ya bandeko mibali mpe basi oyo batikalaki sembo na boumeli ya ebele ya bambula wana, tomonaki mpenza ete Yehova nde apesaki bango nyonso makasi.
Mobali na ngai ya bolingo, Tibor, atikalaki sembo tii na liwa na ye na mokolo ya 14 Ɔkɔtɔbɛ 1993, mpe ngai nafandi lelo epai ya mwana na ngai na engumba Žilina, na ekólo Slovaquie. Nzoto na ngai ezali lisusu makasi te, kasi elimo na ngai ezali kaka makasi na nguya ya Yehova. Nazali mpenza kondima ete na makasi na ye, nakoki koyikela ata mokakatano nini na mokili oyo mpiko. Lisusu, nazali kozela na elikya mpenza ntango oyo, Yehova, na motema mawa na ye, akosala ete nazala na bomoi libela na libela.
[Elilingi na lokasa 20]
Mwana na ngai, Tibor Junior, (na mbula 4) oyo nasengelaki kotika epai ya baboti
[Elilingi na lokasa 21]
Tibor na bandeko mosusu, na engumba Bor
[Elilingi na lokasa 22]
Elongo na Tibor ná sɛmɛki Magdalena, na 1947, na engumba Brno
[Bililingi na lokasa 23]
Mbala mingi, nazalaki komona liwa na miso, kasi lobɔkɔ ya Yehova ezalaki kobikisa ngai