Maloba ya ebandeli ya eteni 8
Yehova apambolaki Salomo; apesaki ye bwanya mingi mpe lokumu monene ya kotonga tempelo. Kasi mokemoke Salomo atikaki Yehova. Soki ozali moboti, salisá mwana na yo amona ndenge basambeli ya lokuta bakabolaki Salomo na Nzambe. Bokonzi na ye ekabwanaki, mpe bakonzi ya mabe bamemaki ekólo na lipɛngwi mpe na losambo ya bikeko. Na ntango wana, banyokolaki mpe babomaki ebele ya basakoli ya sembo ya Yehova. Yezabele, mwasi ya mokonzi, akɔtisaki bokonzi ya nɔrdi na lipɛngwi makasi. Ezalaki eleko moko ya mpasi mpenza na Yisraele. Kasi Bayisraele mingi bazalaki kaka sembo epai ya Yehova, na ndakisa Mokonzi Yehoshafate mpe mosakoli Eliya.