Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwbr25 Mars nk. 1-13
  • Mikanda oyo tosaleli mpo na ”Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mikanda oyo tosaleli mpo na ”Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala”
  • Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2025
  • Mitó ya makambo mike
  • 03-09/03
  • 10-16/03
  • 17-23/03
  • 24-30/03
  • 31/03–06/04
  • 07-13/04
  • 14-20/04
  • 21-27/04
  • 28/04–04/05
Mikanda tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala—2025
mwbr25 Mars nk. 1-13

Mikanda oyo tosaleli mpo na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala

© 2024 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania

03-09/03

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE MASESE 3

Monisá ete otyelaka Yehova motema

ijwbv mok. 14 par. 4-5

MASESE 3:5, 6​—“Kondimela mayele na yo moko te”

“Tyelá Yehova motema na yo mobimba.” okomonisa ete totyelaka Nzambe motema soki tozali kosala makambo na ndenge oyo alingaka. Tosengeli kotyela Nzambe motema na biso mobimba. Na Biblia, liloba motema elimbolaka bomoto ya kati. Yango esangisi ndenge oyo moto ayokaka, makambo oyo etindaka moto asala likambo boye to boye, makanisi na ye, mpe bizaleli na ye. Na yango, kotyela Nzambe motema na biso mobimba esuki kaka te na ndenge oyo tomiyokaka. Ezali liponi oyo tosalaka mpo toyebi ete Mozalisi na biso ayebi oyo ezali malamu mpo na biso.​—Baroma 12:1.

“Kondimela mayele na yo moko te.” osengeli kotyela Nzambe motema mpo tokoki te kotyela makanisi na biso ya kozanga kokoka motema. Soki tomityeli motema to totiki ndenge oyo tozali komiyoka etinda biso tósala likambo moko, tokozwa bikateli oyo na ebandeli ekoki komonana ete ezali malamu, kasi na nsima ekoki kobota mbuma ya mabe. (Masese 14:12; Yirimia 17:9) Mayele ya Nzambe eleki mosika oyo ya biso. (Yisaya 55:8, 9) Soki tozali kotika ete makanisi ya Nzambe etambwisa biso, tokolonga mpenza na bomoi.​—Nzembo 1:1-3; Masese 2:6-9; 16:20.

ijwbv mok. 14 par. 6-7

MASESE 3:5, 6​—“Kondimela mayele na yo moko te”

“Na banzela na yo nyonso, kanisá ye.” Tosengeli koluka koyeba makanisi ya Nzambe na makambo nyonso ya bomoi na biso mpe na bikateli nyonso oyo tolingi kozwa. Tosalaka bongo na ndenge tobondelaka ye mpo na kosɛnga ete atambwisa biso, mpe na ndenge totosaka makambo oyo ayebisi biso na Biblia, Liloba na ye.​—Nzembo 25:4; 2 Timote 3:16, 17.

“Akosembola banzela na yo.” Nzambe asembolaka banzela na biso na ndenge asalisaka biso tótosa mibeko na ye. (Masese 11:5) Na ndenge yango, toboyaka makambo oyo ezangi ntina mpe tozalaka na esengo na bomoi.​—Nzembo 19:7, 8; Yisaya 48:17, 18.

be 76 par. 4

Monisá ete ozali kokola mpe kokende liboso

Soki moto akutanaki na makambo ndenge na ndenge na bomoi na ye, akoki kokanisa boye: ‘Nakutanaki na likambo oyo liboso. Nayebi nini nasengeli kosala.’ Yango nde bwanya? Masese 3:7 ekebisi biso boye: “Tiká te ete omonana na [bwanya, NW] na miso na yo moko.” Na ntembe te, soki toyebi makambo mingi, yango ekosalisa biso tózala na makambo mingi oyo tosengeli kotalela ntango tokutani na mikakatano na bomoi na biso. Kasi soki tozali kokola na elimo, makambo oyo toyebi esengeli mpe kokɔtisa mpenza na elimo na biso mpe na motema na biso likanisi oyo ekomonisa ete tozali na mposa ya mapamboli ya Yehova mpo tólonga. Yango wana, ezali te mpo tozali komityela motema ntango tozali kokutana na mikakatano nde bato bakomona ete tozali kokende liboso, kasi ezali nde mpo tozali kondima kotalela Yehova mpo atambwisa biso na bomoi na biso. Ekomonana na ndenge totii motema ete eloko moko te ekoki kosalema soki Nzambe atikeli yango nzela te mpe soki ntango nyonso, na boyokani na biso na Tata na biso ya likoló, tozali mpenza kotalela ye mpe kolinga ye.

Biloko ya motuya ya elimo

w06 15/9 17 lok. 7

Makanisi ya ntina na mokanda ya Masese

3:3. Tosengeli kopesa motuya monene na boboto mpe sembo mpe koluka ete bizaleli yango emonana polele epai na biso lokola pauni ya ntalo na nkingo. Tosengeli mpe kokoma bizaleli yango na motema na biso, elingi koloba, kokómisa yango bomoto na biso.

10-16/03

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE MASESE 4

“Batelá motema na yo”

w19.01 15 par. 4

Ndenge nini okoki kobatela motema na yo?

4 Na Masese 4:23, liloba “motema” esalelami mpo na kolobela kati mpenza ya moto. (Tángá Nzembo 51:6.) Na maloba mosusu, “motema” elimboli makanisi, mayoki, mpe bamposa oyo ezalaka na kati na biso. Ezali mpenza bomoto na biso ya kati, kasi te oyo emonanaka na libándá.

w19.01 17 par. 10-11

Ndenge nini okoki kobatela motema na yo?

10 Mpo tólonga kobatela motema na biso, tosengeli kozala na likoki ya koyeba makama mpe kosala na lombangu mpo na komibatela. Liloba oyo ebongolami na “kobatela” na Masese 4:23 ezali kokundwela biso mosala oyo sinzili azalaki kosala. Na mikolo ya Mokonzi Salomo, basinzili bazalaki kotɛlɛma na bifelo ya engumba mpe bazalaki kobelela soki bamoni ete likama ezali koya. Ndakisa yango ezali kosalisa biso tóyeba makambo oyo tosengeli kosala mpo Satana abebisa makanisi na biso te.

11 Na ntango ya kala, basinzili bazalaki kosala na bomoko na bakɛngɛli ya baporte. (2 Sa. 18:24-26) Bango nyonso bazalaki kosalisa na kobatela engumba na ndenge bazalaki komindimisa ete baporte ekangami soki monguna azali kopusana. (Neh. 7:1-3) Lisosoli oyo eteyami na Biblia ekoki kosala lokola sinzili mpo na kokebisa biso ntango Satana alingi kobebisa motema na biso, elingi koloba makanisi na biso, mayoki na biso, ndenge na biso ya kotalela makambo, to bamposa na biso. Soki lisosoli na biso ekebisi.

w19.01 18 par. 14

Ndenge nini okoki kobatela motema na yo?

14 Mpo na kobatela motema na biso, tosengeli kosuka kaka te na koboya makanisi ya mabe, tosengeli mpe kondima makanisi ya malamu. Kanisá lisusu ndakisa ya engumba oyo ezingami na efelo. Mokɛngɛli ya porte azalaki kokanga baporte ya engumba mpo banguna bákɔta te, kasi na bantango mosusu azalaki kofungola yango mpo na kokɔtisa bilei mpe biloko mosusu. Soki baporte ezalaki ntango nyonso ya kokangama, bato ya engumba balingaki kokufa nzala. Ndenge moko mpe, tosengeli kofungola motema na biso mbala na mbala mpo na kokɔtisa makanisi ya Nzambe.

w12 1/5 32 par. 2

“Batelá motema na yo!”

Mpo na nini tosengeli kobatela motema na biso ya elilingi? Nzambe atindaki mokonzi Salomo akoma boye: “Koleka biloko mosusu nyonso oyo esengeli kobatelama, batelá motema na yo, mpo maziba ya bomoi eutaka na yango.” (Masese 4:23) Kozala na bomoi ya malamu lelo mpe na mikolo ezali koya etaleli ndenge oyo motema na biso ya elilingi ezali. Mpo na nini? Ezali mpo ete Nzambe atalaka oyo ezali na kati ya motema na biso. (1 Samwele 16:7) Ezali bomoto na biso ya kati, “bomoto oyo ebombaná, oyo ya motema,” nde ekosala ete Nzambe asepela na biso to te.​—1 Petro 3:4.

Biloko ya motuya ya elimo

w21.08 8 par. 4

Ondimaka kozela Yehova?

4 Masese 4:18 elobi ete: “Nzela ya bayengebene ezali lokola pole oyo ezali kongɛnga, oyo ezali kongɛnga se kongɛnga kino moi ekokóma makasi.” Maloba yango esalelamaka mpo na komonisa ndenge oyo Yehova amonisaka mokano na ye malembemalembe epai ya basaleli na ye. Kasi, vɛrsɛ yango ekoki mpe kosalelama mpo na kolobela bokoli ya elimo oyo mokristo asalaka na bomoi na ye. Esɛngaka ntango mpo moto akóma na boyokani ya malamu ná Yehova. Soki tozali koyekola na mozindo mpe kosalela batoli oyo tozwi na Liloba ya Nzambe mpe na ebongiseli na ye, malembemalembe tokokolisa bizaleli ya bokristo. Lisusu, tokoyeba Nzambe malamu koleka. Tótalela ndakisa oyo Yesu apesaki mpo na likambo yango.

17-23/03

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE MASESE 5

Zalá mosika na pite

w00 15/7 29 par. 1

Okoki kozala pɛto na mokili oyo etondi na makambo ya pite na ekobo

Na lisese oyo, babengi moto ya motó makasi ete “mwasi mopaya” to mwasi ya pite.a Maloba oyo azali kosalela mpo na kobenda moto, ezali elɛngi lokola mafuta ya nzoi mpe eleki mafuta ya olive na kitoko. Mbala mingi maloba ya kobenda moto mpo akwea na pite ebandaka bongo, boye te? Talá, na ndakisa, lisolo ya Amy, mwana mwasi kitoko ya mbula 27 mpe azali sekrɛtɛrɛ na biro moko. Alobi boye: “Na mosala, mobali yango atyelaka ngai likebi mingi mpe akumisaka ngai ntango nyonso. Moto amiyokaka malamu soki bato mosusu bazali kosepela na ye. Kasi, ezali polele ete azali kosepela na ngai kaka mpo tósangisa nzoto. Akokosa ngai te na maloba na ye ya sukali.” Mbala mingi, maloba ya mobali oyo azali kobenda mwasi to maloba ya mwasi oyo azali kobenda mobali ezalaka elɛngi soki tozali koyeba mpenza ntina na yango te. Yango wana, tosengeli kokanisaka malamu.

w00 15/7 29 par. 2

Okoki kozala pɛto na mokili oyo etondi na makambo ya pite na ekobo

Makambo oyo eyaka nsima ya kosala pite ezalaka bololo lokola mbondo mpe ekataka lokola mbeli oyo epeli bipai mibale, epesaka mpasi mpe ebomaka. Mbala mingi, mbuma mabe ya etamboli yango ezalaka ete lisosoli ya moto ekotungisama, akoki kozwa zemi oyo akanaki te to akoki kozwa maladi oyo ezwamaka na kosangisa nzoto. Kanisá mpe mpasi monene na motema ya molongani ya moto oyo asali ekobo. Soki moto asali ekobo ata mbala moko, yango ekoki kozokisa mpenza motema ya molongani na ye mpe mpota yango ekotikala na bomoi na ye mobimba. Ya solo, pite epesaka mpasi.

w00 15/7 29 par. 5

Okoki kozala pɛto na mokili oyo etondi na makambo ya pite na ekobo

Tosengeli mpenza kokima bato ya pite mpe ya ekobo. Mpo na nini tokomitika na nzela na bango, na ndakisa na kolandáká miziki ya mabe, masano ya makambo ya bosɔtɔ to kotánga mikanda oyo ezali komonisa bolumbu ya basi na mibali? (Masese 6:27; 1 Bakolinti 15:33; Baefese 5:3-5) Mpe ekozala mpenza bozoba soki tokopesa bango nzela ete bátyela biso likebi soki tozali ntango nyonso kokangama na bango to soki tozali kolata mpe kosala monzele na ndenge oyo ezangi bopɔlɔ!​​—1 Timote 4:8; 1 Petelo 3:3, 4.

Biloko ya motuya ya elimo

w00 15/7 29 par. 7

Okoki kozala pɛto na mokili oyo etondi na makambo ya pite na ekobo

Na maloba yango, Salomo amonisi mbuma mabe oyo moto abukaka soki asali pite to ekobo. Ekobo na kosambwisa nzoto, to kobebisa lokumu ya moto, etambolaka nzela moko. Kosalela nzoto na biso mpo na kokokisa kaka mposa mabe ya biso moko to ya moto mosusu ezali mpenza nsɔni, boye te? Soki ondimi kosangisa nzoto na moto oyo azali molongani na yo te, yango ezali mpenza kopesa nzoto na yo kilo?

24-30/03

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE MASESE 6

Mateya nini tokoki kozwa epai ya furmi?

it-1 927 par. 9-10

Furmi

‘Bwanya ya lɔɔmbi.’ ‘Bwanya’ ya bafurmi eutaka te na likoki ya kokanisa, kasi nde na lɔɔmbi to likoki moko oyo Mozalisi atyá na kati na yango. Biblia elobi ete furmi “ebongisaka bilei na yango na eleko ya molunge, mpe eyanganisaka biloko na yango ya kolya na ntango ya kobuka mbuma.” (Mas 6:8) Moko ya lolenge ya bafurmi oyo ezalaka mingi na Palestine, furmi moyanganisi-mbuma to furmi mosali-bilanga (Messor semirufus), ebombaka ebele mpenza ya mbuma na eleko ya prɛnta mpe ya molunge mpe esalelaka yango na bileko mosusu, na ndakisa na eleko ya malili, ntango oyo kozwa bilei ekómaka mpasi. Furmi yango ezalaka mbala mingi na bisika ya kotuta mbuma, epai mboto ná mbuma ezalaka mingi mpenza. Soki mbula epɔlisi bilei oyo ebombaki, furmi moyanganisi-mbuma ebimisaka yango na moi mpo na kokaukisa yango. Kutu eyebani ete furmi yango elongolaka eteni oyo ebotaka mpo mboto oyo ebombami ebota te. Bituluku ya bafurmi oyo ebengami moyanganisi-mbuma emonanaka mingi na bisika oyo batuti mbuma mpe na pɔsɔ ya mboto oyo etikaka liboso ya ndako na yango.

Makambo ya komekola. Na yango, kotalela na mokuse makambo etali furmi endimisi mpenza likambo oyo Biblia elobi ete: “Kende epai ya furmi, yo moto ya gɔigɔi; talá malamu banzela na yango mpe kómá moto ya bwanya.” (Mas 6:6) Bafurmi ekamwisaka mpenza na ndenge lɔɔmbi na yango esalisaka yango emibongisa malamu mpo na mikolo ekoya, kasi mpe esala mosala makasi na molende, mbala mingi ememaka to ebendaka mpenza makasi biloko oyo ezali kilo mbala mibale to koleka kilo na yango; bafurmi esalaka nyonso mpo na kokokisa mokumba na yango mpe etikaka te eloko oyo esengeli kosala ata ntango ekwei, esɛlimwi, to ezindi na mwa libulu. Bafurmi esalaka mpe na bomoko na ndenge ya kokamwa, ebatelaka esika na yango pɛto mpenza mpe mokomoko etyaka likebi epai ya mosusu ntango ezali kosala mosala, na bantango mosusu esalisaka oyo ezoki to mpe esalaka ete oyo elɛmbi ezonga na ndako na yango.

w00 15/9 26 par. 4-5

Batelá lokumu na yo

Tokoki te kozala na molende na mosala lokola nsɛlɛlɛ? Ezala ete bazali kokɛngɛla biso to te, ezali bolamu na biso soki tozali kosala makasi mpe kobongisa mosala na biso. Ya solo, ezala na kelasi, na mosala, mpe ntango tozali kosala misala ya elimo, tosengeli kosala na makasi na biso nyonso. Lokola nsɛlɛlɛ ezwaka matomba mpo na mosala na yango ya molende, Nzambe mpe alingi ete biso ‘tóyoka esengo mpo na mosala na biso nyonso.’ (Mosakoli 3:13, 22; 5:18) Kosala na molende ekosala ete tózala na lisosoli ya pɛto mpe tokozala na esengo na motema.​—Mosakoli 5:12.

Salomo atuni mituna mibale oyo ezali kotinda na kokanisa, mpo na kolamusa moto ya gɔigɔi na mpɔngi na ye: “Yo moto ya gɔigɔi, okolala kino ntango nini? Okolongwa na mpɔngi na yo ntango nini?” Na nsima, mokonzi amekoli maloba ya moto ya gɔigɔi mpe alobi ete: “Mwa mpɔngi, mpe kolala mwa, kokanga mabɔkɔ mwa moke mpo na kolala! Boye kozanga ekoyela yo pwasa lokola moyibi mpe nzala lokola moto ya etumba.” (Masese 6:9-11) Lokola moto ya gɔigɔi amisemboli, bobola ekozwa ye pwasa lokola moyibi, mpe kozanga ekobimela ye lokola moto ya etumba. Bilanga ya moto ya gɔigɔi eumelaka te kotondana na matiti mpe na nzube. (Masese 24:30, 31) Mombongo na ye ekokwea na mwa ntango mokuse. Mokonzi ya mosala akoki kotika mosali oyo azali na gɔigɔi aumela na mosala na ye te! Mwana-kelasi oyo azali na gɔigɔi mpo na koyekola akozwa bilembo malamu na kelasi te?

Biloko ya motuya ya elimo

w00 15/09 27 par. 4

Batelá lokumu na yo

Makambo nsambo oyo lisese oyo elobeli ezali nde makambo minene mpe tokoki koloba ete yango esangisi lolenge nyonso ya makambo ya mabe. “Miso na nzombo” mpe “motema mozali kobanzabanza misala mabe” ezali masumu oyo esalemaka na makanisi. “Lolemo na nkuta” mpe “motatoli ya lokuta oyo akolobaka maloba na sembo te” ezali masumu oyo esalemaka na lolemo. “Mabɔkɔ masopi makila ya mosembwi” mpe “makolo makopotaka mbangu kosala masumu” ezali mpenza misala ya mabe. Mpe eloko mosusu oyo Yehova ayini mpenza ezali bato oyo bazali kobimisa kowelana kati na bato oyo bafandaki na kimya. Lokola alongwe na motoba mpe akómi na nsambo emonisi ete molɔngɔ ya makambo yango esuki te, mpamba te misala mabe yango oyo bato bazali kosala ezali se kobakisama.

31/03–06/04

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE MASESE 7

Boyá makambo oyo etyaka na komekama

w00 15/11 29 par. 5

“Batelá malako na ngai mpe okozala na bomoi”

Salomo azali kotala libándá na lininisa oyo ezali na madusumadusu, ekoki kozala ete esalemi na mwa mabaya mikemike elandisami mpe na mayemi. Lokola moi ezali kolala, molili ya butu ekɔti na balabala. Salomo amoni elenge mobali moko, oyo amitiki bákende na ye. Lokola azangi bososoli to makanisi malamu, elenge mobali yango azali mpenza na mayele te. Emonani ete ayebi malamu lolenge ya bato oyo bafandi na kartye oyo akɔti mpe nini ekoki kokómela ye kuna. Elenge mobali yango akómi penepene “na esika ya mwasi yango,” elingi koloba na nzela oyo ezali koleka tii na ndako ya mwasi yango. Mwasi yango nde nani? Mosala na ye ezali nini?

w00 15/11 30 par. 4-6

“Batelá malako na ngai mpe okozala na bomoi”

Mwasi yango azali na maloba ya elengi. Azali ata na nsɔni te mpe azali kobanga te ntango azali koloba. Abongisaki maloba na ye nyonso malamumalamu mpo na kobenda elenge mobali yango. Ntango alobi ete mokolo yango apesaki makabo na ye ya kimya mpe akokisaki ndai na ye, mwasi yango alingi komonisa ete azali sembo mpe alingaka makambo ya elimo. Mbeka ya kimya oyo bazalaki kopesa na tempelo ya Yelusaleme ya kala ezalaki nyama, falini, mafuta na vinyo. (Levitike 19:5, 6; 22:21; Mituya 15:8-10) Moto oyo azalaki kopesa mbeka yango akokaki mpe kolya yango na libota na ye. Yango wana, mwasi yango azali koloba ete biloko ya kolya mpe vinyo ezali bebo na ndako na ye. Makambo ezali polele: Elenge mobali wana akolekisa ntango malamu kuna. Mwasi yango abimaki na ndako na ye kaka mpo na koluka elenge mobali wana. Soki moto andimi maloba ya ndenge wana ezali mpenza mawa. Molimboli moko ya Biblia alobi ete: “Ezali solo ete mwasi yango abimaki mpo na koluka moto moko, kasi abimaki nde mpo na koluka kaka elenge mobali oyo? Kaka zoba, mbala mosusu elenge mobali oyo, nde akoki kondima maloba na ye.”

Nsima ya kosala monzele na ye, na maloba na ye ya elengi, na ndenge apesi ye bizi, na elengi ya bibebu na ye, mwasi mozimbisi yango abakisi nsolo kitoko mpo na kobenda mpenza elenge mobali wana. Alobi boye: “Nabongisi mbeto na ngai na bilamba kitoko, na bilamba malamu [mpenza] bisalami na [molikani] ya Ezipito; nasopi malasi na nsolo malamu na mbeto na ngai, na mola mpe na aloe mpe na kinamomo.” (Masese 7:16, 17) Abongisi mbeto na ye malamumalamu, na elamba ya molikani ya Ezipito ya langilangi mpe asopeli yango malasi ya nsolo ya mpimbo, lokola mola, aloe mpe kinamomo.

Alobi lisusu ete: “Yaká, tótonda na kolingana kino ntango ya ntɔngɔ; tómipesana na esengo ya bolingo.” Azali kobenga elenge mobali oyo kaka te mpo bálya biloko kitoko bango mibale. Azali nde kolaka ye ete bakosangisa nzoto. Yango esepelisi mpenza elenge mobali mpe elamusi mposa na ye! Mpo na kobenda ye lisusu, mwasi yango alobi boye: “Zambi mobali azali na ndako te, akei mobembo molai. Akamataki libenga ya mosolo na lobɔkɔ na ye mpe [akozongaki] na ndako bobele na sanza ya sika.” (Masese 7:18-20) Azali komonisa elenge mobali ete eloko ya kobanga ezali te mpamba te mobali na ye akei mobembo mpo na kosala mombongo mpe akozonga noki te. Ya solo, mwasi yango ayebi mpenza kokosa bilenge mibali! “Na maloba mingi na ye na kitoko boye akondimisa ye, na kozimbisa na bibebu na ye akobenda ye.” (Masese 7:21) Esengeli mpenza kozala moto lokola Yosefe mpo abenda yo te. (Genese 39:9, 12) Elenge mobali yango azali na makasi ya koboya?

w00 15/11 31 par. 2

“Batelá malako na ngai mpe okozala na bomoi”

Elenge mobali yango akoki kokanga motema te. Abosani makanisi nyonso ya malamu mpe alandi ye ‘lokola ngɔmbɛ akei na kobomama.’ Lokola moto oyo akangami na minyɔlɔlɔ akoki kokima etumbu na ye te, elenge mobali yango akei kokwea na lisumu. Azali komona likama na yango te tii ntango ‘mbanzi moko ekozokisa libale na ye,’ elingi koloba, tii ntango akozwa mpasi oyo ekomema ye na liwa. Liwa yango ekoki kozala na nzoto, na boye ete azali komitya na likama ya kozwa maladi mabe oyo ezwamaka na kosangisa nzoto.b Mpota yango ekoki mpe koboma ye na elimo, elingi koloba, “akobungisa bomoi na ye.” Ye moko mpe bomoi na ye mobimba ezali na likama, mpe asaleli Nzambe lisumu monene. Azali kokende nokinoki na liwa, lokola ndɛkɛ oyo ekangami na motambo!

Biloko ya motuya ya elimo

w00 15/11 29 par. 1

“Batelá malako na ngai mpe okozala na bomoi”

Salomo abakisi ete: “Kangá yango [mibeko na ngai] na misapi na yo, komá yango na etando ya motema na yo. (Masese 7:3) Lokola miso na biso emonaka misapi ntango nyonso mpe tosalelaka misapi yango na misala mingi, ndenge moko mpe, mateya ya Makomami oyo babɔkɔli biso na yango to boyebi ya Biblia, esengeli ntango nyonso kokundolela biso mpe kotambwisa biso na makambo nyonso oyo tozali kosala. Tosengeli kokoma yango na etando ya motema na biso, ekɔta mpenza na bomoto na biso.

07-13/04

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE MASESE 8

Yoká bwanya oyo emonisami lokola moto

cf 131 par. 7

“Ngai nalingaka Tata”

7 Na vɛrsɛ 22, bwanya elobi: “Yehova asalaki ngai ebandeli ya mosala na ye, mosala na ye ya liboso na misala na ye ya kalakala.” Awa ezali te bwanya oyo tozalaka na yango, mpo ezaleli yango ‘basalaki’ yango te, kasi ezali nde eloko mosusu. Yango ekokaki kozala na ebandeli te mpo Yehova azalaka banda kala mpe azali ntango nyonso na bwanya. (Nzembo 90:2) Nzokande, Mwana ya Nzambe azalaki “mwana ya liboso na biloko nyonso oyo ezalisamá.” Asalemaki, to azalisamaki; azalaki mosala ya liboso na misala nyonso oyo Yehova asalaki. (Bakolose 1:15) Mwana azalaki liboso mabele mpe likoló ezala, ndenge Masese emonisi yango. Mpe lokola azali Liloba, Molobeli ya Nzambe, azalaki bwanya mpenza ya Nzambe na ndenge ya kokoka.​—Yoane 1:1.

cf 131-132 par. 8-9

“Ngai nalingaka Tata”

8 Mosala nini Mwana azalaki kosala na boumeli ya ntango nyonso wana liboso aya awa na mabele? Vɛrsɛ 30 eyebisi biso ete azalaki pembeni ya Nzambe lokola “mosali ya mayele.” Yango elingi koloba nini? Bakolose 1:16 elimboli ete: “Na nzela na ye biloko mosusu nyonso ezalisamaki na likoló mpe na mabele . . . Biloko mosusu nyonso ezalisamaki na nzela na ye mpe mpo na ye.” Na yango, Yehova, Mozalisi, asalelaki Mwana na ye, Mosali ya Mayele, mpo na kozalisa biloko mosusu, elingi koloba bikelamu ya elimo na likoló, molɔ́ngɔ́ monene oyo emonanaka, mabele ná mitindo ndenge na ndenge ya banzete ná banyama oyo ezali kokamwisa, mpo na kosukisa na eloko oyo eleki biloko nyonso awa na mabele: bato. Na makambo mosusu, tokoki kokokanisa boyokani wana kati na Tata ná Mwana na boyokani oyo ezalaka kati na moto oyo azali na mayele ya kosala plan ná motongi-ndako, oyo akolanda plan ya moto yango ya mayele. Ntango tozali kokamwa na komona biloko oyo ezalisamá, tozali mpenza nde kokumisa Moto oyo aleki na mayele. (Nzembo 19:1) Nzokande, yango etindi mpe biso tókanisa boyokani oyo eumelá mpe ya esengo oyo ezalaki kati na Mozalisi ná ‘mosali na ye ya mayele.’

9 Ntango bato mibale ya kozanga kokoka bazali kosala elongo, matata ezangaka te na bantango mosusu. Kasi ezali bongo te mpo na Yehova ná Mwana na ye! Mwana asalaki ebele ya bambula elongo na Tata na ye mpe ndenge vɛrsɛ elobi yango, azalaki “kosepela liboso na ye ntango nyonso.” (Masese 8:30) Ɛɛ, asepelaki kozala elongo na Tata na ye, mpe Tata asepelaki kozala elongo na ye. Ya solo mpenza, Mwana amekolaki bizaleli ya Nzambe, yango wana akómaki mpenza lokola Tata na ye. Na yango, tokokamwa te na komona ete bolingo kati na Tata ná Mwana ezalaki mpenza makasi! Ebongi mpenza tóbenga yango bolingo oyo eumelá mingi mpe ya makasi koleka na molɔ́ngɔ́ mobimba.

w09 15/4 31 par. 14

Tózala na botɔndi epai ya Yesu​​—Davidi Monene mpe Salomo Monene

14 Kaka moto moko nde alekaki Salomo na bwanya. Moto yango ezalaki Yesu Klisto, oyo amibengaki “eloko oyo eleki Salomo.” (Mat. 12:42) Yesu azalaki na “maloba ya bomoi ya seko.” (Yoa. 6:68) Na ndakisa, Lisolo Likoló ya Ngomba ebakisaki makambo mosusu na masese ya Salomo. Salomo atángaki mwa makambo oyo epesaka mosaleli ya Yehova esengo. (Mas. 3:13; 8:32, 33; 14:21; 16:20) Yesu amonisaki ete esengo ya solosolo eutaka kaka na makambo oyo eyokani na losambo ya Yehova mpe kokokisama ya bilaka na ye. Alobaki boye: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo, mpo bokonzi ya likoló ezali ya bango.” (Mat. 5:3) Bato oyo basalelaka mitinda oyo ezali na mateya ya Yesu bapusanaka penepene na Yehova, “liziba ya bomoi.” (Nz. 36:9; Mas. 22:11; Mat. 5:8) Klisto amonisaki “bwanya ya Nzambe.” (1 Kol. 1:24, 30) Lokola Masiya Mokonzi, Yesu azali na “elimo ya bwanya.”​—Yis. 11:2, NW.

Biloko ya motuya ya elimo

g 5/14 16

Bwanya ezali kobelela​​—Okoki koyoka yango?

▪ Buku moko (The World Book Encyclopedia) elobi ete Biblia ezali buku oyo “ekabolami koleka babuku mosusu nyonso. Ebongolami mbala ebele, mpe na minɔkɔ ebele koleka babuku mosusu nyonso.” Biblia mobimba to ndambo na yango ezali sikoyo na minɔkɔ soki 2600; na yango, bato mingi (koleka 90%) na mokili mobimba bakoki kozala na yango.

▪ Bwanya ezali mpe ‘kokoba kobelela na mongongo makasi’ na ndenge ya solo mpenza. Matai 24:14 elobi boye: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka [ya mokili oyo] ekoya.”

14-20/04

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE MASESE 9

Zalá moto ya bwanya, kasi mosɛki te

w22.02 9 par. 4

“Yoká maloba ya bato ya bwanya”

4 Mpo na koloba solo, tokoki kozala na mokakatano mpo na kondima toli ya polele oyo bapesi biso. Tokoki kutu koyoka nkanda. Mpo na nini? Atako tondimaka mbala moko ete tozali bato ya kozanga kokoka, ekoki kozala mpasi tóndima toli ntango moto abendi likebi na biso na likambo moko oyo tosengeli kobongisa. (Tángá Mosakoli 7:9.) Tokoki koluka komilongisa. Tokoki kokanisela mopesi-toli yango mabe to kosilika mpo na lolenge oyo apesaki toli yango. Tokoki kutu koloba mabe mpo na mopesi-toli yango mpe koloba: ‘Ye nani mpo apesa ngai toli? Ye moko mpe asalaka mabunga!’ Kutu, soki toli oyo bapesi biso esepelisi biso te, ntango mosusu tokosala lokola toyoki te to tokoluka toli oyo ekosepelisa matoi na biso.

w22.02 12 par. 12-14

“Yoká maloba ya bato ya bwanya”

12 Nini ekoki kosalisa biso mpo tóndima toli? Tosengeli kozala na komikitisa mpe kobosana te ete tozali mpenza bato ya kozanga kokoka mpe ete na bantango mosusu tokoki kosala bozoba. Ndenge tomonaki yango liboso, Yobo azalaki na makanisi oyo ebongaki te. Kasi na nsima asembolaki lolenge na ye ya kokanisa, mpe Yehova apambolaki ye mpo na yango. Mpo na nini? Mpo Yobo azalaki na komikitisa. Amonisaki komikitisa ndenge andimaki toli oyo Elihu apesaki ye, atako alekaki mpenza Elihu na mbula mosika. (Yobo 32:6, 7) Ndenge moko mpe, komikitisa ekosalisa biso tósalela toli oyo bapesi biso, ata ntango tomoni ete bapesaki biso yango kaka mpamba, to ntango moto oyo azali kopesa biso yango azali leki epai na biso. Nkulutu moko na Canada alobi boye: “Lokola tomimonaka te ndenge oyo basusu bamonaka biso, ndenge nini tokokende liboso soki moto te apesaka biso toli?” Lisusu, biso nyonso tosengeli kokende liboso na oyo etali kokolisa mbuma ya elimo mpe kokóma basakoli mpe bateyi malamu na mosala ya kosakola?​—Tángá Nzembo 141:5 141:5.

13 Taleláká toli lokola bolingo oyo Nzambe azali komonisela yo. Yehova alingaka tózala na bomoi oyo eleki malamu. (Mas. 4:20-22) Ntango apesi biso toli na nzela ya Liloba na ye, ya mokanda moko ya moombo ya sembo, to na nzela ya mokristo moko oyo akɔmɛli na elimo, amonisaka ete alingaka biso. Baebre 12:9, 10 elobi ete ‘asalaka bongo mpo na bolamu na biso.’

14 Tyá likebi na toli yango moko, kasi te na lolenge oyo epesami. Na bantango mosusu, tokoki komona ete toli oyo tozwaki epesamaki na ndenge ya malamu te. Ya solo moto oyo azali kopesa toli asengeli kosala makasi mpo toli yango epesama na boboto. (Gal. 6:1) Kasi soki ezali biso nde bazali kopesa toli, ekozala malamu tótya likebi na toli yango moko, ata soki tomoni ete ekokaki kopesama na lolenge ya malamu koleka. Tokoki komituna boye: ‘Ata soki tosepeli te na ndenge oyo toli yango epesamaki, ata likambo moko ya solo na toli yango ezali te? Nakoki koboya kotala mabunga ya mopesi-toli mpe kozwa mateya na toli yango moko?’ Ekozala likambo ya bwanya soki tozali kosala nyonso mpo tózwa mateya na toli nyonso oyo tozwi.​—Mas. 15:31.

w01 15/5 30 par. 1-2

‘Bwanya ekobakisela biso mikolo’

Ndenge oyo moto ya bwanya atalelaka mpamela ekeseni na ndenge oyo motyoli atalelaka yango. Salomo alobi ete: Pamelá moto ya [bwanya, NW] mpe akolingana na yo. Lakisá moto ya [bwanya, NW] mpe akoleka na [bwanya, NW].” (Masese 9:8b, 9a) Moto ya bwanya ayebi ete “na ntango na yango, [disipilini, NW] nyonso iyokani na esengo te kasi na mpasi; nde nsima ikozwisa mbuma ya kimya na boyengebene epai na bango baoyo balendisami na yango.” (Baebele 12:11) Atako tokoki komona ete toli bapesi biso esali biso mpasi na motema, tosengeli koboya yango te soki ekobakisela biso bwanya.

Mokonzi oyo azalaki na bwanya abakisi ete: “Teyá moyengebene mpe akobakisa boyebi.” (Masese 9:9b) Moto moko te akoki koloba ete azali lisusu na makambo ya koyekola te mpo azali na bwanya mingi to akómi mpenza mokóló. Ezalaka mpenza esengo na komona mibange bazali kondima solo mpe, na nsima bazali komipesa na Yehova! Biso mpe tósala makasi mpo tozalaka ntango nyonso na mposa ya koyekola mpe ya kosalelaka ntango nyonso bɔɔngɔ na biso.

w01 15/5 30 par. 5

‘Bwanya ekobakisela biso mikolo’

Kosala makasi mpo na kozwa bwanya ezali likambo ya moto na moto kati na biso. Mpo na yango, Salomo alobi boye: “Soko ozali na [bwanya, NW], [bwanya, NW] ezali mpo na yo moko; soko ozali kotyola, okokumba yango bobele yo mpenza.” (Masese 9:12) Moto ya bwanya azalaka na yango mpo na litomba na ye moko mpe soki motyoli azali na mpasi ezali libunga na ye moko. Ya solo, tokobuka oyo tokolona. Yango wana, tiká ‘tósembola litoi epai ya [bwanya, NW].’​​—Masese 2:2.

Biloko ya motuya ya elimo

w06 15/9 17 par. 5

Makanisi ya ntina na mokanda ya Masese

9:17​—“Mai mayibami” ezali nini, mpe mpo na nini ezali “elɛngi”? Lokola Biblia ekokanisi kosangisa nzoto ya mwasi ná mobali na kati ya libala lokola komɛla mai ya mpiɔ oyo euti na liziba, mai mayibami ezali maloba ya elilingi mpo na kolobela pite to ekobo. (Masese 5:15-17) Kosala pite to ekobo emonisaka mai yango lokola nde ezali elɛngi.

21-27/04

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE MASESE 10

Nini epesaka bozwi ya solosolo?

w01 15/7 25 par. 1-3

‘Mapamboli ezali na moyengebene’

Moyengebene azali mpe kozwa mapamboli na ndenge mosusu. “Ye oyo akosalaka na lobɔkɔ ya gɔigɔi akokóma mobola, nde lobɔkɔ ya [moto ya molende, ‘NW’] ekoyeisa litomba. Ye oyo akoyanganisa na ntango ya moi azali mwana ya mayele; kasi ye oyo akolala mpɔngi na ntango ya kobuka mbuma azali mwana oyo akoyeisa nsɔni.”​—Masese 10:4, 5.

Maloba wana ya mokonzi ezali na ntina, mingi mpenza mpo na bato oyo bazali kosala mosala ya kobuka mbuma. Eleko ya kobuka mbuma ezali ntango ya kolala mpɔngi te. Ezali ntango ya kozala na molende mpe kolekisa bangonga mingi na mosala. Ezali mpenza ntango ya kosala nokinoki.

Ntango Yesu azalaki kolobela mosala ya kobuka mbuma, ya milona te kasi nde bato, ayebisaki bayekoli na ye ete: “Mbuma ya elanga eteli mingi mpenza nde basali bazali mingi te. Bóbondela Nkolo ya elanga [Yehova Nzambe] ete atinda basali kati na elanga ya mbuma na ye.” (Matai 9:35-38) Na mobu 2000, bato koleka milio 14 bayanganaki na Ekaniseli ya liwa ya Yesu​​—motángo yango eleki oyo ya Batatoli nyonso ya Yehova mbala mibale na mwa ndambo. Bongo, nani akotya ntembe na likambo oyo ete ‘bilanga esili kotela mpo na kobukama’? (Yoane 4:35) Basambeli ya solo bazali kosɛnga Nkolo abakisa basali mosusu, wana bango moko mpe bazali komipesa makasi na mosala ya kokómisa bato bayekoli ndenge bazali kosɛnga yango na mabondeli na bango. (Matai 28:19, 20) Yehova mpe asopi mapamboli ebele na milende oyo bango bazali kosala! Na boumeli ya mobu ya mosala 2000, bato ya sika koleka 280000 bazwaki batisimo. Bango mpe bazali kosala makasi mpo na kokóma bateyi ya Liloba ya Nzambe. Tiká ete tómipesa mobimba na mosala ya kokómisa bato bayekoli, na yango tokozwa esengo mpe tokosepela na eleko oyo ya mosala ya kobuka mbuma.

w01 15/9 24 par. 3-4

Tambolá na ‘nzela ya sembo’

Salomo amonisi ntina ya boyengebene. Alobi boye: “Bozwi ya moto ya mosolo ezali esika na ye ya nguya; kozanga ya babola ezali ebebelo na bango. Mosala ya moyengebene ekoyeisa bomoi; litomba ya [moto] mabe ekoyeisa masumu.”​—Masese 10:15, 16.

Bozwi ekoki kobatela moto na makambo mosusu oyo eyaka mbalakaka, se lokola mboka oyo ezali na lopango ya makasi ebatelaka ata mwa moke bato oyo bafandi kati na yango. Bobola mpe ekoki kobebisa moto soki azali ata na elikya moko te ete ekosila. (Mosakoli 7:12) Nzokande, ekoki mpe kozala ete mokonzi ya bwanya alingaki kolobela likama oyo, ezala bozwi to bobola ekoki komemela moto. Mozwi akoki kotya motema na ye nyonso na bomɛngo na ye mpe kokanisa ete biloko na ye ya motuya ezali “lokola lopango molai.” (Masese 18:11) Mobola mpe akoki komikosa na kokanisa ete lokola azali ndenge wana, azali na elikya moko te mpo na mikolo ezali koya. Na bongo, ezala mobola to mozwi, akoki kozanga kozala na lokumu malamu na miso ya Nzambe.

it-1 294

Lipamboli

Yehova apambolaka bato. “Lipamboli ya Yehova nde ekómisaka moto mozwi, mpe abakisaka mpasi ata moke te na yango.” (Mas 10:22) Yehova apambolaka baoyo ye andimi: abatelaka bango, asalaka ete bákende liboso, atambwisaka bango, asalaka ete bálonga na bomoi, akokisaka bamposa na bango mpe apesaka bango bomoi ya malamu.

Biloko ya motuya ya elimo

w06 15/5 30 par. 18

Matomba ya kotambola na bosembo

18 “Mapamboli ya [Yehova]” nde epesi basaleli na ye bomɛngo ya elimo. Biblia elaki mpe ete “akobakisa mawa na yango te.” (Masese 10:22) Kasi, mpo na nini basaleli ya sembo ya Nzambe bamekamaka mpe bakutanaka na mikakatano makasi? Tokutanaka na mikakatano mpe tonyokwamaka mingimingi mpo na bantina misato. (1) Nzoto na biso ya masumu. (Genese 6:5; 8:21; Yakobo 1:14, 15) (2) Satana ná bademo na ye. (Baefese 6:11, 12) (3) Mokili oyo mabe. (Yoane 15:19) Atako Yehova atikaka nzela ete makambo ya mabe ekómela biso, ezali ye te moto atindelaka biso yango. Kutu, “likabo nyonso ya malamu mpe libonza nyonso oyo ekoki mpenza eutaka na likoló, mpamba te ekitaka uta na Tata ya miinda ya likoló.” (Yakobo 1:17) Mapamboli ya Yehova epesaka mawa te.

28/04–04/05

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE MASESE 11

Koloba yango te!

w02 15/5 26 par. 4

Bosembo etambwisaka bato ya malamu

Bosembo ya bato ya malamu esalaka bato mosusu malamu mpe mabe ya bato ya mabe epesaka bato mosusu mpasi. Mokonzi ya Yisalaele alobaki ete: “[Mopɛngwi, “NW”] akobebisa mozalani na ye na nzela na monɔkɔ na ye; nde moyengebene akobikisama mpo na boyebi.” (Masese 11:9) Toyebi biso nyonso ete sɔngisɔngi, matɔngi, maloba ya nsɔni, mpe masolo ya mpambampamba esalaka basusu mabe! Nzokande, maloba ya moyengebene ezalaka pɛto, akanisaka malamumalamu liboso ya kobimisa yango, mpe ezalaka na boboto. Akobikisama mpo na boyebi mpamba te bosembo na ye esalisaka ye abimisa makambo oyo ekomonisa ete bato oyo bazali koloba mabe mpo na ye bazali kokosa.

w02 15/5 27 par. 2-3

Bosembo etambwisaka bato ya malamu

Bato ya mboka oyo balandaka bosembo balendisaka kimya mpe bolamu mpe basalisaka bato mosusu ete bákende liboso. Na ndenge yango nde mboka ekumisamaka to ekendeke liboso. Bato ya matɔngi, oyo bazali na maloba ya kozokisa mpe ya mabe bakɔtisaka mobulu, mawa, bokabwani mpe yikiyiki. Emonanaka mpenza bongo soki bato yango bazali bato minene na kati ya mboka. Mboka ya ndenge wana ezalaka na mobulu, na makambo ya mabe, na misala ya mbindo mpe mbala mosusu nkita na yango ebebaka.

Etinda ya Masese 11:11 etali mpe basaleli ya Yehova ntango bazali na masangá na bango oyo tokoki kokokanisa yango na bamboka. Lisangá oyo bato mingi bazali bato ya elimo, elingi koloba bato ya malamu oyo batambwisami na bosembo, ezalaka lisangá ya esengo, bato na yango bamipesaka na mosala, basalisanaka, mpe bakumisaka Nzambe. Yehova apambolaka lisangá ya ndenge yango mpe ekolaka na elimo. Ntango mosusu, mwa bato mosusu oyo bakoki koimaima to komilelalela, oyo bamonaka kaka mabe mpe balobaka mabe na ndenge oyo makambo ezali kosalema, bazali lokola “mosisa oyo ezali na pwazo” oyo ekoki kopalangana mpe kobebisa basusu oyo bazalaki malamu. (Baebele 12:​15, NW) Mbala mingi, bato ya ndenge wana balingaka kokóma na bokonzi mingi mpe na lokumu. Batambwisaka nungunungu ete lisangá mobimba to mpe bankulutu bazali na bosembo te, bazali kokabola bikólo, mpe makambo mosusu ya ndenge yango. Monɔkɔ na bango ekoki kokabola lisangá. Omoni te ete tosengeli koboya koyoka masolo na bango mpe kosala makasi ete tózala bato ya elimo oyo bazali kolendisa kimya mpe bomoko na kati ya lisangá?

w02 15/5 27 par. 5

Bosembo etambwisaka bato ya malamu

Moto oyo azangi bososoli, to “oyo azali na motema te” asalaka mabe mingi mpenza! Bilobaloba na ye ekendaka tii na kotɔnga to kotyola. Bankulutu basengeli kosala nokinoki mpo na kokanga nzela na ezaleli mabe wana. Na bokeseni na ye “oyo azali na motema te,” moto ya bososoli ayebaka ntango nini asengeli kozala nyɛɛ. Na esika apanza sɛkɛlɛ, abombaka makambo. Moto ya bososoli azalaka na “elimo ya sembo” mpo ayebaka ete monɔkɔ polopolo ekoki kosala mabe mingi. Azalaka sembo epai ya baninga na ye bandimi mpe abombaka makambo oyo ekoki kotya bango na likama. Bato ya sembo ndenge yango bazalaka lipamboli mpenza mpo na lisangá!

Biloko ya motuya ya elimo

g20.1 11, etanda

Oyo okoki kosala mpo na kolonga kotungisama

“BOBOTO EBOMAKA KOTUNGISAMA”

“Moto ya motema boboto asalelaka molimo na ye moko makambo oyo epesaka mbano, kasi moto ya nko amemelaka nzoto na ye moko mpasi.”​—MASESE 11:17.

“Boboto ebomaka kotungisama,” ezali titre ya mokapo ya buku moko (Overcoming Stress). Mokomi na yango Dr. Tim Cantopher alobi ete soki moto azali komonisela basusu boboto akozala na sante malamu mpe na esengo. Kasi, soki moto azali na boboto te to makambo mabe akozala na esengo te mpo bato bakolinga ye te mpe bakokima ye.

Tokolonga kotungisama soki tozali komisalela makambo na boboto. Na ndakisa, tosengeli te koluka kosala makambo oyo tokokoka kosala te. Tosengeli mpe te komimona ete tozangi valɛrɛ. Yesu alobaki ete “osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.”​—Marko 12:31.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto