Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 1/12 nk. 29-31
  • “Kanisá mikolo na kalakala” mpo na nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Kanisá mikolo na kalakala” mpo na nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Elendiseli mpe koyikisama mpiko
  • Tózwa liteya na mabungá ya ntango ya kala
  • Bopɔlɔ mpe botɔ́ndi
  • Osengeli kobosana Yehova te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mokanda ya Biblia nimero 5—Deteronome
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Okoki kobongisa makoki na yo ya kokanga makambo na motó
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Bótika te kopota mbangu mpo na bomoi!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 1/12 nk. 29-31

“Kanisá mikolo na kalakala” mpo na nini?

KANISÁ mikolo na kalakala.” Elendiseli wana ya ntoma Paulo, oyo ekomamaki soko na 61 T.B., etindamaki epai na baklisto Baebele ya Yudea. (Baebele 10:32) Nini etindaki ye na kobimisa maloba yango? Mpo na nini basambeli ya Yehova ya ekeke ya liboso basengelaki te kobosana makambo ya kala? Tokoki nde kozwa litomba na kolandáká bokundoli lolenge yango lelo?

Na boumeli ya bikeke mingi, bakomi ya Biblia bapesaki makebisi mbala na mbala na likambo litali kozanga kotya likebi na makambo ya kalakala to kotalela yango na bopɔtu. Esengelaki te kobosana bileko mpe makambo ya kala mpe kotalela yango. Yehova ye moko alobaki ete: “Bóbanzabanza mpo na makambo na liboso na kala, mpo ete ngai nazali Nzambe mpe mosusu azali te; ngai nazali Nzambe, mosusu azali lokola ngai te.” (Yisaya 46:9) Tiká tótalela bantina misato ya minene oyo mpo na yango tosengeli kotosa likebisi yango.

Elendiseli mpe koyikisama mpiko

Ya liboso, yango ekoki kozala liziba ya kolendisama mpe ya koyikisama mpiko monene. Ntango Paulo akomelaki lisangá ya Baebele, azalaki bongo kokomela baninga na ye baklisto oyo kondima na bango ezalaki komekama mokolo na mokolo na ntina na botɛmɛli ya Bayuda. Lokola ayebaki mposa na bango ya kokólisa mpiko, Paulo alobaki ete: “Bókanisa lisusu mikolo na liboso wana esili bino kongɛngɛlama na moi, boyikaki mpiko kati na bolózi monene.” (Baebele 10:32) Komikundola misala ya sembo ya ntango ya kala kati na etumba ya elimo elingaki kopesa bango mpiko oyo esengeli mpo na kokóma kino na nsuka. Bobele bongo, mosakoli Yisaya akomaki ete: “Bókanisa oyo mpe bómimonisa bato mpenza.” (Yisaya 46:8) Ezalaki mpo na mokano malamu motindo yango nde Yesu Klisto ayebisaki lisangá ya Efese ete: “Na bongo kanisá esika elongwi yo kokwea wana [na bolingo na yo ya liboso], bongolá motema, mpe salá misala na liboso lisusu.”​—Emoniseli 2:4, 5.

Elendiseli oyo ete: “Kanisá mikolo na kalakala, banzá mbula na mabota mingi” ezalaki likambo oyo lizongelamaki mingi na masukúlu oyo Mose asalaki liboso na Yisalaele, wana alendisaki libota yango ete lizala sembo epai na Yehova kozanga kobanga. (Deteronome 32:7) Talá maloba na ye, lolenge emonisami na Deteronome 7:18: “Mbɛ okobanga bango [Bakanana] te, kasi okokanisa yango [Yehova] Nzambe na yo asalelaki Falo mpe Ezipito mobimba.” Komikundola misala ya kobikisa ya Yehova epai na libota na ye esengelaki kozala elendiseli mpo ete bálanda kokangama na bosembo nyonso na mibeko ya Nzambe.​—Deteronome 5:15; 15:15.

Likambo ya mawa, mbala na mbala Bayisalaele bakweaki na lisumu mpo na bopɔtu. Yango ebimisaki likambo nini? “Ɛ babongwaki mpe bamekaki Nzambe lisusu; bayokisaki Oyo na Bulɛɛ na Yisalaele nkanda. Bakanisaki lobɔkɔ na ye te soko mokolo mokosolaki ye bango epai na bayini.” (Nzembo 78:41, 42) Na nsuka, bopɔtu na bango mpo na kotosa mibeko ya Yehova esalaki ete aboya bango.​—Matai 21:42, 43.

Mokomi na Nzembo oyo apesaki ndakisa moko malamu akomaki ete: “Tiká nakanisa lisusu yango esalaki Ya; tiká nakanisa misala na yo na kokamwa, yango na kalakala. Nakobanzaka mpe mosala na yo nyonso, nakosolola yango nyonso esali yo.” (Nzembo 77:11, 12) Bokundoli mpe bomanyoli motindo yango likoló na mosala ya kalakala ya sembo mpe na misala ya bolingo mingi oyo Yehova asalaki ekopesa biso elendiseli, mpiko mpe botɔ́ndi oyo ebongi na biso komonisa. Lisusu, lolenge wana ya “kokanisa mikolo na kalakala” ekoki kolongola bolɛmbu mpe ekoki kolendisa biso na kosala nyonso ekoki na biso mpo na koyika mpiko na bosembo nyonso.

Tózwa liteya na mabungá ya ntango ya kala

Ya mibale, kozanga kobosana makambo ekoki kozala mwango moko mpo na kozwa liteya na mabungá masalemaki na ntango ya kala mpe komibatela na makámá na yango. Wana azalaki kokanisa likambo yango, Mose apesaki Bayisalaele toli ete: “Kanisá mpe bosaná te lolenge yo oyokisi [Yehova] Nzambe na yo nkɛlɛ na lisobe. Longwa na mokolo obimi na mokili na Ezipito, kino ekómi bino na esika oyo, bozali na nkanza na ntina na [Yehova].” (Deteronome 9:7) Lokola Mose amonisaki yango, likámá ya kozanga botosi ya Bayisalaele ezalaki ete, ‘Yehova Nzambe na bango asalaki ete báyengayenga mbula ntuku minei na mokili mokauki.’ Mpo na nini balendisamaki ete bákanisa yango? Ezalaki mpo na koyokisa bango nsɔ́ni mpe ezalaki lokola etumbu mpo na botomboki na bango na ntina ete ‘bábatela malako na [Yehova] Nzambe na [bango] na kotambola na nzela na ye mpe komemisa ye.’ (Deteronome 8:2-6) Basengelaki koyekola ete bázongela lisusu mabungá na bango ya kala te.

Mokomi moko amonisaki ete: “Moto na bokɛngi azwaka liteya na eksperiansi na ye moko, nzokande moto na mayele azwaka liteya na eksperiansi ya basusu.” Mose asɛngaki na libota ya Yisalaele ete bázwa liteya na mabungá na bango moko ya liboso, nzokande ntoma Paulo alendisaki basusu​—lisangá ya Kolinti na ekeke ya liboso, biso lokola​—na kozwa liteya na lisoló ya makambo wana ya kala. Akomaki ete: “Makambo oyo eyeli bango [Bayisalaele] lokola bikebiseli, ikomami mpo na kolakisa biso mpo ete nsuka na bikeke eyei na biso.” (1 Bakolinti 10:11) Yesu Klisto azalaki mpe kokanisa likambo mosusu ya kala oyo likomamá na Biblia mpe ntina ya kozwela yango liteya ntango alobaki ete: “Kanisá mwasi na Lota.” (Luka 17:32; Genese 19:1-26) Samuel Taylor Coleridge, mokomi ya ntɔ́ki mpe filozofe, ye moto ya mboka Angleterre akomaki ete: “Soki bato bakokaki koyekola na nzela na makambo ya kala, mbɛlɛ yango eteyaki biso makambo mingi!”

Bopɔlɔ mpe botɔ́ndi

Ya misato, komikundola ekoki kokólisa epai na biso bizaleli ya bopɔlɔ mpe botɔ́ndi, bizaleli oyo esepelisaka Nzambe. Wana ezali biso kosepela na ntina na mitindo mikeseni ya paladiso na biso ya elimo na mokili mobimba, tiká tóbosana te ete yango etongami likoló na mwa miboko mosusu. Miboko wana esangisi bosembo, bolingo, komipimela, mpiko kati na mikakatano, kolendendela, motema molai mpe kondima​—bizaleli oyo bandeko na biso mibali mpe basi bamonisaki esili koleka mibu mingi ntango babandaki mosala ya kosakola na mikili mikeseni. Ntango esukisi lapólo ya lisoló ya libota ya Nzambe ya ntango na biso na mboka Mexico, Annuaire des Témoins de Jéhovah 1995 elobi ete: “Mpo na bato oyo basangani na Batatoli ya Yehova uta kala mingi te, komekama oyo baye babandaki mosala na Mexico bakutanaki na yango ekoki komonana lokola likambo ya kokamwa. Bameseni na paladiso ya elimo epai kuna bilei ya elimo bizali mingi, epai kuna ebele na bankóto ya bato ya kobanga Nzambe bazali koyangana, mpe epai kuna bazali kokokisa mosala ya Nzambe na motindo mobongisami malamu.”

Mbala mingi bafungoli-nzela wana basalaki bango moko to na bituluku mike. Bakutanaki na mikakatano ya mayoki ya kozala bango moko, bobólá, mpe komekama mosusu makasi ya bosembo na bango wana ezalaki bango kolendendela kati na mosala ya kosakola nsango ya Bokonzi. Atako mingi na basáli wana ya ntango ya kala basili kokufa, ezali likambo ya kolendisa na koyeba ete Yehova azali komikundola mosala na bango ya sembo! Ntoma Paulo andimisaki yango, ntango akomaki ete: “Nzambe azangi boyengebene te ete abosana mosala na bino mpe bolingo bosili bino kotalisa na nkombo na ye.” (Baebele 6:10) Soki na bosepeli nyonso Yehova azali kokanisa bango, biso mpe tosengeli kozala na elimo ya botɔ́ndi motindo moko, boye te?

Baoyo bauti koyekola solo kala mingi te bakoki koyeba makambo oyo masalemaki kala na nzela ya búku Les Témoins de Jéhovah — Prédicateurs du Royaume de Dieu.a Lisusu, soki tozali na libaku kitoko ya kozala basangani ya libota to ya lisangá ya boklisto oyo basangani na yango mosusu bazali bandeko mibali to bandeko basi mibangé oyo basili koumela mingi na lisangá, tolendisami na elimo ezwami na Deteronome 32:7 ete “kanisá mikolo na kalakala, banzá mbula na mabota mingi; tuná tata na yo mpe akotalisa yo; mpe mikóló na yo mpe bakolobela yo.”

Ɛɛ, komikundola misala ya baoyo bamonisaki ezaleli ya kobanga Nzambe na ntango ya kala ekoki kolendisa biso na kolanda koyika mpiko na esengo nyonso na mosala na biso ya boklisto. Lisusu, lisoló ya makambo ya kala lizali na mateya oyo tosengeli koyekola. Mpe komanyola likoló na paladiso na biso ya elimo oyo epambolami na Nzambe ekobimisa bizaleli malamu ya bopɔlɔ mpe botɔ́ndi. Ya solo, “kanisá mikolo na kalakala.”

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto