Lisolo ya bomoi
“Nakolinga kobongola ata eloko moko te!”
YA GLADYS ALLEN
Mbala mosusu batunaka ngai, “Soki ozala na likoki ya kobanda lisusu bomoi na yo, olingaki kobongola eloko nini?” Nakoki koyanola na bosembo mpenza ete, “Nakolinga kobongola ata eloko moko te!” Tiká nalimbola ntina nini nazali kokanisa bongo.
NA ELEKO ya molunge ya mobu 1929, ntango nazalaki na mbula mibale, likambo moko ya esengo ekómelaki tata na ngai Matthew Allen. Azwaki mwa buku moko oyo ezalaki na motó ya likambo Bamilio ya bato oyo bazali na bomoi lelo bakokufa te! (na Lingelesi), ebimisamaki na Bayekoli ya Biblia, nkombo oyo Batatoli ya Yehova bayebanaki na yango na ntango wana. Nsima ya kotánga mwa bankasa na yango, tata agangaki ete: “Naino natángá likambo ya monene boye te!”
Na nsima ya mwa ntango, tata azwaki mikanda mosusu ya Bayekoli ya Biblia. Alekisaki ntango te mpo na kobanda koyebisa bato ya zingazinga makambo oyo azalaki koyekola. Nzokande, ata lisangá moko te ya Batatoli ya Yehova ezalaki na mboka moke epai tozalaki kofanda. Lokola ayebaki ete koyangana ntango nyonso elongo na baklisto mosusu ezali na ntina mingi, tata amemaki libota na biso, na mobu 1935, na Orangeville, oyo ezali na etúká ya Ontario, na ekólo Canada, mpamba te lisangá moko ezalaki kuna.
Na ntango wana bazalaki kosɛnga bana te ete bákɔtaka ntango nyonso na makita ya lisangá. Na momeseno, bana bazalaki kotikala na libándá kosakana wana tii ntango mikóló bakosilisa makita. Tata azalaki kosepela na likambo yango te. Akanisaki na motema na ye ete: “Soki makita ezali malamu mpo na ngai, esengeli mpe kozala malamu mpo na bana na ngai.” Yango wana, atako azalaki moto ya sika na lisangá, tata alobaki na ngai na ndeko na ngai ya mobali Bob, na bandeko na ngai ya basi Ella na Ruby ete tosengeli kozalaka elongo na mikóló na makita, mpe tosalaki ndenge alobaki. Mosika te, bana ya Batatoli mosusu mpe bakómaki kokɔta na makita. Koyangana na makita mpe kopesa biyano ezwaki esika monene na bomoi na biso.
Tata alingaki Biblia mingi, mpe ayebaki mpenza kokómisa masolo ya Biblia kitoko. Na lolenge wana nde akokaki kofandisa mateya ya solo na mitema na biso ya bomwana, mateya oyo namikundolaka yango tii lelo na esengo mingi na motema. Moko na yango oyo nabosanaka te ezali ete Yehova apambolaka bato oyo batosaka ye.
Tata alakisaki biso mpe ndenge ya kosalela Biblia mpo na kolongisa kondima na biso. Tozalaki kosalela yango lisano moko boye. Na ndakisa tata azalaki koloba: “Nandimi ete ntango nakokufa nakokende na likoló. Bino bólakisa ngai sikoyo ete ezali bongo te.” Ngai na Ruby tozalaki koluka na kati ya concordance mpo na kozwa mikapo oyo tokoki kosalela mpo na kokweisa liteya wana. Nsima ya kotánga mikapo oyo tozwaki, tata azalaki koloba ete: “Ezali malamu, kasi nandimi mpenza naino te.” Wana okomona biso tozongeli lisusu kolukaluka na kati ya concordance. Mbala mingi ezalaki kosala bangonga ebele liboso ete tata asepela na biyano oyo tozalaki kopesa. Nsukansuka, ngai na Ruby tokómaki mpenza makasi mpo na kolimbola bindimeli na biso mpe mpo na kolongisa kondima na biso.
Tolongi nsɔmɔ ya kobanga bato
Atako nateyamaki malamu na ndako mpe na makita ya lisangá, nasengeli koloba ete makambo mosusu ya boklisto ezalaki mpasi mpo na ngai. Lokola bilenge mingi, ngai mpe nazalaki kosepela te ete nakesana na bilenge mosusu, mingimingi na baninga ya kelasi. Na kati ya makambo ya libosoliboso oyo etyaki kondima na ngai na komekama, ezalaki mpe oyo tozalaki kobenga kotambola mpo na kopanza nsango.
Likanisi ezalaki ete, mwa bandeko mibali mpe basi bálata bilembo oyo bakomá mwa makambo, bátambola malɛmbɛmalɛmbɛ na babalabala minene ya engumba. Na engumba na biso oyo ezalaki na bato penepene na 3 000, biso nyonso toyebanaki. Mokolo moko oyo totambolaki bongo, ngai nazalaki na nsuka ya molɔngɔ, na elembo na ngai oyo ezalaki na maloba oyo: “Lingomba ezali motambo mpe ezali na bokosi.” Bana mosusu ya kelasi na biso bamonaki ngai, mbala moko bakɔtaki na molɔngɔ na nsima na ngai mpe babandaki koyemba loyembo ya ekólo: “Nzambe abikisa mokonzi.” Ndenge nini nakokaki kosala na likambo yango? Nabondelaki makasi ete nazwa makasi ya kokoba kotambola. Ntango kaka tosilisaki kotambola, nakendeki mbango na Ndako ya Bokonzi kozongisa elembo na ngai mpo nazonga na ndako. Kasi ndeko oyo azalaki kotala makambo yango alobaki na ngai ete balingi bábanda lisusu kotambola, kasi elembo moko ezangi moto ya kolata yango. Yango wana nabimaki lisusu, nabondelaki lisusu makasi. Kasi, na mbala oyo baninga na ngai ya kelasi balɛmbaki mpe bazongaki epai na bango. Libondeli na ngai mpo na kosɛnga makasi ekómaki libondeli ya kotɔnda Nzambe!—Masese 3:5.
Tozalaki ntango nyonso koyamba basaleli ya ntango nyonso na ndako na biso. Bazalaki bato ya esengo mpe kosolola na bango ezalaki esengo mingi. Soki nazongisi makanisi nsima, nazali komona lisusu ndenge baboti na biso bazalaki ntango nyonso kolobela mosala ya ntango nyonso lokola mosala oyo eleki malamu mpo na biso bilenge.
Natosaki maloba na bango ya kolendisa mpe nabandaki mosala na ngai ya ntango nyonso na mobu 1945. Na nsima nalandaki ndeko na ngai ya mwasi Ella, oyo azalaki mobongisi-nzela na London, na etúká ya Ontario. Kuna, nabandaki lolenge moko ya mosala ya kosakola oyo nandimaki te ete nakokoka kosala yango. Bandeko bazalaki kotambola mesa na mesa na babare ya mboka wana, mpo na kokabolela bakiliya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Consolation (lelo Lamuka!). Likambo ya esengo, mosala yango ezalaki kosalema na mokolo ya pɔsɔ na mpokwa, bongo nazalaki na pɔsɔ mobimba mpo na kobondela mpo nazwa makasi ya kobima! Ɛɛ, mosala yango ezalaki pɛtɛɛ te mpo na ngai, kasi ezalaki na mbano mingi.
Epai mosusu, nayekolaki mpe lolenge ya kokabola banimero ya Consolation oyo ezalaki kolobela makambo ya ntina mingi, lokola konyokwama ya bandeko na biso na bakaa ya bakangami ya Banazi. Tozalaki kokende mingimingi kokutana na bato minene ya mombongo ya Canada mpe bakonzi ya bakompanyi ya minene. Na boumeli ya bambula nyonso wana, nayaki komona ete, soki tomitiki na mabɔkɔ na Yehova mpo apesa biso makasi, azangaka te kosunga biso. Kaka ndenge tata azalaki koloba, Yehova apambolaka bato oyo batosaka ye.
Nandimi kokende kosala na Québec
Na mokolo ya 4 Yuli 1940, mosala ya Batatoli ya Yehova epekisamaki na Canada. Na nsima, balongolaki epekiseli yango, kasi bazalaki naino konyokola biso na etúká ya Québec, etúká ya Lingomba ya Katolike. Mpo na kobenda likebi na minyoko oyo bandeko na biso bazalaki kozwa kuna, mosala moko monene ya kosakola esalamaki na trakte moko oyo ezalaki na maloba makasi oyo: Likunya makasi ya bato ya Québec mpo na Nzambe, mpo na Klisto mpe bonsomi ezali nsɔni mpo na Canada mobimba. Nathan H. Knorr, oyo azalaki na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova, asangisaki bankama ya babongisi-nzela na engumba Montréal mpo na kolimbolela bango ntina ya mosala oyo balingaki kobanda. Ndeko Knorr ayebisaki biso ete soki tondimi kosala mosala yango, tosengeli koyeba ete tokoki kokangama mpe kotyama na bolɔkɔ. Ezalaki mpenza solo! Na boumeli ya ntango yango, bakangaki ngai mbala 15 mobimba. Ntango tozalaki kobima na mosala ya kosakola, tozalaki kobosana te komema babrɔsi mpe masanola na biso, mpo ntango mosusu tokokaki kolala na bolɔkɔ!
Na ebandeli, tozalaki kosala mosala yango mingi na butu mpo na kobenda likebi ya bato te. Nazalaki komema batrakte mosusu ebele na kati ya sakosi oyo nazalaki kolata na nkingo na nse ya kazaka. Lokola sakosi yango ezalaki kovimba na batrakte, ezalaki kokómisa ngai lokola mwasi ya zemi. Yango ezalaki kosalisa ngai mingi ntango nazalaki kozwa babisi oyo ezalaki kotonda na bato, mpo na kokenda na esika nakosakola. Bana mibali mingi ya bonkonde bazalaki kotɛlɛma mpo na kotikela “mwasi ya zemi” kiti.
Nsima ya mwa ntango tokómaki kosala mosala yango ya kokabola batrakte na moi. Tozalaki kotika batrakte na ndako misato to minei, mpe tozalaki kokende na esika mosusu. Mbala mingi ezalaki koleka malamu. Nzokande, soki sango moko ya Katolike ayoki ete tozali wana, tozalaki koyeba ete matata ekobima. Mokolo mosusu, sango moko atindaki bato 50 to 60, mikóló mpe bilenge, bábamba biso batomati mpe makei. Tokimaki na ndako ya ndeko mwasi moklisto moko, mpe tolalaki wana butu mobimba na nse.
Basengelaki na babongisi-nzela mingi mpo básakola epai ya bato ya Québec oyo balobaka lokota ya Lifalanse, yango wana, na sanza ya Desɛmbɛ 1958, ngai na ndeko na ngai ya mwasi Ruby tobandaki koyekola Lifalanse. Na nsima batindaki biso na mwa bisika mingi ya etúká yango epai balobaka Lifalanse. Makambo ezalaki ndenge moko te na bisika bazalaki kotinda biso. Na esika moko, tosalaki mbula mibale mobimba mpe tozalaki kosakola ngonga mwambe mokolo na mokolo ndako na ndako, kasi ata moto moko te ayambaki biso! Bato bazalaki kaka koya kotala na madusu ya bikuke ya ndako na bango mpe kokanga. Kasi tolɛmbaki te. Lelo oyo masangá mibale ya minene ezali na engumba yango.
Yehova asungaki biso na lolenge nyonso
Tobandaki mosala ya mobongisi-nzela monene na 1965. Na esika moko epai tozalaki kosala lokola babongisi-nzela minene, toyaki kokanga malamumalamu ntina ya maloba ya ntoma Paulo oyo ezali na 1 Timote 6:8: “Kozaláká na bilei mpe na eloko ya kozipa nzoto, tokosepela na biloko wana.” Mpo na kosomba biloko oyo tosengelaki na yango, tosengelaki kosalela mbongo na biso na mayele. Na boye, tozalaki kobomba mbongo mpo na masini oyo epesaka molunge na ndako, kofutela ndako, kura, mpe biloko ya kolya. Soki tosali makambo wana nyonso, tozalaki kotikala kaka na basantime 25 mpo na makambo mosusu ya mikemike oyo tokozala na mposa na yango na sanza wana.
Lokola tozalaki na mbongo mingi te, tozalaki kopelisa masini mpo na kotya molunge na ndako kaka mpo na mwa ngonga moke na butu moko. Yango wana shambre na biso ezalaki ntango nyonso malili makasi (15 oC), mpe mbala mingi ezalaki malili makasi lisusu koleka. Mokolo moko, mwana ya moyekoli ya Biblia moko ya Ruby ayaki kotala biso. Na ntembe te, ntango azongaki epai na bango, mwana wana ayebisaki mama na ye ete tozali kokufa na malili, mpo nsima na yango, mwasi yango akómaki kotindela biso badolare zomi sanza na sanza mpo na kosomba petrole oyo ekosalisa biso tópelisa masini ya kotya molunge na ndako ntango nyonso. Atako bongo, tozalaki kozanga eloko te. Tozalaki bato na bozwi te, kasi tozalaki ntango nyonso kozwa biloko oyo tozalaki na bosɛnga na yango. Soki mwa eloko etikali, tozalaki komona yango lokola lipamboli. Yango emonisaki mpenza bosolo ya maloba ya Nzembo 35:25: “Naino namoni moyengebene te oyo atikami, to mwana na ye oyo akolɔmbaka kwanga”!
Atako tokutanaki na botɛmɛli, nazwaki esengo ya komona bato mingi oyo nayekolaki na bango Biblia kokóma na boyebi ya solo. Basusu kutu baponaki kosala mosala ya ntango nyonso, likambo yango ememelaki ngai esengo monene koleka.
Kolonga mikakatano ya sika
Na 1970, Cornwall, na Ontario, ekómaki teritware na biso ya sika. Pene na mbula moko nsima ya kokóma na biso na Cornwall, mama akómaki kobɛla. Tata asilaki kokufa na mobu 1957, mpe ngai na bandeko na ngai mibale ya basi tokómaki kokabola mikolo mpo na kosalisa mama tii ntango ayaki kokufa na mobu 1972. Na ntango wana, Ella Lisitza na Ann Kowalenko, baninga na biso na mosala ya mobongisi-nzela monene, bazalaki kolendisa biso mpe kosunga biso na bolingo nyonso. Ntango nyonso oyo tozalaki te, basalisaki biso na koyekola na bayekoli na biso ya Biblia mpe na mikumba mosusu. Tomonaki mpenza bosolo ya maloba ya Masese 18:24, oyo elobi ete: “Moninga azali mpe oyo akotikala penepene koleka ndeko.”
Ya solo, bomoi etondi na mikakatano. Kasi na lisalisi ya lobɔkɔ ya Yehova oyo etondi na bolingo, nakokaki kolonga mikakatano yango nyonso. Na esengo nyonso, nazali kaka kokoba kolekisa bomoi na ngai na mosala ya ntango nyonso. Bob akufaki na mobu 1993 mpe aumelaki na mosala ya mobongisi-nzela koleka mbula 20, oyo 10 kati na yango alekisaki yango elongo na mwasi na ye Doll. Yaya na ngai ya mwasi Ella akufaki na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 1998, aumelaki na mosala ya mobongisi-nzela koleka mbula 30, mpe atikalaki ntango nyonso na elimo wana ya mobongisi-nzela. Na 1991, bazwaki Ruby, ndeko na ngai mosusu ya mwasi, na bokɔnɔ ya kanser. Kasi asalelaki mwa makasi ya moke oyo atikalaki na yango mpo na kosakola nsango malamu. Mpe atikalaki na ezaleli na ye ya kosɛkisa bato tii ntango akufaki, na ntɔngɔ ya mokolo ya 26 Sɛtɛmbɛ 1999. Atako lelo nazali lisusu na ndeko na ngai ya mwasi te, nazali na libota ya elimo oyo etondi na bandeko mibali mpe basi oyo bazali kosalisa ngai ete nabungisa esengo na ngai te.
Soki natali ndenge nalekisi bomoi na ngai, eloko nini nakolinga kobongola? Nabalá te, kasi nazalaki na baboti ya bolingo, ndeko moko ya mobali mpe bandeko ya basi, oyo bazalaki kotya solo na esika ya liboso na bomoi na bango. Nazali na elikya ete etikali moke namona bango nyonso lisusu, na mokolo ya lisekwa. Nazali komona ndenge tata akoyamba ngai, mpe ndenge mama akotangisa mpisoli ntango tokoyambana. Na ntango wana Ella, Ruby, na Bob bakopumbwa na esengo.
Wana nazali kozela, mposa na ngai ezali ntango nyonso ete nakoba kosalela mwa bokolɔngɔnɔ ya nzoto na ngai mpe mwa makasi moke oyo natikali na yango mpo na kosanzola mpe kopesa Yehova lokumu. Kosala mosala ya mobongisi-nzela ya ntango nyonso ezali bomoi moko ya esengo mpe ya mbano monene. Ezali mpenza ndenge mokomi ya nzembo alobaki mpo na bato oyo balandaka banzela ya Yehova: “Okozala moto na esengo mpe makambo na yo nyonso ekotambola malamu.”—Nzembo 128:1, 2, NW.
[Bililingi na lokasa 26]
Tata alingaki Biblia. Alakisaki biso kosalela yango mpo na kolongisa kondima na biso
[Elilingi na lokasa 28]
Banda na loboko ya mwasi: Ruby, ngai, Bob, Ella, mama, mpe tata, na 1947
[Elilingi na lokasa 28]
Molɔngɔ ya liboso, banda na lobɔkɔ ya mwasi: Ngai, Ruby, mpe Ella, na Liyangani ya Etúká, na 1998