Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala
04-10/03
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | NZEMBO 16-17
“Yehova, bolamu na ngai eutaka epai na yo”
Elenge, okoki kozala na bomoi ya esengo
PONÁ BANINGA YA MALAMU
11 Tángá Nzembo 16:3. Davidi ayebaki ndenge ya kopona baninga ya malamu. Baninga na ye ezalaki bato oyo bazalaki kolinga Yehova, mpe yango esalaki ete ‘asepela mpenza.’ Abengaki baninga na ye “basantu” mpo bazalaki kotosa mibeko ya Nzambe oyo etali bizaleli ya pɛto. Mokomi mosusu ya nzembo amiyokaki mpe bongo mpo aponaki baninga ya malamu; akomaki boye: “Nazali moninga ya baoyo nyonso babangaka yo, mpe ya baoyo bazali kobatela [mitindo] na yo.” (Nzembo 119:63) Ndenge tomonaki yango na lisolo oyo eleki, yo mpe okoki kozwa baninga ebele ya malamu na kati ya bato oyo balingaka mpe batosaka Yehova. Kasi, baninga na yo basengeli kozala kaka bato ya mbula na yo?
‘Moná esengo ya Yehova’
Davidi ayembaki boye: “Yehova azali ndambo ya likabo oyo bapesá ngai mpe ya kɔpɔ na ngai. Ozali kosimba makasi likabo na ngai. Bisika oyo omeki na nsinga mpo na kopesa ngai libula esepelisi ngai.” (Nz. 16:5, 6) Davidi azalaki na botɔndi mingi mpo na “ndambo ya likabo” na ye, elingi koloba, ndenge azalaki na boyokani malamu ná Yehova mpe libaku malamu ya kozala mosaleli na ye. Lokola Davidi, tokoki kokutana na mikakatano, kasi tozali na mapamboli mingi ya elimo! Na yango, tiká ete tókoba ntango nyonso kosepela na losambo ya solo mpe tózala na “botɔndi” mpo na tempelo ya Yehova ya elimo.
Tyáká Yehova liboso na yo ntango nyonso
2 Biso nyonso tokoki kozwa mateya na masolo ya bato oyo bankombo na bango eyebani mingi; na ndakisa Abalayama, Sala, Moize, Luta, Davidi, Esetele, ntoma Paulo, mpe bamosusu. Nzokande, tokoki mpe kozwa mateya na masolo ya bato oyo balobelami mingi te na Biblia. Komanyola na masolo na bango ekoki kosalisa biso tósala lokola mokomi ya nzembo oyo alobaki boye: “Natii [Yehova] liboso na ngai libela; azali na lobɔkɔ na ngai ya mobali, bongo nakokwea te.” (Nz. 16:8) Maloba yango elimboli nini?
3 Na ntango ya kala, soda azalaki kosimba mopanga na lobɔkɔ ya mobali; na bongo, ngámbo wana ya lobɔkɔ ya mobali ezalaki kotikala polele, mpamba te azalaki kosimba nguba na lobɔkɔ ya mwasi. Kasi, moninga oyo azali kobunda pembeni na ye, na lobɔkɔ ya mobali, azalaki kobatela ye. Yehova akobatela biso soki tozali kobosana ye te mpe tozali kosala mokano na ye. Na yango, tótalela ndenge oyo masolo ya Biblia ekoki kolendisa kondima na biso mpo ‘tókanisaka tango nyonso [Yehova].’—Bible na Lingala ya lelo oyo.
Biloko ya motuya ya elimo
it-2-F lok. 697
Mbuma ya liso
Ntango basaleli liloba ya Ebre ʼishôn (Mib 32:10; Mas 7:2) esika moko na ʽayin (liso), ebongolamaka mpenzampenza “mobali moke ya liso”; ndenge moko mpe, bath (mwana mwasi) esalelami na Bileli 2:18 na likanisi ya “mwana mwasi ya liso,” mpe maloba yango nyonso emonisi mbuma oyo ezalaka na liso. Basangisi maloba yango mibale na Nzembo 17:8 (ʼishôn bath-ʽayin), elingi koloba, “mobali moke, mwana mwasi ya liso” (“mbuma ya liso,” NW). Na ntembe ezali kolobala mwa elili moke ya moto ye moko oyo akoki komonana na kati ya liso ya moto mosusu.
Liso ezali eloko ya pɛtɛpɛtɛ mpenza; ata mwa nsuki to zɛlo moke oyo ekɔti na kati ya liso ekoki kofanda kimya te. Eteni ya liso oyo emonisaka na kati (la cornée) oyo ezingi mbuma ya liso esengeli kobatelama malamu, mpo soki ezoki na likama to ebebi mpo na maladi moko, moto akomona lisusu polele te to akoki kokufa miso. Na maloba ya polele kasi ya boboto, Biblia esaleli maloba “mbuma ya miso na yo” mpo na kolobela eloko oyo esengeli kobatelama malamu mpenza. Tosengeli kosala bongo mpo na mobeko ya Nzambe. (Mas 7:2) Mpo na komonisa ndenge Nzambe abatelaka Yisraele lokola tata, Kolimbola Mibeko 32:10 elobi ete abatelaki yango lokola “mbuma ya liso na ye.” Davidi abondelaki ete Nzambe abatela ye malamu lokola “mbuma ya liso.” (Nz 17:8) Alingaki Yehova asala nokinoki mpo na kobatela ye liboso ya banguna. (Talá mpe Zek 2:8; epai liloba ya Ebre bavath ʽayin, “mbuma ya liso,” esalelami.)—Talá LISO.
11-17/03
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | NZEMBO 18
“Yehova azali . . . Mobikisi na ngai”
Esengo ya Yehova ezali esika makasi ya libateli na biso
Biblia ekokanisi mpe Yehova na biloko oyo ezangá bomoi. Elobeli ye lokola “libanga ya Yisalaele,” mpe lokola “esika makasi.” (2 Samwele 23:3; Nzembo 18:2; Deteronome 32:4) Bokokani ezali nini na maloba yango? Kaka ndenge libanga monene epikamaka makasi mpe eninganaka te, Yehova Nzambe akoki mpenza kobatela yo.
5 Mokanda ya Nzembo ezali na maloba mingi ya elilingi oyo elobeli bizaleli ndenge na ndenge ya Yehova. Na ndakisa, Nzembo 84:11 elobi ete Yehova azali “moi mpe nguba” mpamba te azali Mopesi ya pole, ya bomoi, ya nguya, mpe ya libateli. Lisusu, Nzembo 121:5 elobi ete ‘[Yehova] azali elili na yo epai ya lobɔkɔ ya mobali.’ Ndenge kaka elili ya nzete to ya eloko mosusu ekoki kobatela yo na moi makasi, Yehova akoki kobatela baoyo basalelaka ye na bampasi oyo mikakatano ememelaka bango, abatelaka bango na “lobɔkɔ” na ye mpe na nse ya “mapapu” na ye.—Yisaya 51:16; Nzembo 17:8; 36:7.
it-2-F 1168 par. 8
Mongongo
Nzambe ayokaka mongongo ya basaleli na ye. Baoyo basalelaka Nzambe na elimo mpe na solo babelelaka Nzambe na elikya ete akoyoka mongongo na bango, ata soki balobi na ye na monɔkɔ nini. Longola yango, ata soki babimisi mongongo te, soki moto abondeli Nzambe na nse ya motema, Nzambe, oyo ayebi mitema ya bato ‘ayokaka’ to atyaka likebi. (Nz 66:19; 86:6; 116:1; 1Sa 1:13; Ne 2:4) Nzambe ayokaka babola oyo bazali kosɛnga lisalisi; ayokaka mpe mongongo mpe ayebi makanisi ya bato oyo batɛmɛlaka ye mpe basalelaka basaleli na ye mwango ya mabe.—Eb 21:17; Nz 55:18, 19; 69:33; 94:9-11; Yir 23:25.
Ndenge ya kozala na esengo mpe na kimya ntango ozali komitungisa
2. Kanisáká ndenge Yehova asalisaki yo. Ntango ozali kokanisa makambo oyo ekómelá yo, okoki kokanisa komekama oyo oyikelaki mpiko mpo Yehova asalisaki yo? Ntango tokanisaka ndenge Yehova asungaki biso tólonga komekama moko boye kaka ndenge asungaki basaleli na ye ya ntango ya kala, tozwaka makasi mpe tokómaka lisusu kotyela ye motema mingi. (Nz. 18:17-19) Ndeko mobali moko na nkombo Joshua, oyo azali nkulutu, alobi boye: “Nazali na liste ya mabondeli oyo nazwaki biyano na yango. Yango esalisaka ngai nakanisa mbala boni nasɛngaki Yehova mpo na likambo moko ya sikisiki mpe apesaki ngai kaka oyo nasengelaki na yango.” Ya solo, ntango tokanisaka makambo oyo Yehova asalelá biso, tozwaka lisusu makasi ya koyika mpiko ntango tozali komitungisa.
Biloko ya motuya ya elimo
it-1-F 437 par. 2
Keruba
Yango ezalaki te lokola bililingi ya kolekisa ndelo oyo esalemá na kolanda midɛlɛ ya bililingi mineneminene oyo ezalaki na mapapu, oyo bikólo ye zingazinga ya bapakano ezalaki kosambela. Na kalanda mimeseno ya Bayuda ya ntango ya kala (Biblia elobi eloko te na likambo yango), bakeruba yango ezalaki na lolenge ya moto. Bililingi na yango esalemaki malamu mpenza, ezalaki komonisa baanzelu ya kitoko mpenza, mpe esalemaki na likebi mpenza “na kolanda . . . modɛlɛ” oyo Moize azwaki epai ya Yehova ye moko. (Kob 25:9) Ntoma Paulo alobelaki “bakeruba ya nkembo oyo elili na bango ezalaki kozipa ezipeli ya kozipa masumu.” (Ebr. 9:5) Bakeruba yango ezalaki komonisa kozala ya Yehova: “Mpe nakomilakisa liboso na yo kuna mpe nakosolola na yo uta na likoló ya ezipeli, uta na kati ya bakeruba mibale oyo bazali likoló ya sanduku ya litatoli” (Kob. 25:22; Mit. 7:89) Yango wana, bavɛrsɛ mosusu elobi ete Yehova , “afandi likoló [to, na katikati] ya bakeruba.” (1Sa 4:4; 2Sa 6:2; 2Ba 19:15; 1Nt 13:6; Nz 80:1; 99:1; Yis 37:16) Na ndenge ya elilingi, bakeruba ezalaki “bililingi ya likalo” ya Yehova epai azalaki (1Nt 28:18), mpe mapapu mibale ya bakeruba ezali komonisa libateli mpe mbangu oyo likalo ezalaki kotambola. Yango wana Davidi, na nzembo moko ya poɛmi, alobaki ete Yehova ayaki kosalisa ye nokinoki lokola moto oyo “ayaki, likoló ya keruba moko mpe ayaki, azali kopumbwa,” ɛɛ “likoló ya mapapu ya elimo moko.”—2Sa. 22:11; Nz. 18:10.
18-24/03
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | NZEMBO 19-21
“Likoló ezali kosanzola nkembo ya Nzambe”
Tiká ete bikelamu nyonso esakola nkembo ya Yehova
NTANGO Davidi, mwana ya Yese, azalaki kokola na Beteleme, azalaki mobateli ya mpate. Tokanisi mpenza ete ntango azalaki kokɛngɛla bampate ya tata na ye na bisobe na zingazinga ya Beteleme, azalaki kozwa mabaku mingi ya kotala ebele ya minzoto na likoló! Na ntembe te, ntango asalaki Nzembo 19, akanisaki lisusu esengo oyo azalaki koyoka ntango azalaki kotala minzoto: “Likoló ekosakolaka nkembo ya Nzambe, lola ekoyebisaka misala ya mabɔkɔ na ye. Nde lokito na bango ekómi na mokili mobimba, maloba na bango kino nsuka na mokili.”—Nzembo 19:1, 4.
2 Likoló oyo ezali mosala ya Yehova, atako elobaka te, esakolaka nkembo na ye mokolo na mokolo. Biloko oyo Nzambe akelá esakolaka ntango nyonso nkembo na ye mpe, ntango moto azali kotala biloko yango oyo ezali komonana na “mokili mobimba,” amimonaka mpenza ete azali mpamba. Nzokande, ezali kaka te bikelamu oyo elobaka te nde esengeli kosakola nkembo ya Nzambe. Bazali kolendisa bato ya sembo ete bápesa Nzambe nkembo na mongongo na bango. Mokomi moko ya nzembo alobaki na bato oyo bazali kosambela Nzambe na bosembo ete: “Bópesa Yehova nkembo mpe nguya. Bópesa Yehova nkembo oyo ekoki na nkombo na ye.” (Nzembo 96:7, 8, NW) Bato oyo bazali na boyokani malamu na Nzambe bazalaka na esengo ya kosala yango. Kasi, kopesa Nzambe nkembo esɛngi nini?
Biloko oyo Nzambe akelá esakolaka nkembo na ye!
8 Na nsima, Davidi alobelaki likambo mosusu ya kokamwa na biloko oyo Nzambe akelá: “Kati na yango [likoló] asali hema mpo na moi; ezali lokola mokweli-ya-mwasi oyo azali kobima na ndako na ye; ezali mpe na esengo lokola moto makasi oyo alingi kopota na nzela. Kobima na yango ezali na nsuka moko ya lola, mpe akoleka kino nsuka mosusu na yango; eloko moko ekozanga moi na yango te.”—Nzembo 19:4-6.
9 Soki tokokanisi yango na minzoto mosusu, moi ezali mpenza monene te. Atako bongo, monzoto yango ezali monene mpenza soki tokokanisi yango na baplanɛti oyo ebalukaka zingazinga na yango. Buku moko elobi ete “mabelé ekoki kokɔta na moi mbala 330000. Ata soki tosangisi baplanɛti nyonso oyo ebalukaka zingazinga na yango, moi eleki kaka na monene”! Moi ezali na nguya ya kobenda biloko oyo esalaka ete mabelé, atako ekabwani na moi na ntaka ya kilomɛtrɛ milio 150, elandaka kaka nzela na yango ntango ezali kobaluka zingazinga ya moi, etangwaka mosika te, epusanaka mpe penepene te. Na nguya nyonso oyo moi ebimisaka, kaka ndambo moke mpenza nde ekómaka na mabelé, kasi ekoki mpo na kobatela bomoi awa na mabelé.
10 Mokomi ya nzembo alobelaki moi na maloba ya elilingi; abengaki yango “moto makasi” oyo, na moi, azali kopota mbangu longwa na nsuka ya mokili tii na nsuka mosusu, mpe na butu, akei kopema na “hema.” Ntango moi elimwaka na mpokwa, moto oyo azali awa na mabelé amonaka lokola nde ekɔti na “hema” mpo na kopema. Na ntɔngɔ, emonanaka lokola nde ebimi mbala moko, ebandi kotinda pole “lokola mokweli-ya-mwasi oyo azali kobima na ndako na ye.” Ntango Davidi azalaki mobateli ya mpate, azalaki koyoka malili makasi oyo ezalaka na butu. (Genese 31:40) Azalaki koyeba lisusu ndenge oyo moi ezalaki kosilisa ye malili mpe kotinda molunge na mokili zingazinga na ye. Na maloba ya polele, moi ezalaki kolɛmba te na mobembo na yango banda na ɛsti tii na wɛsti, kasi ezalaki lokola “moto makasi,” ezalaki kobandela lisusu mobembo na yango.
g95-F 8/11 7 par. 3
Moyemi aleki monene oyo bato bayebaka te
Kotala na likebi biloko kitoko oyo ezali zingazinga na biso ekoki kosalisa biso tóyeba Mozalisi na biso, mpo ye nde akelá yango. Mokolo moko, Yesu ayebisaki bayekoli na ye bátala malamumalamu bafololo oyo ezalaki kokola zingazinga ya Galile. Alobaki: “Bózwa liteya na fololo lísi ya esobe, ndenge yango ezali kokola; emonaka mpasi te, mpe etongaka elamba te; kasi nazali koloba na bino ete ata Salomo na nkembo na ye nyonso alataki lokola moko na yango te.” (Mat. 6:28, 29) Kitoko ya fololo ata na moke ekoki kokundwela biso ete Nzambe atyelaka mpenza bamposa ya bato likebi.
Biloko ya motuya ya elimo
it-1-F 1093
Hébreu, II
Ezali na lolenge mosusu ya bapoɛmi ya milɔngɔ mibale, epai eteni ya mibale ezongeli te kaka likanisi moko to emonisi bokeseni. Kasi ebakisi nde likanisi ya sika. Nzembo 19:7-9 ezali ndakisa ya poɛmi ya ndenge wana:
Mobeko ya Yehova ezali ya kokoka,
ezongisaka molimo.
Bokundoli ya Yehova ebongi kotyelama motema,
ekómisaka moto oyo azangá mayele moto ya bwanya.
Bitinda ya Yehova ezali alima,
esepelisaka motema;
Mitindo ya Yehova ezali pɛto,
engɛngisaka miso.
Kobanga Yehova ezali pɛto,
eumelaka seko.
Bikateli ya lisambisi ya Yehova ezali solo;
yango nyonso ezali boyengebene.
Tomoni ete molɔngɔ ya mibale ya fraze mokomoko ezali kobakisa likanisi mosusu; na yango vɛrsɛ mobimba ebimisi kaka likanisi moko oyo euti na makanisi mibale. Soki tobakisi eteni ya mibale, na ndakisa “ezongisaka molimo,” “ekómisaka moto oyo azangi mayele moto ya bwanya,” nde motángi akoyeba ndenge ‘mobeko ezali ya kokoka’ mpe ndenge oyo “bokundoli ya Yehova ebongi kotyelama motema.” Na bapoɛmi ya molɔngɔ mibale, ndenge bakabolaka eteni ya liboso na eteni ya mibale nde ebimisaka poɛmi. Na ndenge yango, poɛmi elandanaka malamu, mpe makanisi ebimaka na molɔngɔ mpe, ekomeli ya bavɛrsɛ ebebaka te. Yango wana na bantango mosusu babengaka yango poɛmi ya molɔngɔ mibale.
25-31/03
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | NZEMBO 22
Makambo oyo esakolamaki mpo na liwa ya Yesu
Bamonaki Masiya!
16 Ekomonana lokola Nzambe asundoli Masiya. (Tángá Nzembo 22:1.) Kaka ndenge esakweli elobaki, “na ngonga ya libwa [soki ngonga ya 3 nsima ya midi] Yesu abelelaki na mongongo makasi ete: ‘Eli, Eli, lama sabakatani?’ oyo soki babongoli, elakisi ete: ‘Nzambe na ngai, Nzambe na ngai, mpo na nini osundoli ngai?’” (Mrk. 15:34) Yesu atikaki te kondimela Tata na ye ya likoló. Nzambe atikaki Yesu na mabɔkɔ ya banguna na ye na ndenge alongolaki libateli na ye mpo bosembo ya Kristo emekama tii na nsuka. Mpe ntango Yesu agangaki bongo, akokisaki Nzembo 22:1.
Bamonaki Masiya!
13 Davidi asakolaki ete bakofinga Masiya. (Tángá Nzembo 22:7, 8.) Bato bafingaki Yesu ntango azalaki konyokwama likoló ya nzete ya mpasi. Matai alobi boye: “Baleki-nzela babandaki kofinga ye mpe koningisa mitó na bango mpe koloba ete: ‘Ee yo moto olingaki kobuka tempelo mpe kotonga yango na mikolo misato, omibikisa yo moko! Soki ozali mwana ya Nzambe, kitá na nzete ya mpasi!’” Ndenge moko mpe banganga-nzambe bakonzi ná bakomeli ná mikóló babandaki kosɛka ye mpe koloba ete: “Abikisaki bamosusu; akoki komibikisa ye moko te! Ye azali Mokonzi ya Yisraele; akita sikoyo na nzete ya mpasi mpe biso tokondimela ye. Atyelaki Nzambe motema; Ye abikisa ye sikoyo soki Ye alingaka ye, mpo azalaki koloba ete: ‘Ngai nazali Mwana ya Nzambe.’” (Mat. 27:39-43) Kasi, Yesu ayikelaki nyonso wana mpiko na kimya mpenza. Azali ndakisa malamu mpo na biso!
Bamonaki Masiya!
14 Bakobwakela bilamba ya Masiya mbɛsɛ. Mokomi ya nzembo akomaki boye: “Bazali komikabolela bilamba na ngai, mpe bazali kobwakela bilamba na ngai mbɛsɛ.” (Nz. 22:18) Esalemaki mpe bongo, mpo “ntango [basoda ya Roma] babakaki [Yesu] na nzete, babwakaki mbɛsɛ mpo na kokabola bilamba na ye ya likoló.”—Mat. 27:35; tángá Yoane 19:23, 24.
Biloko ya motuya ya elimo
Tózala na limemya mpo na mayangani na biso ya bosantu
7 Ezali na ndenge mingi oyo tokoki komonisa limemya mpo na mayangani na biso. Moko na yango ezali ya kozala wana ntango nzembo ya Bokonzi ezali koyembama. Banzembo mingi ezali lokola mabondeli mpe esengeli koyembama na limemya nyonso. Ntoma Paulo amonisaki ete esakweli ya Nzembo 22 etalelaki Yesu. Alobaki boye: “Nakosakola nkombo na yo epai ya bandeko na ngai; na katikati ya lisangá nakosanzola yo na nzembo.” (Baebele 2:12) Na yango, tosengeli kozala na momeseno ya kozwaka bisika liboso ndeko oyo akokamba likita ayembisa nzembo; mpe ntango tozali koyemba, tótyaka makanisi na biso mobimba na ndimbola ya maloba ya nzembo yango. Lisusu, ntango tozali koyemba, tosengeli kozala na makanisi lokola mokomi na nzembo, oyo akomaki boye: “Nakosanzola [Yehova] na motema na ngai mobimba, kati na koyangana ya basembwi mpe kati na koyangana monene.” (Nzembo 111:1) Ya solo, koyemba mpo na kokumisa Yehova ezali moko ya bantina mpenza oyo esengeli tókómaka liboso na makita mpe tózalaka wana tii ntango ekosila.
Sanzolá Yehova “na kati ya koyangana”
Lelo oyo, se ndenge ezalaki na ntango ya kala, ezali na bibongiseli oyo ezali kopesa mondimi mokomoko libaku ya koloba mpo na komonisa kondima na ye “na kati ya koyangana.” Moko na bibongiseli yango ezali libaku malamu ya kopesa biyano na makita ya lisangá. Tótalela na lisɛki te malamu oyo eutaka na kopesa biyano. Na ndakisa, biyano oyo elobelaka ndenge ya kolonga mikakatano to kokima yango elendisaka ekateli ya bandeko ya kotosa mitinda ya Biblia. Biyano oyo elimbolaka bavɛrsɛ oyo batángi maloba na yango te to biyano oyo ezalaka na makanisi oyo tozwaki na mikanda mosusu ekoki kolendisa basusu na komipesa na koyekola..
01-07/04
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | NZEMBO 23-25
“Yehova azali Mobateli na ngai”
“Yehova azali mobateli na ngai”
Yehova akambaka bampate na ye. Soki mpate ezangi mobateli, mbala mingi ebungaka. Ndenge moko, esengeli básalisa biso mpo tómona nzela ya bomoi. (Yirimia 10:23) Davidi amonisi ete Yehova akambaka bato na ye na “bisika ya koleisa banyama oyo etondi na matiti” mpe na “bisika ya kopema oyo ezali na mai mingi.” Akambaka bango “na banzela ya boyengebene.” (Vɛrsɛ 2, 3) Maloba wana oyo etaleli mobateli ya bampate endimisi biso ete tokoki kotyela Nzambe motema. Soki tolandi litambwisi ya elimo na ye ndenge emonisami na Biblia, tokoki kozala na bomoi ya esengo, kozwa kopema mpe libateli.
“Yehova azali mobateli na ngai”
Yehova abatelaka bampate na ye. Soki bampate ezali na mobateli te, ebangaka mpe ezangaka lisalisi. Yehova ayebisi bato na ye ete basengeli kobanga te, ata soki bazali “kotambola na lobwaku ya molili makasi,” elingi koloba na ntango ya mpasi mpenza na bomoi na bango. (Vɛrsɛ 4) Yehova asɛnzɛlaka bango, azalaka ntango nyonso pene mpo na kosalisa bango. Akoki kopesa basambeli na ye bwanya mpe nguya oyo bazali na yango mposa mpo bálonga komekama.—Bafilipi 4:13; Yakobo 1:2-5.
“Yehova azali mobateli na ngai”
Yehova aleisaka bampate na ye. Bampate etalelaka mobateli na yango mpo eleisa yango. Biso mpe tozali na bamposa ya elimo oyo kaka Nzambe nde akoki kokokisa yango. (Matai 5:3) Tozali na botɔndi epai ya Yehova mpo azali Mokabi, atandelaka basaleli na ye mesa oyo etondi na bilei ya elimo. (Vɛrsɛ 5) Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka yango, na ndakisa zulunalo oyo ozali kotánga, ezali bilei ya elimo oyo ezali kokokisa mposa na biso ya koyeba ntina ya bomoi mpe mokano ya Nzambe mpo na biso.
Biloko ya motuya ya elimo
Tólinga boyengebene na motema mobimba
NA NZELA ya Liloba na ye mpe ya elimo santu na ye, Yehova azali kotambwisa basaleli na ye na “banzela ya boyengebene.” (Nz. 23:3) Nzokande, lokola tozali bato ya kozanga kokoka, mbala mingi tobungaka nzela yango. Kozongela kosala oyo ezali malamu esɛngaka milende makasi. Nini ekosalisa biso tólonga? Ndenge moko na Yesu, tosengeli kolinga kosala oyo ezali malamu.—Tángá Nzembo 45:7.
2 “Banzela ya boyengebene” ezali nini? “Banzela” yango ya elilingi ezali etamboli oyo eyokani na mitinda ya Yehova na oyo etali boyengebene. Na Ebre mpe na Grɛki, liloba “boyengebene” emonisaka likambo oyo ezali “sembo,” kokangama makasi na mitinda oyo etali bizaleli ya malamu. Lokola Yehova azali “efandelo ya boyengebene,” basambeli na ye bazalaka na esengo ya kobaluka epai na ye mpo na koyeba nzela oyo eyokani na etamboli ya sembo, oyo basengeli kolanda.—Yir. 50:7.
3 Kaka soki tosali milende na motema mobimba mpo tólanda mitinda ya sembo ya Nzambe nde tokoki mpenza kosepelisa ye. (Mib. 32:4) Ebandaka na koyekola nyonso oyo tokoki na ntina etali Yehova Nzambe na nzela ya Liloba na ye, Biblia. Soki tozali koyekola makambo mingi na ntina na ye mpe tozali kopusana penepene na ye mokolo na mokolo, tokobanda kolinga mingi boyengebene na ye. (Yak. 4:8) Tosengeli mpe kondima litambwisi ya Liloba na ye Biblia ntango tolingi kozwa bikateli minene na bomoi.
08-14/04
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | NZEMBO 26-28
Oyo Davidi asalaki mpo atikala sembo
Tambolá na nzela ya bosembo
8 Davidi abondelaki boye: “Talelá ngai, Ee Yehova, mpe meká ngai; pɛtolá bangɛi na ngai mpe motema na ngai.” (Nzembo 26:2, NW) Bangɛi (reins) ezalaka na kati mpenza ya nzoto. Na maloba ya elilingi, bangɛi elimbolaka makanisi oyo ezali na motema ya moto. Motema ya elilingi elimbolaka bomoto ya kati, elingi koloba makanisi ya moto, mayoki mpe mayele na ye. Ntango Davidi asɛngaki Yehova ete atalela ye, abondelaki ye aluka mpe asosola makanisi ya motema na ye mpe mayoki na ye.
9 Davidi abondelaki Nzambe apɛtola bangɛi na ye mpe motema na ye. Ndenge nini Yehova apɛtolaka bomoto na biso? Davidi ayembaki boye: “Nakopambola Yehova, oyo apesi ngai toli. Ya solo, na butu bangɛi na ngai esemboli ngai.” (Nzembo 16:7, NW) Maloba wana elimboli nini? Elimboli ete toli ya Nzambe ekɔtaki na matoi ya Davidi, efandaki na motema na ye, mpe kuna esembolaki makanisi mpe mayoki na ye. Ekoki mpe kozala bongo mpo na biso soki tozali kokanisa malamumalamu toli oyo Yehova azali kopesa biso na nzela ya Liloba na ye, ya basaleli na ye, mpe ya ebongiseli na ye, mpe tozali kobomba yango na motema na biso. Soki tozali kobondela Yehova mbala na mbala ete apɛtola biso na ndenge wana, yango ekosalisa biso tótambola na bosembo.
Tambolá na nzela ya bosembo
12 Davidi amonisaki likambo mosusu oyo elendisaki ye atikala sembo na maloba oyo: “Nafandi esika moko te na bato ya lokuta; mpe nasanganaka te na baoyo babombaka bomoto na bango. Nayini lisangá ya basali na mabe, mpe nafandaka na bato ya mabe te.” (Nzembo 26:4, 5, NW) Davidi azalaki kofanda na bato ya mabe te. Ayinaki baninga mabe.
13 Ezali boni mpo na biso? Toboyaka kofanda na bato ya lokuta na nzela ya televizyo, video, bafilme, Internet, mpe bongo na bongo? Tokimaka bato oyo babombaka bomoto na bango? Bato mosusu, ezala na kelasi to na mosala, bakoki koluka tókóma baninga na bango mpo bámema biso na banzela ya mabe. Tokondima kokóma baninga ya bato oyo batambolaka na solo ya Nzambe te? Bapɛngwi mpe bakoki komonisa ete bazali koloba solo, nzokande babombaka mokano na bango ya kopɛngwisa biso mpo tótika kosalela Yehova. Ndenge nini tosengeli kotalela bandeko mosusu na lisangá oyo toyebi ete basalaka makambo mabe na kobombana? Bato ya ndenge wana mpe babombaka bomoto na bango. Jayson, oyo azali lelo oyo mosaleli na misala, azalaki na baninga ya ndenge wana ntango azalaki elenge. Alobi boye: “Mokolo mosusu, moko na bango alobaki na ngai boye: ‘Ata soki tozali kosala mabe lelo oyo, ekosala eloko moko te, mpamba te ntango mokili ya sika ekoya, ekokuta biso tokufá. Tokoyeba kutu te makambo oyo ekoleka.’ Maloba wana emonisaki ngai mbala moko ete bazali baninga mabe. Ngai nalingi kozala na bomoi na mokili ya sika.” Jayson aboyaki baninga wana. Ntoma Paulo apesaki likebisi oyo: “Bómikosa te. Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.” (1 Bakolinti 15:33) Ezali na ntina mingi tókima baninga mabe!
Tambolá na nzela ya bosembo
17 Tabernakle ná etumbelo na yango ya bambeka, ezalaki esika ya losambo ya Yehova na Yisalaele. Mpo na komonisa ete azalaki kosepela na esika yango, Davidi abondelaki boye: “Yehova, nalingi efandelo ya ndako na yo mpe esika oyo nkembo na yo efandi.”—Nzembo 26:8, NW.
18 Tosepelaka koyangana na bisika oyo toyekolaka makambo ya Yehova? Ndako ya Bokonzi, esika oyo mateya ya elimo epesamaka, ezali esika ya losambo ya solo na mboka to na kartye mokomoko. Longola yango, tozalaka na mayangani ya etúká, mayangani ya zongazonga, mpe mayangani ya mokolo moko. Na makita yango toyokaka ‘makambo oyo Yehova azongelaka’ koyebisa biso. Soki toyekoli ‘kolinga yango mingi,’ tokolinga te kozangisa makita yango mpe ntango tozali kuna, tokofungola mpenza matoi. (Nzembo 119:167, NW) Tolendisamaka mingi ntango tozali na bandeko na biso bandimi oyo balukaka bolamu na biso mpe basalisaka biso tókoba kotambola na nzela ya bosembo!—Baebele 10:24, 25.
Biloko ya motuya ya elimo
Yehova abikisaka moto oyo azali na mpasi
15 Davidi ayembaki boye: “Ata tata mpe mama bakotika ngai, nde [Yehova] akolɔkɔta ngai.” (Nzembo 27:10) Ezali mpenza likambo ya kolendisa koyeba ete bolingo ya Yehova eleki ata ya baboti na biso! Atako toyokaka mpasi mingi soki moboti na biso moko aboyi biso, azali konyokola biso, to asundoli biso, yango ekoki kobongola eloko moko te na bolingo mpe libateli ya Yehova. (Baloma 8:38, 39) Tóbosana te ete Nzambe abendaka bato oyo ye alingaka. (Yoane 3:16; 6:44) Ata soki bato basalaki yo mabe nini, yebá ete Tata na yo ya likoló alingaka yo mingi!
15-21/04
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | NZEMBO 29-31
Disiplini emonisaka bolingo ya Nzambe
it-1-F 863 par. 10
Elongi
Maloba ‘kobomba elongi’ ekoki kolimbolama na ndenge mingi, na kotalela likambo na likambo. Mpo na Yehova Nzambe, mbala mingi kobomba elongi elimbolaka ete atiki kondima moto to kopesa ye nguya. Akoki kosala yango mpo na moto moko to etuluku ya bato oyo bazangi botosi, na ndakisa ndenge asalaki mpo na ekólo Yisraele. (Yb 34:29; Nz 30:5-8; Yis 54:8; 59:2) Na bisika mosusu, ekoki komonisa ete Yehova aboyi kosala likambo moko to kopesa eyano, tii na ntango alingi. (Nz 13:1-3) Ndenge Davidi abondelaki ete “bombá elongi na yo etala masumu na ngai te,” azalaki kosɛnga nzambe alimbisa ye to alongola mabunga na ye.—Nz 51:9; talá mpe Nz 10:11.
Tózelaka Yehova na esengo
Matomba oyo tozwaka ntango Yehova azali kosembola biso ekokani na ndenge oyo mbuma ekolaka na bilanga. Mpo na likambo ya kosembolama na Nzambe, Biblia elobi boye: “Epai ya baoyo bateyami na yango ebotaka mbuma ya kimya, elingi koloba, boyengebene.” (Baebele 12:11) Kaka ndenge mbuma eumelaka mpo etela, soki Nzambe asemboli biso esɛngaka mpe ntango mpo tóbongwana. Na ndakisa, soki tomitambwisi malamu te mpe tobungisi mikumba na lisangá, kozela Nzambe ekosalisa biso tólɛmba te. Na ntango wana, maloba ya Davidi oyo elandi ekolendisa biso: “Nkanda ya [Nzambe] ekoumela bobele ntango moke nde ngɔlu na ye ekoumela mikolo nyonso; kolela ekozala na butu, nde esengo ekoya na ntɔngɔ.” (Nzembo 30:5) Nsukansuka, soki tozali kozela mpe kolanda batoli oyo tozwaka na Liloba ya Nzambe mpe na ebongiseli na ye, “esengo” na biso ekoya.
Kobongola motema ya solosolo elimboli nini?
18 Mpo moto oyo alongolami na lisangá amonisa ete abongoli mpenza motema, asengeli koyanganaka na makita, mpe kolanda toli oyo bankulutu bapesaki ye ya kobondelaka mpe koyekolaka Biblia mbala na mbala. Asengeli mpe koboya makambo oyo esalaki ete akwea na lisumu wana. Soki asali makasi abongisa boyokani na ye ná Yehova, akoki komindimisa ete Yehova akolimbisa ye mpe bankulutu bakozongisa ye na lisangá. Ntango bankulutu bazali koluka koyeba soki moto moko abongoli mpenza motema, bayebaka ete likambo na likambo ezalaka na ndenge na yango. Yango wana batalelaka likambo mokomoko na likebi mpenza mpe baboyaka kosambisa kozanga mawa.
Biloko ya motuya ya elimo
Makanisi ya ntina na eteni ya liboso ya mokanda ya Nzembo
31:23—Ndenge nini Nzambe azongisaka mingi epai ya moto ya nzombo? Yehova apesaka etumbu ata epai ya moto ya sembo mpo na mabunga na ye oyo asali na nko te. Nzokande, lokola moto ya nzombo atikaka nzela ya mabe te, Nzambe azongiselaka ye mingi na ndenge apesaka ye etumbu ya makasi.—Masese 11:31; 1 Petelo 4:18.
22-28/04
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | NZEMBO 32-33
Mpo na nini koyambola lisumu ya monene?
Motema mawa ya Jéhovah ezali kobikisa biso na kozanga elikya
7 Soki tosali masumu minene na kobukaka mibeko na Nzambe, tokoki komona ete ezali mpasi koyambola masumu na biso, ata epai na Jéhovah. Nini ekoki kokoma na ntango yango? Kati na Nzembo 32, Davidi alobaki ete: “Wana nayebisaki bokesene na ngai te [esika ete nayambola yango], nzoto na ngai ebebaki mpo na konguluma na ngai mokolo mobimba. Mpo ete loboko na yo [Jéhovah] ezalaki na bozito likolo na ngai na moi na butu; mai na nzoto na ngai ekaukaki lokola na ntango na moi makasi.” (Versets 3, 4) Motomboki Davidi amekaki kobomba lisumu na ye mpe kopekisa motungisi ya lisosoli oyo azalaki na yango kasi azalaki nde kominyokola. Maoki ya mawa elembisaki nguya na ye mingi mpe akomaki lokola nzete oyo ekauki na molunge makasi mpe ezangi makiki to mai oyo ekopesaka yango bomoi. Ya solo, ekoki kozala ete abelaki na nzoto mpe na makanisi. Na ntembe te, abungisaki esengo na ye. Soki moto moko kati na biso azwami na likambo motindo yango, asengeli kosala nini?
Nzambe oyo ‘alimbisaka mabe’
8 Davidi, nsima ya kobongola motema alobaki boye: “Nsukansuka, nayambolaki lisumu na ngai epai na yo, mpe nabombaki mabe na ngai te. . . . Mpe yo olimbisi mabe ya masumu na ngai.” (Nzembo 32:5) Liloba “olimbisi” ezali ndenge babongoli liloba ya Liebele oyo elimboli libosoliboso “kotombola” to “komema.” Ndenge basaleli yango awa, elingi koloba kolongola “ngambo, mabe, lisumu.” Na yango, tokoki koloba ete Yehova atombolaki masumu ya Davidi mpe amemaki yango mosika. Na ntembe te, yango ekitisaki ngambo oyo Davidi azalaki na yango. (Nzembo 32:3) Biso mpe tokoki mpenza kotya motema epai ya Nzambe oyo amemaka mosika masumu ya baoyo balukaka bolimbisi na ye na nzela ya kondima na bango na mbeka ya lisiko ya Yesu.—Matai 20:28.
Koyambola oyo ezongisaka moto makasi na elimo
Nsima ya koyambola lisumu na ye, Davidi amiyokaki te ete azangi ntina. Kobondisama na ye mpe ekateli na ye ya kosalela Nzambe na bosembo emonisami polele na maloba oyo asaleli na banzembo oyo akomaki mpo na oyo etali koyambola masumu. Na ndakisa, zwá Nzembo 32. Vɛrsɛ ya 1 elobi ete: “Esengo na ye oyo alimbisami mabunga na ye, ye oyo masumu na ye mazipami.” Ata soki lisumu ezali monene ndenge nini, soki moto abongoli mpenza motema, akoki kolimbisama. Lolenge moko ya komonisa ete obongoli mpenza motema ezali ya kondima likambo oyo osalaki ndenge Davidi andimaki lisumu na ye. (2 Samwele 12:13) Alukaki te komilongisa liboso ya Yehova to kopesa foti na bato mosusu. Vɛrsɛ ya 5 elobi boye: “Nayebisaki yo masumu na ngai, nabombaki bokesene na motema na ngai te. Nalobaki ete, Nakoyebisa [Yehova] bipengweli na ngai, mpe yo olimbisi mabe na masumu na ngai.” Soki mpenza moto ayamboli masumu, akozwa libɔndisi, na bongo lisɔsɔli na ye ekotungisa ye lisusu te mpo na masumu na ye ya kala.
Biloko ya motuya ya elimo
Makanisi ya ntina na eteni ya liboso ya mokanda ya Nzembo
33:6—“Mpema” ya monɔkɔ ya Yehova ezali nini? Mpema yango ezali elimo santu, to nguya na ye oyo asalelaka mosala, oyo asalelaki mpo na kokela likoló. (Ebandeli 1:1, 2) Ebengami mpema ya monɔkɔ na ye mpamba te akoki kofula yango mpe kotinda yango ata mosika mpo na kokokisa mokano na ye.
29/04–05/05
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | NZEMBO 34-35
‘Sanzolá Yehova ntango nyonso’
Tókumisa nkombo ya Yehova elongo
11 “Nakokumisa [Yehova] ntango nyonso, lisanzoli na ye ekozala na monɔkɔ na ngai libela.” (Nzembo 34:1) Na ntembe te, lokola Davidi akómaki koyengayenga, akómaki kokelela mingi. Kasi, ndenge maloba wana emonisi yango, kokelela epekisaki ye te kosanzola Yehova. Ezali ndakisa malamu mpenza mpo na biso na ntango ya mpasi! Ezala na eteyelo, na mosala, na kati ya bandeko na biso baklisto to na mosala ya kosakola, mposa na biso ya libosoliboso esengeli kozala ya kosanzola Yehova. Kanisá naino ebele ya bantina oyo tozali na yango ya kosanzola ye! Na ndakisa, tokosilisa te koyeba misala ya Yehova nyonso ya kokamwa mpe kosepela na yango. Kanisá mpe nyonso oyo asali na nzela ya ebongiseli na ye awa na mabelé! Atako bato ya sembo oyo Yehova azali kosalela bazali bato ya kozanga kokoka, Yehova azali kosalela bango na ndenge ya kokamwa na mikolo na biso. Misala ya bato oyo mokili ekumisaka ekoki kopusana ata moke te pene na oyo ya Nzambe. Na ntembe te ondimi likanisi ya Davidi, oyo akomaki ete: “E Nkolo, kati na banzambe, mosusu azali [lokola, NW] yo te; mpe mosala mosusu ekokani na misala na yo te.”—Nzembo 86:8.
Tókumisa nkombo ya Yehova elongo
13 “Molimo na ngai ekosepela kati na [Yehova], bato ya bopɔlɔ bakoyoka yango mpe bakosepela.” (Nzembo 34:2) Awa, Davidi amikumisaki te mpo na misala na ye. Na ndakisa, atutaki ntolo te na ndenge akosaki mokonzi ya Gata. Ayebaki ete Yehova azalaki kobatela ye ntango azalaki na Gata mpe ye nde abikisaki ye. (Masese 21:1) Na yango, Davidi atutaki ntolo mpo na ye moko te, kasi nde mpo na Yehova. Yango etindaki bato ya komikitisa báya epai na Yehova. Yesu mpe azalaki ntango nyonso kokumisa nkombo ya Yehova, mpe yango etindaki bato ya komikitisa, oyo bandimaka koteyama, báya epai na ye. Lelo oyo, bato ya komikitisa ya bikólo nyonso bazali koya na lisangá ya mokili mobimba ya baklisto bapakolami, oyo ezali kotambwisama na Yesu. (Bakolose 1:18) Mitema ya bato yango esimbamaka ntango bayokaka basaleli ya Nzambe bazali kokumisa nkombo na ye, ntango bayokaka nsango ya Biblia mpe elimo santu ya Nzambe esalisaka bango bákanga ntina na yango.—Yoane 6:44; Misala 16:14.
Tókumisa nkombo ya Yehova elongo
15 “Nalukaki [Yehova] mpe ye ayambaki ngai; abikisaki ngai na nsɔmɔ na ngai nyonso.” (Nzembo 34:4) Likambo wana ezalaki na ntina mingi mpo na Davidi. Yango wana alobaki boye: “Mobola oyo abelelaki mpe [Yehova] ayokaki, abikisaki ye na mpasi na ye nyonso.” (Nzembo 34:6) Soki tozali koyangana elongo na baklisto mosusu, tokozwa mabaku mingi ya kobɛtɛla bango masolo ya kolendisa, oyo emonisi ndenge Yehova asalisaki biso tóyikela mikakatano mpiko. Yango elendisaka kondima na bango, ndenge kaka maloba ya Davidi ezalaki kolendisa kondima ya bato na ye. Mpo na Davidi, baninga na ye ‘batalaki epai ya [Yehova] mpe bazwaki esengo; bilongi na bango ezipamaki na nsɔni te.’ (Nzembo 34:5) Atako bazalaki kokimakima Mokonzi Saulo, bayokaki nsɔni te. Bazalaki na kondima ete Nzambe azali na Davidi, mpe bilongi na bango ezalaki kongɛnga na esengo. Ndenge moko mpe, ezala bato ya sika to baoyo baumeli na kati ya lisangá, batalelaka Yehova mpo asalisa bango. Ntango bazali komona lisalisi ya Yehova, bilongi na bango engɛngaka na esengo, mpe yango emonisaka ekateli na bango ya kokangama kaka na ye.
Biloko ya motuya ya elimo
Makanisi ya ntina na eteni ya liboso ya mokanda ya Nzembo
35:19 (NW)—Libondeli ya Davidi epai ya Nzambe ete atika te ete bayini na ye báfina liso elingi koloba nini? Bayini ya Davidi balingaki kofina liso mpo na komonisa ete bazali kosepela mpo makambo ya mabe oyo bazalaki kokana mpo na ye elongi. Davidi asɛngaki ete likambo yango esalema te.