Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 1/11 nk. 30-31
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Masolo mosusu
  • Tókima “elimo ya mokili”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Komɛla masanga ezali mabe?
    Lamuká!—2007
  • Bokatikati na likambo etali komɛla masanga
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Lingomba ekoki kokokisa bamposa na biso?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 1/11 nk. 30-31

Mituna ya batángi

Na lisangá ya boklisto, ndenge nini esengeli kotalela moto oyo alekisaka ndelo na kolya?

Liloba ya Nzambe emonisi ete ebongi te mosaleli ya Nzambe azala molangwi masanga to moto oyo alekisaka ndelo na kolya. Na bongo, na lisangá ya boklisto, batalelaka moto oyo alekisaka ndelo na kolya ndenge moko na moto oyo alangwaka masanga. Ezala molangwi masanga to moto oyo alekisaka ndelo na kolya, moko te akoki kozala na lisangá ya boklisto.

Masese 23:20, 21 elobi boye: “Zalá elongo na bamɛli ya masanga te, soki elongo na bato [oyo balekisaka ndelo na kolya mosuni, NW]. Zambi kolangwa mpe [kolekisa ndelo na kolya, NW] ekokómisa moto na bobola; gɔigɔi ekolatisa mpe moto bilamba bipaswani.” Tozali kotánga na Deteronome 21:20 (NW) ete na Mibeko ya Moize, moto ya “motó makasi mpe motomboki” asengelaki kobomama. Makambo mibale kati na makambo oyo vɛrsɛ yango elobeli mpo na komonisa ete moto wana azali motomboki, ezali ete ‘alekisaka ndelo na kolya mpe alangwaka masanga.’ Emonani polele ete na Yisalaele ya kala, kolekisa ndelo na kolya ezalaki likambo ya mabe mpenza oyo ebongaki te na bato oyo bazali na mposa ya kosalela Nzambe.

Kasi, kolekisa ndelo na kolya elimboli nini, mpe Makomami ya Grɛki ya boklisto elobi nini mpo na likambo yango? Moto oyo alekisaka ndelo na kolya ezali ‘moto oyo alyaka to amɛlaka masanga mingi mpe na lokoso mpenza.’ Na yango, kolekisa ndelo na kolya ezali mpe lokoso, mpe Liloba ya Nzambe eyebisi biso ete “bato ya lokoso” bakokɔta na Bokonzi ya Nzambe te. (1 Bakolinti 6:9, 10; Bafilipi 3:18, 19; 1 Petelo 4:3) Lisusu, ntango Paulo ayebisaki baklisto bákeba na “misala ya mosuni,” kati na yango atángaki “kolangwa masanga, bilambo ya mbindo mpe makambo oyo ekokani na oyo wana.” (Bagalatia 5:19-21) Mbala mingi, moto oyo alekisaka ndelo na kolya alangwaka masanga mpe asalaka bilambo ya mbindo. Mpe na ntembe te, kolekisa ndelo na kolya ezali na kati ya oyo Paulo abengaki “mpe makambo oyo ekokani na oyo wana.” Ndenge moko na moto oyo amipesi na “misala mosusu ya mosuni,” moklisto oyo ayebani ete alekisaka ndelo na kolya mpe azali koboya mpenza kotika ezaleli yango, asengeli kobimisama na lisangá.​—1 Bakolinti 5:11, 13.a

Atako Biblia elobi ete moto oyo alangwaka masanga ná moto oyo alekisaka ndelo na kolya bazali kaka ndenge moko, koyeba ete moto boye alangwe masanga ezali mpasi te, kasi koyeba ete moto boye alekisi ndelo na kolya ezali mpasi. Mbala mingi, moto oyo alangwe masanga amonanaka na miso. Kasi, ezali mpasi mpenza komona ete moto boye alekisi ndelo na kolya. Na bongo, esengeli ete bankulutu bákeba mpenza mpe bázala na bososoli ntango bazali kotalela makambo ya ndenge wana.

Na ndakisa, soki moto azali nzoto mineneminene, yango ekoki kozala elembo ete alekisaka ndelo na kolya, kasi monene nyonso eutaka na kolya te. Monene ya bato mosusu ezalaka maladi. Monene ya bato mosusu mpe ezalaka ndenge ya libota na bango. Lisusu, tosengeli kobosana te ete monene ezali likambo ya nzoto, kasi kolekisa ndelo na kolya ezali ezaleli ya moto. Moto oyo azali nzoto mineneminene ezali moto oyo azali na mafuta mingi, kasi moto oyo alekisaka ndelo na kolya azali nde na lokoso. Na yango, moto oyo alekisaka ndelo na kolya akoki te koyebana na monene ya nzoto na ye, kasi nde na ndenge oyo atalelaka bilei. Moto akoki kozala na monene oyo ekoki, ata kutu kozala nzoto mike, kasi alekisaka ndelo na kolya. Lisusu, ndenge oyo bato batalelaka monene ezali likambo ya esika na esika.

Makambo nini emonisaka ete moto alekisaka ndelo na kolya? Mbala mingi, moto oyo alekisaka ndelo na kolya ayebaka komipekisa te, kutu, akoki ata kolya tii akokoka lisusu kopema malamu te to tii akobɛla. Soki moto azangi komipekisa ndenge wana, yango emonisi ete azali kokanisa te ndenge oyo azali kofingisa nkombo ya Yehova mpe kobebisa lokumu ya basaleli na Ye. (1 Bakolinti 10:31) Epai mosusu, soki moto alekisi ndelo na kolya mbala moko to mibale, tokoloba mbala moko te ete azali “moto ya lokoso.” (Baefese 5:5) Atako bongo, na kotalela Bagalatia 6:1, moklisto ya ndenge wana asengeli kosalisama. Paulo alobaki boye: “Bandeko, ata soki moto abɛti libaku liboso ete ayeba yango, bino baoyo bozali na makoki ya elimo bómeka kosembola moto yango na elimo ya boboto.”

Mpo na nini toli oyo Biblia ezali kopesa na likambo ya koboya kolekisa ndelo na kolya ezali na ntina mingi lelo oyo? Ezali na ntina mpamba te, Yesu apesaki likebisi, mingi mpenza mpo na mikolo na biso, ete: “Bókeba na bino moko ete mitema na bino ekóma kilo ata moke te na kolekisa ndelo na kolya mpe na komɛla mingi mpe na mitungisi ya bomoi, mpe ete na pwasa mokolo wana ekwela bino na ntango wana kaka lokola motambo.” (Luka 21:34, 35) Koboya kolekisa ndelo na kolya ezali moko ya makambo ya ntina oyo ekoki kosalisa biso tókima makambo oyo ekoki kobebisa elimo na biso.

Kozala na bokatikati ezali ezaleli ya malamu ya baklisto. (1 Timote 3:2, 11) Yango wana, Yehova akozanga te kosalisa baoyo nyonso bazali kosala makasi mpo na kotosa toli ya Biblia ya kozala na bokatikati na makambo etali kolya mpe komɛla.​—Baebele 4:16.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Mai 1986 (ebimeli ya Lifalanse).

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto